Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 27

Kokanisa te ete ozali koleka ndenge oyo yo ozali mpenza

Kokanisa te ete ozali koleka ndenge oyo yo ozali mpenza

“Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu.”​—ROM. 12:3.

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

NA MOKUSE *

1. Na kotalela Bafilipi 2:3, ndenge nini komikitisa esalisaka biso tózala na boyokani ya malamu ná basusu?

TOTOSAKA mibeko ya Yehova na komikitisa nyonso, mpo toyebi ete Yehova ayebaka ntango nyonso oyo eleki malamu mpo na biso. (Ef. 4:22-24) Komikitisa etindaka biso tótya mokano ya Yehova na esika ya liboso mpe tótalela basusu ete baleki biso. Yango esalaka ete tózala na boyokani ya malamu ná Yehova mpe bandeko ya lisangá.​—Tángá Bafilipi 2:3.

2. Ntoma Paulo ayebaki likambo nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Kasi soki tokebi te, tokoki komekola bato ya mokili, oyo bazalaka na lolendo mpe bakipaka basusu te. * Emonani ete likambo yango ekómelaki mpe bakristo mosusu na siɛklɛ ya liboso, mpo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Roma boye: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu.” (Rom. 12:3) Paulo ayebaki ete tosengeli kopesaka nzoto na biso kilo. Kasi komikitisa ekosalisa biso tómitalelaka na bokatikati. Lisolo oyo ekolobela makambo misato oyo mpo na yango, komikitisa ekosalisa biso tóboya kozala na lolendo. Makambo yango ezali: (1) libala na biso, (2) mikumba oyo tozali na yango na lisangá, mpe (3) lolenge oyo tosalelaka basite internet ya kosolola na baninga.

ZALÁ NA KOMIKITISA NA LIBALA NA YO

3. Mpo na nini matata ekoki kozanga te na kati ya libala, mpe basusu bamonaka malamu básala nini soki matata ebimi?

3 Yehova asalaki libala mpo mwasi ná mobali básepelaka elongo. Kasi lokola bazali bato ya kozanga kokoka, matata ekoki kozanga te. Kutu, Paulo akomaki ete baoyo bazali kobala bakokutana na mikakatano. (1 Ko. 7:28) Babalani mosusu bakoki komona ete lokola baswanaka mingi, yango elingi koloba ete baponaki te sapato ya lokolo na bango. Soki balandi makanisi ya mokili, bakoki kokanisa ete koboma libala nde likambo eleki malamu, mpe ete kosala bongo nde ekopesa bango esengo.

4. Tosengeli koboya kokanisa likambo nini?

4 Tosengeli koboya kokanisa ete libala na biso elongi te. Toyebi ete Biblia epesi nzela ya koboma libala kaka soki molongani moko asali pite. (Mat. 5:32) Na yango, ntango mikakatano ebimi na libala, babalani basengeli kotika te ete lolendo etinda bango bakóma na makanisi oyo: ‘Molongani na ngai akipaka ngai te. Azali komonisela ngai te bolingo oyo nasengeli na yango. Ntango mosusu nakozwa esengo soki nabali moto mosusu.’ Soki tozali kokanisa bongo, ekomonisa ete tozali kokipe kaka makambo na biso moko kasi ya molongani na biso te. Makanisi ya mokili oyo ekotinda yo olanda motema na yo mpe osala likambo oyo ekopesa yo esengo, ata soki yango ekosɛnga oboma libala. Biblia elobi ete, ‘osengeli kotyaka likebi kaka na makambo na yo moko te, kasi tyáká mpe likebi na makambo ya bamosusu.’ (Flp. 2:4) Yehova alingi te ete oboma libala na yo, kasi alingi nde obatela yango. (Mat. 19:6) Alingi ete okanisaka libosoliboso makambo na ye, kasi ya yo moko te.

5. Na kotalela Baefese 5:33, ndenge nini mwasi ná mobali basengeli kosalelana makambo?

5 Mwasi ná mobali basengeli komoniselana bolingo mpe limemya. (Tángá Baefese 5:33.) Biblia eteyaka ete tosengeli kopesaka basusu na esika ya kozwaka. (Mis. 20:35) Ezaleli nini ekosalisa mwasi ná mobali bámoniselana bolingo mpe limemya? Komikitisa. Mwasi ná mobali oyo bazali na komikitisa, balukaka kaka matomba na bango moko te, kasi nde “oyo ya moto mosusu.”​—1 Ko. 10:24.

Na esika báwelanaka, mwasi ná mobali oyo bazali na komikitisa basalaka elongo (Talá paragrafe 6)

6. Makambo oyo Steven ná Stephanie balobi eteyi yo nini?

6 Komikitisa esalisi babalani mingi bázala na esengo na mabala na bango. Na ndakisa, mobali moko na nkombo Steven alobi boye: “Soki mwasi ná mobali bazali kosala na bomoko, yango ekosalisa bango mingimingi ntango mikakatano ebimi. Na esika okanisaka ‘nini ezali malamu mpo na ngai?’ osengeli nde kokanisaka ‘nini ezali malamu mpo na biso?’” Mwasi na ye Stephanie akanisaka mpe bongo. Alobi boye: “Moto moko te asepelaka kozala ntango nyonso na moto oyo aswanisaka ye. Soki matata ebimi, tolukaka koyeba nini ebimisi likambo yango. Na nsima tobondelaka, tosalaka bolukiluki mpe tosololaka mpo na koyeba ndenge ya kosilisa yango. Tolukaka nde kosilisa likambo, kasi te kobundisa moninga.” Mwasi ná mobali bazalaka mpenza na esengo, soki mokomoko azali kokanisa te ete azali na ntina mingi koleka mosusu.

SALELÁ YEHOVA NA “ELIMO YA KOMIKITISA MPENZA”

7. Ezaleli nini ndeko oyo azwi mokumba na lisangá asengeli kozala na yango?

7 Kosalela Yehova na makoki na biso nyonso, ezalaka lokumu mpenza mpo na biso. (Nz. 27:4; 84:10) Ezali malamu soki ndeko mobali moko alingi kosala mingi na mosala ya Yehova. Kutu, Biblia elobi ete: “Soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” (1 Tim. 3:1) Kasi ntango azwi mokumba moko, asengeli kokanisa te ete azali na ntina mingi koleka basusu. (Luka 17:7-10) Mokano na ye esengeli kozala ya kosalela basusu na komikitisa nyonso.​—2 Ko. 12:15.

8. Ndakisa ya Diotrefese, Uziya mpe Abisalome, eteyi yo nini?

8 Biblia ezali na bandakisa ya bato oyo bazalaki kokanisa ete baleki basusu. Na ndakisa, Diotrefese azangaki bopɔlɔ mpe alukaki kozwa “esika ya liboso” na lisangá. (3 Yoa. 9) Na lolendo nyonso, Uziya alukaki kosala likambo moko oyo Yehova asɛngaki ye te asala. (2 Nt. 26:16-21) Lokola Abisalome azalaki na mposa ya kokóma mokonzi, azalaki komonisa lokola nde alingi bato mpo bato yango bápesa ye mabɔkɔ. (2 Sa. 15:2-6) Ndenge emonisami polele na bandakisa yango, Yehova asepelaka te na bato oyo balukaka kaka lokumu na bango moko. (Mas. 25:27) Nsukansuka, bato oyo bazalaka na lolendo mpe balukaka ete basusu bákumisa bango, bakutanaka na mikakatano.​—Mas. 16:18.

9. Ndakisa nini Yesu atikelá biso?

9 Nzokande Yesu, “atako azalaki na lolenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.” (Flp. 2:6) Atako Yesu azali moto ya mibale oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba, akanisaka te koleka ndenge azali. Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.” (Luka 9:48) Ezali mpenza lipamboli kosala elongo na babongisi-nzela, basaleli na misala, bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga oyo bamonisaka komikitisa lokola Yesu! Soki tozali na komikitisa, tokolinga basusu, mpe yango ekomonisa ete tozali bakristo ya solo ndenge kaka Yesu alobaki.​—Yoa. 13:35.

10. Osengeli kosala nini soki okanisi ete bankulutu bazali te kosembola makambo mosusu na lisangá na ndenge ebongi?

10 Osengeli kosala nini soki emonani ete ezali na likambo moko na lisangá mpe ozali komona ete bankulutu bazali kolandela yango malamu te? Na esika ya koimaima, okomonisa komikitisa soki opesi bandeko oyo bazali kokamba lisangá mabɔkɔ. (Ebr. 13:17) Mpo na kosala yango, osengeli komituna boye: ‘Likambo oyo nazali komona, ezali mpenza monene mpe ebongi kosembolama? Likambo yango esengeli kosembolama kaka sikoyo? Ngai nde nazali na mokumba ya kosembola yango? Na bosembo nyonso, nazali mpenza koluka lisangá ezala na bomoko, to nazali nde koluka komimona ete naleki basusu?’

Baoyo bazwi mikumba na kati ya lisangá, basengeli koyebana kaka te mpo na makoki oyo bazali na yango, kasi nde mpo na komikitisa na bango (Talá paragrafe 11) *

11. Na kotalela Baefese 4:2, 3, matomba nini ekomonana soki tozali kosalela Yehova na komikitisa?

11 Mpo na Yehova, komikitisa mpe bomoko ezali na ntina mingi koleka makoki mpe mayele oyo moto akoki kozala na yango. Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na kosalela Yehova na komikitisa. Soki osali bongo, okobatela bomoko na lisangá. (Tángá Baefese 4:2, 3.) Zalá na molende na mosala ya kosakola. Lukáká mabaku ya kosalela basusu makambo na boboto. Yambáká bato nyonso, ata mpe baoyo bazali na mikumba te na kati ya lisangá. (Mat. 6:1-4; Luka 14:12-14) Soki ozali na komikitisa mpe ozali kosala elongo na bandeko ya lisangá, bakomona kaka makoki na yo te, kasi bakomona mpe ete ozali na komikitisa.

ZALÁ NA KOMIKITISA NTANGO OZALI KOSALELA BASITE INTERNET YA KOSOLOLA NA BANINGA

12. Biblia elendisi biso tózala na baninga? Limbolá.

12 Yehova alingi ete tólekisaka ntango elongo na baninga mpe bandeko na biso ya libota. (Nz. 133:1) Yesu azalaki na baninga ya malamu. (Yoa. 15:15) Biblia elobeli matomba ya kozala na baninga ya malamu. (Mas. 17:17; 18:24) Mpe elobi ete ezali malamu te komitangola na bamosusu. (Mas. 18:1) Bato mingi bakanisaka ete, bakozwa baninga mingi mpe bakomiyoka bango moko te soki bazali kosalela basite internet ya kosolola na baninga. Kasi, tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kosalela basite internet yango.

13. Mpo na nini bato mosusu oyo basalelaka basite internet ya kosolola na baninga bamiyokaka bango moko mpe banyokwamaka na makanisi?

13 Bolukiluki emonisi ete bato oyo balekisaka ntango mingi na basite Internet ya kosolola na baninga, bakoki mpenza komiyoka bango moko mpe konyokwama na makanisi. Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete, mbala mingi na basite internet yango, bato batyaka bafɔtɔ oyo emonisaka bantango ya kitoko oyo balekisi na bomoi na bango, baninga na bango mpe bisika ya kitoko oyo bakendá. Soki moto atali bafɔtɔ ya ndenge wana, mpe akokanisi bomoi na ye ná ya moto oyo atye yango, moto oyo azali kotala akoki komona ete bomoi na ye ezali na ntina te. Ndeko mwasi moko ya mbula 19 alobi boye: “Nakómaki koyoka mwa likunya ntango namonaki basusu basali makambo ya malamu na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, mpe ngai natikalaki kaka boye na ndako.”

14. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na 1 Petro 3:8 na oyo etali basite internet ya kosolola na baninga?

14 Toboyi te, tokoki kosalela basite internet yango mpo na kosolola na bandeko ya libota mpe baninga. Kasi bato mosusu batyaka bakomantɛrɛ, bafɔtɔ mpe bavideo na basite internet yango mpo basusu bákumisa bango. Ezali lokola nde bato yango balobaka ete: “Bótala ndenge nazali.” Basusu kutu basalelaka maloba ya nsɔni, ntango bazali kolobela bafɔtɔ na bango moko to mpe oyo ya bato mosusu. Yango mpe emonisaka ete bazangi komikitisa mpe ezaleli ya komitya na esika ya basusu; bizaleli oyo bakristo basengeli kolona.​—Tángá 1 Petro 3:8.

Makambo oyo otyaka na Internet, emonisaka ete ozali moto ya lolendo to ya komikitisa? (Talá paragrafe 15)

15. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tókanisaka te ete toleki bamosusu?

15 Soki osalelaka basite internet ya kosolola na baninga, omituna boye: ‘Bakomantɛrɛ, bafɔtɔ mpe bavideo oyo natyaka emonisaka ete nazali moto ya lolendo? Nakoki kotinda basusu báyoka zuwa?’ Biblia elobi: “Eloko nyonso oyo ezali na mokili​—mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela—​euti na Tata te, kasi euti na mokili.” (1 Yoa. 2:16) Libongoli moko ya Biblia ebongoli maloba “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela” na “koluka komimonisa ete ozali na ntina mingi.” Bakristo basengeli te komimona ete bazali na ntina mingi to mpe koluka ete bato mosusu bákumisa bango. Balandaka toli ya Biblia oyo elobi ete: “Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.” (Gal. 5:26) Soki tozali na komikitisa tokokóma te lokola bato ya mokili, oyo bazalaka na lolendo mpe oyo balingaka basusu bákanisa ete bazali na ntina mingi.

‘KANISÁKÁ NA NDENGE OYO EKOMONISA ETE OZALI NA MAKANISI MALAMU’

16. Mpo na nini tosengeli koboya kozala na lolendo?

16 Tosengeli kolona ezaleli ya komikitisa mpo bato ya lolendo bazalaka na “makanisi malamu” te. (Rom. 12:3) Bato ya lolendo bawelanaka mpe bamonisaka ete baleki basusu. Mbala mingi, makanisi mpe misala na bango epesaka bango moko mpasi mpe enyokolaka basusu. Soki bakebi te, bakoki kobanda kolanda makanisi ya lolendo ya mokili oyo mpe Satana akoki kozipa makanisi na bango. (2 Ko. 4:4; 11:3) Nzokande, moto ya komikitisa azalaka na makanisi malamu. Amitalelaka na ndenge ebongi mpe ayebaka ete bamosusu baleki ye. (Flp. 2:3) Lisusu, ayebaka ete “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.” (1 Pe. 5:5) Baoyo bazali na makanisi malamu bakolinga te kokóma banguna ya Yehova.

17. Tosengeli kosala nini mpo tókoba kozala na komikitisa?

17 Mpo tókoba kozala na komikitisa, tosengeli kosalela toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika.” Yango esɛngaka milende mingi. Tosengeli koyekola ndakisa ya Yesu mpe kosala oyo tokoki mpo tólanda matambe na ye malamumalamu. (Kol. 3:9, 10; 1 Pe. 2:21) Soki tosali bongo, tokozwa matomba mingi. Soki toloni ezaleli ya komikitisa, libota na biso ekozala na esengo, tokobatela kimya na kati ya lisangá, mpe tokoyeba kosalela na ndenge ebongi basite internet ya kosolola na baninga. Oyo eleki nyonso, Yehova akosepela mpe akopambola biso.

LOYEMBO 117 Motema malamu

^ par. 5 Tozali na mokili oyo bato batondi na lolendo mpe bakipaka basusu te. Tosengeli kokeba mpo tókóma te lokola bango. Lisolo oyo ekolobela makambo misato oyo mpo na yango, tosengeli kokanisa te ete toleki basusu.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Moto ya lolendo akanisaka mingi koleka kaka makambo na ye moko kasi ya baninga te. Moto ya ndenge wana, akipaka mpe bato te. Nzokande, komikitisa esalaka ete moto atyela mpe basusu likebi. Moto ya komikitisa azalaka na lolendo te mpe akanisaka te ete aleki basusu.

^ par. 56 ELILINGI: Nkulutu moko oyo asalaka badiskur na mayangani ya minene, mpe oyo alandelaka misala oyo bandeko mosusu basalaka, azali kosepela kotambwisa likita ya mosala ya kosakola mpe kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi.