Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 39

Lendisáká bandeko basi bakristo

Lendisáká bandeko basi bakristo

“Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.”​—NZ. 68:11.

LOYEMBO 137 Basi ya sembo, basi bakristo

NA MOKUSE *

Bandeko basi ya molende bazali kosala makambo ndenge na ndenge: kopesa biyano na makita, kobima na mosala ya kosakola, kopesa mabɔkɔ mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi, mpe kotyela bandeko mosusu likebi (Talá paragrafe 1)

1. Makambo nini bandeko basi basalaka na ebongiseli ya Yehova, kasi mingi na bango bakutanaka na mikakatano nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)

TOZALI mpenza na botɔndi ndenge tozali na ebele ya bandeko basi na lisangá, oyo basalaka mosala makasi! Na ndakisa, bapesaka biyano mpe basalaka bilakiseli na makita ya lisangá, mpe babimaka na mosala ya kosakola. Basusu bapesaka mabɔkɔ na misala ya kobatela Ndako ya Bokonzi, mpe batyelaka bandeko ya lisangá likebi. Atako bongo, bakutanaka mpe na mikakatano. Bandeko basi mosusu basalisaka baboti na bango oyo bakómi mibange. Basusu bazali koyika mpiko na botɛmɛli ya bato ya libota na bango. Basusu mpe babɔkɔlaka bana bango moko mpe basalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bana yango.

2. Mpo na nini tosengeli kopesaka bandeko basi mabɔkɔ?

2 Mpo na nini tosengeli kolendisaka bandeko basi bakristo? Mpo mbala mingi, bato ya mokili bapesaka basi te lokumu oyo babongi na yango. Longola yango, Biblia esɛngaka biso tópesaka bango mabɔkɔ. Na ndakisa, ntoma Paulo alendisaki bandeko ya lisangá ya Roma ete báyamba malamu ndeko mwasi Foebe mpe ‘básalisa ye na likambo nyonso oyo akozala na mposa ya lisalisi.’ (Rom. 16:1, 2) Ntango azalaki Mofarisai, mbala mosusu Paulo azalaki na kati ya bato oyo bazalaki komona basi lokola bato mpamba. Kasi ntango akómaki mokristo, amekolaki Yesu mpe akómaki kopesa basi lokumu, mpe kosalela bango makambo na boboto.​—1 Ko. 11:1.

3. Ndenge nini Yesu azalaki kosalela basi makambo, mpe ndenge nini azalaki kotalela basi oyo bazalaki kosala mokano ya Nzambe?

3 Yesu azalaki kopesa basi nyonso lokumu. (Yoa. 4:27) Azalaki kotalela basi te ndenge bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya mikolo na ye bazalaki kotalela bango. Kutu, buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete: “Ata mokolo moko te Yesu alobá likambo moko ya mabe mpo na kotyola to kokitisa basi.” Nzokande, Yesu azalaki kopesa basi oyo bazalaki kosala mokano ya Tata na ye lokumu mingi koleka. Kutu, azalaki kobenga bango bandeko na ye ya basi mpe atángaki bango esika moko na mibali oyo azalaki komona ete bazali libota na ye ya elimo.​—Mat. 12:50.

4. Makambo nini tokolobela na lisolo oyo?

4 Yesu azalaki ntango nyonso pene ya kosalisa basi oyo bazalaki kosalela Nzambe. Azalaki kozwa bango na motuya mpe azalaki kolongisa bango. Tólobela ndenge oyo tokoki komekola Yesu na likambo etali kopesa bandeko basi lokumu.

