Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 28

Yebá ete mateya oyo ondimaka ezali solo

Yebá ete mateya oyo ondimaka ezali solo

“Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima.”​—2 TIM. 3:14.

LOYEMBO 56 Monisá solo

NA MOKUSE *

1. Liloba “solo” elimboli nini?

“NDENGE NINI oyebaki solo?” “Okolá na kati ya solo?” “Osali bambula boni na solo?” Mbala mosusu basilá kotuna yo mituna ya ndenge wana, to mpe mbala mosusu osilá kotuna yango bato mosusu. Liloba “solo” elimboli mpenza nini? Mbala mingi tosalelaka liloba yango mpo na kolobela mateya oyo tondimaka, makambo oyo tosalaka mpo na kosambela Nzambe, mpe lolenge ya bomoi na biso. Bato oyo bazali na “kati ya solo” bayebaka makambo oyo Biblia eteyaka, mpe batosaka mitinda na yango na bomoi na bango. Yango esalisaka bango bándima te mateya ya lokuta ya mangomba, mpe bázala na esengo atako bafandi na mokili oyo Satana azali koyangela.​—Yoa. 8:32.

2. Na kotalela Yoane 13:34, 35, ezaleli nini ekoki kobenda moto na solo?

2 Nini ebendaki yo na solo? Mbala mosusu ezalaki bizaleli malamu oyo Batatoli ya Yehova bamonisaka. (1 Pe. 2:12) Ekoki mpe kozala bolingo oyo bamoniselaki bato mosusu nde ebendaki yo na solo. Mingi bamonaka yango soki bayei mbala ya liboso na makita. Mpe bolingo yango nde etikalaka na makanisi na bango koleka makambo oyo bateyaki mokolo yango. Yango ekamwisaka te mpo Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana na bolingo oyo bamoniselanaka. (Tángá Yoane 13:34, 35.) Kasi mpo tózala na kondima makasi, ezali na makambo mingi oyo tosengeli kosala.

3. Nini ekosalema soki kondima na biso epai ya Nzambe esimbami kaka na bolingo oyo bakristo bamoniselanaka?

3 Kondima na biso esengeli kosimbama kaka te na bolingo oyo Kristo asɛngaki bayekoli na ye bámoniselanaka. Mpo na nini? Mpo soki kondima na biso esimbami kaka na bolingo oyo bakristo bamoniselanaka, tokoki kobungisa yango. Na ndakisa, tokoki kotika kosalela Yehova soki ndeko moko na lisangá, ata mpe nkulutu to mobongisi-nzela, asali lisumu moko ya monene. Tokoki mpe kotika kosalela Yehova soki ndeko moko apesi biso nkanda to akómi mopɛngwi mpe akómi koloba ete mateya oyo tondimaka ezali lokuta. Na yango, mpo kondima na biso ezala makasi, esengeli kosimbama na boyokani malamu oyo tozalaka na yango ná Yehova. Yango eteyi biso nini? Soki ondimelaka Nzambe kaka mpo na makambo oyo bato mosusu basalaka, kasi te mpo na boyokani oyo ozali na yango ná Yehova, kondima na yo ekozala makasi te. Ndenge oyo oyokaka mpo na Yehova mpe mpo na basaleli na ye ekoki kokolisa kondima na yo. Kasi ezali mpe na ntina mingi oyekola Biblia na mozindo, okanga ntina ya makambo oyo ozali koyekola, mpe osala bolukiluki mpo omindimisa ete makambo oyo ozali koyekola mpo na Yehova ezali solo. Osengeli komindimisa ete Biblia eteyaka biso solo na ntina etali Yehova.​—Rom. 12:2.

