Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 16

Koyoka mpe koyeba bandeko ekosalisa yo omitya na esika na bango

Koyoka mpe koyeba bandeko ekosalisa yo omitya na esika na bango

“Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá, kasi bósambisa na kosambisa ya sembo.”​—YOA. 7:24.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko

NA MOKUSE *

1. Likambo nini ya kolendisa Biblia elobi mpo na Yehova?

OKOSEPELA ete bato básambisa yo na kolanda loposo na yo, elongi na yo, to mpe bonene ya nzoto na yo? Na ntembe te, okosepela bongo te. Na yango, koyeba ete Yehova asambisaka biso te na kotalela ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato ezali mpenza likambo ya kolendisa! Na ndakisa, ntango mosakoli Samwele atalaki bana ya Yese, amonaki te eloko oyo Yehova azalaki komona. Yehova alobaki na Samwele ete moko ya bana ya Yese akokóma mokonzi ya Yisraele. Kasi mwana nini? Ntango Samwele amonaki Eliabe, mwana ya Yese ya liboso, alobaki boye: “Ya solo, moto ya Yehova oyo atyami mafuta ye oyo liboso na ye.” Eliabe azalaki engambe. “Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: ‘Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te, mpo ngai naboyi ye.’” Liteya ezali nini? Yehova abakisaki boye: “Moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.”​—1 Sa. 16:1, 6, 7.

2. Ndenge Yoane 7:24 emonisi yango, mpo na nini tosengeli te kosambisa moto na kolanda ndenge oyo azali komonana na libándá? Pesá ndakisa.

2 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mingi tolukaka kosambisa basusu na kotalela kaka ndenge oyo bazali komonana na libándá. (Tángá Yoane 7:24.) Nzokande, na kotalela kaka oyo miso na biso ezali komona, tokoyeba te makambo nyonso ya moto. Na ndakisa, ata monganga ya mayele mingi mpe oyo aumeli na mosala yango akoki koyeba maladi nyonso ya moto te soki asuki kaka na kotala ye. Asengeli koyoka na likebi mpo ayeba ndenge maladi yango ebandaki, kotalela mayoki ya moto yango mpe bilembo oyo azali komonisa. Monganga akoki kutu kosɛnga moto yango asala ekzamɛ ya scanner mpo na kotala kati ya nzoto na ye. Soki te, monganga akokanisela moto maladi oyo azali na yango te. Ndenge moko mpe, tokoyeba bandeko na biso malamu te soki tosuki kaka na kotala ndenge oyo tozali komona bango na libándá. Tosengeli koluka koyeba bizaleli na bango oyo ebombana, bomoto na bango ya kati. Lokola tokoki te kotánga na mitema ya basusu, tokokoka te koyeba basusu malamumalamu ndenge Yehova ayebi bango. Kasi tokoki kosala makasi mpo tómekola Yehova. Ndenge nini?

3. Ndenge nini masolo ya Biblia oyo ezali na lisolo oyo ekosalisa biso tómekola Yehova?

3 Ndenge nini Yehova asalelaka basaleli na ye makambo? Ayokaka bango. Atalelaka bomoi na bango ya kala mpe makambo oyo bazali kokutana na yango. Mpe amoniselaka bango motema mawa. Wana tozali koyekola ndenge oyo Yehova asalisaki Yona, Eliya, Agare, mpe Lota, tótala mpe ndenge oyo tokoki komekola Yehova na boyokani na biso na bandeko na biso bakristo.

YOKAKÁ NA LIKEBI

4. Mpo na nini tokoki kokanisela Yona mabe?

4 Soki totali kaka likambo oyo Yona asalaki, tokoki kokanisa ete azalaki moto ya kotyela motema te, to kutu azalaki sembo te. Yehova atindaki Yona akende kosakola nsango ya lisambisi na Ninive. Kasi na esika Yona atosa, amataki na masuwa moko oyo ezalaki kokende na ngámbo mosusu, “mpo alongwa liboso ya Yehova.” (Yona 1:1-3) Olingaki kopesa Yona libaku mosusu ya kokokisa mokumba na ye? Ntango mosusu te. Kasi, Yehova amonaki ete ebongi kopesa Yona libaku mosusu ya kotosa ye.​—Yona 3:1, 2

5. Maloba ya Yona oyo ezali na Yona 2:1, 2, 9 eteyi yo nini?

5 Yona amonisaki lolenge ya moto oyo azalaki mpenza na libondeli oyo asalaki ntango azalaki na kati ya libumu ya mbisi. (Tángá Yona 2:1, 2, 9.) Libondeli yango, oyo na ntembe te ezali moko ya mabondeli ebele oyo Yona asalaki, ezali kosalisa biso tómona ye te kaka moto oyo akimaki mokumba na ye. Maloba na ye emonisi ete azalaki na komikitisa, na botɔndi, mpe azalaki na ekateli ya kotosa Yehova. Tomoni ntina oyo Yehova atyaki libunga ya Yona mopanzi, ayanolaki na libondeli na ye, mpe akobaki kosalela ye lokola mosakoli!

Koyeba likambo malamu ekoki kosalisa biso tómitya na esika ya basusu (Talá paragrafe 6) *

6. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tóyoka basusu na likebi?

6 Mpo na koyoka basusu na likebi, tosengeli kozala na komikitisa mpe motema molai. Tosengeli kosala yango mpo na bantina ata misato. Ya liboso, tokokwea te na motambo ya kokanisela basusu mabe nokinoki. Ya mibale, tokoki kososola mayoki mpe makanisi ya ndeko na biso, mpe yango ekosalisa biso tómitya na esika na ye. Mpe ya misato, tokoki kosalisa ndeko amiyeba lisusu malamu. Na bantango mosusu, biso moko toyebaka mpenza mayoki oyo tozali na yango kaka ntango tobimisi yango na maloba. (Mas. 20:5) Nkulutu moko oyo afandaka na Azia alobi boye: “Na libaku moko, nasalaki libunga ya koloba liboso ya koyoka likambo mobimba. Nayebisaki ndeko mwasi moko ete asengelaki kobongisa ndenge na ye ya kopesa biyano na makita. Na nsima, nayaki koyeba ete ndeko yango ayebi kotánga malamu te mpe ete esɛngaka ye milende mingi mpo na kopesa eyano.” Ezali mpenza na ntina ete nkulutu nyonso alukaka ‘koyoka likambo’ liboso ya kopesa toli!​—Mas. 18:13.

7. Ndenge oyo Yehova asalelaki Eliya makambo ezali koteya biso nini?

7 Bandeko mosusu bakokaka te koyebisa basusu mitungisi na bango mpo na ndenge oyo babɔkwamá, mpo na bonkɔkɔ ya mboka na bango, to mpe bomoto na bango. Ndenge nini tokoki kosalisa bango mpo báfungwela biso mitema na bango? Kanisá ndenge oyo Yehova asalelaki Eliya makambo ntango azalaki kokima Yezabele. Elekaki mikolo mingi liboso Eliya ayebisa Tata na ye ya likoló ndenge oyo azalaki mpenza komiyoka. Yehova ayokaki Eliya na likebi. Na nsima, alendisaki ye mpe apesaki ye mosala moko ya ntina. (1 Bak. 19:1-18) Ekoki mpe kosɛnga ntango eleka liboso ete bandeko na biso bámona ete bakoki koyebisa biso ndenge oyo bazali komiyoka; mpe tokososola mpenza mayoki na bango kaka ntango bakoloba. Soki tomekoli Yehova mpe tozali na motema molai, bakoki kobanda kotyela biso motema. Mpe ntango balingi koyebisa biso ndenge oyo bazali komiyoka, tosengeli koyoka bango na likebi.

YEKOLÁ KOYEBA BANDEKO MALAMU

8. Na kotalela Ebandeli 16:7-13, ndenge nini Yehova asalisaki Agare?

8 Agare, oyo azalaki mosaleli ya Sarai, asalaki makambo na bozoba nsima ya kokóma mwasi ya Abrama. Ntango Agare akómaki na zemi, akómaki kotyola Sarai mpo azalaki na bana te. Likambo yango ekómaki mabe mpenza tii Sarai abenganaki Agare. (Eba. 16:4-6) Biso bato ya kozanga kokoka tokoki komona lokola ete Agare azalaki makambo mabe mpe azwaki oyo ebongaki na ye. Kasi, Yehova amonaki likambo mosusu epai ya Agare. Atindelaki ye anzelu moko. Ntango anzelu yango amonaki Agare, asalisaki ye abongola bizaleli na ye mpe apambolaki ye. Agare amonaki ete Yehova azalaki kotala ye mpe ayebaki makambo nyonso oyo akutanaki na yango. Yango etindaki ye aloba ete Yehova azali “Nzambe oyo amonaka, . . . ye oyo azali komona ngai.”​—Tángá Ebandeli 16:7-13.

9. Nzambe atalelaki nini na boyokani na ye ná Agare?

9 Yehova amonaki nini epai ya Agare? Ayebaki malamu bomoi ya Agare ya kala mpe makambo nyonso oyo akutanaki na yango. (Mas. 15:3) Agare azalaki Moezipito kasi azalaki kofanda na ndako ya Moebre. Ntango mosusu azalaki nde komiyoka lokola mwana-etike? Azalaki nde kokanisa libota na ye mpe mboka na bango? Lisusu, kaka ye moko te nde azalaki mwasi ya Abrama. Na eleko moko boye, mibali mosusu ya sembo bazalaki kobala basi ebele. Kasi, Yehova akanaki bongo te na ebandeli. (Mat. 19:4-6) Na yango, tokoki kokamwa te ndenge zuwa mpe koyinana ezalaki na mabota ya ndenge wana. Yehova asepelaki te ndenge Agare azangaki limemya epai ya Sarai, kasi tokoki kondima ete atalelaki bomoi ya Agare ya kala mpe makambo oyo azalaki kokutana na yango.

Luká koyeba bandeko malamu (Talá paragrafe 10-12) *

10. Tokoki kosala nini mpo tóyeba bandeko na biso malamu?

10 Tokoki komekola Yehova soki tosali makasi mpo tómesana na bandeko. Luká koyeba bandeko malamu. Sololáká na bango liboso mpe nsima ya makita, sakoláká elongo na bango, mpe soki likoki ezali, bengisá bango na ndako mpo bólya elongo. Ntango osali bongo, mbala mosusu okoyeba ete ndeko mwasi oyo omonaka ete akipaka bato te, azalaka nde nsɔninsɔni; ndeko mobali oyo okanisaka ete alingá biloko ya mokili, ayebi nde kokaba; to bato ya libota moko oyo mbala mingi bayaka retare na makita bazali nde kokutana na botɛmɛli. (Yobo 6:29) Ya solo, tosengeli te ‘komikɔtisa na makambo ya bato.’ (1 Tim. 5:13) Kasi, ezali malamu tóyeba mwa makambo oyo etali bandeko na biso mpe bomoi na bango. Yango ekosalisa biso tóyeba ntina oyo bakómá na bomoto oyo bazali na yango.

11. Mpo na nini ezali na ntina ete bankulutu báyeba malamu bandeko ya lisangá na bango?

11 Mingimingi bankulutu basengeli koyeba malamumalamu bomoi ya kala ya bandeko ya lisangá na bango. Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Artur, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga. Ye ná nkulutu mosusu bakendaki kotala ndeko mwasi moko oyo bazalaki komona ete azali nsɔninsɔni mpe akipaka bato te. Artur alobi boye: “Na masolo, toyebaki ete mobali na ye akufaki mwa bambula moke kaka nsima ya libala na bango. Atako mikakatano, abɔkɔlaki bana mibale ya basi tii asalisaki bango bálinga Yehova. Kasi sikoyo, miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, mpe akómaki konyokwama na makanisi. Atako bongo, azalaki kaka kolinga Yehova mpe kobatela makasi kondima na ye. Tomonaki ete tokokaki koyekola makambo mingi na ndakisa malamu ya ndeko mwasi yango.” (Flp. 2:3) Mokɛngɛli ya zongazonga wana alandaki ndakisa ya Yehova. Yehova ayebi basaleli na ye ya sembo mpe mpasi oyo bazali komona. (Kob. 3:7) Soki bankulutu bayebi bandeko malamu, bakosalisa bango mpe malamu.

12. Litomba nini ndeko mwasi Yip Yee azwaki ntango ayebaki malamu ndeko mwasi moko ya lisangá na bango?

12 Ntango oyekoli koyeba bomoi ya kala ya ndeko moko oyo apesaka yo nkanda, yango ekotinda yo obanda komitya na esika na ye. Tótalela ndakisa moko. Ndeko mwasi moko na nkombo Yip Yee oyo afandaka na Azia, alobi boye: “Ndeko mwasi moko ya lisangá na biso azalaki koloba kaka na mongongo makasi. Nazalaki komona ete azangi bonkonde. Kasi, ntango nasakolaki elongo na ye, nayebaki ete azalaki kosalisa baboti na ye na kotɛka mbisi na wenze. Amesanaki koloba na mongongo makasi mpo na kobenga bakiliya.” Yip Yee abakisi boye: “Namonaki ete mpo na komitya na esika ya bandeko, nasengeli koyeba bomoi na bango ya kala.” Esɛngaka kosala milende mpo na koyeba bandeko malamu. Atako bongo, ntango olandi toli ya Biblia oyo esɛngi biso tófungwama, okomekola Yehova, oyo alingaka “bato ya ndenge nyonso.”​—1 Tim. 2:3, 4; 2 Ko. 6:11-13.

MONISÁ MOTEMA MAWA

13. Na kotalela Ebandeli 19:15, 16, baanzelu basalaki nini ntango Lota azalaki koumela, mpe mpo na nini?

13 Na eleko moko ya ntina mingi na bomoi na ye, Lota amonisaki mwa bopɔtu mpo na kotosa malako ya Yehova. Baanzelu mibale bayaki epai ya Lota mpe bayebisaki ye abimisa libota na ye na Sodoma. Mpo na nini? Balobaki na ye: “Tozali kobebisa esika oyo.” (Eba. 19:12, 13) Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, Lota ná libota na ye babimaki kaka te. Na yango, baanzelu bakebisaki lisusu Lota. Kasi, “azalaki [kaka] koumela.” Tokoki kokanisa ete Lota azalaki mafumafu, to kutu motó makasi. Kasi, Yehova asundolaki ye te. Kutu, “mpo na motema mawa oyo Yehova amoniselaki ye,” baanzelu basimbaki bango na mabɔkɔ mpe babimisaki bango na engumba.​—Tángá Ebandeli 19:15, 16.

14. Ekoki kozala mpo na bantina nini Yehova amoniselaki Lota motema mawa?

14 Ekoki kozala na bantina mingi oyo etindaki Yehova amonisela Lota motema mawa. Mbala mosusu Lota azalaki kokakatana kobima nokinoki na ndako na ye mpo azalaki kobanga bato oyo bazalaki libándá ya engumba. Makama mosusu mpe ezalaki. Na ntembe te Lota ayebaki ete bakonzi mibale oyo bazalaki kokima bakweaki na mabulu ya gudrɔ na lobwaku moko oyo ezalaki mosika te. (Eba. 14:8-12) Lokola azalaki mpe na mwasi ná bana, na ntembe te amitungisaki mpo na bato ya libota na ye. Lisusu, lokola Lota azalaki na bozwi, mbala mosusu azalaki na ndako moko kitoko na Sodoma. (Eba. 13:5, 6) Ya solo, moko te na nyonso wana ezalaki ntina oyo ebongi mpo Lota aboya kotosa Yehova mbala moko. Kasi, Yehova atyaki mabunga ya Lota mopanzi mpe amonaki ye ete azali “moyengebene.”​—2 Pe. 2:7, 8.

Soki tozali koyoka basusu, tokoki koyeba ndenge ya komonisela bango motema mawa (Talá paragrafe 15-16) *

15. Na esika tósambisa moto mpo na makambo oyo asalaka, tosengeli kosala nini?

15 Na esika osambisa moto mpo na makambo oyo asalaka, salá makasi oyeba malamu ndenge oyo azali komiyoka. Yango nde ndeko mwasi moko ya Mpoto na nkombo Veronica asalaki. Alobi boye: “Ndeko mwasi moko azalaki komonana kaka nkandankanda mpe azalaki kokima bato. Na bantango mosusu nazalaki kobanga kosolisa ye. Kasi, nakanisaki boye: ‘Soki nazalaki na esika na ye, nalingaki kozala na mposa ya moninga.’ Na yango, nazwaki ekateli ya kotuna ye soki azali komiyoka ndenge nini. Na nsima, abandaki kofungwela ngai motema! Sikoyo nayebi ye malamu.”

16. Mpo na nini tosengeli kobondela Yehova asalisa biso tóyeba komitya na esika ya basusu?

16 Moto kaka moko oyo ayebi biso malamumalamu ezali Yehova. (Mas. 15:11) Yango wana, sɛngá ye asalisa yo omonaka basusu ndenge ye amonaka bango mpo oyeba ndenge ya komonisela bango motema mawa. Libondeli esalisaki ndeko mwasi moko na nkombo Anzhela ayeba komitya na esika ya basusu. Ndeko mwasi moko na lisangá na bango azalaki lisusu koyokana malamu te na bandeko ya lisangá. Anzhela alobi boye: “Ezalaki mpasi te kokwea na motambo ya koloba mabe mpo na ndeko yango mpe kotika kokipe ye. Kasi, nabondelaki Yehova asalisa ngai namitya na esika na ye.” Yehova ayanolaki libondeli ya Anzhela? Anzhela abakisi boye: “Tosakolaki elongo mpe na nsima tosololaki bangonga ebele. Namonisaki motema mawa mpe nayokaki ye na likebi. Sikoyo, nalingaka ye mingi, mpe nazali na ekateli ya kosalisa ye.”

17. Tosengeli kozala na ekateli nini?

17 Tosengeli te kopona bandeko oyo tokomonisela motema mawa. Ekoki kozala ete lokola Yona, Eliya, Agare, mpe Lota, bandeko mosusu bazali kokutana na mikakatano oyo bango moko bamilukeli. Kasi, ezali malamu tóbosana te ete ekómelaka biso nyonso tómilukela makambo. Yango wana, ezali malamu ndenge Yehova asɛngi biso tóyokelanaka mawa. (1 Pe. 3:8) Ntango totosi Yehova, tozali kokómisa makasi bomoko ya kokamwa oyo tozali na yango na libota ya bandeko na mokili mobimba. Yango wana, na boyokani na biso na basusu, tózala na ekateli ya koyokaka bango, koyeba bango malamu, mpe komonisa motema mawa.

LOYEMBO 87 Yaká kozwa makasi!

^ par. 5 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tolukaka mbala moko kosambisa basusu mpe kokanisela bango mabe. Nzokande, Yehova “amonaka ndenge motema ezali.” (1 Sa. 16:7) Na lisolo oyo, tokomona ndenge Yehova asalisaki Yona, Eliya, Agare, mpe Lota. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki komekola Yehova na ndenge oyo tosalelaka bandeko na biso ya lisangá makambo.

^ par. 52 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko moko ya mokóló ayoki nkanda mpo ndeko moko ya elenge ayei retare na makita, kasi na nsima ayoki ete ayaki retare mpo asalaki aksida ya motuka na nzela.

^ par. 54 NDIMBOLA YA BILILINGI: Mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola akanisaki ete ndeko mwasi moko azali na nkanda, kasi na nsima ayei koyeba ete ayokaki kaka nsɔni mpo azalaki na bato oyo ayebaki malamu te.

^ par. 56 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntango ndeko mwasi moko alekisi ntango na ndeko mosusu mpe ayebi ye malamu, amoni ete ndeko mwasi yango azalaki moto ya bipale te to ya nkandankanda, ndenge akanisaki ntango amonaki ye mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi.