Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 29

“Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya”

“Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya”

“Nazali kosepela na bolɛmbu, na mafinga, na bosɛnga, na minyoko mpe mikakatano, mpo na Kristo.”​—2 KO. 12:10.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

NA MOKUSE *

1. Ntoma Paulo ayebaki nini?

NTOMA Paulo ayebaki ete na ntango moko boye, azalaki na bolɛmbu. Alobaki ete nzoto na ye ezalaki “kobeba,” azalaki kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu, mpe Yehova azalaki ntango nyonso te koyanola na mabondeli na ye na ndenge oyo azalaki kokanisa. (2 Ko. 4:16; 12:7-9; Rom. 7:21-23) Paulo ayebaki mpe ete batɛmɛli na ye bazalaki komona ye lokola moto ya bolɛmbu. * Kasi atikaki te ete makambo ya mabe oyo basusu bazalaki koloba mpo na ye, to mpe bolɛmbu na ye moko etinda ye amimona ete azangi ntina.​—2 Ko. 10:10-12, 17, 18.

2. Na kotalela 2 Bakorinti 12:9, 10, liteya nini ya ntina mingi Paulo ayekolaki?

2 Paulo azwaki liteya ete moto akoki kozala makasi ata soki azali komimona ete azali na bolɛmbu. (Tángá 2 Bakorinti 12:9, 10.) Yehova ayebisaki Paulo ete nguya na Ye “ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu,” yango elingi koloba ete Yehova asengelaki kopesa Paulo nguya oyo azangaki. Tólobela naino ntina oyo tosengeli kosilika te, ntango banguna bazali kofinga biso.

‘SEPELÁ . . . NA MAFINGA’

3. Mpo na nini tokoki kosepela na mafinga?

3 Moko te kati na biso alingaka ete báfinga ye. Kasi soki banguna bazali kofinga biso, mpe tozali komitungisa mpo na makambo oyo bazali koloba, tokoki kolɛmba nzoto. (Mas. 24:10) Kasi, ndenge nini tosengeli kotalela mafinga yango? Lokola Paulo, tokoki “kosepela . . . na mafinga.” (2 Ko. 12:10) Mpo na nini? Mpo soki bato bazali kofinga mpe kotɛmɛla biso, yango emonisaka ete tozali bayekoli ya solo ya Yesu. (1 Pe. 4:14) Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokutana na minyoko. (Yoa. 15:18-20) Yango nde ekómelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Na ntango wana, bato oyo bazalaki kolanda mimeseno ya Bagrɛki, bazalaki komona bakristo lokola bato oyo bazangá mayele mpe bato ya bolɛmbu. Mpe Bayuda bazalaki kotalela bakristo, na ndakisa ntoma Petro mpe Yoane, lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Bato mingi bazalaki kokanisa ete bakristo bazali bato ya bolɛmbu mpe bazangá libateli. Lokola bazalaki komikɔtisa te na makambo ya politiki, yango wana bazalaki na bopusi te na guvɛrnema. Bazalaki mpe kokɔta na mosala ya soda te, yango wana bazalaki te na makasi ya kobunda to ya komibatela.

4. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki nini ntango bato bazalaki koloba mabe mpo na bango?

4 Bakristo wana batikaki makambo yango elɛmbisa bango? Te. Na ndakisa ntoma Petro mpe Yoane, bamonaki ete ezali lokumu konyokwama mpo bazalaki kolanda Yesu mpe koyebisa basusu makambo etali ye. (Mis. 4:18-21; 5:27-29, 40-42) Bayekoli bazalaki na ntina te ya koyoka nsɔni. Atako na ntango wana bato bazalaki komemya bakristo te, bakristo yango basalaki makambo mingi mpo na kosalisa bato mosusu. Na ndakisa, mikanda ya Biblia oyo bakristo yango mosusu bakomaki, ezali kokoba kosalisa mpe kopesa bamilio ya bato elikya. Mpe Bokonzi oyo bakristo yango basakolaki, ezali sikoyo koyangela na likoló mpe mosika te ekoyangela mabele mobimba. (Mat. 24:14) Kasi lelo oyo, guvɛrnema ya kala ya Roma oyo ezalaki na nguya mpe oyo enyokolaki bakristo, ezalaka lisusu te; kasi bakristo yango ya sembo bazali sikoyo bakonzi kuna na likoló. Nzokande, banguna na bango bakufá; mpe ata soki banguna yango basekwi, bakristo yango ya sembo ya siɛklɛ ya liboso oyo bango banyokolaki nde bakoyangela banguna yango.​—Em. 5:10.

5. Na kotalela Yoane 15:19, mpo na nini bato ya mokili bamemyaka biso Batatoli ya Yehova te?

5 Lelo oyo, bato mosusu bamemyaka biso Batatoli ya Yehova te, mpe batyolaka biso mpo bakanisaka ete tozangá mayele mpe tozali bato ya bolɛmbu. Mpo na nini? Mpo tolandaka te bizaleli ya bato oyo tofandi na bango. Tosalaka nyonso mpo tózala na komikitisa mpe na botosi. Kasi mokili esepelaka nde na bato ya lolendo, ya lofundo, mpe na botomboki. Lisusu, tokɔtaka te na makambo ya politiki mpe topesaka te mabɔkɔ na mosala ya soda ata na ekólo nini. Lokola tokeseni na bato ya mokili, yango wana bakanisaka ete tozali na nse ya basusu.​—Tángá Yoane 15:19; Rom. 12:2.

6. Mosala nini ya monene Yehova azali kosalisa basaleli na ye bakokisa?

6 Ata soki bato ya mokili bakanisaka ete tozali bato ya bolɛmbu, Yehova asalelaka biso mpo na kokokisa makambo ya minene. Azali kokokisa mosala ya kosakola na ndenge oyo esalemá naino te na mabele. Lelo oyo, basaleli na ye bazali kobimisa bazulunalo oyo ebongolami mingi mpe ekabolami mingi koleka mikanda mosusu nyonso na mokili mpe basalelaka Biblia mpo na kosalisa bamilio ya bato bákóma na bomoi ya malamu. Lokumu nyonso esengeli kozonga epai ya Yehova, oyo asalelaka etuluku yango ya bato, oyo mokili emonaka ete bazali bato ya bolɛmbu, mpo na kokokisa misala yango ya kokamwa. Kasi tokoloba nini mpo na mokomoko na biso? Yehova akoki kopesa biso nguya? Soki ezali bongo, tosengeli kosala nini mpo tózwa lisalisi yango? Tólobela sikoyo makambo misato oyo tokoki koyekola na ndakisa ya ntoma Paulo.

KOTYA MOTEMA NA MAKASI NA YO MOKO TE

7. Ndakisa ya Paulo, eteyi biso nini?

7 Ndakisa ya Paulo eteyi biso ete tosengeli te kotya motema na makasi to mpe na makoki na biso moko ntango tozali kosalela Yehova. Na ndenge ya bomoto, Paulo azalaki na ntina ya kozala na lolendo mpe ya komityela motema. Akolaki na Tarse, engumba mokonzi ya etúká moko ya Roma. Tarse ezalaki engumba moko ya bozwi mpe ezalaki na iniversite ya monene. Paulo atángaki na iniversite yango mpe ateyamaki epai ya Gamaliele, Moyuda moko oyo bato bazalaki komemya mingi na ntango wana. (Mis. 5:34; 22:3) Mpe na ntango moko boye, Bayuda bazalaki komemya Paulo mingi. Alobaki boye: “Nazalaki kokende liboso mpenza na kati ya lingomba ya Bayuda koleka bato mingi ya mbula na ngai na ekólo na ngai.” (Gal. 1:13, 14; Mis. 26:4) Atako bongo, Paulo amityelaki motema te.

Mpo na Paulo, biloko oyo mokili emonaka ete ezali na litomba ezalaki “bosoto mpamba” na kokokanisa yango na libaku oyo azwaki ya kolanda Kristo (Talá paragrafe 8) *

8. Na kotalela Bafilipi 3:8, ndenge nini Paulo azalaki kotalela biloko oyo atikaki nsima, mpe mpo na nini azalaki “kosepela na bolɛmbu?”

