Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Baboti​—⁠Bósalisa bana na bino bázwa bwanya ya Nzambe

Baboti​—⁠Bósalisa bana na bino bázwa bwanya ya Nzambe

Lolenge moko oyo eleki malamu oyo baboti bakoki kosalisa bana na bango bázwa bwanya ezali ya kosalisa bango bázwelaka makita ya lisangá matomba. Makambo oyo bilenge bamonaka, bayokaka, mpe balobaka ntango bapesaka biyano na makita ekoki kosalisa bango báyeba Yehova mpe bákóma baninga na ye ya motema. (Mib 31:​12, 13) Soki ozali moboti, ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bázwa matomba mingi na makita?

  • Saláká nyonso ozalaka na makita na Ndako ya Bokonzi.—Nz 22:22

  • Omindimisa ete okoki kozala na ntango ya kosolola na bandeko liboso to nsima ya makita mpo na kolendisa bango.—Ebr 10:25

  • Omindimisa ete mosangani mokomoko ya libota azali na mikanda oyo ekosalelama na makita, ezala na aparɛyi to ya papye

  • Salisá mwana abongisaka biyano oyo akopesa na makita na maloba na ye moko.—Mt 21:​15, 16

  • Koloba mabe te mpo na makita mpe makambo oyo toyekolaka kuna

  • Salisá bana na yo bápesaka mabɔkɔ na makambo lokola, kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi mpe kosolola elongo na mibange ya lisangá

Kosalisa bana na yo bápusana penepene na Yehova esɛngaka makambo mingi, mpe ekoki kolɛmbisa na bantango mosusu. Kasi, okoki kotya motema ete Yehova akosalisa yo.—Yis 40:29.

TALÁ VIDEO BABOTI, BÓTYELA YEHOVA MPE MAKASI NA YE MOTEMA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Kolɛmba esalaki Zack ná Leah nini?

  • Mpo na nini baboti basengeli kobondela Yehova apesa bango makasi?

  • Makambo nini Zack ná Leah basalaki mpo na komonisa ete batyaki motema ete Yehova akosalisa bango