Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 36

Okoki sikoyo kokóma moluki-bato?

Okoki sikoyo kokóma moluki-bato?

“Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.”​—LUKA 5:10.

LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko

NA MOKUSE *

1. Libyangi nini Yesu apesaki baluki-mbisi minei, mpe basalaki nini?

MOYEKOLI Petro, Andre, Yakobo, mpe Yoane bazalaki kosala mosala ya koluka mbisi mpo na kotɛka. Kanisá ndenge bakamwaki ntango bayokaki libyangi ya Yesu oyo ete: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.” * Bayekoli yango basalaki nini? Biblia elobi: “Na mbala moko basundolaki minyama mpe balandaki ye.” (Mat. 4:18-22) Ekateli oyo bazwaki ebongolaki bomoi na bango mpo na libela. Na esika bákangaka mbisi, bakómaki nde “kokanga bato na bomoi.” (Luka 5:10) Lelo oyo, Yesu azali kosɛnga na bato ya mitema sembo oyo balingaka solo básala mpe bongo. (Mat. 28:19, 20) Osilá kondima libyangi ya Yesu ya kokóma moluki-bato?

2. Mpo na nini tosengeli kozwa na lisɛki te ekateli ya kokóma baluki-bato, mpe nini ekosalisa biso tózwa ekateli yango?

2 Mbala mosusu oyekolaka Biblia esali mwa bantango mpe osali mwa bambongwana na bomoi na yo. Sikoyo ozali kokanisa soki osengeli kozwa ekateli ya kokóma mosakoli ya nsango malamu to te. Kolɛmba nzoto te soki ozali kokakatana mpo na kondima libyangi ya Yesu. Mbala mosusu ozali kokakatana mpo oyebi ete yango ezali ekateli moko ya ntina mingi. Ya solo, Biblia elobi ete Petro ná baninga na ye basundolaki minyama na bango “na mbala moko.” Kasi, Petro ná ndeko na ye bazwaki te ekateli yango kozanga ete bákanisa malamumalamu. Basilaki koyeba mpe kondima ete Yesu azali Masiya basanza koleka motoba liboso. (Yoa. 1:35-42) Ndenge moko mpe, ekoki kozala ete osili koyekola makambo mingi oyo etali Yehova mpe Yesu, mpe ozali na mposa ya kokoba kokola na elimo. Kasi liboso ozwa ekateli ya kokóma mosakoli, osengeli kokanisa malamumalamu. Nini esalisaki Petro, Andre mpe basusu bázwa ekateli yango?

3. Bizaleli nini ekokómisa makasi mposa na yo ya kondima libyangi ya Yesu?

3 Bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki na molende, bayebaki mosala na bango malamu, bazalaki na mpiko, mpe bayebaki komipesa disiplini. Na ntembe te, bizaleli yango esalisaki bango báyeba malamu mosala ya kosakola nsango malamu. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo okoki kokolisa bizaleli yango mpo oyeba kosakola nsango malamu mpe koteya basusu.

BAKISÁ MOLENDE NA MOSALA YA KOSAKOLA

Petro ná basusu bakómaki baluki-bato. Mosala yango ya ntina mingi ezali mpe kokoba lelo oyo (Talá paragrafe 4-5)

4. Mpo na nini Petro azalaki kosala mosala ya koluka mbisi?

4 Petro azalaki kosala mosala ya kokanga mbisi kaka te mpo na koleisa libota na ye. Emonani ete azalaki mpe kolinga mosala yango. (Yoa. 21:3, 9-15) Ayekolaki mpe kolinga mosala ya koluka bato. Na lisalisi ya Yehova, Petro ayebaki mosala yango malamu.​—Mis. 2:14, 41.

5. Na kotalela Luka 5:8-11, mpo na nini Petro abangaki, mpe nini ekoki kosalisa biso tólonga mayoki ya ndenge wana?

5 Ntina ya libosoliboso oyo etindaka biso tósakola ezali mpo tolingaka Yehova. Bolingo mpo na Yehova ekoki kosalisa biso tóyebisa basusu makambo etali ye ata soki tokoki komiyoka lokola tobongi te mpo na kosala mosala yango. Ntango Yesu asɛngaki Petro akóma moluki-bato, ayebisaki ye: “Tiká kobanga.” (Tángá Luka 5:8-11.) Petro abangaki te makambo oyo ekokaki kosalema soki akómi moyekoli ya Yesu. Kasi akamwaki ndenge Yesu asalisaki bango bákanga mbisi ebele. Petro ayebaki ete Yesu asalaki likamwisi mpe amonaki ete abongi te kosala elongo na Yesu. Lokola Petro, yo mpe okoki kobanga soki okanisi makambo nyonso oyo ekosɛnga ete osala mpo na kokóma moyekoli ya Kristo. Soki ezali bongo, kómisá makasi bolingo na yo mpo na Yehova, mpo na Yesu, mpe mpo na mozalani na yo. Yango ekopesa yo mposa ya kondima libyangi ya Yesu ya kokóma moluki-bato.​—Mat. 22:37, 39; Yoa. 14:15.

6. Wapi bantina mosusu oyo etindaka biso tósakola?

6 Tótalela bantina mosusu oyo etindaka biso tósakola. Tolingaka kotosa etinda ya Yesu oyo ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli.” (Mat. 28:19, 20) Lisusu, tosakolaka mpo bato bazali ‘konyokwama mpe basundolami,’ mpe mpo bazali na mposa makasi ya koyekola solo oyo etali Bokonzi. (Mat. 9:36) Yehova alingi ete bato ya lolenge nyonso bázwa boyebi ya sikisiki ya solo mpe bábika.​—1 Tim. 2:4.

7. Ndenge nini Baroma 10:13-15 emonisi ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?

7 Ntango tokanisaka ndenge oyo mosala na biso ya kosakola ekoki kobikisa bato, yango etindaka biso tósakola. Na kokesana na moto oyo alukaka mbisi mpo na kotɛka to mpo na kolya, biso ‘tokangaka’ bato mpo na kobikisa bomoi na bango.​—Tángá Baroma 10:13-15; 1 Tim. 4:16.

YEKOLÁ MAKAMBO MINGI OYO ETALI NDENGE YA KOSAKOLA

8-9. Moluki-mbisi asengeli koyeba nini, mpe mpo na nini?

8 Na ntango ya Yesu, Moyisraele oyo azalaki moluki-mbisi asengelaki koyeba lolenge ya mbisi oyo alingi kokanga. (Lev. 11:9-12) Asengelaki mpe koyeba esika oyo akoki kokanga mbisi yango. Mbala mingi, mbisi elingaka kofanda na mai oyo yango esepeli mpe na esika oyo biloko ya kolya ezali mingi. Moluki-mbisi asengelaki mpe koyeba ntango ya malamu ya kokanga mbisi. Na likambo yango, tótala oyo ndeko mobali moko oyo afandaka na esanga ya Pacifique ayebisaki ndeko moko oyo azali misionɛrɛ. Mokolo moko, ndeko yango asɛngaki misionɛrɛ yango bákende koluka mbisi. Misionɛrɛ yango ayebisaki ndeko yango ete bákutana mokolo oyo elandi na ntɔngɔ na ngonga ya libwa. Ndeko yango ayebisaki ye ete: “Tokendaka koluka mbisi na ngonga oyo ebongi mpo na kokanga yango, kasi te na ngonga oyo ebongi mpo na biso.”

9 Ndenge moko mpe, na siɛklɛ ya liboso, bayekoli ya Yesu oyo bakómaki baluki-bato bazalaki kokende na bisika oyo bakoki kokuta bato mpe na ngonga oyo ebongi. Na ndakisa, bayekoli ya Yesu bazalaki koteya na tempelo mpe basinagoga, na ndako na ndako, mpe na zando. (Mis. 5:42; 17:17; 18:4) Biso mpe tosengeli koyeba mimeseno ya bato ya teritware na biso, mpe tosengeli kobongola programɛ na biso mpo na kosakola na bisika mpe na ngonga oyo tokoki kokutana na bango.​—1 Ko. 9:19-23.

BALUKI-MBISI OYO BAYEBI MOSALA MALAMU . . . 1. basalaka na esika mpe na ngonga oyo bakoki kozwa mbisi (Talá paragrafe 8-9)

10. Ebongiseli ya Yehova epesi biso bisaleli nini?

10 Moluki-mbisi asengeli kozala na bisaleli ya malamu mpe koyeba ndenge ya kosalela yango. Biso mpe tosengeli kozala na bisaleli oyo ebongi mpo na mosala ya kosakola. Tosengeli mpe koyeba kosalela yango malamu. Yesu apesaki bayekoli na ye malako ya polele mpo na ndenge ya kosakola nsango malamu. Ayebisaki bango eloko basengeli komema, esika oyo basengeli kosakola, mpe makambo oyo basengeli koloba. (Mat. 10:5-7; Luka 10:1-11) Lelo oyo, ebongiseli ya Yehova epesi biso Bisaleli mpo na koteya oyo esalisaka biso tókokisa mosala yango malamu. * Esalisaka mpe biso tóyeba ndenge ya kosalela malamu bisaleli yango. Formasyo yango esalisaka biso tóbangaka te ntango tozali kosakola, mpe tóyekola ndenge ya kokóma bateyi malamu.​—2 Tim. 2:15.

BALUKI-MBISI OYO BAYEBI MOSALA MALAMU . . . 2. bayekolaka kosalela bisaleli oyo ebongi (Talá paragrafe 10)

ZALÁ NA MPIKO

11. Mpo na nini baluki-bato basengeli kozala na mpiko?

11 Esɛngaka ete bato oyo balukaka mbisi mpo na kotɛka bázala na mpiko mpo bayebaka te ntango nini mpenza mopɛpɛ ekobɛta mpe mbala mingi basalaka na molili na butu. Baluki-bato mpe basengeli kozala na mpiko. Ntango tobandi kosakola mpe koyebisa basusu ete tozali Batatoli ya Yehova, bandeko ya libota bakoki kotɛmɛla biso, baninga bakoki kotyola biso, mpe bato mosusu bakoki koboya koyoka nsango na biso. Kasi yango ekamwisaka biso te. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokutana na botɛmɛli na mosala ya kosakola.​—Mat. 10:16.

12. Na kotalela Yosua 1:7-9, nini ekoki kosalisa biso tókóma na mpiko mingi?

12 Ndenge nini okoki kokóma na mpiko mingi? Ya liboso, osengeli kondima ete Yesu azali kokoba kotambwisa mosala ya kosakola. (Yoa. 16:33; Em. 14:14-16) Ya mibale, kómisá kondima na yo makasi na elaka ya Yehova oyo elobi ete akokokisa bamposa na yo. (Mat. 6:32-34) Soki kondima na yo ekómi makasi, okokóma mpe na mpiko mingi. Petro ná baninga na ye bamonisaki kondima makasi ntango basundolaki mosala na bango ya koluka mbisi mpo na kolanda Yesu. Ndenge moko mpe, omonisaki kondima makasi ntango oyebisaki baninga mpe bandeko ya libota na yo ete okómá koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe koyangana na makita. Na ntembe te, osali bambongwana mingi na bomoi na yo mpo na kotosa mibeko ya sembo ya Yehova. Yango esɛngaki mpe omonisa kondima mpe mpiko. Lokola ozali kokóma na mpiko mingi, okoki kozala na kondima ete “Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”​—Tángá Yosua 1:7-9.

BALUKI-MBISI OYO BAYEBI MOSALA MALAMU . . . 3. basalaka na mpiko nyonso ezala na moi to na malili makasi (Talá paragrafe 11-12)

13. Ndenge nini komanyola mpe libondeli ekoki kosalisa yo okóma na mpiko mingi?

13 Okoki kosala lisusu nini mpo okóma na mpiko mingi? Bondelá Yehova mpo apesa yo mpiko. (Mis. 4:29, 31) Yehova akoyanola na mabondeli na yo mpe akosundola yo soki moke te. Azalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa yo. Lisusu, okoki komanyola na ndenge oyo Yehova abikisaki bato mosusu na ntango ya kala. Kanisá mpe ndenge oyo asalisaka yo olonga mikakatano mpe ndenge oyo apesaka yo makasi ya kosala bambongwana na bomoi na yo. Na ntembe te, Nzambe oyo asalisaki bato na ye bákatisa Mbu Motane, akoki mpe kosalisa yo okóma moyekoli ya Kristo. (Kob. 14:13) Okoki kozala na kondima epai ya Yehova ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo alobaki: “Yehova azali pene na ngai; nakobanga te. Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?”​—Nz. 118:6.

14. Mateya nini ozwi na ndakisa ya ndeko mwasi Masae mpe Tomoyo?

14 Lolenge mosusu ya kokóma na mpiko ezali ya koyekola masolo ya bato oyo bazalaki nsɔninsɔni kasi Yehova asalisá bango bákóma na mpiko. Tólobela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Masae. Azalaki nsɔninsɔni mpe azalaki komona ete ata mokolo moko te akokoka kobima na mosala ya kosakola. Azalaki komona ete likanisi ya kosolola na bato oyo ayebi te ezali lokola komata ngomba moko molai mpe oyo akokoka kokóma na nsɔngɛ na yango te. Na yango, asalaki makasi mpo akolisa bolingo na ye mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na ye. Akanisaki na mozindo mpo na ndenge oyo mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu sikoyo, mpe abondelaki mpo akóma na mposa makasi ya kosakola. Alongolaki kobanga mpe akómaki kutu mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Yehova akoki mpe kosalisa basakoli ya sika mpo bázala “na mpiko.” Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi mosusu na nkombo Tomoyo. Mokolo ya liboso oyo asakolaki ndako na ndako, nkolo-ndako ya liboso agangelaki ye ete: “Nalingaka te kosolola na Batatoli ya Yehova!” na nsima akangaki porte. Na mpiko nyonso, Tomoyo ayebisaki ndeko mwasi oyo bazalaki kosakola na ye ete: “Oyoki ndenge alobi? Liboso kutu naloba ata likambo moko, ayebaki ete nazali Motatoli ya Yehova. Nazali mpenza na esengo!” Lelo oyo, Tomoyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

YEKOLÁ KOMIPESA DISIPLINI

15. Komipesa disiplini elimboli nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi mpo na bakristo?

15 Mpo baluki-mbisi bálonga na mosala na bango basengeli komipesa disiplini. Komipesa disiplini elimboli “kosala makasi mpo na kosala makambo oyo esengeli kosalema.” Na ndakisa, baluki-mbisi basengeli komipesa disiplini mpo na kolamuka ntɔngɔntɔngɔ, kozela tii mosala ekokóma na nsuka, mpe bakangaka motema ata soki moi to malili ezali makasi. Biso mpe tosengeli komipesa disiplini mpo tóyika mpiko tii mosala na biso ekokóma na nsuka.​—Mat. 10:22.

16. Ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli ya komipesa disiplini?

16 Tobotamaka te na ezaleli ya komipesa disiplini. Mbala mingi, tosepelaka kosala makambo oyo ezali pɛtɛɛ. Tosengeli koyekola komipekisa mpo na komipesa disiplini. Yango wana, tosengeli koluka lisalisi mpo tóyekola kosala makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo na biso. Yehova apesaka biso lisalisi yango na nzela ya elimo santu na ye.​—Gal. 5:22, 23.

17. Na kotalela 1 Bakorinti 9:25-27, ndenge nini ntoma Paulo alobeli milende oyo asalaki mpo na kokolisa ezaleli ya komipesa disiplini?

17 Ntoma Paulo ayebaki komipesa disiplini. Kasi alobaki ete asengelaki “kobɛtabɛta” nzoto na ye mpo na kosala oyo ezali malamu. (Tángá 1 Bakorinti 9:25-27.) Alendisaki bandeko bámipesaka disiplini, mpe básalaka makambo “na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Ko. 14:40) Tosengeli komipesa disiplini mpo tókoba kosala makambo ya losambo na biso mpo na Yehova, na ndakisa, kosakola mpe koteya nsango malamu mbala na mbala.​—Mis. 2:46.

KOUMISA MAKAMBO TE

18. Nini ekosala ete Yehova amona ete tolongi na mosala na biso?

18 Moluki-mbisi amonaka ete alongi soki akangi mbisi ebele. Kasi ezali bongo te mpo na mosala ya kosakola; kolonga na biso emonanaka te na motángo ya bato oyo tomemi na ebongiseli ya Yehova. (Luka 8:11-15) Yehova akomona ete tolongi na mosala na biso soki tokobi kosakola mpe koteya basusu nsango malamu. Mpo na nini? Mpo tozali kotosa ye mpe Mwana na ye.​—Mrk. 13:10; Mis. 5:28, 29.

19-20. Wapi likambo ya ntina mingi oyo etindaka biso tósakola lelo oyo?

19 Na bikólo mosusu, mosala ya kokanga mbisi epesami nzela kaka na boumeli ya mwa basanza moko boye. Na bikólo yango, baluki-mbisi basalaka mosala na bango na lombangu soki basanza yango elingi esila. Biso mpe tosengeli kosala mosala ya koluka bato na lombangu mpo nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene! Totikali na ntango mingi te mpo na mosala yango ya kosakola nsango malamu oyo ekoki kobikisa bomoi. Yango wana, koumisa makambo te. Kozela te ntango ya malamu mpo omipesa mobimba na mosala yango ya ntina mingi.​—Mos. 11:4.

20 Na yango, salá makasi obakisa molende na yo, okolisa boyebi na yo ya Liloba ya Nzambe, okóma na mpiko mingi, mpe olona ezaleli ya komipesa disiplini. Kɔtá na molɔngɔ ya bato koleka milio mwambe oyo basalaka mosala ya koluka bato na mokili mobimba, mpe okozwa esengo oyo Yehova apesaka. (Neh. 8:10) Zalá na ekateli ya komipesa mobimba na mosala yango tii ntango Yehova akoloba ete esili. Lisolo oyo elandi ekolobela lolenge misato oyo tokoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi.

LOYEMBO 66 Tósakola nsango malamu

^ par. 5 Yesu asɛngaki baluki-mbisi oyo bazalaki kosala mosala makasi mpe oyo bazalaki na komikitisa ete bákóma bayekoli na ye. Lelo oyo, Yesu azali kokoba kosɛnga bato oyo bazali na bizaleli yango bákóma baluki-bato. Lisolo oyo ekolobela makambo oyo bayekoli ya Biblia oyo bakakatanaka kondima libyangi ya Yesu basengeli kosala.

^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: Maloba “baluki-bato” esalelami mpo na kolobela baoyo nyonso basakolaka nsango malamu mpe bateyaka basusu bákóma bayekoli ya Kristo.

^ par. 10 Talá lisolo “Tóteyaka solo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2018, nk. 11-16.