Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

Tokokende na bino

Tokokende na bino

“Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”​—ZEK. 8:23.

LOYEMBO 26 Bosalelaki nde ngai

NA MOKUSE *

Bampate mosusu (“mibali zomi”) bazwi lokumu ya kosambela Yehova elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo (“Moyuda”) (Talá paragrafe 1-2)

1. Likambo nini Yehova asakolaki ete ekosalema na mikolo na biso?

YEHOVA asakolaki ete na mikolo na biso, “bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo bakosimba, ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: ‘Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.’” (Zek. 8:23) Na vɛrsɛ yango, “Moyuda” ezali komonisa bakristo oyo Nzambe atye mafuta na elimo santu. Babengami mpe “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 6:16) “Bato zomi” ezali komonisa bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Bayebi ete Yehova apamboli bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bamonaka ete kosambela ye elongo na bango ezali lokumu monene.

2. Ndenge nini “bato zomi” bazali ‘kokende na’ bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

2 Ata soki lelo oyo tokoki te koyeba nkombo ya mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo, * baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele bakoki “kokende na” bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na ndenge nini? Biblia elobi ete “bato zomi” “bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: ‘Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.’” Vɛrsɛ yango elobeli Moyuda moko. Kasi, liloba “bino” oyo balobi na Moyuda yango esalelamaka mpo na kolobela bato ebele. Yango elakisi ete Moyuda yango ezali kaka moto moko te, kasi ezali komonisa etuluku mobimba ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Baoyo batyami mafuta na elimo te basalelaka Yehova elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, bamonaka bango bakonzi te mpo bayebi ete Yesu nde Mokambi to Mokonzi.​—Mat. 23:10.

3. Lisolo oyo ekoyanola na mituna nini?

3 Lokola ezali mpe na bakristo oyo batyami mafuta na elimo kati na basaleli ya Nzambe lelo oyo, bato mosusu bakoki komituna boye: (1) Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli komitalela? (2) Ndenge nini tosengeli komitambwisa liboso ya bato oyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo ya Ekaniseli? (3) Tosengeli komitungisa soki motángo na bango ezali se kobakisama? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango.

BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BASENGELI KOMITALELA NDENGE NINI?

4. Likebisi nini oyo ezali na 1 Bakorinti 11:27-29 bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kokanisa na mozindo, mpe mpo na nini?

4 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kokanisa na mozindo na likebisi oyo ezali na 1 Bakorinti 11:27-29. (Tángá.) Na ndenge nini mokristo oyo atyami mafuta na elimo akoki kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli “na ndenge oyo ebongi te”? Ekozala bongo soki alei limpa mpe amɛli vinyo nzokande abukaki mibeko ya sembo ya Yehova. (Ebr. 6:4-6; 10:26-29) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaka ete mpo bázwa “libonza ya kokende na likoló ndenge Nzambe abengi [bango] na nzela ya Kristo Yesu,” basengeli kotikala sembo.​—Flp. 3:13-16.

5. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli komitalela ndenge nini?

5 Elimo santu ya Yehova esalisaka basaleli na ye bázala na komikitisa, kasi te bázala na lolendo. (Ef. 4:1-3; Kol. 3:10, 12) Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakanisaka te ete baleki basusu. Bayebi ete kotyama mafuta na elimo elakisi kaka te ete bazali na elimo santu mingi koleka basaleli mosusu ya Yehova. Bakanisaka te ete bakangaka ntina ya mateya ya Biblia malamu koleka bato mosusu. Mpe ata mokolo moko te, mokristo oyo atyami mafuta na elimo akoyebisa ndeko mosusu ete ye mpe atyami mafuta na elimo mpe asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli. Kasi, na komikitisa nyonso, bandimaka ete kaka Yehova nde abengaka bato mpo bákende na likoló.

6. Na kotalela 1 Bakorinti 4:7, 8, bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kozala ndenge nini?

6 Atako bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonaka ete ezali lokumu koponama mpo na kokende na likoló, bazelaka te ete basusu básalela bango makambo oyo basalelaka bato mosusu te. (Flp. 2:2, 3) Bayebi mpe ete ntango Yehova atyaki bango mafuta na elimo, ayebisaki yango moto mosusu te. Na yango, mokristo oyo atyami mafuta na elimo akamwaka te soki bato mosusu bandimi mbala moko te ete atyami mafuta na elimo. Ayebi ete Biblia eyebisi biso tóndima nokinoki te moto oyo alobi ete Nzambe apesi ye mokumba moko monene. (Em. 2:2) Lokola akolinga te ete basusu bátyela ye likebi mingi, mokristo oyo atyami mafuta na elimo akoyebisa te baoyo akutani na bango mpo na mbala ya liboso ete atyami mafuta na elimo. Mpe akotutela yango ntolo te.​—Tángá 1 Bakorinti 4:7, 8.

7. Makambo nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoboya kosala, mpe mpo na nini?

7 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonaka te ete basengeli kolekisaka ntango kaka na baoyo batyami mpe mafuta na elimo, lokola nde bazali bato ya moziki moko boye. Balukaka te kokutana na bandeko mosusu oyo batyami mafuta na elimo mpo bálobela ndenge batyamaki mafuta na elimo to mpo básala bituluku mpo na koyekola Biblia. (Gal. 1:15-17) Lisangá ekozala na bomoko te soki bakristo oyo batyami mafuta na elimo basali bongo. Kosala bongo ezali kotɛmɛla elimo santu, oyo esalisaka basaleli ya Nzambe bázala na kimya mpe na bomoko.​—Rom. 16:17, 18.

NDENGE NINI TOSENGELI KOSALELA BAOYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO MAKAMBO?

Tosengeli te kosalela bakristo oyo batyami mafuta na elimo to baoyo bakambaka lisangá makambo lokola bavedɛti (Talá paragrafe 8) *

8. Mpo na nini tosengeli kokeba na makambo oyo tokosala epai ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

8 Ndenge nini tosengeli kosalela bandeko mibali mpe bandeko basi oyo batyami mafuta na elimo makambo? Ekozala mabe soki tozali kokumisa moto koleka ndelo, ata soki azali ndeko ya Kristo oyo atyami mafuta na elimo. (Mat. 23:8-12) Na esika oyo Biblia elobeli bankulutu, elendisi biso ‘tómekola kondima na bango,’ kasi elobi te ete tókómisa moto mokonzi na biso. (Ebr. 13:7) Ya solo, Biblia elobi ete basusu kati na bango “babongi na lokumu mbala mibale.” Nzokande, bazwaka lokumu yango mpo “bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza” mpe “bazali kosala mosala makasi ya koloba mpe ya koteya,” kasi te mpo bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (1 Tim. 5:17) Soki tozali kokumisa mingi bakristo oyo batyami mafuta na elimo to kotyela bango likebi mingi, tokoki koyokisa bango nsɔni. * To oyo eleki mabe, tokoki kotinda bango bákóma na lolendo. (Rom. 12:3) Moko te kati na biso akolinga kosala likambo moko oyo ekoki kotinda moko ya bandeko ya kristo asala libunga monene ndenge wana!​—Luka 17:2.

9. Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

9 Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai ya bakristo oyo Yehova atye mafuta na elimo? Tosengeli te kotuna bango ndenge oyo batyamaki mafuta na elimo. Wana ezali likambo oyo etali moto ye moko, mpe tozali na lotomo ya koyeba yango te. (1 Tes. 4:11; 2 Tes. 3:11) Tosengeli mpe te kokanisa ete balongani na bango, baboti na bango, to bandeko mosusu ya libota na bango mpe bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Elikya ya kokende likoló eutaka na libota te. Nzambe nde apesaka yango. (1 Tes. 2:12) Tosengeli mpe koboya kotuna mituna oyo ekoki kopesa basusu mpasi na motema. Na ndakisa, tosengeli te kotuna mwasi ya ndeko oyo atyami mafuta na elimo soki ayokaka ndenge nini ntango akanisaka ete akozala na bomoi ya seko awa na mabele kozanga mobali na ye. Tokoki mpenza kotya motema ete na mokili ya sika, Yehova akokokisa “mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.”​—Nz. 145:16.

10. Na ndenge nini tokomibatela soki toboyi “kokumisa bato”?

10 Soki tozali te komona bakristo oyo batyami mafuta na elimo lokola nde baleki basusu, tozali mpe komibatela. Na ndenge nini? Biblia emonisi ete ekoki kosalema ete bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bátikala sembo te. (Mat. 25:10-12; 2 Pe. 2:20, 21) Kasi, soki toboyi “kokumisa bato,” tokolanda moto te, azala mokristo oyo atyami mafuta na elimo, to ndeko oyo ayebani mingi na ebongiseli ya Yehova, to mpe oyo asalelaka Yehova banda bambula mingi. (Yuda 16) Na ndenge yango, soki bazangi bosembo to batiki lisangá, tokobungisa kondima na biso te epai ya Yehova mpe tokotika te kosalela ye.

TOSENGELI KOMITUNGISA SOKI MOTÁNGO NA BANGO EZALI SE KOBAKISAMA?

11. Tokoki koloba nini mpo na motángo ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli?

11 Eleki bambula mingi, motángo ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli ezalaki kokita. Kasi mikolo oyo, motángo yango ekómi kobakisama mbula na mbula. Tosengeli komitungisa mpo na yango? Te. Tótalela mwa makambo ya ntina oyo tosengeli kobatela na makanisi.

12. Mpo na nini tosengeli komitungisa te mpo na motángo ya baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli?

12 “Yehova ayebi bato na ye.” (2 Tim. 2:19) Na bokeseni na Yehova, bandeko mibali oyo batángaka motángo ya baoyo balye limpa mpe bamɛli vinyo na Ekaniseli bayebaka te nani mpenza atyami mafuta na elimo. Na yango, motángo yango esangisaka mpe bato oyo bakanisi ete batyami mafuta na elimo, nzokande ezali bongo te. Na ndakisa, bato mosusu oyo liboso bazalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, batikaki na nsima. Maladi ya motó to konyokwama na makanisi ekoki mpe kotinda bato mosusu bákanisa ete bakoyangela elongo na Kristo na likoló. Ezali polele ete toyebi na bosikisiki te soki bakristo boni oyo batyami mafuta na elimo bazali naino awa na mabele.