4. Na kotalela Matai 13: 3-6, 20, 21, bato mosusu bakoki kosala nini soki kondima na bango emekami?

4 Yesu alobaki ete bato mosusu bakondima solo “na esengo,” kasi kondima na bango ekolɛmba ntango bakutani na mikakatano. (Tángá Matai 13:3-6, 20, 21.) Mbala mosusu bato yango bayebaki te ete baoyo bazali kolanda Yesu bakokutana na mikakatano. (Mat. 16:24) To mbala mosusu bazalaki kokanisa ete kozala mokristo elimboli kozala na bomoi oyo ezangi mikakatano, ezangi mpasi, mpe etondi kaka na mapamboli. Kasi na mokili ya lelo, mikakatano ekozanga te. Makambo ekoki kobongwana mpe yango ekoki kosilisa esengo na biso mpo na mwa ntango.​—Nz. 6:6; Mos. 9:11.

5. Nini emonisi ete bandeko na biso mingi bandimaka ete bazali na kati ya solo?

5 Bandeko na biso mingi bandimaka ete bazali na kati ya solo mpe bamonisaka yango. Na ndenge nini? Mpo kondima na bango eninganaka te ata soki ndeko moko azokisi bango, to mpe asali likambo moko oyo ebongi te mpo na bakristo. (Nz. 119:165) Mbala nyonso oyo bakutanaka na mikakatano, kondima na bango elɛmbaka te, kutu ekómaka nde makasi. (Yak. 1:2-4) Okoki kosala nini mpo okóma na kondima ya ndenge wana?

KÓMÁ NA “BOYEBI YA SIKISIKI YA SOLO”

6. Kondima ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso esimbamaki na nini?

6 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakómaki na kondima makasi mpo bayekolaki “solo ya nsango malamu,” elingi koloba, boyebi ya Liloba ya Nzambe mpe mateya ya Yesu Kristo. (Gal. 2:5) Solo yango ezali makambo nyonso oyo bakristo bandimaka, ezala makambo etali mbeka ya lisiko ya Yesu mpe lisekwa na ye. Ntoma Paulo amindimisaki ete mateya yango ezalaki solo. Mpo na nini? Mpamba te asalelaki Makomami mpo na kopesa bilembeteli “na makomi ete esengelaki Kristo anyokwama mpe asekwa uta na bakufi.” (Mis. 17:2, 3) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bandimaki mateya yango, mpe batyaki motema ete elimo ya santu ekosalisa bango bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe. Bazalaki kosala bolukiluki mpo bámindimisa ete mateya yango eutaki mpenza na Makomami. (Mis. 17:11, 12; Ebr. 5:14) Kondima na bango esimbamaki kaka te na mayoki na bango, mpe bazalaki kosalela Yehova kaka te mpo na esengo oyo bazalaki koyoka ntango bazali elongo na bandeko mosusu. Kasi, kondima na bango esimbamaki nde na “boyebi ya solosolo ya Nzambe.”​—Kol. 1:9, 10.

7. Kondima na biso na mateya ya solo ya Biblia ekosalisa biso na nini?

7 Solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe ebongwanaka te. (Nz. 119:160) Na ndakisa, ebongwanaka te ata soki ndeko moko azokisi biso to asali lisumu moko ya monene. Ebongwanaka mpe te ata soki tokutani na mikakatano. Yango wana, tosengeli koyeba mateya ya Biblia malamumalamu mpe komindimisa ete ezali solo. Ndenge kaka longo esalaka ete masuwa etɛlɛma ngwi na ntango ya mopɛpɛ makasi, kondima na biso mpe oyo esimbami makasi na mateya ya solo ya Biblia, ekosalisa mpe biso tótɛlɛma ngwi na ntango ya komekama. Okoki kosala nini mpo okóma na kondima makasi ete ozali na kati ya solo?

