Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 31

Ozali kozela “Engumba oyo ezali na miboko ya solosolo?”

Ozali kozela “Engumba oyo ezali na miboko ya solosolo?”

“Azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.”​—EBR. 11:10.

LOYEMBO 22 Bokonzi ezali koyangela​—Tiká eya!

NA MOKUSE *

1. Bandeko mingi bamipimeli makambo nini, mpe mpo na nini?

BAMILIO ya basaleli ya Nzambe lelo oyo bamipimeli makambo mingi mpo na Yehova. Bandeko mingi baponá kotikala minzemba. Babalani mosusu bazwá ekateli ya koboya kobota sikoyo. Mabota mosusu endimá kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Bango nyonso bazwá bikateli yango mpo na likambo moko ya ntina mingi: mpo bámipesa mingi na mosala ya Yehova. Bazalaka na esengo mpe batyaka motema ete Yehova akopesa bango nyonso oyo basengeli na yango. Yehova akokokisa mpenza bamposa na bango? Ɛɛ! Nini endimisi biso yango? Mpo na ntango ya kala, Yehova apesaki basaleli na ye nyonso oyo basengelaki na yango. Na ndakisa, Yehova apambolaki Abrahama, “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.”​—Rom. 4:11.

2. (a) Na kotalela Baebre 11:8-10, 16, mpo na nini Abrahama andimaki kotika engumba Ure? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Abrahama andimaki kotika bomoi ya malamu oyo azalaki na yango na engumba Ure. Mpo na nini? Mpo azalaki kozela “engumba oyo ezali na miboko ya solosolo.” (Tángá Baebre 11:8-10, 16.) “Engumba” yango ezali nini? Mikakatano nini Abrahama akutanaki na yango ntango azalaki kozela ete engumba yango etongama? Ndenge nini tokoki komekola Abrahama mpe baoyo bazali kolanda ndakisa na ye na mikolo na biso?

“ENGUMBA OYO EZALI NA MIBOKO YA SOLOSOLO” EZALI NINI?

3. Engumba oyo Abrahama azalaki kozela ezali nini?

3 Engumba oyo Abrahama azalaki kozela ezali Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango esalemi na Yesu Kristo mpe bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo. Paulo alobaki ete Bokonzi yango ezali “engumba ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló.” (Ebr. 12:22; Em. 5:8-10; 14:1) Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na Bokonzi yango, básɛngaka ete Bokonzi yango eya mpo mokano ya Nzambe esalema na mabele ndenge ezali kosalema na likoló.​—Mat. 6:10.

4. Na kotalela Ebandeli 17:1, 2, 6, makambo nini Abrahama ayebaki mpo na oyo etali engumba, to Bokonzi oyo Nzambe alakaki?

4 Abrahama ayebaki makambo nyonso ya mikemike oyo etali ndenge Bokonzi yango ekobongisama? Te. Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, makambo yango ezalaki “sekele mosantu.” (Ef. 1:8-10; Kol. 1:26, 27) Kasi Abrahama ayebaki ete bakitani na ye mosusu bakokóma bakonzi. Yehova nde alakaki Abrahama likambo yango. (Tángá Ebandeli 17:1, 2, 6.) Abrahama azalaki na kondima makasi ya ndenge wana na bilaka ya Nzambe; ezalaki lokola nde azalaki komona Masiya, to Moto oyo atyami mafuta, oyo akokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Mpo na ntina yango nde, Yesu ayebisaki Bayuda ya mikolo na ye ete: “Abrahama tata na bino asepelaki mingi na elikya ya komona mokolo na ngai, mpe amonaki yango mpe asepelaki.” (Yoa. 8:56) Na ntembe te, Abrahama ayebaki ete bakitani na ye mosusu bakozala bakonzi na Bokonzi oyo Nzambe akotya, mpe azalaki kozela ete Yehova akokisa elaka yango.

