Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 9

Tiká Yehova akitisa yo motema

Tiká Yehova akitisa yo motema

“Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa . . . ngai motema.”​—NZ. 94:19.

LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa

NA MOKUSE *

1. Nini ekoki kotungisa biso, mpe yango ekoki kotinda biso tókanisa nini?

ESILÁ kokóma ete likambo moko etungisa yo mingi mpenza? * Okoki komitungisa mpo oyokaki mpasi na makambo oyo moto moko alobaki to asalaki. Okoki mpe komitungisa mpo na makambo oyo yo moko olobaki to osalaki. Na ndakisa, mbala mosusu osalaki libunga, mpe ozali komituna soki mokolo mosusu Yehova akolimbisa yo. Likambo ya mabe koleka, okoki kokanisa ete lokola ozali komitungisa mingi, yango emonisi ete ozangi kondima, mpe ete ozali moto mabe. Kasi, yango ezali mpenza solo?

2. Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete soki moto azali komitungisa elakisi te ete azangi kondima?

2 Tótalela mwa bandakisa oyo Biblia elobeli. Hana, oyo na nsima abotaki mosakoli Samwele, azalaki mwasi ya kondima makasi. Atako bongo, akómaki komitungisa mingi ntango moto moko na libota na ye asalelaki ye makambo na boboto te. (1 Sa. 1:7) Ntoma Paulo azalaki na kondima makasi, kasi mbala mingi azalaki mpe na “mitungisi mpo na masangá nyonso.” (2 Ko. 11:28) Mokonzi Davidi azalaki na kondima makasi mpe yango esalaki ete Yehova alinga ye mpenza. (Mis. 13:22) Kasi, Davidi asalaki mabunga oyo etungisaki ye mingi mpenza. (Nz. 38:4) Yehova abɔndisaki mpe akitisaki mokomoko na bango motema. Tótala mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa na bango.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA HANA

3. Ndenge nini maloba ya basusu ekoki kotungisa biso?

3 Soki moto akateli biso lingala to asaleli biso makambo na boboto te, yango ekoki kotungisa biso. Ezalaka bongo mingimingi soki moto yango azali moninga to ndeko ya libota. Tokoki komitungisa ete boyokani na biso na moto yango ebeba. Ntango mosusu moto oyo azokisi biso alobi kozanga kokanisa, mpe toyoki lokola nde batye biso mopanga! (Mas. 12:18) To mpe moto akoki kutu kosalela na nko nyonso maloba oyo ayebi ete ekozokisa biso. Ndeko mwasi moko ya elenge akutanaki na mokakatano yango. Alobi boye: “Eleki mwa bambula, moto oyo nazalaki kokanisa ete azalaki moninga na ngai akómaki kopanza ngai nsango ya lokuta na nzela ya Internet. Nayokaki mpasi mpe namitungisaki. Nazalaki koyeba te ntina oyo azalaki kosala mabe ndenge wana.” Soki ekómelá yo ete moninga to ndeko ya libota azokisa yo, okoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Hana.

4. Makambo nini Hana asengelaki koyikela mpiko?

4 Hana azalaki na makambo oyo asengelaki koyikela mpiko. Na boumeli ya bambula mingi, azalaki kobota te. (1 Sa. 1:2) Na Yisraele ya kala, soki mwasi azali ekomba, bato bazalaki kokanisa ete alakelami mabe. Yango ezalaki likambo ya nsɔni mpo na mwasi. (Eba. 30:1, 2) Likambo ya mabe koleka mpo na Hana, mobali na ye azalaki na mwasi mosusu, Penina, oyo abotelaki ye bana ebele. Lisusu, Penina azalaki koyokela Hana zuwa mpe “atumolaki ye mingi mpenza mpo na kosilikisa ye.” (1 Sa. 1:6) Na ebandeli, Hana azalaki kokoka kokanga motema te. Azalaki mawamawa; “azalaki kolela mpe azalaki kolya te.” Mpe “molimo ya Hana ekómaki bololo.” (1 Sa. 1:7, 10) Nini ekitisaki Hana motema?

5. Ndenge nini libondeli esalisaki Hana?

5 Hana abondelaki Yehova mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo ezalaki kotungisa ye. Nsima ya kobondela, ayebisaki Nganga-nzambe monene Eli likambo na ye. Bongo, Eli alobaki na ye: “Kende na kimya, mpe tiká Nzambe ya Yisraele akokisela yo lilɔmbɔ na yo, oyo osɛngi ye.” Nini esalemaki na nsima? Hana “ asimbaki nzela akei, mpe alyaki, mpe elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.” (1 Sa. 1:17, 18) Libondeli esalisaki Hana azwa lisusu kimya.

Lokola Hana, ndenge nini tokoki kozwa lisusu kimya ya motema mpe kobatela yango? (Talá paragrafe 6-10)

6. Na oyo etali libondeli, mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Hana mpe na Bafilipi 4:6, 7?

6 Tokoki kozwa lisusu kimya soki tozali kotingama na mabondeli. Hana abondelaki Tata na ye ya likoló ntango molai. (1 Sa. 1:12) Ezali malamu tózwaka mpe ntango mpo na koyebisa Yehova makambo oyo ezali kotungisa biso, kobangisa biso, mpe mabunga na biso. Esɛngi te ete tóloba makambo nyonso na molɔngɔ lokola poɛmi. Na bantango mosusu, tokoki kutu kolela ntango tozali koyebisa Yehova mitungisi na biso. Atako bongo, Yehova akolɛmba te koyoka biso. Longola kobondela mpo na makambo na biso, tosengeli mpe kokanisa toli oyo ezali na Bafilipi 4:6, 7. (Tángá.) Paulo alobaki polele ete tosengeli kobondelaka mpo na kopesa Yehova matɔndi. Tozali na bantina mingi ya kopesa Yehova matɔndi. Na ndakisa, tokoki kopesa ye matɔndi mpo na likabo ya bomoi, mpo na biloko kitoko oyo akelá, mpo na boboto monene to bolingo na ye ya sembo, mpe mpo na elikya kitoko oyo apesi biso. Liteya mosusu nini tokoki kozwa na ndakisa ya Hana?

7. Hana ná mobali na ye bazalaki kosala nini mbala na mbala?

7 Atako makambo oyo Hana azalaki na yango, akobaki kokende mbala na mbala elongo na mobali na ye na esika ya losambo ya Yehova na Shilo. (1 Sa. 1:1-5) Ezalaki kuna na tabernakle nde Nganga-nzambe monene Eli alendisaki Hana mpe alobaki ete azali na elikya ete Yehova akoyanola na mabondeli na ye.​—1 Sa. 1:9, 17.

8. Ndenge nini makita ekoki kosalisa biso? Limbolá.

8 Tokoki kozwa lisusu kimya soki tokobi koyangana na makita ya lisangá. Mbala mingi, ndeko oyo asalaka libondeli ya ebandeli na makita na biso asɛngaka ete elimo ya Nzambe ezala na biso. Kimya ezali na kati ya mbuma ya elimo yango. (Gal. 5:22) Soki tozali koyangana na makita ata ntango tozali kotungisama, tozali kopesa Yehova mpe bandeko na biso libaku ya kolendisa biso mpe ya kosalisa biso tózwa lisusu kimya ya makanisi mpe ya motema. Libondeli mpe makita ezali makambo ya ntina mingi oyo Yehova asalelaka mpo na kokitisa biso motema. (Ebr. 10:24, 25) Tólobela liteya mosusu oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Hana.

9. Likambo nini ebongwanaki te mpo na Hana, kasi nini esalisaki ye?

9 Likambo oyo ezalaki kotungisa Hana esilaki mbala moko te. Ntango Hana autaki na tabernakle mpe azongaki, akobaki kofanda kaka na ndako moko na Penina. Mpe ata na esika moko te Biblia elobi ete ezaleli ya Penina ebongwanaki. Na yango, emonani ete Hana akobaki koyika mpiko na maloba mabe ya mbanda na ye. Kasi, Hana alongaki kozwa lisusu kimya ya motema mpe kobatela yango. Kobosana te ete nsima ya kotika likambo na ye na mabɔkɔ ya Yehova, Hana atikaki komitungisa koleka ndelo. Atikaki Yehova abɔndisa ye mpe akitisa ye motema. Eumelaki te, Hana azwaki lipamboli mpe abotaki bana na ye moko!​—1 Sa. 1:19, 20; 2:21.

10. Ndakisa ya Hana ezali koteya biso nini?

10 Tokoki kozwa lisusu kimya ata soki likambo oyo ezali kotungisa biso ezali kaka. Makambo mosusu esilaka mbala moko te, ata soki tobondeli na etingya mpe tozali koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, ndakisa ya Hana ezali koteya biso ete likambo moko te ekoki kopekisa Yehova akitisa biso motema. Yehova akobosana biso ata mokolo moko te, mpe nsukansuka akopesa biso mbano soki totikali sembo.​—Ebr. 11:6.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA NTOMA PAULO

11. Makambo nini ezalaki kotungisa Paulo?

11 Paulo azalaki na makambo mingi oyo ezalaki kotungisa ye. Na ndakisa, lokola azalaki kolinga bandeko na ye ya lisangá, mikakatano na bango ezalaki kotungisa ye mingi. (2 Ko. 2:4; 11:28) Lisusu, na mokumba na ye lokola ntoma, Paulo akutanaki na botɛmɛli ya banguna oyo babɛtaki ye mpe babwakaki ye na bolɔkɔ. Akutanaki mpe na makambo mosusu oyo etungisaki ye, na ndakisa “kozanga biloko.” (Flp. 4:12) Longola yango, lokola azindaki na masuwa na mai mbala misato to koleka na bomoi na ye, na ntembe te mbala nyonso oyo azalaki kosala mobembo na masuwa, azalaki komitungisa. (2 Ko. 11:23-27) Paulo asalaki nini mpo na mitungisi yango?

12. Nini ekitisaki mitungisi ya Paulo?

12 Paulo azalaki komitungisa ntango bandeko ya lisangá bakutani na mikakatano, kasi alukaki te kosilisa mikakatano yango kaka ye moko. Paulo azalaki na bopɔlɔ. Azwaki bibongiseli mpo bato mosusu básalisa lisangá yango. Na ndakisa, apesaki ndambo ya mikumba na ye epai ya mibali oyo akokaki kotyela motema, lokola Timote mpe Tito. Na ntembe te, mosala oyo bandeko yango basalaki ekitisaki mitungisi ya Paulo.​—Flp. 2:19, 20; Tito 1:1, 4, 5.

Ndenge ndakisa ya ntoma Paulo emonisi yango, tokoki kosala nini soki mitungisi elekeli biso? (Talá paragrafe 13-15)

13. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Paulo?

13 Sɛngá basusu básalisa yo. Ndenge moko na Paulo, lelo oyo, bankulutu mingi ya boboto bamitungisaka mpo na bandeko oyo bakutani na mikakatano. Kasi, nkulutu kaka moko akokoka te kosalisa bato nyonso na lisangá. Bopɔlɔ ekotinda ye akabola mikumba na ye na bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami mpe alakisa bandeko mibali ya bilenge ndenge oyo bakoki kosalisa ye na kobatela etonga ya Nzambe.​—2 Tim. 2:2.

14. Paulo amitungisaki te mpo na likambo nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?

14 Ndimá ete ozali na mposa basusu bábɔndisa yo. Paulo azalaki na komikitisa, yango wana alukaki ete baninga na ye bálendisa ye mpe andimaki lisalisi yango. Emonani ete amitungisaki te ete bato bakokanisa ete azali moto mpamba mpo andimaki ete basusu babɔndisaki ye. Na mokanda oyo akomelaki Filemo, Paulo alobaki: “Nazwaki esengo mingi mpe kobɔndisama mingi mpo na bolingo na yo.” (Flm. 7) Paulo atángaki nkombo ya bandeko mosusu ebele oyo balendisaki ye mingi na ntango ya mikakatano. (Kol. 4:7-11) Soki tozali na komikitisa mpe tondimi ete tozali na mposa ya kolendisama, bandeko na biso bakosepela kopesa biso lisalisi oyo tosengeli na yango.

15. Paulo asalaki nini mpo azwa libɔndisi na ntango ya mpasi?

15 Tyelá Liloba ya Nzambe motema. Paulo ayebaki ete Makomami ekobɔndisa ye. (Rom. 15:4) Ekopesa ye mpe bwanya ya koyika mpiko ata na komekama nini. (2 Tim. 3:15, 16) Ntango azalaki na bolɔkɔ na Roma mpo na mbala ya mibale, Paulo ayebaki ete mosika te akokufa. Na ntango wana ya mpasi, Paulo asalaki nini? Asɛngaki Timote aya nokinoki mpe amemela ye “barulo.” (2 Tim. 4:6, 7, 9, 13) Mpo na nini? Emonani ete barulo yango ezalaki biteni ya Makomami ya Ebre oyo Paulo akokaki kosalela na boyekoli na ye moko ya Biblia. Soki tomekoli Paulo mpe tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala, Yehova akosalela Makomami mpo na kokitisa biso motema, ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA MOKONZI DAVIDI

Ndenge ezalaki mpo na Mokonzi Davidi, nini ekoki kosalisa biso soki tosali libunga ya monene? (Talá paragrafe 16-19)

16. Makambo nini oyo Davidi asalaki ememelaki ye mitungisi?

16 Davidi asalaki likambo moko oyo etungisaki lisosoli na ye. Asalaki ekobo ná Bate-sheba, abomisaki mobali na ye, mpe abombaki masumu yango mpo na mwa ntango. (2 Sa. 12:9) Na ebandeli, Davidi ayokelaki lisosoli na ye te. Na yango, abebisaki boyokani na ye na Nzambe, mpe anyokwamaki na makanisi mpe na nzoto. (Nz. 32:3, 4) Nini esalisaki Davidi alongola mitungisi oyo akómaki na yango mpo na makambo oyo asalaki, mpe nini ekoki kosalisa biso soki tosali libunga moko monene?

17. Ndenge nini maloba ya Nzembo 51:1-4 emonisi ete Davidi abongolaki mpenza motema?

17 Bondelá mpo na kosɛnga bolimbisi. Nsukansuka, Davidi abondelaki Yehova. Abongolaki mpenza motema, mpe ayambolaki masumu na ye. (Tángá Nzembo 51:1-4.) Yango esalisaki ye azwa lisusu kimya mpe esengo! (Nz. 32:1, 2, 4, 5) Soki osali lisumu ya monene, koluka kobomba yango te. Kasi, yambolá lisumu na yo polele liboso ya Yehova na libondeli. Soki osali bongo, motema na yo ekokita mpo lisosoli ekotungisa yo lisusu te. Kasi, mpo ozongisa boninga na yo na Yehova, osengeli kosuka kaka te na kobondela.

18. Davidi asalaki nini na disiplini oyo azwaki?

18 Ndimá disiplini. Ntango Yehova atindaki mosakoli Natane abimisa polele lisumu ya Davidi, Davidi amilongisaki te, alukaki mpe te kokitisa lisumu oyo asalaki. Andimaki mbala moko ete asalaki lisumu kaka epai ya mobali ya Bate-sheba te, kasi, koleka nyonso, epai ya Yehova. Davidi andimaki disiplini ya Yehova, mpe Yehova alimbisaki ye. (2 Sa. 12:10-14) Soki tosali lisumu ya monene, tosengeli kosolola na bato oyo Yehova atye mpo na kokɛngɛla biso. (Yak. 5:14, 15) Mpe tosengeli kotɛmɛla mposa ya koluka komilongisa. Soki oumeli te mpo na kondima mpe kosalela disiplini nyonso oyo ozwi, ekoumela mpe te mpo ozwa lisusu kimya mpe esengo.

19. Ekateli nini tosengeli kozala na yango?

19 Zalá na ekateli ya kozongela te libunga moko mbala mibale. Mokonzi Davidi ayebaki ete mpo azongela lisumu moko te mbala na mbala, asengelaki na lisalisi ya Yehova. (Nz. 51:7, 10, 12) Ntango Yehova alimbisaki Davidi, na nsima Davidi azwaki ekateli ya koboya kokolisa makanisi ya mabe. Na ndenge yango, azwaki lisusu kimya ya motema.

20. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo Yehova alimbisi biso?

20 Tokomonisa ete tozali na botɔndi ndenge Yehova alimbisi biso soki tobondeli ye, tondimi disiplini, mpe tosali makasi tózongela te mabunga oyo tosalaki. Soki tosali makambo yango, tokozwa lisusu kimya ya motema. James, ndeko mobali moko oyo asalaki lisumu ya monene, amonaki ete ezali solo. Alobi boye: “Ntango nayambolaki lisumu na ngai epai ya bankulutu, nayokaki lokola kilo moko oyo ezalaki na mapeka na ngai elongwe. Na nsima, nakómaki kozwa lisusu kimya ya makanisi.” Ezali mpenza likambo ya kolendisa koyeba ete “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami”!​—Nz. 34:18.

21. Ndenge nini tokoki kotika Yehova akitisa biso motema?

21 Lokola tokómi na nsuka ya mikolo ya nsuka, emonani ete makambo oyo ekotungisa biso ekobakisama. Soki otungisami, koumela te koluka lisalisi ya Yehova. Yekolá Biblia na likebi. Landá ndakisa ya Hana, Paulo, mpe Davidi. Sɛngá Tata na yo ya likoló asalisa yo oyeba likambo oyo ezali kotungisa yo. (Nz. 139:23) Tikelá ye mikumba na yo, mingimingi oyo esilisi yo mayele to oyo okoki kosala eloko te mpo na yango. Soki osali bongo, okoki koyoka lokola mokomi ya nzembo oyo ayembelaki Yehova ete: “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa . . . ngai motema.”​—Nz. 94:19.

LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”

^ par. 5 Na bantango mosusu, biso nyonso tomitungisaka mpo tokutani na mikakatano. Lisolo oyo elobeli ndakisa ya basaleli misato ya Yehova ya ntango ya kala oyo batungisamaki mingi. Elobeli mpe ndenge oyo Yehova abɔndisaki bango mpe akitisaki mokomoko na bango motema.

^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: Komitungisa elimboli kozala motema likolólikoló mpe kokanisakanisa mingi. Tokoki komitungisa mpo tozali na mikakatano ya mbongo, maladi, makambo na libota, to mpe makambo mosusu. Tokoki mpe komitungisa mpo na mabunga oyo tosalá kala to mpo na mikakatano oyo tokanisi ete ekoki kokómela biso.