“ONDIMA BOSOLO NA YANGO”

8. Na kotalela 2 Timote 3:14, 15, nini esalisaki Timote amindimisa ete azali na solo?

8 Timote amindimisaki ete azali na solo. Ndenge nini ayebaki yango? (Tángá 2 Timote 3:14, 15.) Mama na ye mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi nde bato ya liboso oyo bateyaki ye “makomi mosantu.” Na ntembe te, ye moko mpe alekisaki ntango mpe asalaki milende mpo na koyekola makomi yango. Yango esalisaki ye ‘andima bosolo na yango’. Na nsima, Timote, mama na ye, mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi bayekolaki mateya ya bokristo. Na ntembe te, bolingo oyo bayekoli ya Yesu bazalaki komoniselana nde esimbaki motema ya Timote. Epesaki ye mposa makasi ya kosangana na bango, mpe etindaki ye asalisa bandeko na ye ya lisangá. (Flp. 2:19, 20) Nzokande, kondima na ye esimbamaki kaka te na bolingo oyo azalaki na yango mpo na bato, kasi nde na mateya ya Biblia oyo ye moko andimaki ete ezali solo mpe oyo epesaki ye mposa ya kokóma moninga ya Yehova. Yo mpe osengeli koyekola Biblia mpe komona mpenza makambo oyo yango eteyaka mpo na Yehova.

9. Wapi mateya misato ya ntina oyo yo moko osengeli kondima ete ezali solo?

9 Mpo na yango, yo moko osengeli komindimisa ete mateya misato oyo ya ntina ezali mpenza solo. Ya liboso, osengeli kondimisa ete Yehova Nzambe azali Mozalisi ya biloko nyonso. (Kob. 3:14, 15; Ebr. 3:4; Em. 4:11) Ya mibale, osengeli komindimisa ete Biblia ezali na nsango ya Nzambe mpo na bato. (2 Tim. 3:16, 17) Mpe ya misato, osengeli komindimisa ete Batatoli ya Yehova nde bazali etuluku ya bato oyo Yehova abongisi mpo na kosambela ye na litambwisi ya Kristo. (Yis. 43:10-12; Yoa. 14:6; Mis. 15:14) Mpo omindimisa ete mateya yango ya ntina ezali solo, esɛngi kaka te oyeba makambo nyonso oyo Biblia eteyaka. Mokano na yo esengeli kozala ya kosalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ mpo omindimisa mpenza ete ozali na solo.​—Rom. 12:1.

SALISÁ BASUSU BÁNDIMA SOLO

10. Ata soki toyebi solo, makambo mosusu nini tosengeli kosala?

10 Soki yo moko omindimisi ete makambo oyo tolobeli mpo na Nzambe, basaleli na ye mpe Biblia ezali mpenza solo, osengeli mpe kozala na likoki ya kosalela Biblia mpo na kondimisa basusu ete makambo yango ezali solo. Mpo na nini? Mpo lokola tozali bakristo, tozali na mokumba ya koyebisa bato oyo bakoyoka biso mateya ya solo oyo toyekoli. * (1 Tim. 4:16) Mpe ntango tozali kosala makasi mpo na kondimisa basusu solo ya Biblia, kondima na biso moko mpo na solo yango ekokóma makasi.

11. Ndakisa nini ntoma Paulo atikaki, mpe ndenge nini tokoki komekola ye ntango tozali koteya bato solo?

11 Ntango Ntoma Paulo azalaki koteya bato, “azalaki kondimisa bango na oyo etali Yesu na mibeko ya Moize mpe na basakoli.” (Mis. 28:23) Ndenge nini tokoki komekola Paulo ntango tozali koteya basusu solo? Tosengeli kosuka kaka te na koyebisa bango makambo Biblia elobaka. Tosengeli kosalisa bayekoli ya Biblia báyekola mpe bákanisaka na mozindo makambo bazali koyekola. Tolingaka ete bándima solo kaka te mpo basepelaka na biso, kasi nde mpo bango moko bandimisami ete makambo oyo bayekoli mpo na Nzambe na biso ya bolingo ezali solo.

Baboti, bóteya bana na bino “makambo mozindo ya Nzambe” mpo kondima na bango ekóma makasi (Talá paragrafe 12-13) *

12-13. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bátikala na kati ya solo?

12 Baboti, ezali solo ete bolingaka ete bana na bino bátikala na kati ya solo. Bokoki kokanisa ete soki bana na bino bazali na baninga ya malamu na lisangá, bakokola malamu na elimo. Nzokande, mpo bana na bino bámindimisa ete makambo oyo Biblia eteyaka ezali solo, basengeli kosuka kaka te na kozala na baninga ya malamu. Basengeli nde kozala na boyokani malamu ná Nzambe, mpe komindimisa ete makambo oyo Biblia eteyaka ezali solo.

13 Mpo bóteya bana na bino solo na ntina etali Nzambe, bosengeli koyekolaka Biblia malamumalamu. Bosengeli mpe kozwaka ntango ya komanyola na makambo oyo boyekoli. Soki bosali bongo, bokozala na likoki ya kosalisa bana na bino básalaka mpe bongo. Bosengeli koteya bana na bino ndenge ya kosalela bisaleli na biso mpo na koteya, kaka ndenge boteyaka bayekoli na bino ya Biblia. Na ndenge wana nde bokosalisa bango bálinga Yehova mpe bándima ete Yehova asalelaka “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kosalisa biso tóyeba Biblia. (Mat. 24:45-47) Baboti, bosengeli kosuka kaka te na koteya bana na bino mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. Mpo bákóma na kondima makasi, bosengeli koteya bango “makambo mozindo ya Nzambe” na ndenge oyo bakokanga ntina na yango na kotalela mbula mpe makoki na bango.​—1 Ko. 2:10.

YEKOLÁKÁ BISAKWELI YA BIBLIA

14. Mpo na nini tosengeli koyekola bisakweli ya Biblia? (Talá mpe etanda “ Okoki kolimbola bisakweli oyo?”)

14 Bisakweli ya Biblia ezali eteni ya ntina mingi na kati ya Liloba ya Nzambe oyo ekoki kosalisa biso tókóma na kondima makasi epai ya Yehova. Bisakweli nini ekómisá kondima na yo makasi? Okoki kolobela bisakweli oyo etali “mikolo ya nsuka.” (2 Tim. 3:1-5; Mat. 24:3, 7) Kasi, bisakweli nini mosusu oyo ekokisamá oyo ekoki kokómisa kondima na yo makasi? Na ndakisa, okoki kolimbola ndenge esakweli oyo ezali na Danyele mokapo 2 to mpe Danyele mokapo 11 ekokisamaki na ntango ya kala mpe ezali kokokisama na mikolo na biso? * Soki kondima na yo esimbami makasi na mateya ya Biblia, ekozala ntango nyonso makasi. Tótalela ndakisa ya bandeko na biso oyo bakutanaki na botɛmɛli makasi na Allemagne na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Atako bakangaki malamu te ntina ya bisakweli oyo etali mikolo ya suka, kondima na bango na Liloba ya Nzambe ezalaki makasi.

Boyekoli na biso ya Biblia, ata mpe bisakweli na yango, ekoki kosalisa biso na ntango ya mikakatano (Talá paragrafe 15-17) *

15-17. Ndenge nini koyekola Biblia ekómisaki makasi kondima ya bandeko na biso oyo Banazi banyokolaki?

15 Ntango Banazi bazalaki koyangela Allemagne, batindaki bandeko na biso mingi na kaa ya bakangami. Hitler ná Heinrich Himmler, moto moko ya lokumu na Allemagne bayinaki Batatoli ya Yehova. Ndenge ndeko mwasi moko amonisi yango, Himmler alobaki na etuluku moko ya bandeko basi oyo bazalaki na kaa ya bakangami ete: “Yehova na bino akoki koyangela kuna na likoló, kasi awa na mabele ezali nde biso Banazi! Tokolakisa bino soki banani nde bakoumela na mokili, bino Batatoli ya Yehova to biso Banazi.” Kasi nini esalisaki basaleli ya Yehova bátikala sembo?