Ndenge nini Abrahama amonisaki kondima na bilaka ya Yehova? (Talá paragrafe 5)

5. Ndenge nini toyebi ete Abrahama azalaki kozela engumba oyo Nzambe abongisaki?

5 Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azalaki kozela engumba, to Bokonzi, oyo Nzambe abongisaki? Ya liboso, Abrahama akómaki mwana-mboka ya bokonzi ata moko te awa na mabele. Azalaki kotambolatambola mpe aponaki ata esika moko te mpo afanda wana libela, mpe apesaki ata mokonzi moko te mabɔkɔ. Lisusu, Abrahama amekaki ata moke te kosala bokonzi na ye moko. Kasi akobaki kotosa Yehova mpe azelaki ete Yehova akokisa elaka na ye. Na ndenge yango, Abrahama amonisaki kondima makasi epai ya Yehova. Tótala mwa mikakatano oyo akutanaki na yango mpe makambo oyo tokoki koyekola na ndakisa na ye.

MIKAKATANO NINI ABRAHAMA AKUTANAKI NA YANGO?

6. Ure ezalaki engumba ya ndenge nini?

6 Engumba oyo Abrahama atikaki, ezalaki kitoko mpe ebatelamaki malamu. Batongaki bifelo minene mpe batimolaki terase monene ya mai na ngámbo misato ya engumba mpo na kobatela yango. Bato ya engumba Ure bayebaki kokoma mpe matematiki malamu. Mpe emonani ete engumba yango ezalaki esika oyo bato bazalaki kosala mombongo, mpo bato ya arkeoloji bakundolaki mikanda mingi ya makambo etali mimbongo na esika oyo engumba yango ezalaki. Bazalaki kotonga bandako na bango na briki, kopakola bifelo na yango pɔtɔpɔtɔ, mpe na nsima kotya yango langi ya mpɛmbɛ. Bandako yango mosusu ezalaki na bashambre 13 to 14 oyo ezalaki zingazinga ya veranda oyo batyá pavema.

7. Mpo na nini Abrahama asengelaki kondima ete Yehova akobatela ye ná libota na ye?

7 Abrahama asengelaki kotya motema ete Yehova akobatela ye ná libota na ye. Mpo na nini? Kobosana te ete Abrahama ná Sara batikaki ndako na bango ya kitoko mpe oyo ebatelamaki malamu na engumba Ure, mpe bakendaki kofanda na bahema, na bamboka ya Kanana. Ye ná libota na ye bazalaki lisusu te na libateli ya bifelo mpe ya terase ya mai oyo ezingaki engumba Ure. Kutu, bazalaki lisusu na libateli te mpe banguna bakokaki kobundisa bango kozanga mokakatano.

8. Na ntango moko boye, makambo nini ekómelaki Abrahama?

8 Abrahama asalaki mokano ya Nzambe, kasi na ntango moko boye azalaki kokoka lisusu te koleisa libota na ye. Nzala makasi ebɛtaki ekólo oyo Yehova ayebisaki ye ete akende kofanda. Nzala yango ezalaki makasi na boye ete, Abrahama azwaki ekateli ya kokende kofanda ná libota na ye mpo na mwa ntango na mokili ya Ezipito. Kasi ntango akómaki na Ezipito, Farao, mokonzi ya ekólo yango, abɔtɔlaki mwasi na ye. Kanisá mpasi oyo Abrahama ayokaki tii ntango Yehova ayebisaki Farao azongisa Sara, mwasi ya Abrahama.​—Eba. 12:10-19.

9. Mikakatano nini Abrahama akutanaki na yango na libota na ye?

9 Libota ya Abrahama ezalaki mpe na mikakatano mosusu ya minene. Mwasi na ye Sara azalaki kobota te. Na boumeli ya bambula mingi, likambo yango ezalaki kopesa libota na bango mpasi. Nsukansuka, Sara apesaki Abrahama mosaleli na ye Agare, mpo abotela bango bana. Kasi ntango Agare akómaki na zemi ya Yishimaele, akómaki kotyola Sara. Likambo yango ekómaki mpasi mpe Sara abenganaki Agare na ndako.​—Eba. 16:1-6.

10. Makambo nini oyo esalemaki mpo na Yishimaele mpe Yisaka oyo emekaki kondima ya Abrahama epai ya Yehova?

10 Nsukansuka, Sara akómaki na zemi mpe abotelaki Abrahama mwana mobali na nkombo Yisaka. Abrahama alingaki bana yango nyonso mibale, ezala Yishimaele mpe Yisaka. Kasi lokola Yishimaele azalaki konyokola Yisaka, Yehova ayebisaki Abrahama abengana Yishimaele mpe Agare. (Eba. 21:9-14) Nsima ya mwa ntango, Yehova ayebisaki Abrahama apesa Yisaka mbeka. (Eba. 22:1, 2; Ebr. 11:17-19) Na mbala nyonso wana mibale, Abrahama asengelaki kotya motema ete nsukansuka, Yehova akokokisa makambo oyo alobaki mpo na bana yango.

11. Mpo na nini Abrahama asengelaki kozela na motema mobimba ete Yehova akokisa bilaka na ye?

11 Na boumeli ya ntango yango, Abrahama asengelaki kozela na motema mobimba ete Yehova akokisa bilaka na ye. Ekoki kozala ete Abrahama azalaki na mbula koleka 70 ntango ye ná libota na ye balongwaki na Ure. (Eba. 11:31–12:4) Mpe na boumeli ya bambula soki nkama, Abrahama azalaki kofanda na bahema mpe kotambolatambola na mokili ya Kanana. Ntango Abrahama akufaki, azalaki na mbula 175. (Eba. 25:7) Kasi amonaki te kokokisama ya elaka ya Yehova ya kopesa bakitani na ye mokili ya Kanana. Mpe amonaki te engumba, elingi koloba, Bokonzi ya Nzambe oyo etyami. Atako bongo, Biblia elobi mpo na Abrahama ete, ntango akufaki ‘anunaki mpe atondaki na mikolo.’ (Eba. 25:8) Atako Abrahama akutanaki na mikakatano, azalaki kaka na kondima makasi, mpe na esengo mpenza azelaki Yehova akokisa bilaka na ye. Nini esalisaki Abrahama ayika mpiko? Na boumeli ya bomoi na ye, Yehova abatelaki ye mpe asalelaki ye makambo lokola moninga.​—Eba. 15:1; Yis. 41:8; Yak. 2:22, 23.

Lokola Abrahama ná Sara, ndenge nini basaleli ya Nzambe bamonisaka kondima mpe motema molai? (Talá paragrafe 12) *

12. Tozali kozela nini, mpe tokotalela makambo nini?

12 Lokola Abrahama, biso mpe tozali kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo. Kasi, tozali kozela te ete engumba yango etongama. Bokonzi ya Nzambe etyamaki kobanda 1914, mpe ezali koyangela kuna na likoló. (Em. 12:7-10) Kasi tozali kozela ete eyangela mpe mabele mobimba. Wana tozali kozela ete likambo yango esalema, tokoki kokutana na mikakatano mingi lokola oyo Abrahama ná Sara bakutanaki na yango, oyo ekoki kosɛnga ete tóyikela yango mpiko. Basaleli ya Yehova ya mikolo na biso mpe balandaka ndakisa ya Abrahama. Masolo ya bomoi oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaka ete bandeko mingi bazali komonisa motema molai mpe kondima lokola oyo ya Abrahama ná Sara. Tólobela mwa ndambo ya masolo yango mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.

BATO MOSUSU OYO BAMEKOLAKI NDAKISA YA ABRAHAMA

Bill Walden andimaki komipimela makambo mosusu mpe amonaki ndenge Yehova apambolaki ye

13. Lisolo ya ndeko Walden eteyi yo nini?

13 Ndimá komipimela makambo mosusu. Soki tolingi ete Bokonzi ya Nzambe ezala likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso, tosengeli kozala lokola Abrahama oyo andimaki komipimela makambo mosusu mpo na kosepelisa Nzambe. (Mat. 6:33; Mrk. 10:28-30) Tótala ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Bill Walden. * Na 1942, ntango abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova, Bill akómaki pene ya kozwa diplome ya ingénieur ya makambo etali kotonga na iniversite moko ya États-Unis. Molakisi na ye moko alobaki ete akolukela ye mosala nsima ya kozwa diplome, kasi Bill aboyaki. Ayebisaki molakisi yango ete azwaki ekateli ya komipesa mingi na mosala ya Nzambe, na esika ya kondima mosala oyo ekofuta ye mbongo mingi. Mwa moke na nsima, guvɛrnema esɛngaki Bill akɔta mosala ya soda. Na limemya nyonso, aboyaki mpe bafutisaki ye lomande ya dolare 10 000 mpe bakatelaki ye etumbu ya mbula mitano ya bolɔkɔ. Mbula misato na nsima, babimisaki ye na bolɔkɔ. Na nsima, akɔtaki eteyelo ya Gileade mpe asalaki lokola misionɛrɛ na Afrika. Nsima ya mwa ntango, Bill abalaki Eva mpe bango mibale basalaki na Afrika. Yango esɛngaki ete bámipimela makambo mingi. Nsukansuka, bazongaki na États-Unis mpo na kosalisa mama ya Bill. Alobeli na mokuse lisolo ya bomoi na ye na maloba oyo: “Soki nakanisi libaku monene oyo Yehova apesi ngai ya kosalela ye bambula koleka 70, mai ya miso ebimaka ngai. Napesaka ye ntango nyonso matondi ndenge asalisi ngai nalekisa bomoi na ngai mobimba na mosala na ye.” Yo mpe okondima kolekisa bomoi na yo mobimba na mosala ya ntango nyonso?

Ndeko mwasi Eleni ná mobali na ye Aristotelis Apostolidis bamonaki ndenge Yehova akómisaki bango makasi

14-15. Makambo oyo ndeko Apostolidis ná mwasi na ye bakutanaki na yango, eteyi yo nini?

14 Kokanisa te ete okozala na bomoi oyo ezangi mikakatano. Ndakisa ya Abrahama eteyi biso ete ata baoyo bapesá bomoi na bango mobimba mpo na kosalela Yehova, bakutanaka mpe na mikakatano. (Yak. 1:2; 1 Pe. 5:9) Ndeko Aristotelis Apostolidis * akutanaki mpe na likambo yango. Azwaki batisimo na ekólo Grèce na 1946, mpe na 1952 abalaki ndeko mwasi moko na nkombo Eleni, oyo azalaki mpe na mikano ndenge moko na oyo ya ye. Kasi Eleni abɛlaki kanser ya bɔɔngo. Balongolaki kanser yango, kasi mwa bambula nsima ya libala na bango, kanser yango ezongaki lisusu. Minganga basalaki ye lisusu lipaso, kasi ngámbo moko ya nzoto na ye ezalaki lisusu kosala te mpe azalaki lisusu kokoka koloba malamu te. Na ntango yango guvɛrnema etɛmɛlaki mosala na biso, kasi Eleni akobaki kaka kosakola na molende atako azalaki na maladi.

15 Ndeko Aristotelis asalisaki mwasi na ye na boumeli ya mbula 30. Na boumeli ya ntango yango azalaki nkulutu. Azalaki kosala na komite ya mayangani mpe apesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga Ndako ya Mayangani. Na nsima, mokolo moko na 1987 ntango Eleni azalaki kosakola, porte moko ya monene ya ebende ekwelaki ye mpe azokaki makasi. Azalaki komiyeba te na boumeli ya mbula misato mpe na nsima akufaki. Ndeko Aristotelis alobeli ndenge likambo yango etungisaki ye na maloba oyo: “Wana bambula ezalaki koleka, bampasi, mikakatano minene, mpe makambo oyo ekanami te ezalaki kosɛnga namonisa mpenza mpiko mpe nalɛmba te. Kasi Yehova apesaki ngai makasi oyo nasengelaki na yango mpo nalonga mikakatano wana.” (Nz. 94:18, 19) Yehova alingaka baoyo basalaka nyonso na mosala na ye, atako bazali kokutana na mikakatano!

Kotya makanisi na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya, esalisaki ndeko mwasi Audrey Hyde abatela makanisi malamu

16. Toli nini ya malamu ndeko Knorr apesaki mwasi na ye?

16 Kobá kotya makanisi na elikya na yo mpo na mikolo ezali koya. Abrahama atyaki makanisi na mbano oyo Yehova akopesa ye na mikolo ezali koya, mpe yango esalisaki ye ayika mpiko na mikakatano oyo akutanaki na yango. Ndeko mwasi Audrey Hyde akobaki kotya makanisi na elikya oyo azalaki na yango mpo na mikolo ezali koya. Mobali na ye ya liboso Nathan Knorr akufaki na maladi ya kanser, mpe Glenn Hyde mobali oyo abalaki na nsima, abɛlaki maladi ya Alzheimer. * Ndeko Audrey alobi ete makambo oyo ndeko Nathan Knorr ayebisaki ye mwa bapɔsɔ liboso akufa nde esalisaki ye. Alobi ete ndeko Nathan ayebisaki ye: “Nsima ya liwa, elikya oyo tozali na yango ekokokisama mpenza mpe tokozala na mpasi lisusu te.” Na nsima, alendisaki ye na maloba oyo: “Talá liboso mpo kuna nde mbano na yo ezali. . . .” Ndeko Nathan ayebisaki ye lisusu ‘azala na mingi ya kosala mpe asalela bomoi na ye mpo na kosalisa basusu. Yango ekosalisa ye azala na esengo.’ Kosalela basusu makambo ya malamu mpe ‘kosepela na elikya’ ezali toli ya malamu mpenza!​—Rom. 12:12.

17. (a) Mpo na nini tosengeli kotya makanisi na biso na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya? (b) Mpe ndenge nini Mika 7:7 ekosalisa biso tósepela na mapamboli oyo tokozwa na mikolo ezali koya?

17 Lelo oyo, tozali na bantina mingi ya kotya makanisi na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya. Makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi polele ete tozali na nsuka ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Mosika te, tokozela lisusu te ete Bokonzi ya Nzambe eyangela mabele mobimba. Moko ya mapamboli oyo ekopesa biso esengo ezali ya komona bandeko to baninga na biso basekwi. Na ntango yango, Yehova akopesa Abrahama mbano mpo na kondima mpe motema molai oyo amonisaki; akosekwisa ye ná bato ya libota na ye awa na mabele. Okozala wana mpo na koyamba bango? Okoki kozala wana soki ondimi komipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi ya Nzambe ndenge Abrahama asalaki, soki okobi kobatela kondima na yo atako mikakatano, mpe soki ozeli na motema mobimba Yehova akokisa bilaka na ye.​—Tángá Mika 7:7.

LOYEMBO 74 Yaká tóyemba loyembo ya Bokonzi!

^ par. 5 Wana tozali kozela kokokisama ya bilaka ya Nzambe, tokoki kobungisa ezaleli na biso ya kozala motema molai ata mpe kondima na biso. Mateya nini tokoki kozwa epai ya Abrahama oyo ekoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kozela na motema molai kokokisama ya bilaka ya Yehova? Mpe ndakisa nini ya malamu basaleli ya Yehova ya mikolo na biso batikelá biso?

^ par. 13 Lisolo ya bomoi ya ndeko Walden ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2013, nkasa 8-10.

^ par. 14 Lisolo ya bomoi ya ndeko Apostolidis ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2002, nkasa 24-28.

^ par. 16 Lisolo ya bomoi ya ndeko mwasi Hyde ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2004, lokasa 23-29.

^ par. 56 ELILINGI: Mobali moko ná mwasi na ye oyo bakómi mikóló bazali kokoba kosalela Yehova na bosembo atako mikakatano. Kotya makanisi na makambo oyo Yehova alaki mpo na mikolo ezali koya, ezali kosalisa bango bábatela kondima na bango makasi.