8 Paulo asepelaki kotika biloko oyo esalaki ete bato ya mokili bámona ete azali na ntina mingi. Kutu akómaki komona biloko yango lokola “bosɔtɔ mpamba.” (Tángá Bafilipi 3:8.) Paulo akutanaki na mikakatano mingi ndenge akómaki moyekoli ya Kristo. Bato ya ekólo na ye moko bayinaki ye. (Mis. 23:12-14) Baroma, bato ya ekólo na ye moko, babɛtaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. (Mis. 16:19-24, 37) Lisusu, Paulo ayebaki ete azalaki moto ya kozanga kokoka mpe ete ezalaki mpasi mpo asala likambo ya malamu. (Rom. 7:21-25) Kasi, atikaki te kolanda Kristo mpo na mikakatano oyo akutanaki na yango to mpe mpo na mabunga oyo asalá. Kutu azalaki nde “kosepela na bolɛmbu.” Mpo na nini? Mpo azalaki komona ndenge Nzambe azalaki kosalisa ye na ntango oyo azalaki na bolɛmbu.​—2 Ko. 4:7; 12:10.

9. Ndenge nini tosengeli kotalela makambo oyo ekoki kosala ete tómonana bato ya bolɛmbu?

9 Soki tolingi ete Yehova apesa biso nguya, tosengeli kokanisa te ete makasi ya nzoto, bakelasi oyo totángá, mimeseno ya mboka na biso, to biloko ya mosuni nde esalaka ete tózala na ntina mingi. Biloko yango te nde esalaka ete tózala na ntina na miso ya Yehova. Kutu basaleli mingi ya Nzambe bazali te ‘bato ya bwanya na ndenge ya mosuni, bato ya nguya, mpe bato ya lokumu.’ Yehova aponi nde kosalela “biloko ya mokili oyo ezali na bolɛmbu.” (1 Ko. 1:26, 27) Na yango, kotika te kosalela Yehova ata soki ozangi biloko ya mokili oyo bato mingi bamonaka ete ezali na ntina. Talelá yango nde lokola libaku oyo ekoki kosalisa yo omona ndenge nguya ya Yehova ezali kosala na kati na yo. Na ndakisa, soki ozali kobanga baoyo balukaka kotinda yo otya ntembe na mateya oyo ondimaka, bondelá Yehova apesa yo mpiko ya kolobela bindimeli na yo. (Ef. 6:19, 20) To soki ozali na maladi moko ya makasi oyo eumeli, bondelá Yehova apesa yo makasi ya kosala oyo okoki na mosala na ye. Mbala nyonso oyo omoni ndenge oyo Yehova asalisi yo, kondima na yo ekokola mpe okokóma makasi.

ZWÁ MATEYA NA BANDAKISA YA BIBLIA

10. Mpo na nini tosengeli koyekola bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala, lokola oyo elobelami na Baebre 11:32-34?

10 Paulo azalaki koyekola makomami na mozindo mpenza. Ayekolaki makambo mingi na bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala. Ntango azalaki kokomela Baebre, Paulo asɛngaki bango bákanisa na bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala. (Tángá Baebre 11:32-34.) Tólobela Mokonzi Davidi, moko ya bato yango ya sembo. Asengelaki koyika mpiko kaka te na botɛmɛli ya banguna na ye, kasi mpe ya bato mosusu oyo bazalaki baninga na ye. Soki totaleli ndakisa ya Davidi, tokomona ntina oyo kokanisa na ndakisa na ye epesaki Paulo nguya. Mpe tokomona ndenge oyo tokoki komekola Paulo.

Atako azalaki elenge mpe emonanaki lokola azali na makasi te, Davidi abangaki te kobunda na Goliate. Atyelaki Yehova motema, mpe ayebaki ete Yehova akopesa ye makasi mpo na kolonga Goliate, mpe yango nde asalaki (Talá paragrafe 11)

11. Mpo na nini Davidi amonanaki lokola moto ya bolɛmbu? (Talá elilingi ya ezipeli.)

11 Na miso ya elombe Goliate, Davidi azalaki komonana lokola moto ya bolɛmbu. Ntango amonaki Davidi, Goliate “abandaki kotyola ye.” Kutu, Goliate azalaki engambe, azalaki na bibundeli ya minene, mpe ayebaki kobunda malamu. Kasi Davidi amonanaki lokola moto ya bolɛmbu mpo azalaki kaka elenge mobali moko oyo ayebaki kobunda te. Likambo oyo ezalaki komonana lokola bolɛmbu, ekómaki nde nguya mpo na Davidi. Atyelaki Yehova motema mpe Yehova apesaki ye makasi ya kolonga Goliate.​—1 Sa. 17:41-45, 50.

12. Mokakatano nini mosusu Davidi akutanaki na yango?

12 Davidi azalaki mpe na mokakatano mosusu oyo ekokaki kosala ete amonana lokola moto ya bolɛmbu. Davidi asalelaki Saulo, moto oyo Yehova atyaki mpo azala mokonzi ya Yisraele, na bosembo nyonso. Na ebandeli, mokonzi Saulo azalaki komemya Davidi. Kasi na nsima, lolendo esalaki ete akóma koyokela Davidi zuwa. Saulo asalelaki Davidi makambo ya mabe, kutu alingaki koboma ye.​—1 Sa. 18:6-9, 29; 19:9-11.

13. Davidi asalaki nini mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo mokonzi Saulo asalelaki ye?

13 Atako mokonzi Saulo asalelaki ye makambo na kozanga bosembo, Davidi akobaki kaka komonisela ye limemya mpo azalaki mokonzi oyo Yehova atyaki mafuta. (1 Sa. 24:6) Davidi apamelaki Yehova te mpo na makambo mabe oyo Saulo asalelaki ye. Kasi, atyelaki Yehova motema mpo apesa ye makasi oyo asengelaki na yango mpo ayika mpiko na mokakatano wana.​—Nz. 18:1, maloba oyo ezali na likoló.

14. Mikakatano nini ntoma Paulo akutanaki na yango oyo ekokanaki na oyo ya Davidi?

14 Ntoma Paulo akutanaki mpe na mikakatano lokola oyo ya Davidi. Banguna na ye bazalaki makasi mingi koleka ye. Bato mingi ya lokumu ya ntango na ye bayinaki ye. Mbala mingi babɛtaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Lokola Davidi, bato oyo basengelaki kozala baninga ya Paulo basalelaki ye makambo ya mabe. Kutu, ata bato mosusu na kati ya lisangá bazalaki kotɛmɛla ye. (2 Ko. 12:11; Flp. 3:18) Kasi Paulo alongaki bato nyonso oyo bazalaki kobundisa ye. Na ndenge nini? Akobaki kosakola atako bazalaki kotɛmɛla ye. Atikalaki sembo epai ya bandeko na ye ata ntango basalaki makambo oyo esepelisaki ye te. Oyo eleki ntina, atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na nsuka ya bomoi na ye. (2 Tim. 4:8) Asalaki nyonso wana na makasi na ye te, kasi nde mpo atyelaki Yehova motema.

Zalá na limemya mpe na boboto ntango ozali kosolola na bato oyo batyaka ntembe na mateya oyo ondimaka (Talá paragrafe 15) *

15. Mokano na biso ezali nini mpe ndenge nini tokoki kokokisa yango?

15 Baninga na yo ya kelasi, ya mosala, to mpe bandeko na yo ya libota oyo bazali Batatoli te, bafingaka yo mpe banyokolaka yo? Moto moko na kati ya lisangá asalelá yo makambo ya mabe? Soki ezali bongo, kanisá na ndakisa ya Davidi mpe ya Paulo. Okoki kokoba ‘kosala malamu mpo na kolonga mabe.’ (Rom. 12:21) Ntango bato batɛmɛli biso, tobundaka te ndenge Davidi abundaki na Goliate, kasi tolongaka mabe na ndenge tosalaka nyonso mpo na kosalisa bato báyekola makambo etali Yehova na nzela ya Biblia. Mpo okokisa mokano yango, osengeli kosalelaka Biblia mpo oyanola na mituna oyo bato batunaka. Lisusu, osengeli kozala na limemya mpe na boboto epai ya bato oyo bazali kosalela yo makambo ya mabe, mpe kosalela bato nyonso makambo ya malamu, ata mpe banguna na yo.​—Mat. 5:44; 1 Pe. 3:15-17.

NDIMÁ LISALISI YA BASUSU

16-17. Likambo nini Paulo abosanaki soki moke te?

16 Liboso ntoma Paulo akóma moyekoli ya Kristo, azalaki elenge mobali oyo azalaki kofinga mpe konyokola bayekoli ya Yesu. (Mis. 7:58; 1 Tim. 1:13) Yesu ye moko apekisaki Paulo, oyo na ntango wana ayebanaki na nkombo Saulo, atika konyokola lisangá ya bokristo. Yesu alobaki na Paulo uta na likoló mpe akómisaki ye mokufi-miso. Mpo amona lisusu, Paulo asengelaki koluka lisalisi epai ya bato oyo azalaki konyokola liboso. Na komikitisa nyonso, Paulo andimaki lisalisi epai ya moyekoli moko na nkombo Ananiasi oyo afungolaki ye miso.​—Mis. 9:3-9, 17, 18.

17 Na nsima, Paulo akómaki ndeko moko oyo ayebanaki mingi na lisangá ya bokristo, kasi abosanaki te liteya oyo azwaki epai ya Yesu na nzela ya Damasi. Paulo akobaki kozala na komikitisa mpe andimaki lisalisi ya bandeko ya lisangá. Ayebaki ete bazalaki ‘lisalisi oyo ezalaki kopesa ye makasi.’​—Kol. 4:10, 11.

18. Mpo na nini na bantango mosusu ezalaka mpasi tóndima lisalisi ya basusu?

18 Ndakisa ya Paulo ekoki koteya biso nini? Ntango tobandaki koyekola solo, mbala mosusu tozalaki kosepela basusu básalisa biso mpo tóyeba makambo mingi. (1 Ko. 3:1, 2) Bongo lelo oyo? Soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi, mpe toyebi makambo mingi, tokoki kozala na mokakatano ya kondima lisalisi ya basusu mingimingi soki moto oyo azali kopesa biso lisalisi yango aumeli mingi te na lisangá lokola biso. Nzokande mbala mingi, Yehova asalelaka bandeko ya lisangá mpo na kopesa biso makasi. (Rom. 1:11, 12) Na yango, soki tolingi kozwa makasi oyo eutaka epai ya Yehova, tosengeli kondima lisalisi ya basusu.

19. Nini esalisaki Paulo asala makambo ya kokamwa na bomoi na ye?

19 Nsima ya kokóma mokristo, Paulo asalaki makambo ya kokamwa. Mpo na nini? Mpo ayekolaki ete komikitisa mpe kotyela Yehova motema nde esalaka ete moto alonga, kasi te mpo na esika oyo autá, makasi oyo azali na yango, bakelasi oyo atángá, to bozwi oyo azali na yango. Tiká ete biso nyonso tómekola Paulo na makambo oyo: (1) tótyelaka Yehova motema, (2) tóyekolaka bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, mpe (3) tóndimaka lisalisi ya bandeko na biso ya lisangá. Soki tosali bongo, Yehova akopesa biso nguya, ata soki tozali komonana bato ya bolɛmbu!

LOYEMBO 71 Tozali limpinga ya Yehova!

^ par. 5 Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa ya ntoma Paulo. Tokomona ete soki tozali na komikitisa, Yehova akopesa biso nguya oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko ntango bato bazali kotyola biso mpe tólonga bolɛmbu na biso.

^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: Tokoki komimona bato ya bolɛmbu mpo na bantina mingi. Na ndakisa, mpo na kozanga kokoka na biso, bobola, maladi, to mpo totángá mingi te. Lisusu, banguna na biso balukaka kotinda biso tómimona bato ya bolɛmbu na ndenge balobaka mabe mpo na biso to na ndenge babundisaka biso.

^ par. 57 ELILINGI: Ntango Paulo akómaki kosakola makambo etali Kristo, atikaki biloko nyonso oyo azalaki na yango na bomoi na ye ya kala lokola Mofarisai. Ekoki kozala barulo oyo ezalaki kolobela makambo ya mokili mpe mwa bakɛsi mike oyo balataka na elongi.

^ par. 61 ELILINGI: Baninga ya mosala ya ndeko moko bazali kotya ye mbamba mpo asangana na bango na fɛti ya mbotama ya moninga na bango mosusu ya mosala.