13. Biblia epesi motángo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala na mabele ntango bolɔzi monene ekobanda?

13 Ekozala na bakristo oyo batyami mafuta na elimo na bisika mingi na mabele ntango Yesu akoya kozwa bango mpo na komema bango na likoló. (Mat. 24:31) Biblia elobi ete na mikolo ya nsuka, motángo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ekozala moke. (Em. 12:17) Kasi, elobi te soki bakotikala boni ntango bolɔzi monene ekobanda.

Tosengeli kosala nini soki moto moko alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo ya Ekaniseli (Talá paragrafe 14)

14. Ndenge emonisami na Baroma 9:11, 16, likambo nini tosengeli kokanga ntina na oyo etali koponama ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

14 Yehova nde ayebaka ntango nini apona bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Rom. 8:28-30) Yehova abandaki kopona bakristo oyo batyami mafuta na elimo nsima ya lisekwa ya Yesu. Emonani lokola ete na siɛklɛ ya liboso, bakristo nyonso ya solo batyamaki mafuta na elimo. Na basiɛklɛ oyo elandaki, bato mingi oyo bazalaki komibenga bakristo bazalaki mpenza kolanda Kristo te. Atako bongo, na bambula yango, Yehova atyaki mwa bakristo moke ya solo mafuta na elimo. Bazalaki lokola blé oyo Yesu alobaki ete ekokola elongo na matiti mabe. (Mat. 13:24-30) Na boumeli ya mikolo ya nsuka, Yehova akobi kopona bato oyo bakozala na kati ya bato 144 000. * Soki Nzambe amoni malamu ete apona bamosusu mwa moke kaka liboso nsuka eya, tosengeli te komituna soki asali mpenza makambo na bwanya. (Tángá Baroma 9:11, 16.) * Tosengeli kokeba mpo tósala te makambo lokola basali oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye moko. Bamilelaki mpo na makambo oyo nkolo na bango asalelaki baoyo babandaki mosala na ngonga ya nsuka.​—Mat. 20:8-15.

15. Bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo bazali na kati ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo Matai 24:45-47 elobeli? Limbolá.

15 Ezali te baoyo nyonso bazali na elikya ya kokende na likoló nde bazali na kati ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Tángá Matai 24:45-47.) Ndenge kaka ezalaki na siɛklɛ ya liboso, Yehova ná Yesu bazali lelo kosalela mwa etuluku moko ya bandeko mibali mpo na koleisa, to koteya, bato ebele. Na siɛklɛ ya liboso, Yehova asalelaki kaka bakristo moke oyo batyamaki mafuta na elimo mpo bákoma Makomami ya Grɛki ya bokristo. Lelo oyo mpe, kaka bakristo moke oyo batyami mafuta na elimo nde bazali na mokumba ya kopesa basaleli ya Nzambe “bilei na bango na ntango oyo ebongi.”

16. Oyekoli nini na lisolo oyo?

16 Toyekoli nini na lisolo oyo? Yehova azwá ekateli ya kopesa basaleli na ye mingi bomoi ya seko awa na mabele mpe mwa ndambo moke oyo bakoyangela elongo na Yesu bomoi na likoló. Yehova apesi mbano na basaleli na ye nyonso, ezala​—“Moyuda” to “bato zomi,”—​mpe asɛngi bango nyonso bátosa mibeko na ye mpe bátikala sembo. Biso nyonso tosengeli kozala na komikitisa. Tosengeli kosalela ye elongo mpe kozala na bomoko. Mpe tosengeli kosala nyonso mpo na kobatela kimya na lisangá. Lokola nsuka ezali se kokóma pene, biso nyonso tókoba kosalela Yehova mpe kolanda Kristo lokola “etonga kaka moko.”​—Yoa. 10:16.

^ par. 5 Tokosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo mokolo ya mibale, 07/04/2020. Ndenge nini tosengeli kotalela baoyo bakolya limpa mpe bakomɛla vinyo na mpokwa yango? Tosengeli komitungisa soki motángo ya bato yango ezali se kobakisama? Tokozwa biyano na lisolo oyo, oyo euti na lisolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/2016.

^ par. 2 Na kotalela Nzembo 87:5, 6, na mikolo ezali koya, mbala mosusu Nzambe akomonisa bankombo ya baoyo nyonso bazali koyangela elongo na Yesu na likoló.​—Rom. 8:19.

^ par. 8 Talá etanda “Bolingo ‘esalaka makambo ya nsɔni te’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/2016.

^ par. 14 Atako Misala 2:33 emonisi ete elimo santu esopamaka na nzela ya Yesu, Yehova nde aponaka moto mokomoko.

^ par. 14 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2007.

LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo

^ par. 56 NDIMBOLA YA ELILINGI: Kanisá ete momonisi moko ya biro monene ná mwasi na ye bayei na liyangani mpe ebele ya bato bazingi bango mpo na kokanga bafɔtɔ. Ezali mpenza kozanga limemya!