16 Bayekoli wana ya Biblia bayebaki ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914. Na yango, bakamwaki te mpo na botɛmɛli makasi oyo bazalaki kokutana na yango. Kasi, basaleli ya Yehova bandimisamaki ete ata guvɛrnema moko te ya mokili ekoki kopekisa mokano ya Nzambe esalema. Hitler akokaki te kosukisa losambo ya solo, to kotya guvɛrnema moko oyo ekokaki kozala makasi koleka Bokonzi ya Nzambe. Bandeko na biso bandimisamaki ete nsukansuka, boyangeli ya Hitler ekosuka.

17 Makambo oyo bandeko yango bandimaki ezalaki solo. Eumelaki te, boyangeli ya Banazi ekweaki. Heinrich Himmler, moto oyo alobaki ete “awa na mabele ezali nde biso Banazi,” akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Ntango azalaki kokima, akutanaki na ndeko Lübke. Himmler ayebaki ete ndeko Lübke azalaki moko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na bolɔkɔ. Lokola Himmler akómaki na nsuka, atunaki ndeko Lübke boye: “Moyekoli ya Biblia, makambo ekosuka ndenge nini?” Ndeko Lübke alimbolaki ye ete banda kala, Batatoli ya Yehova bayebaki ete boyangeli ya Banazi ekokwea mpe ete Batatoli ya Yehova bakozwa bonsomi. Himmler oyo liboso azalaki koloba mabe mpo na Batatoli ya Yehova, azangaki likambo ya koloba. Mwa moke na nsima, amibomaki. Yango eteyi biso nini? Boyekoli na biso ya Biblia, ata mpe ya bisakweli na yango, ekoki kosalisa biso tókóma na kondima makasi epai ya Nzambe mpe tótɛlɛma ngwi ntango tokutani na minyoko.​—2 Pe. 1:19-21.

18. Ndenge emonisami na Yoane 6:67, 68, mpo na nini tosengeli na “boyebi ya solosolo ná bososoli mingi mpenza” ndenge Paulo akomaki?

18 Mokomoko na biso asengeli komonisa bolingo; elembo oyo emonisaka bakristo ya solo. Kasi, tosengeli mpe kokóma na “boyebi ya solosolo ná bososoli mingi mpenza.” (Flp. 1:9) Soki te, tokoki “komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato,” ata mpe bapɛngwi. (Ef. 4:14) Ntango bayekoli mingi ya Yesu na siɛklɛ ya liboso batikaki kolanda ye, ntoma Petro amonisaki polele ete azalaki na kondima makasi ete Yesu azalaki na “maloba ya bomoi ya seko.” (Tángá Yoane 6:67, 68.) Atako na ntango wana Petro ayebaki te makambo nyonso ya maloba yango, atikalaki sembo mpo akangaki ntina ya mateya ya solo oyo etali Yesu. Yo mpe okoki kokómisa kondima na yo makasi na makambo oyo Biblia eteyaka. Soki osali bongo, kondima na yo ekozala kaka makasi ata soki okutani na mokakatano nini mpe okosalisa basusu bákóma na kondima makasi.​—2 Yoa. 1, 2.

LOYEMBO 72 Tóyebisa bato solo ya Bokonzi

^ par. 5 Lisolo oyo ekosalisa biso tózwa na motuya mateya ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Ekolobela mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tókómisa lisusu makasi ekateli na biso ya kondima ete mateya yango ezali solo.

^ par. 10 Mpo na kosalisa yo oyeba kosolola na moto mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli, talá masolo “Lisolo na moninga moko ya kartye,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli kobanda 2010 tii 2015. Ezali na masolo lokola “Yesu azali Nzambe?”, “Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?” mpe “Nzambe anyokolaka bato na lifelo?

^ par. 14 Mpo na koyeba ndimbola ya bisakweli yango, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/2012, mpe ya 05/2020.

^ par. 60 ELILINGI: Na losambo na kati ya libota, baboti bazali koyekola na bana na bango bisakweli ya Biblia oyo etali bolɔzi monene.

^ par. 62 ELILINGI: Na ntango ya bolɔzi monene, bato ya libota yango bakokamwa te mpo na makambo oyo ekosalema.