Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 8

Bundisá likunya mpo olanda kimya

Bundisá likunya mpo olanda kimya

“Tólanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka.”​—ROM. 14:19.

LOYEMBO 113 Tozali na kimya

NA MOKUSE *

1. Likunya esalaki nini na libota ya Yakobo?

YAKOBO azalaki kolinga bana na ye nyonso, kasi azalaki kolinga mingi nde Yozefe, oyo azalaki na mbula 17. Bandeko ya Yozefe bayokaki ndenge nini? Bakómaki koyokela ye likunya, mpe yango etindaki bango bayina ye. Yozefe asalaki likambo moko te ya mabe, kasi bandeko na ye batɛkaki ye na boombo mpe bakosaki tata na bango ete nyama moko ya zamba nde elyaki mwana oyo azalaki kolinga mingi. Mpo na likunya, kimya ya libota na bango ebebaki mpe bapesaki tata na bango mpasi mingi.​—Eba. 37:3, 4, 27-34.

2. Na kotalela Bagalatia 5:19-21, mpo na nini likunya ezali mabe mpenza?

2 Na Biblia, likunya * etángami na kati ya “misala ya nzoto” oyo ememaka na liwa mpe oyo ekoki kosala ete moto azanga kozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe. (Tángá Bagalatia 5:19-21.) Mbala mingi, likunya ebotaka mbuma ya mabe mpenza, na ndakisa koyinana, bitumba, mpe nkanda makasimakasi.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Ndakisa ya bandeko ya Yozefe emonisi ndenge likunya ekoki kobebisa boyokani mpe kolongola kimya oyo ezalaki na kati ya libota. Atako tokoki kosala te likambo oyo bandeko ya Yozefe basalaki, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe motema na biso ezali na bokosi. (Yir. 17:9) Na yango, ekoki kokóma ete tóbanda koyokela basusu likunya. Tólobela mwa bandakisa oyo Biblia elobeli mpo na kokebisa biso, oyo ezali kosalisa biso tóyeba makambo oyo ekoki kosala ete likunya ezwa misisa na motema ya moto. Na nsima, tokolobela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kobundisa likunya mpe kobatela kimya.

NINI ESALAKA ETE MOTO AKÓMA NA LIKUNYA?

4. Mpo na nini Bafilistia bayokelaki Yisaka likunya?

4 Bozwi ya moto mosusu. Yisaka azalaki moto ya bozwi, mpe Bafilistia bayokelaki ye likunya mpo na yango. (Eba. 26:12-14) Kutu, batondisaki mabele na mabulu ya mai oyo Yisaka azalaki kosalela mpo na komɛlisa bitonga ya bampate mpe ya bangɔmbɛ na ye. (Eba. 26:15, 16, 27) Ndenge moko na Bafilistia, bato mosusu lelo oyo bayokelaka bato oyo baleki bango na biloko ya mosuni likunya. Basukaka kaka te na kolula biloko ya baninga, kasi balukaka mpe bato yango bázanga biloko yango.

5. Mpo na nini bakonzi ya mangomba bayokelaki Yesu likunya?

5 Ntango bazali kosepela mingi na moto mosusu. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bayokelaki Yesu likunya mpo bato mingi bazalaki kosepela na ye. (Mat. 7:28, 29) Yesu azalaki momonisi ya Nzambe, mpe azalaki koteya solo. Kasi, bakonzi wana ya mangomba bazalaki koloba mabe mpo na Yesu mpe kokosela ye makambo mpo na kobebisa lokumu na ye. (Mrk. 15:10; Yoa. 11:47, 48; 12:12, 13, 19) Lisolo yango ekoki koteya biso nini? Tosengeli kosala makasi mpo tózala na likunya te epai ya baoyo bazali na bizaleli ya malamu oyo esalaka ete bandeko ya lisangá básepela na bango. Tosengeli nde kosala makasi mpo tómekola bizaleli na bango ya malamu.​—1 Ko. 11:1; 3 Yoa. 11.

6. Ndenge nini Diotrefese amonisaki likunya?

6 Mikumba ya moto mosusu. Na siɛklɛ ya liboso, Diotrefese ayokelaki bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá likunya. Azalaki koluka “kozwa esika ya liboso” na kati ya lisangá, na yango azalaki kolobaloba makambo ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya ntoma Yoane mpe ya bandeko mosusu oyo bazalaki kokamba. (3 Yoa. 9, 10) Atako tokokende mosika te lokola Diotrefese, ekoki kokóma ete tóbanda koyokela ndeko moko likunya mpo azwi mokumba oyo biso mpe tozalaki kolikya kozwa, mingimingi soki tozali komona ete biso mpe tokokisi masɛngami mpo na kozwa mokumba yango.

Motema na biso ezali lokola mabele, mpe bizaleli ya malamu ezali lokola fololo. Kasi, likunya ezali lokola matiti mabe ya pwazɔ.Likunya ekoki kotya bizaleli mosusu nkaka, na ndakisa bolingo, motema mawa, mpe boboto (Talá paragrafe 7)

7. Likunya ekoki kosala nini kati na biso?

7 Likunya ezali lokola matiti mabe ya pwazɔ. Soki likunya ebandi kokola na motema na biso, ekoki kozala mpasi kolongola yango. Likunya ebimisaka bizaleli mosusu ya mabe, lokola zuwa ya mabe, lolendo mpe moimi. Ndenge kaka matiti mabe epekisaka fololo ekola, likunya ekoki kotya bizaleli mosusu nkaka, na ndakisa bolingo, motema mawa, mpe boboto. Soki kaka toyoki ete likunya ebandi kozwa misisa na motema na biso, tosengeli kopikola yango. Ndenge nini tokoki kobundisa likunya?

KOLISÁ EZALELI YA KOMIKITISA MPE YA KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO

.Ndenge nini tokoki kobundisa likunya, oyo ezali lokola matiti mabe? Na lisalisi ya Elimo santu ya Nzambe, tokoki kolongola likunya mpe kokolisa ezaleli ya komikitisa mpe ya kosepela na oyo tozali na yango (Talá paragrafe 8-9)

8. Bizaleli nini ekoki kosalisa biso tóbundisa likunya?

8 Tokoki kobundisa likunya soki tokolisi ezaleli ya komikitisa mpe ya kosepela na oyo tozali na yango. Soki motema na biso etondi na bizaleli yango ya malamu, likunya ekozwa esika ya kokola te. Komikitisa ekosalisa biso tókanisa te ete toleki ndenge oyo tozali mpenza. Moto ya komikitisa amonaka te ete ebongi básalela ye makambo koleka bato mosusu nyonso. (Gal. 6:3, 4) Moto oyo asepelaka na oyo azali na yango amitungisaka te mpo na biloko oyo azangi mpe amikokanisaka te na bato mosusu. (1 Tim. 6:7, 8) Soki moto oyo azali na komikitisa mpe asepelaka na oyo azali na yango amoni moninga azwi eloko ya malamu, asepelaka mpe.

9. Na kotalela Bagalatia 5:16 mpe Bafilipi 2:3, 4, elimo santu ekosalisa biso tósala nini?

9 Tosengeli na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpo tókima ezaleli mabe ya likunya mpe tókolisa komikitisa mpe ezaleli ya kosepela na oyo tozali na yango. (Tángá Bagalatia 5:16; Bafilipi 2:3, 4.) Elimo santu ya Yehova ekoki kosalisa biso tótalela makanisi mpe mayoki na biso oyo ebombaná na kati ya motema. Na lisalisi ya Nzambe, tokoki kolongola makanisi mpe mayoki ya mabe mpe kokóma na oyo ya malamu. (Nz. 26:2; 51:10) Tólobela ndakisa ya Moize mpe ya Paulo, mibali oyo balongaki kobundisa ezaleli ya likunya.

Elenge Moyisraele moko ayei mbangu epai ya Moize mpe Yosua mpo na koyebisa bango ete mibali mibale na kaa bakómi kosala ndenge basakoli basalaka. Yosua asɛngi Moize apekisa mibali yango, kasi Moize aboyi. Ayebisi Yosua ete azali na esengo mpo Yehova apesi mpe mibali yango mibale elimo na Ye. (Talá paragrafe 10)

10. Likambo nini ekokaki kotya Moize na komekama? (Talá elilingi ya ezipeli.)

10 Moize azalaki na bokonzi mingi na ekólo ya Nzambe, kasi azalaki komona te ete ebongi kaka na ye. Na ndakisa, na libaku moko, Yehova alongolaki mwa ndambo ya elimo santu epai ya Moize mpe apesaki yango mwa mikóló ya Yisraele oyo batɛlɛmaki pene ya hema ya kokutana. Mwa moke na nsima, Moize ayokaki ete mikóló mibale oyo bakendaki na hema ya kokutana te bazwaki mpe elimo santu mpe bakómaki kosala ndenge basakoli basalaka. Moize asalaki nini ntango Yosua asɛngaki ye apekisa mikóló yango? Moize ayokelaki bango likunya te ndenge Yehova atyelaki bango likebi. Kasi, amonisaki komikitisa mpe asepelaki mpo na mokumba oyo bazwaki. (Mit. 11:24-29) Ndakisa ya Moize ekoki koteya biso nini?

Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ezaleli ya komikitisa lokola Moize? (Talá paragrafe 11-12) *

11. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Moize?

11 Soki ozali nkulutu, basilá kosɛnga yo olakisa moto mosusu na lisangá ndenge ya kokokisa mokumba moko oyo olingaka mingi? Na ndakisa, mbala mosusu osepelaka na mokumba ya kotambwisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, soki ozali na komikitisa lokola Moize, okomona te ete bakitisi yo soki basɛngi yo olakisa ndeko mosusu ndenge ya kosala yango, mpo na nsima azwa mokumba yango. Kasi, okosepela kosalisa ndeko na yo.

12. Ndenge nini bandeko mingi lelo bazali komonisa komikitisa mpe ezaleli ya kosepela na oyo bazali na yango?

12 Tólobela likambo mosusu oyo ezali kokómela bandeko mibali oyo bakoli. Bandeko yango mingi bazalaki bakambi misala ya bankulutu na boumeli ya bambula ebele. Kasi, ntango bakokisi mbula 80, bandimaka kotika mokumba yango. Na komikitisa nyonso, bakɛngɛli ya zongazonga oyo bakokisi mbula 70 batikaka mokumba yango mpe bandimaka kozwa mokumba mosusu. Mpe na bambula oyo euti koleka, bandeko mingi ya Betele na mokili mobimba bazongaki na masangá mpo bámipesa na mosala ya kosakola. Bandeko mibali mpe bandeko basi yango ya sembo bayokaka nkanda te mpo na bandeko oyo bazali kokokisa mikumba oyo bango bazalaki na yango kala.

13. Nini ekokaki kosala ete Paulo ayokela bantoma 12 likunya?

13 Ntoma Paulo mpe akolisaki komikitisa mpe ezaleli ya kosepela na oyo azali na yango. Atikaki te likunya ekola na motema na ye. Atako asalaki mingi na mosala ya kosakola, na komikitisa nyonso alobaki: “Nazali moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma, mpe nabongi kutu te kobengama ntoma.” (1 Ko. 15:9, 10) Bantoma 12 bazalaki kolanda Yesu ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, kasi Paulo akómaki mokristo kaka nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu. Atako nsukansuka atyamaki “ntoma ya bikólo,” ata mokolo moko te Paulo azwaki lokumu monene ya kokóma moko ya bantoma 12. (Rom. 11:13; Mis. 1:21-26) Na esika ayokela mibali yango 12 likunya mpo bazalaki baninga ya Yesu, Paulo akobaki kosepela na oyo azalaki na yango.

14. Tokosala nini soki tozali na komikitisa mpe tozali kosepela na oyo tozali na yango?

14 Soki tozali na komikitisa mpe tozali kosepela na oyo tozali na yango, tokozala lokola Paulo mpe tokozala na limemya mpo na bokonzi oyo Yehova apesi basusu. (Mis. 21:20-26) Alingi ete bankulutu bákambaka lisangá. Atako basalaka mabunga, Yehova amonaka ete bazali “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8, 11) Soki tozali na limemya mpo na bankulutu mpe tozali kolanda litambwisi na bango na komikitisa nyonso, tokozala na boyokani malamu na Yehova mpe tokozala na kimya na bandeko ya lisangá.

‘LANDÁ MAKAMBO OYO ETYAKA KIMYA’

15. Tosengeli kosala nini?

15 Kimya ekoki kozala te soki tozali koyokelana likunya. Tosengeli kopikola likunya na motema na biso mpe koboya kotinda basusu bákolisa ezaleli yango. Tosengeli kosala makambo yango ya ntina mingi mpo tótosa etinda ya Yehova oyo esɛngi biso “tólanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka.” (Rom. 14:19) Makambo nini ya sikisiki tokoki kosala mpo na kosalisa basusu bábundisa likunya, mpe ndenge nini tokoki kolendisa kimya?

16. Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bábundisa likunya?

16 Bizaleli na biso mpe makambo oyo tosalaka ekoki kozala na bopusi makasi epai ya bato mosusu. Mokili elendisaka bato ‘bálakisa na lolendo biloko na bango ya kobikela.’ (1 Yoa. 2:16) Nzokande, ezaleli yango etindaka basusu bákóma na likunya. Mpo na koboya kotinda basusu bákóma na likunya, tosengeli te kolobela ntango nyonso biloko oyo tozali na yango to oyo tokani kosomba. Tokoboya mpe kotinda basusu bákóma na likunya soki tozali komitombola te mpo na mikumba oyo tozali na yango na lisangá. Soki tozali kobenda likebi mingi na mikumba na biso, yango ekoki kotinda basusu bákóma na likunya. Kasi, soki tozali kotyela basusu likebi na ndenge ya solo mpe tozali kondima makambo ya malamu oyo basalaka, tokosalisa bango básepela na oyo bazali na yango, mpe tokolendisa bomoko mpe kimya na kati ya lisangá.

17. Bandeko ya Yozefe balongaki kosala nini, mpe mpo na nini?

17 Tokoki kobundisa likunya mpe kolonga yango! Tótalela lisusu ndakisa ya bandeko ya Yozefe. Bambula mingi nsima ya konyokola Yozefe, bakutanaki na ye na Ezipito. Liboso Yozefe ayebisa bango ete azali ndeko na bango, atyaki bango na komekama mpo ayeba soki babongwani. Abongisaki ete bálya elongo mpe ntango bazalaki kolya, atyelaki leki na ye Benyamina likebi mingi koleka bango nyonso. (Eba. 43:33, 34) Kasi, eloko moko te emonisi ete bayaya ya Benyamina bayokelaki ye likunya. Bamonisaki nde ete bazalaki mpenza komitungisa mpo na leki na bango mpe mpo na tata na bango, Yakobo. (Eba. 44:30-34) Bandeko ya Yozefe balongaki kozongisa kimya na libota na bango mpo batikaki koyokela basusu likunya. (Eba. 45:4, 15) Ndenge moko mpe, soki tolongoli makanisi nyonso ya koyokela basusu likunya, tokosalisa mpo libota na biso mpe lisangá ezala ntango nyonso na kimya.

18. Na kotalela Yakobo 3:17, 18, nini ekomonana soki tosali ete kimya ezala na esika oyo tozali?

18 Yehova alingi ete tóbundisa likunya mpe tólanda kimya. Tosengeli kosala makasi tósala makambo yango nyonso mibale. Ndenge tomoni yango na lisolo oyo, ekoki kokómela biso nyonso tóyokela basusu likunya. (Yak. 4:5) Longola yango, tozali na mokili oyo bato balendisaka likunya. Kasi, soki tokolisi ezaleli ya komikitisa, ya kosepela na oyo tozali na yango mpe ya kotyela basusu likebi, tokoyokela basusu likunya te. Kasi, tokosala ete kimya ezala na esika oyo tozali mpe tokokolisa mbuma ya boyengebene.​—Tángá Yakobo 3:17, 18.

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

^ par. 5 Lisangá ya Yehova ezali ebongiseli ya kimya. Kasi, kimya yango ekoki kobeba soki tokómi koyokelana likunya. Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo ebimisaka likunya. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki kobundisa ezaleli yango ya mabe mpe ndenge ya kobatela kimya.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Ndenge emonisami na Biblia, likunya ekoki kotinda moto alula eloko oyo moto mosusu azali na yango, kasi aluka mpe ete moto yango azanga eloko yango.

^ par. 61 ELILINGI: Na ntango ya likita ya bankulutu, basɛngi ndeko moko ya mokóló oyo atambwisaka Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli alakisa nkulutu moko ya elenge ndenge ya kokokisa mokumba yango. Atako ndeko ya mokóló alingaka mokumba yango, andimi ekateli wana na motema moko, alakisi elenge yango ndenge ya kosala mpe apesi ye longonya oyo euti na motema.