PESÁKÁ BANDEKO BASI BAKRISTO LOKUMU

5. Mpo na nini bandeko basi mosusu bakoki kozala na mokakatano ya kozala na baninga ya malamu?

5 Biso nyonso, tózala bandeko mibali to bandeko basi, tolingaka kozala na baninga ya malamu. Kasi na bantango mosusu, bandeko basi bakoki kozala na mokakatano ya kozala na baninga ya malamu. Mpo na nini? Ndeko mwasi moko na nkombo Jordan * alobi boye: “Lokola nazali monzemba, mbala mingi namonaka te ntina mpe esika na ngai na kati ya lisangá.” Kristen, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela mpe oyo akendaki na teritware mosusu mpo na kosakola mingi, alobi boye: “Okoki komimona lokola ozali yo moko ntango okómi sika na lisangá moko.” Bandeko mibali mosusu mpe bakoki komiyoka bongo. Baoyo bafandaka na bato ya libota na bango oyo bazali Batatoli te bakoki komimona lokola bakabwaná na bango. Bakoki mpe komiyoka ete bazali mosika na bandeko ya lisangá. Bandeko basi mosusu bakoki komiyoka bango moko mpo bakɔtá ndako mpo na maladi to mpo bazali kosalisa ndeko moko ya libota na bango oyo azali na maladi. Ndeko mwasi moko na nkombo Annette alobi boye: “Nakokaki te kondima kokende kolekisa ntango elongo na bandeko ya lisangá mpo ngai nde nazalaki kosalisa mama na ngai oyo azalaki kobɛla.”

Lokola Yesu, tokoki komonisa ete totyelaka bandeko basi ya sembo likebi (Talá paragrafe 6-9) *

6. Ndenge Luka 10:38-42 emonisi yango, ndenge nini Yesu asalisaki Marta mpe Maria?

6 Yesu azalaki kolekisa ntango elongo na basi oyo bazalaki kosalela Nzambe, mpe azalaki moninga ya solosolo mpo na bango. Tólobela boninga oyo asalaki na Maria mpe Marta, oyo mbala mosusu bazalaki mpe minzemba. (Tángá Luka 10:38-42.) Ezala na maloba to na misala na ye, Yesu azalaki kosala ete bámiyoka malamu. Na ndakisa, Maria abangaki te kofanda na makolo ya Yesu mpo na koyoka mateya na ye. * Marta mpe abangaki te koyebisa Yesu ete azalaki komitungisa ndenge Maria azalaki kosalisa ye te mpo na kolamba. Na libaku yango, Yesu asalisaki basi yango mibale na elimo. Lisusu, Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bandeko basi yango ná Lazare ndeko na bango ya mobali likebi na ndenge akendaki kotala bango na mabaku mosusu. (Yoa. 12:1-3) Tokoki kokamwa te ndenge Maria ná Marta bayebaki ete Yesu akokaki kosalisa bango ntango Lazare abɛlaki makasi.​—Yoa. 11:3, 5.

7. Wapi lolenge moko oyo tokoki kolendisa bandeko basi?

7 Mpo na bandeko basi mosusu, makita nde ezalaka libaku ya libosoliboso oyo esalisaka bango bázala elongo na bandeko ya lisangá. Na yango, tosengeli kosalela libaku yango mpo na kotombela bango boyei malamu, kosolola na bango, mpe komonisa bango ete totyelaka bango likebi. Jordan, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Soki bandeko bapesi ngai longonya mpo na biyano oyo napesaki na makita, to basɛngi ngai tóbima mosala ya kosakola, to mpe soki bamonisi ete batyelaka ngai likebi, yango elendisaka ngai mpenza.” Tosengeli komonisa bandeko na biso ya basi ete tozwaka bango na motuya mingi. Ndeko mwasi moko na nkombo Kia alobi boye: “Soki nazangisi likita moko, nayebaka ete bandeko bakotindela ngai bamesaje mpo na koyeba soki nazali malamu. Yango esalisaka ngai namona ete bandeko batyelaka ngai likebi.”

8. Wapi lolenge mosusu oyo tokoki komekola Yesu?

8 Lokola Yesu, tokoki mpe kolekisa ntango elongo na bandeko basi. Na ndakisa, tokoki kobengisa bango na ndako mpo na kolya mwa eloko, to mpo na kominanola elongo. Soki tosali bongo, tosengeli kosala makasi tóbɛta kaka masolo ya kolendisa. (Rom. 1:11, 12) Bankulutu basengeli kozala na makanisi lokola oyo ya Yesu. Ayebaki ete kozala monzemba ekoki kozala mpasi mpo na basusu, kasi amonisaki polele ete esengo ya solosolo eutaka te na kobala to na kobota bana. (Luka 11:27, 28) Kasi moto azalaka na esengo ya solosolo soki atye mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye.​—Mat. 19:12.

9. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa bandeko basi?

9 Mingimingi bankulutu basengeli kozwaka bandeko basi bakristo lokola bamama mpe lokola bandeko na bango ya basi. (1 Tim. 5:1, 2) Bankulutu basengeli kozwaka ntango liboso to nsima ya makita mpo na kosolola na bandeko basi. Kristen, ndeko mwasi oyo tolobelaki, alobi boye: “Nkulutu moko amonaki ete nazalaki na makambo ebele ya kosala mpe alingaki koyeba ndenge oyo nabongisaka programɛ na ngai. Nasepelaki mpenza ndenge atyelaki ngai likebi.” Soki bankulutu bazali kozwa ntango ya kosolola mbala na mbala na bandeko basi, yango ekomonisa ete batyelaka bango likebi. * Annette, oyo tolobelaki liboso, alobeli moko ya matomba oyo azwaki ndenge azalaki kosolola mbala na mbala na bankulutu. Alobi boye: “Yango esalisaki biso tókóma baninga. Na yango, soki nakutani na mokakatano, ezalaka mpasi te mpo nakende koluka lisalisi epai na bango.”

MONISÁKÁ BOTƆNDI MPO NA OYO BANDEKO BASI BASALAKA

10. Nini ekoki kopesa bandeko basi esengo?

10 Biso nyonso, tózala basi to mibali, tosepelaka ntango bato mosusu bamonaka makoki oyo tozali na yango mpe soki bayebisi biso ete basepeli na mosala oyo tosali. Nzokande, soki ata moto moko te amonisaka botɔndi mpo na makoki oyo tozali na yango, to mpo na mosala oyo tosali, yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Abigail, ndeko mwasi moko ya monzemba mpe oyo azali mobongisi-nzela alobi ete na bantango mosusu, amonaka ete babosanaka ye. Alobi boye: “Bato bamonaka ngai kaka lokola ndeko ya songolo to mwana ya pakala. Na bantango mosusu, emonanaka lokola ata moto moko te amonaka ngai.” Kasi, talá oyo ndeko mwasi moko na nkombo Pam alobi. Ntango azalaki monzemba, azalaki misionɛrɛ bambula mingi. Nsukansuka, azongaki na ekólo na bango mpo na kosalisa baboti na ye. Sikoyo azali na mbula koleka 70 mpe azali kaka mobongisi-nzela. Ndeko Pam alobi boye: “Ntango basusu bayebisaka ngai ete basepelaka na oyo nazali kosala, esalisaka ngai mingi.”

11. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki na botɔndi epai ya basi oyo bazalaki kosalisa ye?

11 Yesu asepelaki na lisalisi oyo azwaki epai ya basi ya sembo, oyo “bazalaki kopesa biloko na bango” mpo na kosalisa ye. (Luka 8:1-3) Asukaki kaka te na kopesa bango lokumu ya kosalela ye, kasi ateyaki bango mpe mateya ya ntina mingi oyo etali mokano ya Nzambe. Na ndakisa, ayebisaki bango ete akokufa mpe na nsima akosekwa. (Luka 24:5-8) Kaka ndenge asalaki mpo na bantoma, abongisaki mpe basi yango mpo na mikakatano oyo basengelaki kokutana na yango. (Mrk. 9:30-32; 10:32-34) Mpe atako bantoma bakimaki ntango bakangaki Yesu, basi mosusu oyo bazalaki kosalisa ye bazalaki pembeni na ye ntango azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi.​—Mat. 26:56; Mrk. 15:40, 41.

12. Mosala nini Yesu apesaki basi?

12 Yesu apesaki basi mosala moko ya ntina mingi. Na ndakisa, basi oyo bazalaki kobanga Nzambe nde bazalaki bato ya liboso oyo bapesaki nsango ete Yesu asekwi. Asɛngaki basi yango bákende koyebisa bantoma na ye ete asekwi. (Mat. 28:5, 9, 10) Mpe ekoki kozala ete basi mosusu bazalaki wana ntango elimo santu ekitelaki bayekoli na Pantekote ya mobu 33 T.B. Soki ezali bongo, ekoki kozala ete bandeko basi yango oyo bautaki kotyama mafuta na elimo bazwaki mpe na ndenge ya likamwisi likoki ya koloba na minɔkɔ mosusu mpe ya koyebisa basusu “makambo minene ya Nzambe.”​—Mis. 1:14; 2:2-4, 11.

13. Misala nini bandeko basi bazali kosala lelo oyo, mpe ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na yango?

13 Tosengeli kopesaka bandeko basi longonya mpo na nyonso oyo bazali kosala na mosala ya Yehova. Na ndakisa, kotonga mpe kobatela bandako na biso ya losambo, kopesa mabɔkɔ na bituluku ya minɔkɔ mosusu, mpe kosala lokola bavolontɛrɛ na Betele. Bandeko basi bapesaka mpe mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko oyo bakutani na makama, basalisaka na kobongola mikanda na biso, mpe basalaka lokola babongisi-nzela mpe bamisionɛrɛ. Ndenge moko na bandeko mibali, bandeko basi bakɔtaka eteyelo ya babongisi-nzela, Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, mpe Eteyelo ya Gileade. Longola yango, bandeko basi oyo babalá basalisaka mibali na bango mpo bákokisa mikumba oyo bazali na yango na lisangá mpe na ebongiseli ya Yehova. Soki basi na bango basalisi bango te, bandeko mibali yango bakokoka mpenza te kozala “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Omoni mwa makambo oyo okoki kosala mpo osalisa bandeko basi yango na mosala oyo bazali kosala?

14. Na kotalela maloba oyo ezali na Nzembo 68:11, bankulutu ya bwanya basalaka nini?

14 Bankulutu ya bwanya bayebi ete bandeko basi bazali “limpinga moko monene” ya basali ya molende, mpe mbala mingi bazalaka basakoli oyo bayebi mpenza kosakola. (Tángá Nzembo 68:11.) Yango wana bankulutu balukaka ndenge ya koyekola makambo mosusu epai ya bandeko basi yango. Abigail, oyo tolobelaki liboso, asepelaka ntango bandeko mibali batunaka ye soki lolenge nini ya kobanda masolo amonaka ete esimbaka malamu na teritware na bango. Alobi boye: “Yango esalisaka ngai namona ete Yehova apesá ngai mosala ya ntina mingi na ebongiseli na ye.” Bankulutu bayebaka mpe ete bandeko basi ya sembo, oyo bakɔmɛli na elimo, bayebaka mpenza ndenge ya kosalisa bilenge basi oyo bakutani na mikakatano. (Tito 2:3-5) Ya solo mpenza, tosengeli komonisa botɔndi mpe bolingo mpo na bandeko basi!

LOBÁKÁ MPO NA KOLONGISA BANDEKO BASI

15. Na bantango nini bandeko basi bakoki kozala na mposa ete moto moko asalisa bango?

15 Na bantango mosusu, bandeko basi bakoki kozala na mposa ete moto moko asalisa bango ntango bakutani na mokakatano moko boye. (Yis. 1:17) Na ndakisa, ndeko mwasi oyo mobali akufá to oyo libala ekufá, akoki kozala na mposa ete moto moko asamba mpo na ye mpe asalisa ye na makambo mosusu oyo mobali na ye azalaki kosala. Ndeko mwasi oyo akómi mobange akoki kozala na mposa ete moto moko asalisa ye mpo na kosolola na minganga. To mpe ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela oyo apesaka mpe mabɔkɔ na misala mosusu ya teokrasi, akoki kozala na mposa ete ndeko moko aloba mpo na ye ntango basusu bazali koloba mabe ndenge azali lisusu kosakola mingi te. Likambo nini mosusu tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko basi? Tólobela lisusu ndakisa ya Yesu.

16. Na kotalela Marko 14:3-9, ndenge nini Yesu alongisaki Maria?

16 Yesu azalaki kokakatana te mpo na kolongisa bandeko basi ya sembo ntango bato mosusu bakaniseli bango mabe. Na ndakisa, alongisaki Maria ntango Marta azalaki koloba mabe mpo na ye. (Luka 10:38-42) Alongisaki lisusu Maria ntango bato mosusu bapamelaki ye mpo bakanisaki ete azwaki ekateli ya mabe. (Tángá Marko 14:3-9.) Yesu ayebaki makanisi oyo etindaki Maria asala likambo yango, mpe apesaki ye longonya mpo na yango. Alobaki boye: “Asaleli ngai likambo moko ya malamu. . . . Asali oyo ekoki na ye.” Kutu asakolaki ete “epai nyonso bakosakola nsango malamu na mokili mobimba,” bakolobela mpe likambo oyo mwasi yango asalaki, kaka ndenge lisolo oyo mpe esali yango. Ezali mpenza kokamwisa komona ete na nzela ya likambo ya boboto oyo mwasi yango asalaki, Yesu alobi ete nsango malamu ekosakolama na mokili mobimba! Na ntembe te, atako bakaniselaki Maria mabe, koyoka maloba ya ndenge wana, ekitisaki ye mpenza motema!

17. Ntango nini ekoki kosɛnga ete tóloba malamu mpo na ndeko mwasi moko? Pesá ndakisa.

17 Ntango bandeko basi bazalaka na mposa ya lisalisi, osalaka yango? Tózwa ndakisa moko. Bandeko ya lisangá bamoni ete ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azali Motatoli te ayaka na makita na retare, mpe soki kaka makita esili, azongaka mbala moko. Mpe bamoni ete amemaka mpenza bana na ye na makita te. Na yango, bakómi koloba mabe mpo na ndeko yango, mpe koloba ete asengelaki kotya mobali na ye mbamba mpo amemaka bana na makita. Kasi, bandeko bazali kobosana ete ndeko mwasi yango azali kosala oyo akoki. Mpe babosani ete mobali na ye akoki kosɛnga ye asala makambo mosusu na ngonga boye to boye. Lisusu, ezali ye te moto azali na liloba ya nsuka mpo na bana na ye. Okosala nini soki oyoki ete bato mosusu bazali koloba mabe mpo na ndeko mwasi yango? Soki olobi malamu mpo na ye mpe oyebisi bato mosusu makambo ya malamu oyo azali kosala, yango ekoki kosala ete bátika kolobela ye mabe.

18. Wapi makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko basi?

18 Tokomonisa bandeko basi ete totyelaka bango likebi soki tozali kosala mwa makambo mpo na kosalisa bango. (1 Yoa. 3:18) Annette, ndeko mwasi oyo azalaki kosalisa mama na ye oyo azalaki kobɛla, alobi boye: “Bandeko mosusu bazalaki koya na ndako mpo na kosalisa mama mpo ngai nakoka kosala makambo mosusu. Basusu mpe bazalaki komemela biso biloko ya kolya. Yango esalisaki ngai namona ete balingaka ngai mpe nazali na ntina na kati ya lisangá.” Ndeko mwasi Jordan mpe azwaki lisalisi. Ndeko mobali moko alakisaki ye ndenge ya kobatela motuka na ye. Jordan alobi boye: “Ezali esengo koyeba ete bandeko ya lisangá balingaka nazwa likama te ntango nazali kokumba motuka!”

19. Wapi lolenge mosusu oyo bankulutu bakoki kosalisa bandeko basi?

19 Bankulutu mpe basalaka nyonso mpo na kosalisa bandeko basi. Bayebi ete Yehova alingaka ete básalelaka bango makambo na boboto. (Yak. 1:27) Na yango, na ndakisa ya Yesu, bazalaka makambo makasimakasi te, baboyaka kotingama na mibeko soki esɛngi ete bámonisa boboto mpe bososoli. (Mat. 15:22-28) Ntango bankulutu basalisaka bandeko basi, bandeko yango bamonaka ete Yehova mpe ebongiseli na ye batyelaka bango likebi. Ndeko mwasi Kia azalaki kokende kofanda esika mosusu. Ntango mokɛngɛli ya etuluku na bango ya mosala ya kosakola ayokaki likambo yango, na mbala moko alukaki ndenge ya kosalisa ye. Ndeko Kia alobi boye: “Yango esalaki ete namitungisa lisusu te. Lokola balendisaki ngai mpe bapesaki ngai lisalisi oyo ebongi, bankulutu bamonisaki polele ete nazali na ntina na kati ya lisangá, mpe ete nazali ngai moko te ata na ntango ya mikakatano.”

BANDEKO BASI NYONSO BAZALI NA MPOSA YA LISALISI NA BISO

20-21. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka na motuya bandeko basi nyonso?

20 Na masangá na biso, tomonaka ebele ya bandeko basi oyo bazalaka makasi na mosala. Bazali bandakisa malamu mpo na biso mpe tosengeli kosalisa bango. Ndenge tomonaki yango na ndakisa ya Yesu, tokoki kosalisa bango soki tozali kolekisa ntango elongo na bango mpe kosala makasi tóyeba bango. Tokoki mpe komonisa botɔndi mpo na oyo bazali kosala na mosala ya Nzambe. Mpe soki esengeli, tokoki kolongisa bango.

21 Na nsuka ya mokanda oyo akomelaki bakristo ya lisangá ya Roma, ntoma Paulo atángaki bankombo ya bandeko basi libwa. (Rom. 16:1, 3, 6, 12, 13, 15) Na ntembe te, basi yango balendisamaki ntango bayokaki mbote mpe longonya oyo ntoma Paulo apesaki bango. Biso mpe tosengeli kopesa bandeko basi ya lisangá na biso mabɔkɔ. Na ndenge yango, tokomonisa ete tolingaka bango mpe tozali libota moko.

LOYEMBO 136 Yehova akopesa mbano

^ par. 5 Bandeko basi bakristo bakutanaka na mikakatano mingi. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki komekola ndakisa ya Yesu mpo na kolendisa bango. Tokoki kozwa mateya na ndenge oyo Yesu azalaki kolekisa ntango elongo na basi, ndenge azalaki kopesa bango lokumu, mpe ndenge azalaki kolongisa bango.

^ par. 5 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 6 Buku moko elobi boye: “Bayekoli bazalaki kofanda na makolo ya balakisi na bango. Bayekoli oyo bazalaki kozwa makambo na lisɛki te bazalaki kozwa formasyo mpo bango mpe bakóma bateyi; mokumba oyo basi bazalaki na ndingisa ya kozwa te. . . . Yango wana, komona Maria, mwana mwasi, afandi na makolo ya Yesu mpo na koyoka mateya na ye na likebi, . . . ekokaki kobɛtisa Bayuda mingi ya mibali libaku.”

^ par. 9 Bankulutu basengeli kozala ekɛngɛ ntango bazali kosalisa bandeko basi. Na ndakisa, nkulutu asengeli koboya kokende kotala ndeko mwasi kaka ye moko.

^ par. 65 NDIMBOLA YA ELILINGI: Bandeko mibali bazali komekola ndenge oyo Yesu azalaki kotyela basi ya sembo likebi: Ndeko mobali moko azali kotyela bandeko basi mibale pinɛ ya sika na motuka na bango. Ndeko mobali mosusu akei kotala ndeko mwasi moko oyo azali ebɔsɔnɔ; mosusu akei ná mwasi na ye mpo na kosangana na losambo na kati ya libota ya ndeko mwasi moko ná mwana na ye ya mwasi.