Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 43

Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye

Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye

“‘Na limpinga ya basoda te, na nguya mpe te, kasi nde na elimo na ngai,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”​—ZEK. 4:6.

LOYEMBO 40 Nzambe na yo nani?

NA MOKUSE *

1. Bakristo oyo bazwá batisimo basengeli kokoba kosala nini?

OSILÁ kozwa batisimo? Soki ezali bongo, omonisaki polele na miso ya bato nyonso ete ondimelaka Yehova, mpe ozali na mposa ya kosalela ye na kati ya ebongiseli na ye. * Na ntembe te, kondima na yo epai ya Yehova esengeli kokoba kokóma makasi. Mpe osengeli kokoba kondima mpenza ete Yehova azali kosalela ebongiseli na ye lelo oyo.

2-3. Bizaleli nini ya Yehova ezali komonana ntango azali kotambwisa ebongiseli na ye lelo oyo? Pesá bandakisa.

2 Lelo oyo, Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye na ndenge oyo ezali komonisa bomoto na ye, mokano na ye, mpe mibeko na ye. Tólobela bizaleli misato ya Yehova oyo ezali komonana na kati ya ebongiseli na ye.

3 Ya liboso, “Nzambe aponaka bilongi te.” (Mis. 10:34) Bolingo nde etindaki Yehova apesa Mwana na ye “lisiko . . . mpo na bato nyonso.” (1 Tim. 2:6; Yoa. 3:16) Yehova azali kosalela basaleli na ye mpo básakola nsango malamu epai ya moto nyonso oyo akoyoka; na ndenge yango, azali kosalisa bato mingi bázwa litomba na lisiko. Ya mibale, Yehova azali Nzambe ya kimya mpe asalaka makambo na molɔngɔ. (1 Ko. 14:33, 40) Yango wana, bato oyo basambelaka ye basalaka yango na molɔngɔ mpe na kimya. Ya misato, Yehova azali ‘Molakisi Monene.’ (Yis. 30:20, 21) Yango wana, ebongiseli na ye esalaka makasi eteya bato Liloba na ye, Biblia, ezala na lisangá to mpe na mosala ya kosakola. Ndenge nini baoyo bazalaki na lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso bamekolaki bizaleli misato wana ya Yehova? Ndenge nini basaleli ya Yehova bazali komekola bizaleli yango lelo oyo? Mpe ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa yo ntango ozali kosalela Yehova na kati ya ebongiseli na ye lelo oyo?

NZAMBE APONAKA BILONGI TE

4. Na Misala 1:8, likambo nini Yesu asɛngaki bayekoli na ye básala, mpe lisalisi nini basengelaki kozwa?

4 Na siɛklɛ ya liboso. Nsango oyo Yesu asakolaki epesaki moto nyonso elikya. (Luka 4:43) Apesaki bayekoli na ye mitindo ete bákoba mosala oyo abandaki. Ayebisaki bango bápesa litatoli “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Tángá Misala 1:8.) Na ntembe te, bakokaki kosala mosala yango na makasi na bango moko te. Basengelaki na elimo santu, elingi koloba, “mosungi” oyo Yesu alakaki bango.​—Yoa. 14:26; Zek. 4:6.

5-6. Na ndenge nini elimo santu esalisaki bayekoli ya Yesu?

5 Bayekoli ya Yesu bazwaki elimo santu na mokolo ya pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso. Na lisalisi ya elimo yango, babandaki mbala moko kosakola, mpe nsima ya mwa ntango moke, ebele mpenza ya bato bandimaki nsango malamu. (Mis. 2:41; 4:4) Ntango botɛmɛli ebimaki, bayekoli babangaki te kasi basɛngaki nde Nzambe asalisa bango. Babondelaki boye: “Pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Na nsima, batondaki na elimo santu mpe bakobaki “koloba liloba ya Nzambe na mpiko mpenza.”​—Mis. 4:18-20, 29, 31.

6 Bayekoli ya Yesu bakutanaki mpe na mikakatano mosusu. Na ndakisa, barulo ya Makomami ezalaki mingi te. Bazalaki te na mikanda oyo elimbolaka Biblia ndenge tozali na yango lelo. Mpe bayekoli basengelaki kosakwela bato oyo bazalaki koloba minɔkɔ ndenge na ndenge. Atako bakutanaki na mikakatano nyonso wana, bayekoli yango ya molende basalaki mosala moko ya kokamwa mpenza. Na boumeli ya mbula soki 30 mpamba, basakolaki nsango malamu epai ya “bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.”​—Kol. 1:6, 23.

7. Bambula koleka 100 liboso, ndenge nini basaleli ya Yehova bayebaki makambo oyo azalaki kosɛnga bango, mpe basalaki nini?

