Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 14

Etumba moko oyo euti na nɔrdi!

Etumba moko oyo euti na nɔrdi!

“Ekólo moko ekɔti na mokili na ngai.”​—YOE. 1:6.

LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga

NA MOKUSE *

1. Mayele nini Ndeko Russell ná baninga na ye basalelaki mpo na koyekola, mpe mpo na nini ezalaki mayele ya malamu?

ESALI sikoyo mbula koleka 100, Ndeko Charles Russell ná baninga na ye, mwa etuluku moko moke ya bayekoli ya Liloba ya Nzambe, bakómaki koyangana elongo. Bazalaki na mposa ya koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza na ntina etali Yehova Nzambe, Yesu Kristo, ndenge moto akómaka soki akufi, mpe lisiko. Mayele oyo basalelaki mpo na koyekola ezalaki mindɔndɔ te. Moko na bango azalaki kobimisa motuna moko, mpe na nsima bango nyonso bazalaki kotalela vɛrsɛ mokomoko oyo eyokani na likambo yango. Mpe nsima ya kosala bolukiluki, bazalaki kokoma makambo oyo bayekoli. Na lipamboli ya Yehova, bakristo yango oyo bazalaki koluka mpenza solo bayekolaki mateya mingi ya moboko oyo tolingaka tii lelo oyo.

2. Nini ekoki kosala ete tókende mopanzi ntango tozali komeka kokanga ntina ya esakweli moko ya Biblia?

2 Kasi eumelaki te, bayekoli yango ya Biblia bamonaki ete koyeba ndimbola ya esakweli moko ya Biblia ezalaka mpasi mingi koleka kokanga ntina ya liteya moko oyo ezali na Biblia. Mpo na nini? Ntina ya liboso ezali ete mbala mingi tokangaka malamu ntina ya bisakweli ya Biblia kaka ntango ezali kokokisama, to nsima ya kokokisama na yango. Kasi esuki wana te. Mpo na kokanga malamu ntina ya esakweli moko, mbala mingi esɛngaka mpe kotalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso to nsima na yango. Soki totaleli kaka eteni moko ya esakweli mpe totiki mosusu, tokoki kokende mopanzi. Lelo oyo, emonani ete esalemaki bongo mpo na esakweli moko oyo ezali na mokanda ya Yoele. Tótalela lisusu esakweli yango mpe tólobela ntina oyo boyebi na biso esengeli kosembolama.

3-4. Tii sikoyo, ndenge nini tolimbolaka esakweli oyo ezali na Yoele 2:7-9?

3 Tángá Yoele 2:7-9. Yoele asakolaki ete ebele ya mayoyo ekobebisa mokili ya Yisraele. Mayoyo yango oyo ezali na mino mpe mikuwa ya mbanga lokola ya nkɔsi ekolya nyonso oyo emoni! (Yoe. 1:4, 6) Banda bambula mingi, esakweli yango ezalaki kosalelama mpo na kolobela ndenge oyo basaleli ya Yehova bamipesaka na mosala ya kosakola, lokola liboke ya mayoyo oyo moto akoki kokanga te. Tozalaki komona ete mosala yango ebebisaka “mokili,” elingi koloba etungisaka bato oyo balandaka bakonzi ya mangomba. *

4 Soki tosuki kaka na kotánga Yoele 2:7-9, tokoki kokanisa ete ndimbola yango ebongi. Kasi, soki totaleli malamu bavɛrsɛ mosusu ya esakweli yango, tokomona ete ezali na ndimbola mosusu. Tólobela sikoyo ntina minei oyo ebongi boyebi na biso esembolama.

NTINA MINEI OYO EBONGI BOYEBI NA BISO ESEMBOLAMA

5-6. Motuna nini ebimi ntango totángi (a) Yoele 2:20? (b) Yoele 2:25?

5 Libosoliboso, talá elaka oyo Yehova apesaki mpo na ebele ya mayoyo yango: “Moto ya nɔrdi [elingi koloba mayoyo], nakolongola ye epai na bino.” (Yoe. 2:20) Soki mayoyo ezali komonisa Batatoli ya Yehova, oyo batosaka etinda ya Yesu ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli, ndenge nini Yehova alaka kolongola bango? (Ezk. 33:7-9; Mat. 28:19, 20) Ezali polele ete Yehova azali kolongola basaleli na ye ya sembo te, kasi nde eloko to moto mosusu oyo atɛmɛlaka basaleli na ye.

6 Ya mibale, tótalela makambo oyo ezali na Yoele 2:25. Kuna, Yehova alobi: “Nakofuta bino bambula oyo milona na bino elyamaki na liyoyo, liyoyo oyo emibendaka, oyo ezangá mapapu, mpɛsɛ ná mbinzo, limpinga monene ya basoda na ngai oyo natindaki kati na bino.” Simbá ete Yehova alaki ‘kofuta’ biloko nyonso oyo mayoyo ebebisi. Soki mayoyo ezali komonisa basakoli ya Bokonzi, yango elingi nde koloba ete nsango oyo basakolaka ebebisaka? Nzokande, toyebi ete nsango na bango oyo ebikisaka bomoi ekoki kutu kotinda bato mabe bábongola motema. (Ezk. 33:8, 19) Na yango, bazali mpenza lipamboli mpo na bato!

7. Na Yoele 2:28, 29, maloba “nsima na yango” ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo nini?

7 Tángá Yoele 2:28, 29. Tótalela ntina ya misato: Kolandana ya makambo oyo esakweli yango elobeli. Yehova alobi ete: “Nsima na yango, . . . nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai.” Nsima ya nini? Nsima ya ntango oyo mayoyo esilisi mosala oyo esengelaki kosala. Soki mayoyo ezali komonisa basakoli ya Bokonzi ya Nzambe, ndenge nini Yehova akoki kosopela bango elimo na ye na nsima, wana basilisi mosala ya kopesa litatoli? Nzokande, toyebi ete kozanga lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, bakokaki soki moke te kokoba kosakola na boumeli ya bambula ebele, atako botɛmɛli mpe bipekiseli oyo batyelaka mosala na bango.

Ndeko Joseph Rutherford ná bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki kokamba lisangá, basakolaki na mpiko bitumbu oyo Nzambe akateli mokili oyo mabe (Talá paragrafe 8)

8. Mayoyo oyo Emoniseli 9:1-11 elobeli ezali komonisa banani? (Talá elilingi ya ezipeli.)

8 Tángá Emoniseli 9:1-11. Tólobela sikoyo ntina ya minei. Liboso, tozalaki koyokanisa ebele ya mayoyo oyo esakweli ya Yoele elobeli na mosala ya kosakola mpo tozalaki kotalela esakweli moko oyo ekokani na yango, oyo ezali na mokanda ya Emoniseli. Esakweli ya Emoniseli elobeli ebele ya mayoyo oyo ezali na bilongi lokola bilongi ya bato mpe na mitó na yango “ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo.” (Em. 9:7) Mayoyo yango etungisaki “bato [banguna ya Nzambe] oyo bazali na elembo ya Nzambe na bilongi na bango te” na boumeli ya sanza mitano, eleko oyo ekokani na bomoi mobimba ya mayoyo. (Em. 9:4, 5) Emonani ete mayoyo oyo Emoniseli elobeli nde emonisi mpenza basaleli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo. Bazali kosakola na mpiko nyonso bitumbu oyo Nzambe akopesa ebongiseli oyo mabe, mpe bato na yango bazali kotungisama mpo na nsango yango.

9. Bokeseni nini ya makasi ezali kati na mayoyo oyo Yoele amonaki mpe oyo Yoane alobeli?

9 Ya solo, mwa bokokani ezali kati na esakweli ya Emoniseli mpe ya Yoele. Kasi, ezali mpe na bokeseni ya makasi. Na ndakisa: Na esakweli ya Yoele, mayoyo ebebisi milona. (Yoe. 1:4, 6, 7) Nzokande na emonaneli ya Yoane, bayebisi mayoyo “ebebisa te matiti ya mabele.” (Em. 9:4) Lisusu, mayoyo oyo Yoele amonaki eutaki na nɔrdi. (Yoe. 2:20) Kasi, oyo Yoane amonaki eutaki na libulu mozindo. (Em. 9:2, 3) Esakweli ya Yoele elobaki ete mayoyo elongolami. Na Emoniseli, mayoyo elongolami te, kasi batiki yango esilisa mosala oyo esengelaki kosala. Mpe esika moko te Biblia emonisi ete Yehova aboyaki yango.​—Talá etanda “ Bisakweli oyo elobeli mayoyo​—Ekokani kasi ekeseni mpenza.”

10. Pesá ndakisa mosusu ya Biblia oyo emonisi ete elilingi moko ekoki kozala na ndimbola ekeseni.

10 Bokeseni makasi oyo ezali kati na bisakweli yango mibale esalisi biso tómona ete ezali na boyokani te. Tolingi nde koloba ete mayoyo oyo Yoele amonaki ezali na ndimbola moko te na mayoyo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli? Ɛɛ. Na Biblia, ekómaka ete elilingi moko ezala na ndimbola ekeseni ntango basaleli yango na ndenge mosusu. Na ndakisa, na Emoniseli 5:5, Yesu abengami “Nkɔsi ya libota ya Yuda,” kasi na 1 Petro 5:8, Zabolo abengami “nkɔsi oyo ezali koganga.” Na kotalela mituna oyo ebimi nsima ya kotalela bantina oyo boyebi na biso esembolami, tosengeli koluka ndimbola mosusu mpo na esakweli ya Yoele. Ekoki kozala nini?

ESAKWELI YANGO ELIMBOLI NINI?

11. Makambo nini oyo Yoele 1:6 mpe 2:1, 8, 11 elobi, ezali kosalisa biso tóyeba soki mayoyo ezali banani?

11 Boyekoli mozindo ya esakweli ya Yoele mpe ya bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga na yango emonisi ete mosakoli yango azalaki kolobela limpinga ya basoda oyo bayei etumba. (Yoe. 1:6; 2:1, 8, 11) Yehova alobaki ete akosalela “limpinga monene ya basoda” na ye (elingi koloba basoda ya Babilone) mpo na kopesa Bayisraele oyo bazangaki botosi etumbu. (Yoe. 2:25) Limpinga yango ya basoda ebongi mpenza kobengama “moto ya nɔrdi” mpo bato ya Babilone bakɔtelaki Yisraele na ngámbo ya nɔrdi. (Yoe. 2:20) Limpinga yango ezali lokola ebele ya mayoyo oyo ebongisami malamu. Yoele alobi mpo na yango ete: “Bazali se kokende ndenge [soda] atambolaka. . . . Bazali kosopana na engumba. Bazali kokima mbangu na efelo. Bazali komata na bandako. Bazali kokɔta lokola moyibi na maninisa.” (Yoe. 2:8, 9) Meká komona yango na makanisi! Basoda bazali bisika nyonso. Esika ya kobombana ezali te. Moto te akoki kokima mopanga ya basoda ya Babilone!

12. Ndenge nini esakweli ya Yoele oyo elobeli mayoyo ekokisamaki?

12 Lokola mayoyo, bato ya Babilone (to, Bakaladea) bakɔtelaki engumba Yerusaleme na 607 L.T.B. Biblia elobi boye: “Mokonzi ya Bakaladea, oyo abandaki koboma na mopanga . . . ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te. [Nzambe] apesaki eloko nyonso na lobɔkɔ na ye. Mpe abandaki kotumba ndako ya Nzambe ya solo mpe kobuka efelo ya Yerusaleme; mpe batumbaki na mɔtɔ bandako milai na yango nyonso ya kofanda, bakisa mpe biloko na yango nyonso ya kitoko, kino babebisaki eloko nyonso.” (2 Nt. 36:17, 19) Ntango bato ya Babilone basilisaki kobebisa mokili yango, bato bakokaki kaka koloba ete: “Etikali mpamba, moto azali te mpe nyama ya mboka azali te. Epesami na lobɔkɔ ya Bakaladea.”​—Yir. 32:43.

13. Maloba ya Yirimia 16:16, 18 elimboli nini?

13 Mbula soki 200 nsima ya esakweli ya Yoele, Yehova asalelaki Yirimia mpo asakola likambo mosusu oyo etali koya ya limpinga yango. Alobaki ete bato oyo bayei etumba bakoluka malamumalamu Bayisraele oyo bamipesaki na makambo ya mabe mpe bakokanga bango nyonso. Yehova alobaki boye: “‘Talá nazali kotinda báluka baluki-mbisi ebele, . . . bongo bakoluka bango ndenge balukaka mbisi mpe bakokanga bango; mpe na nsima nakotinda báluka babomi-nyama ebele, bongo bakoluka bango ndenge balukaka nyama na ngomba nyonso mpe na ngomba nyonso ya moke mpe na madusu ya mabanga. . . . Nakopesa bango lifuti mobimba ya libunga na bango mpe ya lisumu na bango.’” Ezala bibale to zamba ekokoka te kobomba Bayisraele oyo baboyi kobongola motema mpo bato ya Babilone bázwa bango te.​—Yir. 16:16, 18.

KOBONGISA MAKAMBO

14. Ntango nini Yoele 2:28, 29 ekokisamaki?

14 Yoele asakolaki mpe ete makambo ekobonga. Alobaki ete mokili ekobota lisusu mbuma. (Yoe. 2:23-26) Na nsima, na eleko moko na mikolo oyo ezali koya, ekozala na ebele ya bilei ya elimo. Yehova alobaki: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola . . . Ata mpe basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi, nakosopela bango elimo na ngai na mikolo yango.” (Yoe. 2:28, 29) Kosopama yango ya elimo ya Nzambe esalemaki mbala moko te ntango Bayisraele bazongaki na mokili na bango nsima ya kolongwa na boombo na Babilone. Kasi, likambo yango esalemaki bankama ya bambula na nsima, na Pantekote ya mobu 33 T.B. Ndenge nini toyebi yango?

15. Na kotalela Misala 2:16, 17, mbongwana nini Petro asalaki na maloba ya Yoele 2:28, mpe yango emonisi nini?

15 Elimo ya Nzambe etindaki ntoma Petro amonisa ete Yoele 2:28, 29 ekokisamaki ntango likambo moko ya kokamwa esalemaki na mokolo ya Pantekote. Na ngonga soki ya libwa na ntɔngɔ ya mokolo yango, elimo santu ekitelaki bato na ndenge ya likamwisi mpe etindaki baoyo bazwaki yango bábanda koloba “makambo minene ya Nzambe” na minɔkɔ ndenge na ndenge. (Mis. 2:11) Na litambwisi ya elimo santu, ntoma Petro asalelaki maloba oyo ekeseni mwa moke ntango azongelaki esakweli ya Yoele. Oyebi mbongwana oyo Petro akɔtisaki? (Tángá Misala 2:16, 17.) Ntango abandaki kozongela maloba ya esakweli ya Yoele, na esika asalela maloba “nsima na yango,” Petro alobaki nde: “Mpe na mikolo ya nsuka.” Elingi koloba na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda liboso Yerusaleme mpe tempelo na yango ebebisama, elimo ya Nzambe ekosopama na “bato ya ndenge nyonso.” Yango emonisi ete ntango mingi elekaki liboso ete eteni yango ya esakweli ya Yoele ekokisama.

16. Elimo ya Nzambe esalaki nini na mosala ya kosakola na siɛklɛ ya liboso, mpe ezali kosala nini lelo?

16 Ezalaki nsima ya kosopama ya elimo ya Nzambe na siɛklɛ ya liboso nde mosala ya kosakola ebandaki kokóma monene mpenza. Ntango ntoma Paulo akomaki mokanda na ye epai ya Bakolose, na mobu soki 61 T.B, alobaki ete nsango malamu esakolami “na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Yango elimboli ete mosala ya kosakola ekómaki bisika nyonso oyo basakoli bakokaki kokóma. Na lisalisi ya nguya ya elimo santu ya Yehova, mosala ya kosakola ekómi lisusu monene koleka na mikolo na biso, ekómi “tii na nsuka ya mabele!”​—Mis. 13:47; talá etanda ‘ Nakosopa elimo na ngai.’

LIKAMBO NINI EBONGWANI?

17. Likambo nini ebongwani na boyebi na biso ya esakweli ya Yoele oyo elobeli mayoyo?

17 Likambo nini ebongwani? Sikoyo, tokangi malamu ntina ya esakweli oyo ezali na Yoele 2:7-9. Na mokuse, bavɛrsɛ yango elobeli molende na biso na mosala ya kosakola te, kasi elobeli nde mosala oyo basoda ya Babilone basalaki ntango bakɔtelaki Yerusaleme na mobu 607 L.T.B.

18. Likambo nini ebongwani te mpo na basaleli ya Yehova?

18 Likambo nini ebongwani te? Molende ya basaleli ya Yehova na mosala ya kosakola. Tozali kokoba kosakola nsango malamu bipai nyonso, mpe kosalela mayele nyonso oyo ekoki. (Mat. 24:14) Epekiseli ya guvɛrnema moko te ekoki kosala ete tótika mosala ya kosakola. Mpe na lipamboli ya Yehova, tozali kokoba se kokoba kosakola na mpiko nyonso nsango malamu ya Bokonzi! Na komitikisa nyonso, tozali kokoba koluka litambwisi ya Yehova mpo tókanga ntina ya bisakweli ya Biblia, na elikya ete na ntango oyo ebongi, akokamba biso “na kati ya solo nyonso”!​—Yoa. 16:13.

LOYEMBO 97 Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe

^ par. 5 Banda bambula mingi, tondimaka ete esakweli oyo ezali na Yoele mokapo 1 mpe 2 elobelaki mosala ya kosakola na mikolo na biso. Nzokande, ezali na bantina minei oyo emonisi ete boyebi na biso ya eteni yango ya esakweli ya Yoele esengeli kosembolama. Bantina yango ezali nini?

^ par. 3 Na ndakisa, talá lisolo “Bwanya ya Yehova emonanaka na biloko oyo akelá” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2009, par. 14-16.