Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 23

“Nkombo na yo esantisama”

“Nkombo na yo esantisama”

“Ee Yehova, nkombo na yo ezali mpo na seko.”​—NZ. 135:13.

LOYEMBO 10 Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!

NA MOKUSE *

1-2. Makambo nini ezali na ntina mingi mpo na Batatoli ya Yehova?

LIKAMBO oyo ezali na ntina mingi mpo na biso ezali boyangeli ya Yehova mpe kosantisama ya nkombo na ye. Biso Batatoli ya Yehova tosepelaka mingi kolobela makambo yango. Kasi, boyangeli ya Yehova mpe kosantisama ya nkombo na ye ezali nde makambo mibale oyo ekeseni? Te.

2 Biso nyonso toyebi ete nkombo ya Nzambe esengeli kosantisama. Toyebi mpe ete boyangeli ya Yehova to lolenge na ye ya koyangela esengeli kolongisama. Makambo yango nyonso mibale ezali na ntina mpo na biso.

3. Nkombo Yehova esangisi makambo nini?

3 Nkombo ya Nzambe, Yehova, esangisi makambo nyonso oyo etali Nzambe na biso, ata mpe lolenge na ye ya koyangela. Na yango, soki tolobi ete kosantisama ya nkombo ya Nzambe nde likambo oyo ezali na ntina mingi mpo na biso, yango elimboli mpe ete lolenge na ye ya koyangela nde eleki malamu. Nkombo Yehova ekangami makasi na lolenge na ye ya koyangela lokola moyangeli oyo aleki na nguya.​—Talá etanda “ Likambo oyo ezali na ntina mingi.”

4. Nzembo 135:13 elobi nini mpo na nkombo ya Nzambe, mpe tokoyanola na mituna nini na lisolo oyo?

4 Nkombo Yehova ekeseni mpenza na bankombo mosusu nyonso. (Tángá Nzembo 135:13.) Mpo na nini nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi? Ndenge nini basambwisaki yango? Ndenge nini Nzambe asantisi yango? Mpe ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kosantisa nkombo na ye? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango.

NKOMBO EZALI NA NTINA MINGI

5. Motuna nini bato mosusu bakoki komituna ntango bayoki ete nkombo ya Nzambe esengeli kosantisama?

5 “Nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Yesu alobaki ete yango nde likambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso na mabondeli na biso. Kasi, Yesu alingaki mpenza koloba nini? Kosantisa eloko moko elimboli kokómisa yango mosantu to pɛto. Kasi bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Nkombo Yehova ezalaka mosantu mpe pɛto, boye te?’ Mpo na koyanola na motuna yango, tosengeli koyeba soki nkombo esangisaka makambo nini.

6. Nini esalaka ete nkombo ezala na motuya mingi?

6 Nkombo ezali kaka te liloba moko oyo ekomami na papye to oyo ekoki kobengama. Talá oyo Biblia elobi: “Nkombo esengeli kolingama mingi koleka ebele ya bomɛngo.” (Mas. 22:1; Mos. 7:1) Mpo na nini nkombo ezali na ntina mingi? Mpo yango emonisaka lokumu ya moto, mpe ndenge oyo bato mosusu batalelaka moto oyo amemi nkombo yango. Na yango, likambo ya ntina ezali te ndenge oyo nkombo moko ekomami to ebengamaka; kasi oyo eleki ntina ezali nde lolenge oyo bato mosusu bakanisaka ntango bamonaka to bayokaka nkombo yango.

7. Ndenge nini nkombo ya Nzambe esambwisamaki?

7 Ntango bato balobaka lokuta mpo na Yehova, babebisaka nde lokumu na ye. Ntango babebisi lokumu na ye, bazali nde kosambwisa nkombo na ye. Mbala ya liboso oyo nkombo ya Nzambe esambwaki ezalaki na elanga ya Edene, ntango ekelamu moko alobaki mabe mpo na Nzambe, mpe atindaki bato básala bongo. Tótala mateya oyo tokoki kozwa na lisolo yango.

NDENGE OYO BATO BASAMBWISAKI NKOMBO YA NZAMBE

8. Adama ná Eva bayebaki nini, mpe yango ebimisi mituna nini?

8 Adama ná Eva bayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe bayebaki makambo mosusu ya ntina oyo etali ye. Na ndakisa, bayebaki ete azali mozalisi na bango, apesaki bango bomoi, esika kitoko mpo na kofanda, mpe apesaki mokomoko na bango molongani ya kokoka. (Eba. 1:26-28; 2:18) Kasi, bakobaki nde kokanisa makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalaki mpo na bango? Bakobaki komonisa bolingo mpe botɔndi na bango epai ya Yehova? Biyano na mituna yango emonanaki polele ntango monguna ya Nzambe amekaki bango.

9. Na kotalela Ebandeli 2:16, 17 mpe 3:1-5, Yehova ayebisaki Adama ná Eva nini, mpe ndenge nini Satana azipaki makambo ya solo oyo Nzambe alobaki?

9 Tángá Ebandeli 2:16, 17 mpe 3:1-5. Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva mpe atunaki ye boye: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” Motuna oyo Satana atunaki, ezalaki na makambo ya lokuta mpo na Nzambe mpe esalaki ete Eva akóma kokanisela ye mabe. Nzambe alobaki na bango ete bakokaki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga longola kaka moko. Adama ná Eva bakokaki kolya mbuma ya nzete ndenge na ndenge. (Eba. 2:9) Ya solo, Yehova azali mpenza mokabi. Kasi apekisaki bango kolya mbuma ya nzete moko. Na yango, motuna ya Satana ezipaki makambo ya solo oyo Nzambe alobaki. Motuna yango etindaki Adama ná Eva bamona lokola Yehova azali mokabi te. Kasi Eva akokaki komituna boye: ‘Nzambe azali nde kopekisa ngai nazwa eloko moko ya malamu?’

10. Ndenge nini Satana asambwisaki nkombo ya Nzambe, mpe yango ebimisaki makambo nini?

10 Tii na ntango oyo Satana atunaki motuna yango, Eva azalaki kaka kotosa Yehova. Mpo na koyanola Satana, Eva azongelaki malako ya polele oyo Nzambe apesaki bango. Kutu abakisaki ete basengelaki ata kosimba nzete yango te. Ayebaki malamu ete bakokufa soki baboyi kotosa likebisi ya Nzambe. Kasi Satana azongiselaki ye ete: “Bokokufa soki moke te.” (Eba. 3:2-4) Satana azalaki kaka te koloba ete Yehova akosaki. Azalaki nde kosambwisa Nkombo ya Nzambe mpe koyebisa Eva ete Yehova azali mobuki lokuta. Na ndenge yango, Satana akomaki Zabolo to moto oyo akoselaka bato makambo. Eva akosamaki mpe andimelaki Satana. (1 Tim. 2:14) Lokola Eva atyelaki Satana motema mingi koleka Yehova, azwaki ekateli moko ya mabe mpenza. Aboyaki kotosa Yehova mpe alyaki mbuma ya nzete oyo Yehova apekisaki bango. Na nsima, apesaki mpe Adama.​—Eba. 3:6.

11. Adama ná Eva basengelaki kosala nini, kasi basalaki nini?

11 Meká kokanisa makambo oyo Eva akokaki koyebisa Satana. Na ndakisa soki ayebisaka Satana boye: “Nayebi yo te, kasi nayebi Yehova Tata na ngai, nalingaka ye mpe natyelaka ye motema. Apesi ngai ná mobali na ngai nyonso oyo tozali na yango. Mpo na nini ozali koloba makambo ya bongo mpo na ye? Longwa awa!” Yehova alingaki mpenza kosepela koyoka ete mwana na ye ya mwasi azali koloba bongo! (Mas. 27:11) Kasi, Adama ná Eva bazalaki na bolingo ya sembo te epai ya Yehova. Lokola bazangaki bolingo ya ndenge wana, basantisaki nkombo ya Nzambe te.

12. (a) Ndenge nini Satana alonaki ntembe na makanisi ya Eva? (b) Likambo nini Adama ná Eva balongaki te kosala?

12 Ndenge touti komona yango, Satana abandaki naino na kosambwisa nkombo ya Nzambe na ndenge atindaki Eva akóma komituna soki Yehova azali mpenza Tata ya malamu. Na yango, Adama ná Eva basantisaki nkombo ya Nzambe te ntango Satana akoselaki ye makambo. Bayokelaki Satana mpe batombokelaki Tata na bango. Lelo oyo, Satana asalelaka mpe mayele ya ndenge wana. Asambwisaka nkombo ya Nzambe na ndenge alobaka makambo ya lokuta mpo na ye. Yango wana, ezalaka mpasi te mpo na bato oyo bandimaka lokuta ya Satana bábuka mibeko ya sembo ya Nzambe.

YEHOVA ASANTISI NKOMBO NA YE

13. Ndenge nini Ezekiele 36:23 emonisi na mokuse nsango mobimba ya Biblia?

13 Yehova atiki ete nkombo na ye esambwisama kaka boye? Te. Biblia mobimba emonisi makambo oyo Yehova asali mpo na komonisa ete makambo oyo balobaki mpo na ye ezalaki lokuta. (Eba. 3:15) Kutu, tokoki koloba na mokuse ete Biblia mobimba ezali na nsango oyo: Yehova asantisi nkombo na ye na nzela ya Bokonzi ya mwana na ye, mpe azongisi boyengebene mpe kimya na mabele. Biblia ezali na masolo oyo esalisi biso tóyeba ndenge oyo Yehova akosantisa nkombo na ye.​—Tángá Ezekiele 36:23.

14. Yehova asali nini mpo na kosantisa nkombo na ye na botomboki oyo ebimaki na elanga ya Edene?

14 Satana asali nyonso oyo akoki mpo na kopekisa Yehova akokisa mokano na ye. Kasi mbala na mbala alongi te. Biblia emonisi oyo Yehova asali mpo na kokokisa mokano na ye, mpe yango emonisi ete azali mpenza Tata ya bolingo mpe Moyangeli oyo aleki malamu. Ezali solo ete botomboki ya Satana mpe baoyo nyonso balandi ye, eyokisi Yehova mpasi na motema. (Nz. 78:40) Kasi, Yehova asaleli bwanya, amonisi motema molai mpe bosembo mpo na kosilisa likambo yango. Amonisi mpe nguya na ye oyo eleki nyonso, na ndenge mingi. Likambo eleki ntina, amonisaka bolingo na makambo nyonso oyo asalaka. (1 Yoa. 4:8) Yehova azali kokoba kosala nyonso mpo na kosantisa nkombo na ye.

Satana akoselaki Yehova makambo epai ya Eva, mpe bambula mingi na nsima, Zabolo azali kokoba kaka kokosela Nzambe makambo (Talá paragrafe 9-10, 15) *

15. Ndenge nini Satana azali kosambwisa nkombo ya Nzambe lelo oyo, mpe yango ebimisi makambo nini?

15 Satana azali kokoba kosambwisa nkombo ya Nzambe. Atindaka bato bátya ntembe na nguya, bosembo, bwanya mpe bolingo ya Nzambe. Na ndakisa, Satana azali koluka kondimisa bato ete Yehova azali Mozalisi te. Mpe mpo na baoyo bandimaka ete Nzambe azali, Satana azali kotinda bango bámona ete mibeko ya Nzambe ezali makasi mpe epekisaka bato makambo mosusu. Azali kutu koteya bato ete Yehova azali motema mabe mpe ete azikisaka bato na lifelo ya mɔtɔ. Ntango bato bandimaka lokuta ya ndenge wana, ezalaka mpasi te báboya kotosa mibeko ya sembo ya Yehova. Liboso ete Yehova aboma ye, Satana akokoba kokosela Yehova makambo, mpe akoluka kotinda yo opesa Yehova mokɔngɔ. Akolonga mpenza?

OYO OKOKI KOSALA NA LIKAMBO YANGO

16. Na kokesana na Adama ná Eva, makambo nini okoki kosala?

16 Yehova apesi bato ya kozanga kokoka nzela mpo bápesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo na ye. Na yango, okoki kosala makambo oyo Adama ná Eva balongaki te kosala. Atako tozali na mokili oyo bato mingi bazali kosambwisa mpe kofingisa nkombo ya Nzambe, okoki kosantisa nkombo na ye mpe koyebisa basusu ete azali mosantu, azali sembo, azali malamu, mpe azali bolingo. (Yis. 29:23) Okoki kopesa mabɔkɔ na boyangeli na ye. Okoki kosalisa bato báyeba ete kaka boyangeli ya Yehova nde ezali mpenza ya boyengebene, mpe kaka yango nde ekotya kimya mpe ekomema esengo ya solosolo mpo na bikelamu nyonso.​—Nz. 37:9, 37; 146:5, 6, 10.

17. Yesu asalaki nini mpo bato báyeba nkombo ya Tata na ye?

17 Ntango tozali kosantisa nkombo ya Nzambe, tomekolaka ndakisa ya Yesu Kristo. (Yoa. 17:26) Yesu ayebisaki bato nkombo ya Tata na ye kaka te na ndenge azalaki kosalela nkombo yango, kasi mpe na ndenge azalaki koteya bato makambo oyo Yehova alingaka mpenza. Na ndakisa, akweisaki makanisi ya Bafarisai oyo mbala mingi bazalaki kotinda bato bámona ete Yehova azali motema mabe, makambo makasimakasi, tokoki kopusana penepene na ye te, mpe azangá mawa. Kasi, Yesu asalisaki bato bámona ete Tata na ye azalaka makambo makasimakasi te, azali na motema molai, azali bolingo, mpe alimbisaka. Asalisaki mpe bato báyeba Yehova na ndenge amekolaki bizaleli ya Tata na ye na bomoi na ye ya mokolo na mokolo.​—Yoa. 14:9.

18. Tokoki kosala nini mpo na komonisa ete makambo mabe oyo banguna balobaki mpo na Yehova ezali lokuta?

18 Lokola Yesu, tokoki koyebisa bato makambo etali Yehova, mpe koteya bango báyeba ete azali Nzambe ya bolingo mpe ya boboto. Soki tosali bongo, tokokweisa lokuta oyo balobaka mpo na Yehova. Tokosantisa nkombo ya Nzambe, na ndenge tokosalisa bato bátalela yango ete ezali mosantu. Tokoki mpe komekola Yehova atako tozali bato ya kozanga kokoka. (Ef. 5:1, 2) Tokosantisa nkombo ya Nzambe, soki, na nzela ya maloba mpe misala na biso, tozali kosalisa bato báyeba ndenge Yehova azalaka. Tokosantisa mpe nkombo yango soki tozali kosalisa basusu bálongola makanisi ya mabe mpo na oyo etali Nzambe. * Tokomonisa mpe ete bato ya kozanga kokoka bakoki kobatela bosembo na bango.​—Yobo 27:5.

Tosengeli kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba ete Yehova azali bolingo mpe azali na boboto (Talá paragrafe 18-19) *

19. Ndenge nini Yisaya 63:7 esalisi biso tóyeba mokano na biso ya libosoliboso ntango tozali koteya?

19 Tótala likambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kosantisa nkombo ya Nzambe. Ntango toteyaka bato solo ya Biblia, mbala mingi tobendaka likebi na bango na boyangeli ya Nzambe. Toteyaka bango ete Yehova azali na lotomo ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe yango ezali mpenza solo. Kasi ntango esɛngi tóteya bango mibeko ya Nzambe, mokano na biso ya liboso ezalaka ya kosalisa bango bálinga Yehova, Tata na biso, mpe bátikala sembo epai na ye. Tomonisaka bango polele bizaleli ya kokamwa ya Yehova mpe bomoto na ye. (Tángá Yisaya 63:7.) Soki tosaleli mayele wana ya koteya, tokosalisa basusu bálinga Yehova mpe bátosa ye mpo balingi kotikala sembo epai na ye.

20. Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna nini?

20 Kasi, ndenge nini tokoki komindimisa ete bizaleli na biso, mpe lolenge na biso ya koteya ekosalisa basusu bákóma kokanisa makambo ya malamu oyo etali Yehova? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

^ par. 5 Likambo nini ezali na ntina mingi mpo na bato mpe baanzelu? Mpo na nini ezali na ntina mingi mpe yango etali biso na nini? Biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu ekokómisa boyokani na biso ná Yehova makasi.

^ par. 18 Na ntango moko boye, mikanda na biso ezalaki koloba ete nkombo ya Nzambe, Yehova, esengeli te kolongisama mpo moto moko te azali kobɛtela nkombo yango ntembe. Kasi, likita ya nsuka ya mbula ya mobu 2017 epesaki bingɛngiseli ya polele na likambo yango. Prezida ya likita yango alobaki boye: “Na yango, ezali mabe te koloba na libondeli ete nkombo ya Nzambe, Yehova, elongisama mpo tolingi ete lokumu na ye etika kobebisama.”​—Talá emisyo ya TV.JW ya 01/2018 na jw.org®. Kende na MIKANDA > TV JW.

^ par. 62 NDIMBOLA YA BILILINGI: Zabolo akoselaki Nzambe makambo na ndenge ayebisaki Eva ete Nzambe azali mokosi. Bambula mingi na nsima, Satana abimisaki makanisi ya mabe; na ndakisa liteya oyo elobaka ete Nzambe azali moto mabe, mpe ete akelaki bato te.

^ par. 64 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko azali koyekola Biblia na moto moko, mpe azali kobenda likebi na ye na bomoto ya Nzambe.