7 Na mikolo na biso. Yehova azali kokoba kotambwisa basaleli na ye mpe kopesa bango makasi. Azali kotambwisa biso mingimingi na nzela ya Biblia, Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Na Liloba na ye, totángaka makambo etali mosala oyo Yesu asalaki mpe ndenge oyo apesaki bayekoli na ye mitindo ete bákoba mosala oyo ye abandisaki. (Mat. 28:19, 20) Banda na sanza ya 07/1881, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Yehova aponaki biso te, mpe atyaki biso mafuta na elimo te mpo bato bákumisa biso to mpo tókóma bazwi, kasi aponaki biso nde mpo tósalela eloko nyonso oyo tozali na yango mpo na kosakola nsango malamu.” Mwa buku Bato oyo bazwi mosala oyo ebimaki na 1919 na Anglais, elobaki boye: “Mosala ya kosala ezali mingi, kasi ezali mosala ya Nkolo, mpe ye moko akopesa biso makasi ya kosala mosala yango.” Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, bandeko yango ya molende bamipesaki na mosala, batyaki elikya ete elimo santu ekosalisa bango básakwela bato ya lolenge nyonso. Lelo oyo, biso mpe tozalaka na elikya ete elimo santu ekosalisa biso.

Ebongiseli ya Yehova esalelaka bisaleli ya malamu mpenza mpo na kopalanganisa nsango malamu (Talá paragrafe 8-9)

8-9. Bisaleli mpe mayele nini ebongiseli ya Yehova esaleli mpo na kosakola nsango malamu?

8 Ebongiseli ya Yehova esalelá bisaleli ya malamu mpenza mpo na kopalanganisa nsango malamu. Kati na bisaleli yango tokoki kotánga mikanda, “Fɔtɔ-Dramɛ ya bozalisi,” bafono, mituka oyo ezalaki na bikoliseli-loláká, radio, mpe sikoyo tokómi kosalela Internet ná baordinatɛrɛ. Ebongiseli ya Yehova ezali mpe kobongola mikanda na minɔkɔ ebele koleka na ndenge oyo esalemá naino te na mokili mobimba! Mpo na nini? Mpo bato ya ndenge nyonso bákoka koyoka nsango malamu na monɔkɔ ya mboka na bango. Yehova aponaka bilongi te; asakolaki ete nsango malamu ekosakolama na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Em. 14:6, 7) Alingi ete moto nyonso ayoka nsango ya Bokonzi.

9 Bongo bato oyo tokoki kosakwela te mpo bafandi na bandako oyo tozali na likoki ya kokɔta kuna te? Mpo na kosakwela bato ya ndenge wana, Yehova asalisi biso na nzela ya ebongiseli ye mpo tóbanda kopesa litatoli na bisika ya bato mingi. Na ndakisa na 2001, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete bandeko ya France bábanda kosalela bashario mpe bisaleli mosusu mpo na kolakisa mikanda na biso. Mpe na nsima, bamboka mosusu mpe ebandaki kosalela yango. Yango ebotaki mbuma ya malamu mpenza. Na 2011, programɛ moko ya sika ebandaki na États-Unis, na engumba New York, na esika moko oyo bato bazalaka ebele mpenza. Kaka na mbula ya liboso, bandeko bakabolaki babuku 102 129, mpe bazulunalo 68 911. Mpe bato 4 701 basɛngaki báyekola Biblia! Emonani polele ete elimo santu esalisaki bandeko na mosala yango. Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete bandeko ya mokili mobimba básalelaka bashario mpe bisaleli mosusu ya kolakisa mikanda na mosala ya kosakola.

10. Tokoki kosala nini mpo tókóma kosakola mpe koteya malamu?

10 Oyo osengeli kosala. Saleláká malamumalamu formasyo oyo Yehova apesaka biso na makita ya lisangá. Sakoláká mbala na mbala elongo na bandeko ya etuluku na bino ya mosala ya kosakola. Bandeko yango bakoki kosalisa yo mpo okóma kosakola mpe koteya malamu. Mpe bandakisa na bango ya malamu ekoki kolendisa yo. Kobá kosakola ata soki ozali kokutana na mikakatano. Ndenge vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo emonisi yango, tozali kosala mokano ya Nzambe na makasi na biso moko te, kasi nde na nguya ya elimo santu. (Zek. 4:6) Na yango, Nzambe akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tozali kosala mosala na ye.

YEHOVA AZALI NZAMBE YA KIMYA MPE ASALAKA MAKAMBO NA MOLƆNGƆ

11. Ndenge nini lisangani ya mikóló-bakambi na siɛklɛ ya liboso esalaki na bomoko mpo makambo etambola na molɔngɔ?

11 Na siɛklɛ ya liboso. Na Yerusaleme, lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kosala na bomoko mpo kimya ezala mpe makambo etambola na molɔngɔ na kati ya basaleli ya Nzambe. (Mis. 2:42) Na ndakisa, ntango likambo ya kokatama ngenga ebimaki soki na mobu 49 ya ntango na biso, lisangani ya mikóló-bakambi, na litambwisi ya elimo santu, etalelaki likambo yango. Soki lisangá etikalaka kaka na bokabwani mpo na likambo yango, mbɛlɛ mosala ya kosakola ekokaki lisusu kosalema malamu te. Atako bantoma ná bankulutu bazalaki Bayuda, batikaki te ete bonkɔkɔ ya Bayuda etambwisa bango mpe balandaki te makanisi ya baoyo bazalaki koteya liteya yango makasi. Kasi, balukaki nde litambwisi ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu. (Mis. 15:1, 2, 5-20, 28) Yango ebotaki mbuma nini? Yehova apambolaki ekateli na bango, kimya mpe bomoko ekobaki kozala na kati ya lisangá, mpe mosala ya kosakola ekobaki kokende liboso.​—Mis. 15:30, 31; 16:4, 5.

12. Nini emonisi ete ebongiseli ya Yehova ezali na kimya mpe makambo ezali kotambola na molɔngɔ?

12 Na mikolo na biso. Ebongiseli ya Yehova ezali kosalisa biso mpo tóbatela kimya mpe makambo etambola na molɔngɔ. Na nimero ya 15/11/1895 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Mosakoli ya kozala ya Kristo (na Anglais), ezalaki na lisolo moko oyo eutaki na 1 Bakorinti 14:40 oyo ezalaki na motó ya likambo: “Na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” Lisolo yango elobaki boye: “Bantoma bakomelaki lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso makambo ebele mpo makambo esalema na molɔngɔ . . . Ezali na ntina tókoba kotosa na likebi mpenza ‘makambo oyo ekomamaki kala mpo na koteya biso.’” (Rom. 15:4) Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe ebongiseli ya Yehova ezali kosala nyonso mpo kimya ezala kati na basaleli ya Nzambe mpe makambo etambola na molɔngɔ. Na ndakisa, ata soki okei na lisangá mosusu, to mpe na mboka mosusu mpo na kolanda boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na ntembe te, okoyeba ndenge boyekoli ekosalema mpe lisolo nini bokoyekola. Na mbala moko, okomiyoka te ete ozali mopaya! Kaka elimo ya Nzambe nde ekoki kosala ete bomoko ya boye ezala!​—Sef. 3:9.

13. Na kotalela Yakobo 3:17, mituna nini tosengeli komituna?

13 Oyo osengeli kosala. Yehova alingi ete basaleli na ye ‘bábatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’ (Ef. 4:1-3) Na yango omituna boye: ‘Nasalaka nyonso mpo kimya mpe bomoko ezala na kati ya lisangá? Natosaka baoyo bazali kokamba? Bandeko bakoki kotyela ngai motema, mingimingi soki nazali na mikumba na kati ya lisangá? Natosaka ngonga, nasalisaka basusu, mpe nazalaka pene ya kosalela bandeko?’ (Tángá Yakobo 3:17.) Soki omoni ete ezali na esika oyo okoki kobongisa, bondelá Yehova apesa yo elimo santu. Soki otiki ete elimo yango ebongisa bomoto na yo mpe etambwisa misala na yo, bandeko bakolinga yo lisusu mingi mpe bakozwa yo na motuya.

YEHOVA ATEYAKA BISO MPE APESAKA BISO OYO TOSENGELI NA YANGO

14. Na kotalela Bakolose 1:9, 10, ndenge nini Yehova ateyaki basaleli na ye na siɛklɛ ya liboso?

14 Na siɛklɛ ya liboso. Yehova alingaka mpenza koteya basaleli na ye. (Nz. 32:8) Alingi tóyeba ye, tólinga ye, mpe tózala na bomoi ya seko lokola bana na ye ya bolingo. Nyonso oyo ekoki kosalema ata moke te soki ateyi biso te. (Yoa. 17:3) Yehova asalelaki lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso mpo na koteya basaleli na ye. (Tángá Bakolose 1:9, 10.) Elimo santu, elingi koloba “mosungi” oyo Yesu alakaki, esalisaki mpe bango mingi mpenza. (Yoa. 14:16) Elimo yango epesaki bayekoli mayele mingi mpenza mpo bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe, mpe ezongisaki na makanisi na bango makambo mingi oyo Yesu alobaki mpe asalaki, mpe na nsima, bakomaki yango na Baevanzile. Boyebi yango ekómisaki makasi kondima ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso, mpe ekolisaki bolingo na bango mpo na Nzambe, mpo na Mwana na ye, mpe mpo na bandeko na bango bakristo.

15. Na ndenge nini Yehova azali kokokisa elaka na ye oyo ezali na Yisaya 2:2, 3?

15 Na mikolo na biso. Yehova asakolaki ete “na eleko ya nsuka ya mikolo,” bato ya bikólo nyonso bakosopana na “ngomba” na ye, elingi koloba bakosangana na basambeli na ye ya solo, mpo báteya bango banzela na ye. (Tángá Yisaya 2:2, 3.) Tozali komona ndenge esakweli yango ezali kokokisama. Losambo ya solo etombwani likoló koleka losambo mosusu nyonso ya lokuta. Mpe Yehova azali kopesa basaleli na ye ebele ya bilei ya elimo! (Yis. 25:6) Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” azali kopesa biso bilei yango na ndenge mingi. Na ndakisa, tokoki kotánga masolo oyo ebimaka na mikanda na biso, kolanda badiskur, mpe kotala bavideo. (Mat. 24:45) Toyokaka lokola Elihu, moninga moko ya Yobo oyo alobaki ete: ‘Nani azali molakisi lokola Nzambe?’​—Yobo 36:22.

Kɔtisá mateya ya solo na motema na yo mpe salelá yango na bomoi na yo (Talá paragrafe 16) *

16. Okoki kosala nini mpo okola na elimo?

16 Oyo osengeli kosala. Elimo ya Nzambe ekosalisa yo mpo osalela makambo oyo ozali kotánga mpe koyekola na Liloba ya Nzambe. Bondelá lokola mokomi moko ya nzembo oyo alobaki: “Ee Yehova, lakisá ngai nzela na yo. Nakotambola na solo na yo. Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.” (Nz. 86:11) Na yango, kobá kotánga mpe koyekola Biblia mpe mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisela biso. Na ntembe te, mokano na yo ezali kaka te ya kozwa boyebi. Osengeli kokɔtisa mateya ya solo na motema na yo mpe kosalela yango na bomoi na yo. Elimo ya Yehova ekosalisa yo osala yango. Osengeli mpe kolendisaka bandeko ya lisangá. (Ebr. 10:24, 25) Mpo na nini? Mpo bazali bandeko na yo ya elimo. Bondelá Yehova apesa yo elimo na ye mpo esalisa yo opesaka biyano ya malamu na makita, mpe osalaka masolo malamu mpenza. Na ndenge yango, okomonisa Yehova ná Mwana na ye ete olingaka “bampate” na bango mpe ozwaka yango na motuya mingi.​—Yoa. 21:15-17.

17. Na ndenge nini okoki komonisa ete ozali kopesa ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ na bosembo?

17 Mosika te, kaka ebongiseli oyo etambwisami na elimo ya Nzambe nde ekotikala na mabele. Na yango, pesáká ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ na molende mpenza. Sakoláká nsango malamu epai ya bato nyonso oyo ozali kokutana na bango mpo na komonisa ete, lokola Nzambe, yo mpe olingaka bango mpe oponaka bilongi te. Na ndakisa ya Yehova, saláká makambo na molɔngɔ, lukáká kimya, mpe saláká nyonso mpo lisangá ezala na bomoko. Lisusu, mpo na koyoka Molakisi na yo Monene, tángáká mpe yekoláká makambo nyonso oyo azali koteya yo. Soki osali bongo, okobanga te ntango mokili ya Satana ekokóma na nsuka na yango. Kasi, okozala na mpiko mpe okotɛlɛma elongo na baoyo bazali kosalela Yehova na bosembo na kati ya ebongiseli na ye.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

^ par. 5 Ondimaka ete Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye lelo oyo? Na lisolo oyo, tokomona ndenge Yehova azalaki kotambwisa lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso, mpe ndenge azali kotambwisa basaleli na ye lelo oyo.

^ par. 1 NDIMBOLA YA MALOBA: Ebongiseli ya Yehova ezali na biteni mibale: eteni ya likoló mpe eteni ya mabele. Na lisolo oyo, liloba “ebongiseli” emonisi eteni ya mabele.

^ par. 52 NDIMBOLA YA ELILINGI: Nsima ya kotala bavideo mpe komona ndenge bandeko mosusu bazali kosakola na mikili oyo basakoli bazali mingi te, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela azwi ekateli ya kolanda ndakisa na bango. Nsukansuka, akokisi mokano oyo amityelaki ya kokende kosakola na esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi.