Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

“Biso oyo! Bótinda biso!”

“Biso oyo! Bótinda biso!”

OKANISAKA kokende kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na esika oyo mposa ezali mingi, mbala mosusu na mboka mopaya? Soki bongo, okoki kozwa makanisi ya malamu na lisolo ya Ndeko Jack Bergame ná mwasi na ye Marie-Line.

Bandeko yango bazali elongo na mosala ya ntango nyonso kobanda 1988. Bayebani lokola bato oyo bamesanaka noki na makambo ya sika. Lisusu, bandimi mikumba ebele na ekólo Guadeloupe mpe Guyane française. Lelo oyo, Betele ya France nde etambwisaka mosala na bikólo yango. Tiká tótuna Jack ná Marie-Line mwa mituna.

Nini etindaki bino bóbanda mosala ya ntango nyonso?

Marie-Line: Nakolá na Guadeloupe; ntango nazalaki mwana moke, mbala mingi nazalaki kosakola mokolo mobimba elongo na mama na ngai, oyo azalaki Motatoli ya molende. Nalingaka bato; yango wana ntango kaka nasilisaki kelasi na 1985, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela.

Jack: Na bomwana, nazalaki elongo na bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso mpe balingaki mpenza mosala ya kosakola. Soki tozwi konje na kelasi, nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na nsuka ya pɔsɔ, na bantango mosusu tozalaki kozwa bisi mpo na kokutana na babongisi-nzela mpe kosakola elongo na bango mokolo mobimba. Na nsima, tozalaki kokende na plage mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Nazalaki kosepela mpenza!

Mwa moke nsima ya kobalana na Marie-Line na 1988, nalobaki na nse ya motema ete: ‘Lokola tozali na mikumba te, tosengeli komipesa mingi na mosala ya kosakola!’ Nalandaki ndakisa ya Marie-Line mpe nakómaki mobongisi-nzela. Mbula moko na nsima, ntango tokɔtaki eteyelo ya babongisi-nzela, batyaki biso babongisi-nzela monene. Tosalaki na bateritware ebele ya malamu na Guadeloupe, na nsima basɛngaki biso tókende na Guyane française.

Bosali na bateritware ndenge na ndenge bambula ebele. Nini esalisaki bino bómesana na mbongwana?

Marie-Line: Bandeko ya Betele ya Guyane française bayebaki ete vɛrsɛ oyo tolingaka mingi ezali Yisaya 6:8. Na yango, soki babengi biso, mbala mingi bazalaki kobanda na kosala masɛki mpe koloba ete: “Bozali koyeba lisusu vɛrsɛ oyo bolingaka mingi?” Wana tozalaki koyeba ete balingi kotinda biso na teritware mosusu, mpe tozalaki koloba ete: “Biso oyo! Bótinda biso!”

Tozalaki kolinga te kokokanisa teritware ya sika ná teritware oyo touti, mpo yango ekokaki kopekisa biso tósepela na esika oyo tozali. Tozalaki mpe kosala makasi tómesana na bandeko.

Jack: Na kala, bandeko mosusu oyo bakanisaki ete balingi bolamu na biso bazalaki koyebisa biso tókende mboka mopaya te mpo balingaki tózala kaka na bango esika moko. Kasi, ntango totikaki Guadeloupe, ndeko mobali moko akundwelaki biso maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 13:38 ete: “Elanga ezali mokili.” Na yango, ntango batindi biso na teritware mosusu, tozalaki komikundwela ete tozali kaka kosala na elanga moko ata soki tozali wapi. Kutu, bato ya teritware nde baleki ntina!

Ntango tokómi na teritware moko ya sika, tomonaka ete bato basalaka makasi bázala na esengo. Na yango, biso mpe tomekaka kosala lokola bana-mboka oyo tokuti. Biloko ya kolya ekoki kozala ndenge mosusu, kasi tolyaka oyo bango balyaka mpe tomɛlaka oyo bango bamɛlaka, kasi tozwaka mwa bibongiseli mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Tosalaka makasi tólobaka malamu mpo na teritware nyonso oyo batindi biso.

Marie-Line: Toyekolaka mpe makambo mingi epai ya bandeko. Nazali koyeba lisusu mbala ya liboso oyo tokómaki na Guyane française. Mbula ezalaki kobɛta mingi, na yango tokanisaki ete tokozela tii mbula esila liboso tóbima mpo na kosakola. Kasi, ndeko mwasi moko atunaki ngai: “Tokoki kokende?” Nakamwaki mpe nalobaki: “Ndenge nini?” Ye alobaki: “Zwá parapluie, mpe tokokende na bavelo na biso.” Na yango, nayekolaki ndenge ya kokumba velo wana nasimbi parapluie. Soki nayekolaki kosala bongo te, nalingaki kokoka te kobima mosala ya kosakola na eleko ya mbula!

Bolongwá mbala 15 esika oyo bozalaki kofanda mpo na kokende na esika mosusu. Toli nini bokoki kopesa basusu na likambo yango?

Marie-Line: Kokende kofanda esika mosusu ekoki kozala mokakatano. Kasi ezali na ntina kozwa ndako oyo okomiyoka ete ozali epai na yo, ntango outi mosala ya kosakola mpe ozongi ndako.

Jack: Mbala mingi natyaka langi ya sika na ndako oyo tozwi. Soki bandeko ya Betele bayebi ete mbala mosusu tokoumela mingi te na teritware oyo batindi biso, na bantango mosusu bazalaki kosala masɛki mpe koloba ete: “Jack, komitungisa te mpo na kotya langi na mbala oyo!”

Marie-Line azali makasi na kokanga bisaka! Atyaka biloko nyonso na bakartɔ mpe na likoló na yango akomaka “kikoso,” “mbeto,” “makusa,” mpe bongo na bongo. Na yango, soki tokómi na ndako na biso ya sika, tokoki kotya kartɔ na kartɔ na esika na yango. Akomaka na papye eloko nyonso oyo atye na kartɔ mokomoko mpo tókoka kozwa yango mbala moko, na ntango oyo esengeli.

Marie-Line: Lokola toyekolaki kobongisa makambo malamu, yango ezalaki kosala ete tóbanda mosala ya kosakola mbala moko.

Bobongisaka ntango na bino ndenge nini mpo ‘bókokisa mosala na bino malamumalamu’?​—2 Tim. 4:5.

Marie-Line: Na mikolo ya yambo, topemaka mpe tobongisaka makita. Kobanda na mokolo ya mibale, tobimaka na mosala ya kosakola.

Jack: Atako bakatelá biso ngonga oyo tosengeli kokokisa, totyaka makanisi nyonso na ngonga te. Mosala ya kosakola nde eloko eleki ntina na bomoi na biso. Banda ntango tolongwe ndako tii ntango tokozonga, tosalaka makasi tósolola na moto nyonso oyo tokutani na ye.

Marie-Line: Na ndakisa, ntango tobimi mpo na kozwa mwa mopɛpɛ elongo na baninga, tozangaka te komema mwa batrakte. Bato mosusu bayaka epai na biso mpe basɛngaka biso mikanda, ata soki toyebisi bango te ete tozali Batatoli ya Yehova. Yango wana tokebaka na molato mpe na bizaleli na biso. Bato batyaka likebi na makambo ya ndenge wana.

Jack: Boboto na biso epai ya bato ya kartye epesaka mpe litatoli. Nalɔkɔtaka matiti, nabwakaka poubelle, mpe nakɔmbɔlaka elanga na rato na lopango na biso. Bato ya kartye bamonaka ndenge nazali kosala mpe na bantango mosusu batunaka: “Nakoki kozwa Biblia moko epai na yo?”

Mbala mingi bosalaki na bateritware oyo ezali mosika na engumba monene. Ezali na mibembo mosusu oyo etikalá na makanisi na bino?

Jack: Na Guyane, ezalaka mpasi kokóma na bateritware mosusu. Mbala mingi esɛngaka tósala kilomɛtrɛ 600 pɔsɔ mobimba na banzela ya mabemabe. Tobosanaka te mobembo oyo tokendaki na Saint-Élie, na zamba monene ya Amazone. Tosalaki bangonga ebele mpo na kokóma kuna; tosalelaki motuka oyo etambolaka ata na zamba mpe bwato ya motɛrɛ ya monene. Bato mingi kuna bazalaki kosala mosala ya koluka wolo. Mpo na komonisa botɔndi soki bazwi mikanda na biso, bato mosusu bazalaki kopesa mwa wolo lokola likabo! Na mpokwa, tozalaki kolakisa bango moko ya bavideo ya ebongiseli ya Yehova. Bato mingi ya mboka bazalaki koya.

Marie-Line: Mikolo eleki, basɛngaki Jack asala Ekaniseli na Camopi. Mpo na kokóma kuna, tosalaki mobembo ya ngonga minei na bwato ya motɛrɛ ya moke na Ebale Oyapock. Toyekolaki mpenza makambo mingi.

Jack: Ntango mai ya ebale ekiti, bisika oyo mabanga ezali, mai etíyolaka makasi, mpe ezalaka likama. Komona ndenge mai ezali kotíyola mbangu na mabanga yango ekamwisaka mpenza. Moto oyo azali kotambwisa bwato yango asengeli koyeba mosala na ye malamu. Kasi tosepelaki mingi na mobembo yango. Atako Batatoli bazalaki kaka 6, bato soki 50 bayanganaki na Ekaniseli, ata mpe bato ya Amerika oyo bautá na Inde!

Marie-Line: Bilenge oyo balingaka kosala mingi na mosala ya Yehova bakoki mpe kokutana na makambo ya esengo ndenge wana. Na ntango yango, esɛngaka kotyela Yehova motema, mpe kondima ekómaka makasi. Mbala mingi tomonaka lobɔkɔ ya Yehova.

Boyekoli koloba minɔkɔ ebele. Ezalaka pɛtɛɛ koyekola yango?

Jack: Ezalaka pɛtɛɛ te. Nayekolaki minɔkɔ yango mpo nasalisa esika oyo mposa ezali. Esɛngaki natambwisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Sranantongo * liboso kutu nasala ata botángi ya Biblia na monɔkɔ yango! Natunaki ndeko mobali moko soki bakangaki ntina ya makambo oyo nazalaki koloba. Ndeko yango alobaki: “Maloba mosusu oyo olobaki toyebi yango te, kasi ezalaki malamu mpenza.” Bana basalisaki ngai mingi. Soki nalobi mabe, bazalaki koyebisa ngai, kasi mikóló bazalaki kosala bongo te. Nayekolaki makambo mingi epai ya bana.

Marie-Line: Na teritware moko, nazalaki koyekola Biblia na bato na Français, Portugais, mpe Sranantongo. Ndeko mwasi moko ayebisaki ngai ete malamu nabandaka naino na bato ya monɔkɔ oyo eleki mpasi, mpe nasukisaka na bato ya monɔkɔ oyo nameseni na yango. Eumelaki te, namonaki ete likanisi na ye ebongaki mpenza.

Mokolo moko, nasengelaki koyekola Biblia na moto na monɔkɔ ya Sranantongo mpe mosusu na Portugais. Ntango nabandaki boyekoli na moto ya mibale, ndeko mwasi oyo tozalaki na ye alobaki, “Marie-Line, namoni lokola tozali na mokakatano!” Nasutukaki koyeba ete na esika naloba Portugais epai ya mwasi moko oyo azalaki moto ya Brésil, nazalaki nde koloba na ye na Sranantongo!

Bandeko oyo bosalá na bango elongo balingaka bino mingi. Nini esalisi bino bómesana mingi na bandeko?

Jack: Masese 11:25 elobi: “Molimo oyo ekabaka ekokóma mafutamafuta.” Tokakatanaka te mpo na kosalisa basusu. Na oyo etali kobongisa Ndako ya Bokonzi, bandeko mosusu balobaka na ngai: “Tiká basakoli básalaka yango.” Kasi, nazongisaka ete: “Ngai mpe nazali mosakoli. Na yango, soki mosala ezali, ngai mpe nakosala.” Atako na bantango mosusu tolingaka kozala kaka biso moko, mbala mingi tomikundwelaka ete ebongi te mposa yango epekisa biso kosalela basusu bolamu.

Marie-Line: Tosalaka makasi tótyela ndeko mokomoko likebi. Na ndenge yango, toyebaka ntango bazali koluka moto mpo asalisa bango na kokɛngɛla bana, to kokende kozwa bango na kelasi. Na ntango yango, tobongolaka mwa moke programɛ na biso mpo tósalisa bango. Yango nde esalaka ete tómesana na basusu mpo tozalaka ntango nyonso pene ya kosalisa bango ntango bazali na bosɛnga.

Mapamboli nini bozwi na ndenge bosali na bisika oyo mposa ezali mingi?

Jack: Mosala ya ntango nyonso ememeli biso mapamboli ebele. Mbala mingi, tozwaka libaku ya kotala biloko oyo Nzambe akelá, mpe tosepelaka na yango. Atako mwa kobanga ezalaka, tozalaka na kimya ya motema mpo toyebi ete bandeko na biso ya elimo bakosalisa biso esika nyonso oyo tokei.

Na bolenge, nakɔtaki bolɔkɔ na Guyane française mpo naboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Nandimaki te ete mokolo mosusu nakozonga kuna lokola misionɛrɛ mpe nakozwa ndingisa ya kokende kotala bato na bolɔkɔ mpo na koteya bango. Ya solo, Yehova apamboli mingi mpenza!

Marie-Line: Nayokaka esengo mingi ndenge namipesaka mpo na kosalisa basusu. Tozali na esengo ndenge tosalelaka Yehova. Esalisi biso mpe tózala na boyokani makasi na libala na biso. Na bantango mosusu, Jack atunaka ngai soki tokoki kobengisa babalani oyo balɛmbi nzoto mpo tólya elongo. Mbala mingi, nayanolaka ete: “Ngai mpe nazalaki kokanisa kaka bongo!” Esalemaka bongo mingi.

Jack: Mikolo eleki, bazwaki ngai na kanser ya prostate. Atako Marie-Line alingaka te naloba bongo, nalobaka na ye ete: “Mama, soki lobi nakufi, nakozala te moto oyo azalaki na ‘bomoi molai.’ Kasi, nakozala moto oyo azalaki na esengo, mpo nayebi ete bomoi na ngai etondaki na makambo ya elimo, oyo ezali makambo oyo eleki ntina.”​—Eba. 25:8.

Marie-Line: Yehova afungweli biso mpenza baporte ya likoló mpe apesi biso nzela ya kosala makambo oyo tokokaki kokanisa ata mokolo moko te. Bomoi na biso etondi mpenza na makambo ya malamu. Lokola totyeli Nzambe motema mobimba, esika nyonso oyo ebongiseli na ye esɛngi biso tókende, tokokende!

^ par. 32 Sranantongo esangisi Anglais, Néerlandais, Portugais, mpe minɔkɔ ya Afrika; baombo nde babandisaki yango.