Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 20

Nani nde “mokonzi ya nɔrdi” lelo oyo?

Nani nde “mokonzi ya nɔrdi” lelo oyo?

“Akoya tii na nsuka na ye, mpe akozala na mosungi te.”​—DAN. 11:45.

LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga

NA MOKUSE *

1-2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

TOZALI na makambo mingi oyo endimisi biso ete tozali na nsuka ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Mosika te, Yehova ná Yesu Kristo bakobebisa baguvɛrnema nyonso oyo etɛmɛlaka Bokonzi ya Nzambe. Liboso ete likambo yango esalema, mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bakokoba kowelana mpe kobundisa basaleli ya Nzambe.

2 Na lisolo oyo, tokolobela esakweli oyo ezali na Danyele 11:40–12:1. Tokoyeba nani azali mokonzi ya nɔrdi ya lelo oyo, mpe tokolobela ntina oyo tosengeli kozala motema ya kokita mpe kotya motema ete Yehova akobikisa biso ata soki makambo nini ekómeli biso.

MOKONZI YA NƆRDI LELO OYO

3-4. Nani nde mokonzi ya nɔrdi lelo oyo? Limbolá.

3 Nsima ya kokwea ya Union soviétique na 1991, basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na ekólo yango ya monene​—bazwaki bonsomi mpo na mwa ntango. Esakweli ya Danyele ebengi yango “lisalisi moko ya moke.” (Dan. 11:34) Na yango, bakómaki kosakola na bonsomi nyonso. Mpe eumelaki te, basakoli bakómaki ebele mpenza na bikólo yango oyo ezalaki liboso na Union soviétique. Kasi nsima ya mwa bambula, Russie ná bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ekómaki mokonzi ya nɔrdi. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, mpo guvɛrnema moko ezala mokonzi ya nɔrdi to mokonzi ya sudi esengeli kokokisa makambo misato oyo elandi: (1) Esengeli kobundisa basaleli ya Nzambe, (2) esengeli komonisa na misala na yango ete ezali monguna ya Yehova mpe ya basaleli na ye, mpe (3) esengeli kowelana na mokonzi mosusu.

4 Tótalela ntina oyo tolobi ete Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ nde mokonzi ya nɔrdi ya lelo oyo. (1) Ebundisaka basaleli ya Nzambe na ndenge epekisaka mosala ya kosakola mpe enyokolaka ebele ya bandeko basi mpe mibali oyo bafandaka na bikólo yango. (2) Makambo yango emonisi ete eyinaka Yehova mpe basaleli na ye. (3) Ewelanaka na mokonzi ya sudi, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain. Tótala ndenge Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ, ekokisi mokumba ya mokonzi ya nɔrdi.

MOKONZI YA NƆRDI MPE MOKONZI YA SUDI BAZALI KOWELANA

5. Danyele 11:40-43 elobeli eleko nini, mpe makambo nini esalemi na eleko yango?

5 Tángá Danyele 11:40-43. Eteni ya esakweli yango elobeli na mokuse makambo oyo ekosalema na ntango ya nsuka. Elobeli kowelana kati na mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi. Ndenge Danyele asakolaki yango, na ntango ya nsuka, mokonzi ya sudi “akotindikana” ná mokonzi ya nɔrdi.​—Dan. 11:40.

6. Nini endimisi biso ete mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bazali kowelana?

6 Mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bazali kokoba kowelana mpo mokomoko azali na mposa ya kozala na bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Na ndakisa, tótalela makambo oyo esalemaki nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntango Union soviétique ekómaki koyangela bikólo mingi na Mpoto. Mokonzi ya sudi ayokanaki na bikólo mosusu mpo esangisa mampinga na yango mpo na kobundisa mokonzi ya nɔrdi. Ebongiseli yango ebengamaki OTAN (Organisation du traité de l’Atlantique Nord). Mokonzi ya nɔrdi ná mokonzi ya sudi babimisaki mbongo mingi mpo na koluka kokóma na mampinga ya basoda oyo eleki na nguya na mokili mobimba. Mokonzi ya nɔrdi mpe ya sudi babundaka mpe na ndenge mosusu. Mokonzi ya nɔrdi apesaka banguna ya mokonzi ya sudi mabɔkɔ, ezala na Afrika, na Azia mpe na Amérique latine. Mokonzi ya sudi mpe asalaka bongo. Na bambula oyo eleki, Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ekómi na nguya mingi na mokili mobimba. Bazali mpe kobundisa mokonzi ya sudi na nzela ya baprogramɛ ya baordinatɛrɛ. Bakonzi yango bazali mpe kofundana ete mokomoko azali kosalela baprogramɛ yango na mokano ya kobebisa nkita mpe ebongiseli ya politiki ya moninga. Ndenge Danyele asakolaki yango, mokonzi ya nɔrdi azali kokoba kobundisa basaleli ya Nzambe.​—Dan. 11:41.

MOKONZI YA NƆRDI AKƆTI NA “MOKILI KITOKO”

7. “Mokili kitoko” ezali nini?

7 Danyele 11:41 elobi ete mokonzi ya nɔrdi akokɔta na “mokili kitoko.” Mokili yango ezali nini? Na ntango ya kala, ekólo Yisraele nde ezalaki mokili oyo “elekaki mikili nyonso na kitoko.” (Ezk. 20:6) Kasi, eloko esalaki ete ekólo yango ezala na ntina mingi ezali mpo kaka kuna nde bato bazalaki kosambela Yehova. Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., esika moko te awa na mabele ezalaki kobengama “mokili kitoko.” Ezali bongo mpo lelo oyo, basaleli ya Yehova bafandi na mokili mobimba. Na yango, “mokili kitoko” ezali bibongiseli nyonso ya elimo ya basaleli ya Nzambe, na ndakisa makita mpe mosala ya kosakola.

8. Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi akɔtaki na “mokili kitoko?”

8 Na boumeli ya mikolo ya nsuka, mokonzi ya nɔrdi akɔti mbala mingi na “mokili kitoko.” Na ndakisa, ntango Allemagne ezalaki mokonzi ya nɔrdi, mingimingi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ekɔtaki na “mokili kitoko” na ndenge enyokolaki mpe ebomaki basaleli ya Nzambe. Ntango Union soviétique ekómaki mokonzi ya nɔrdi nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ekɔtaki na “mokili kitoko” na ndenge enyokolaki basaleli ya Nzambe mpe etindaki bango bakangami na bikólo mosusu.

9. Na bambula oyo euti koleka, ndenge nini Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ekɔtaki na “mokili kitoko?”

9 Na bambula oyo euti koleka, Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ekɔtaki na “mokili kitoko.” Na ndenge nini? Na 2017, Russie epekisaki mosala ya basaleli ya Yehova mpe ekɔtisaki bandeko na biso mosusu ya basi mpe ya mibali na bolɔkɔ. Epekisaki mpe mikanda na biso ata mpe Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Longola yango, ebɔtɔlaki Betele ya Russie, ezala Bandako ya Bokonzi mpe ya mayangani. Nsima ya makambo yango, na 2018, Lisangani ya Mikóló-Bakambi elobaki ete Russie mpe bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ nde mokonzi ya nɔrdi. Nzokande, atako bazali konyokola bango makasi, basaleli ya Yehova baboyaka kotomboka to koluka kobongola guvɛrnema moko. Kasi balandaka toli ya Biblia oyo esɛngi kobondela mpo na bakonzi mpe “baoyo nyonso bazali na bibonga minene,” mingimingi ntango baguvɛrnema yango ezali kozwa bikateli oyo ekoki kosala ete tósambela Yehova na bonsomi te.​—1 Tim. 2:1, 2.

MOKONZI YA NƆRDI AKOLONGA MOKONZI YA SUDI?

10. Mokonzi ya nɔrdi akolonga mokonzi ya sudi? Limbolá.

10 Esakweli oyo ezali na Danyele 11:40-45, elobeli mingimingi makambo oyo mokonzi ya nɔrdi akosala. Yango elingi nde koloba ete akolonga mokonzi ya sudi? Te. Mokonzi ya sudi akozala na “bomoi” ntango Yehova mpe Yesu bakobebisa baguvɛrnema nyonso ya bato na etumba ya Armagedone. (Em. 19:20) Nini endimisi biso yango? Tótalela makambo oyo esakweli ya Danyele mpe mokanda ya Emoniseli elobi.

Na etumba ya Armagedone, Bokonzi ya Nzambe, oyo ekokanisami na libanga, ekosukisa boyangeli ya bato, oyo emonisami na ekeko monene (Taláparagrafe 11)

11. Danyele 2:43-45 elobeli makambo nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)

11 Tángá Danyele 2:43-45. Mosakoli Danyele alobeli kolandana ya baguvɛrnema oyo ezalaki na bopusi likoló ya basaleli ya Nzambe. Baguvɛrnema yango eyangelaki na bileko ekeseni mpe emonisami na biteni ndenge na ndenge ya ekeko moko monene. Makolo ya ekeko yango esalemi na ebende oyo esangani na mabele ya lima. Yango emonisi guvɛrnema ya nsuka, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain. Esakweli yango emonisi ete ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya mpo na kotuta mpe kosukisa baguvɛrnema ya bato, ekokuta bokonzi ya Anglo-américain ezali koyangela.

12. Motó ya nsambo ya nyama mabe emonisi nini, mpe mpo na nini ezali na ntina tóyeba yango?

12 Ntoma Yoane mpe alobeli kolandana ya baguvɛrnema ya bato oyo eyangelaki bikólo oyo basaleli mingi ya Yehova bazalaki kofanda. Yoane amonaki nyama mabe moko ya mitó nsambo oyo ezalaki elilingi ya baguvɛrnema yango. Motó ya nsambo ya nyama yango emonisi bokonzi ya Anglo-américain. Ezali na ntina koyeba yango mpo ezali na motó mosusu te oyo ekobima na nsima. Motó yango ya nsambo ekokoba koyangela tii ntango Kristo mpe mampinga ya likoló bakobebisa yango elongo na nyama mabe. *​—Em. 13:1, 2; 17:13, 14.

MOSIKA TE MOKONZI YA NƆRDI AKOSALA NINI?

13-14. “Goge ya mokili ya Magoge” ezali nani, mpe nini ekoki kotinda ye abundisa basaleli ya Nzambe?

13 Ezekiele asakolaki makambo oyo ekoki kosalema liboso ete mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi bábebisama. Emonani ete bisakweli oyo ezali na Ezekiele 38:10-23; Danyele 2:43-45; 11:44–12:1; mpe na Emoniseli 16:13-16, 21 ezali kolobela kaka likambo moko. Soki ezali bongo, tokoki kokanisa ete makambo ekosalema ndenge emonisami na baparagrafe oyo elandi.

14 Mwa moke nsima ya kobanda ya bolɔzi monene, “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakosangana mpo na kosala etuluku moko. (Em. 16:13, 14; 19:19) Biblia ebengi etuluku yango “Goge ya mokili ya Magoge.” (Ezk. 38:2) Etuluku yango ekobundisa basaleli ya Yehova mpe ekoluka kosilisa bango nyonso mpo na libela. Nini ekotinda etuluku yango ebundisa basaleli ya Yehova? Mpo na kolobela makambo oyo ekosalema na ntango yango, ntoma Yoane amonaki mbula ya mabanga minene ekiteli banguna ya Nzambe. Mbula ya mabanga yango ya elilingi ekoki kozala nsango ya etumbu oyo basaleli ya Yehova bakosakola. Ekoki kozala ete nsango ya etumbu yango nde ekotinda Goge ya mokili ya Magoge eluka kobundisa basaleli ya Yehova na mokano ya kosilisa bango mpo na libela.​—Em. 16:21.

15-16. (a) Ekoki kozala ete Danyele 11:44, 45 ezali kolobela makambo nini? (b) Nini ekokómela mokonzi ya nɔrdi elongo na bikólo mosusu oyo esali Goge ya mokili ya Magoge?

15 Ekoki kozala ete nsango ya bitumbu, mpe etumba oyo banguna bakobundisa basaleli ya Nzambe ezali kaka likambo moko oyo elobelami na Danyele 11:44, 45. (Tángá.) Na bavɛrsɛ yango, Danyele alobi ete “bansango oyo euti epai moi ebimaka mpe na nɔrdi” ekobulunganisa mokonzi ya nɔrdi mpe akobima mpenza na “nkanda makasi.” Mokano na ye ezali ya “kobebisa bato ebele.” “Bato ebele” yango ekoki kozala basaleli ya Yehova. * Ekoki kozala ete na vɛrsɛ yango Danyele azali kolobela ndenge oyo mokonzi ya nɔrdi akobundisa basaleli ya Nzambe mpo na mbala ya nsuka.

16 Ntango mokonzi ya nɔrdi ná baguvernɛma mosusu ekobundisa basaleli ya Nzambe, yango ekopesa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nkanda makasi, mpe ekosala ete etumba ya Armagedone ebanda. (Em. 16:14, 16) Na ntango yango, mokonzi ya nɔrdi elongo na etuluku ya bikólo mosusu oyo ekosangana, bakobebisama, mpe bakozala na “mosungi te.”​—Dan. 11:45.

Na etumba ya Armagedone, Yesu Kristo ná mampinga na ye ya likoló, bakobebisa mokili mabe ya Satana mpe bakobikisa basaleli ya Nzambe (Talá paragrafe 17)

17. Mikaele “nkumu monene” oyo Danyele 12:1 elobeli ezali nani, mpe asali nini?

17 Vɛrsɛ oyo elandi na lisolo ya Danyele, elobeli makambo mingi oyo emonisi ndenge mokonzi ya nɔrdi mpe baguvɛrnema oyo epesaka ye mabɔkɔ bakobebisama, mpe ndenge oyo tokobikisama. (Tángá Danyele 12:1.) Vɛrsɛ yango elimboli mpenza nini? Mikaele ezali nkombo mosusu ya Kristo Yesu, mokonzi na biso oyo azali koyangela. ‘Atɛlɛmi mpo na bolamu’ ya bato ya Nzambe kobanda 1914 ntango akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Mosika te, “akotɛlɛma” to akoboma banguna na ye na etumba ya Armagedone. Etumba yango nde ekozala likambo ya nsuka ya eleko oyo Danyele abengi “ntango moko ya mpasi mpenza” na lisolo ya bato. Esakweli ya Yoane oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ebengi eleko yango “bolɔzi monene.”​—Em. 6:2; 7:14.

NKOMBO NA YO “EKOKOMAMA NA BUKU”?

18. Mpo na nini tokoki kozala motema ya kokita ata soki likambo nini esalemi na mikolo ezali koya?

18 Danyele mpe Yoane balobi ete Yehova ná Yesu bakobikisa basaleli na bango na ntango ya bolɔzi monene. Na yango, tokoki kozala motema ya kokita ata soki likambo nini ekosalema. Danyele alobi ete nkombo ya baoyo bakobika “ekomami na buku.” (Dan. 12:1) Tokoki kosala nini mpo nkombo na biso ekomama na buku yango? Tosengeli komonisa polele ete tozali na kondima epai ya Yesu, Mwana-Mpate ya Nzambe. (Yoa. 1:29) Tosengeli kozwa batisimo mpo na komonisa ete tomipesi na Nzambe. (1 Pe. 3:21) Mpe tosengeli kosalisa basusu báyeba Yehova mpo na komonisa ete tozali kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ.

19. Tosengeli kosala nini sikoyo, mpe mpo na nini?

19 Sikoyo nde ntango ya kokómisa makasi elikya na biso epai ya Yehova mpe kotyela ebongiseli na ye motema. Ezali mpe ntango ya kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ. Soki tosali bongo, tokobikisama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoboma mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi.

LOYEMBO 149 Loyembo ya bolongi

^ par. 5 Nani nde “mokonzi ya nɔrdi” lelo oyo mpe ndenge nini akobebisama? Biyano na mituna yango ekoki kokómisa kondima na biso makasi mpe kosalisa biso tómibongisa mpo na makambo oyo ekosalema mosika te na ntango ya bolɔzi monene.