Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 45

Ndenge ya kosalisa bato bátosa mitindo ya Kristo

Ndenge ya kosalisa bato bátosa mitindo ya Kristo

“Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—MAT. 28:19, 20.

LOYEMBO 89 Yoká, tosá, mpe pambwamá

NA MOKUSE *

1. Na kotalela Matai 28:18-20, Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo nini?

NSIMA ya lisekwa, Yesu abimelaki bayekoli na ye oyo basanganaki na Galile. Azalaki na likambo moko ya ntina mpenza ya koyebisa bango. Likambo nini? Likambo yango ezali na Matai 28:18-20.​—Tángá.

2. Mituna nini tokotalela?

2 Etinda ya Yesu ya kokómisa bato bayekoli etaleli mpe mosaleli ya Nzambe mokomoko lelo oyo. Na yango, tótalela mituna misato oyo ezali na boyokani na mosala oyo Yesu apesá biso. Ya liboso, longolá koteya bayekoli ya sika makambo oyo Nzambe asɛngaka biso, eloko nini tosengeli kosala? Ya mibale, ndenge nini basakoli nyonso ya lisangá bakoki kopesa mabɔkɔ mpo bayekoli ya Biblia bákola na elimo? Ya misato, ndenge nini tokoki kosalisa bandeko oyo batiká kosakola bázongela mosala ya kokómisa bato bayekoli?

TEYÁ BANGO BÁTOSA MITINDO YA KRISTO

3. Malako nini ya sikisiki ezali na kati ya etinda oyo Yesu apesaki?

3 Malako ya Yesu ezali polele. Tosengeli koteya bato makambo oyo apesaki mitindo. Nzokande, tosengeli te kobosana likambo moko ya ntina mpenza. Yesu alobaki te ete: ‘Bóteya bango makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.’ Kasi alobaki nde: Bóteya bango “bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” Mpo na kotosa malako ya sikisiki oyo Yesu apesaki, tosengeli kaka te koteya moyekoli ya Biblia makambo oyo asengeli kosala, kasi tosengeli mpe kolakisa ye ndenge ya kosala yango. (Mis. 8:31) Mpo na nini tosengeli kosala bongo?

4. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge ya koteya moyekoli atosa mitindo oyo Kristo apesaki.

4 Ndenge nini tokoki koteya moto atosa mitindo oyo Kristo apesaki? Ndakisa oyo elandi ekosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala yango. Ndenge nini moto oyo azali koteya moto mosusu kokumba motuka akoki kolakisa ye ndenge ya kotosa mibeko ya nzela? Molakisi asengeli naino kolakisa moyekoli mibeko ya nzela oyo asengeli kotosa. Nzokande, mpo na koteya moyekoli na ye ndenge ya kotosa mibeko yango, molakisi asengeli kosala likambo mosusu. Asengeli kokende elongo na moyekoli na nzela, mpe kopesa ye toli, wana moyekoli azali kokumba motuka, mpo asalela makambo oyo ayekolaki. Ndakisa yango ekoki koteya biso nini?

5. (a) Na kotalela Yoane 14:15 mpe 1 Yoane 2:3, tosengeli koteya bayekoli na biso ya Biblia básala nini? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli na biso básalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango?

5 Ntango toyekolaka Biblia na bato, toteyaka bango makambo oyo Nzambe asɛngaka biso. Kasi tosengeli kosuka kaka wana te. Tosengeli koteya bayekoli na biso ya Biblia básalelaka makambo oyo bazali koyekola na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. (Tángá Yoane 14:15; 1 Yoane 2:3.) Ndakisa na biso ekoki kosalisa bayekoli básalela mateya ya ebandeli ya Biblia na kelasi, na mosala, to mpe ntango bazali kozwa mwa mopɛpɛ. Tokoki koyebisa bango likambo moko oyo ekómelá biso na bomoi mpo na komonisa bango ndenge kosalela malako ya Biblia ebatelaki biso mpo tókutana na mikakatano te, mpe ndenge oyo yango esalisaki biso tózwa bikateli ya malamu. Ntango tozali elongo na bayekoli na biso ya Biblia, tokoki kobondela Yehova mpe kosɛnga ye akamba bango na elimo santu na ye.​—Yoa. 16:13.

6. Makambo nini mosusu tosengeli kosala mpo na koteya basusu bátosa mitindo ya Yesu?

6 Makambo nini tosengeli kosala mpo na koteya basusu bátosa mitindo ya Yesu? Tosengeli kosalisa bayekoli na biso ya Biblia bákolisa mposa ya kokómisa bato bayekoli. Mosala ya kosakola ekoki kobangisa bayekoli mosusu ya Biblia. Yango wana, tosengeli kozala na motema molai ntango tozali kosalisa bango bákanga ntina ya mateya ya Biblia mpo kondima na bango ekóma makasi. Soki tosali bongo, tokosimba mitema na bango mpe bakokóma na mposa ya kosakola. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bayekoli bákóma na mposa ya kosakola nsango malamu?

7. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli akolisa mposa ya koyebisa basusu nsango malamu?

7 Tokoki kotuna moyekoli na biso mituna lokola oyo: “Na ndenge nini mateya oyo ozali koyekola na Biblia ebongisi bomoi na yo? Okanisi ete bato mosusu mpe basengeli koyoka nsango yango? Okoki kosala nini mpo na kosalisa bango?” (Mas. 3:27; Mat. 9:37, 38) Lakisá moyekoli batrakte oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya mpe tiká ye apona oyo ye akanisi ete ekosepelisa bandeko na ye, baninga na ye, to baninga na ye ya mosala. Pesá ye mwa ndambo ya batrakte yango. Bómekameka elongo na moyekoli mpo na kolakisa ye ndenge oyo akoki kopesa bato trakte yango na boboto mpenza. Ntango moyekoli na biso ya Biblia akómi mosakoli oyo azwi naino batisimo te, tosengeli kosakolaka elongo na ye mpo na kosalisa ye.​—Mos. 4:9, 10; Luka 6:40.

NDENGE OYO LISANGÁ EKOKI KOSALISA BAYEKOLI YA BIBLIA BÁKOLA NA ELIMO

8. Mpo na nini ezali na ntina ete bayekoli bákómisa makasi mpenza bolingo na bango mpo na Nzambe mpe bato? (Talá mpe etanda “ Ndenge ya kosalisa bayekoli ya Biblia bálinga Nzambe mingi.”)

8 Kobosana te ete Yesu ayebisaki biso tóteya bato “bátosa makambo nyonso” oyo apesaki mitindo. Mibeko mibale oyo eleki monene: kolinga Nzambe mpe kolinga bato, ezali mpe na kati ya makambo yango. Mibeko yango nyonso mibale ezali na boyokani na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 22:37-39) Na ndenge nini? Soki tosalisi moyekoli na biso ya Biblia atosa mitindo yango, tokosalisa ye asakola. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo soki moyekoli yango azali kolinga Yehova mpe bato mosusu mingi, yango ekotinda ye asakola. (Nz. 18:1-3; Mas. 29:25) Etanda oyo ezali na kati ya lisolo oyo emonisi makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia alinga Nzambe mingi. Longolá yango, lisangá ekoki kosala lisusu nini mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bákómisa makasi bolingo na bango mpo na Yehova mpe bato mosusu?

9. Na kotalela ndakisa oyo tolobeli na paragrafe oyo, na ndenge nini moto oyo azali koyekola kokumba motuka akoki kozwa mateya?

9 Kanisá lisusu ndakisa ya moto oyo azali koyekola kokumba motuka. Ndenge nini moto yango akoki koyekola wana azali kokumba mpe molakisi na ye afandi pembeni na ye? Soki azali koyoka molakisi na ye mpe soki azali kotala basofɛlɛ mosusu oyo bazali kokumba na likebi. Na ndakisa, molakisi akoki kolakisa ye sofɛlɛ oyo atikeli sofɛlɛ mosusu nzela na boboto. To akoki kolakisa ye sofɛlɛ oyo akitisi miinda na ye mpo basofɛlɛ mosusu bámona malamu mpe akoki kolendisa moyekoli asalaka mpe bongo. Bandakisa ya ndenge wana ekopesa ye mateya ya ntina mingi mpenza oyo akoki kosalela ntango azali kokumba motuka.

10. Nini ekosalisa moyekoli ya Biblia akola na elimo?

10 Ndenge moko mpe moyekoli ya Biblia oyo abandi kosalela Yehova, akoyekola kaka te epai ya moteyi na ye, kasi mpe epai ya basaleli mosusu ya Yehova oyo bazali bandakisa malamu. Na yango, nini ekosalisa mpenza bayekoli ya Biblia bákola na elimo? Soki bazali koyangana na makita. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo makambo oyo bakoyoka na makita ekosalisa bango báyeba makambo mingi, ekokómisa kondima na bango makasi, mpe ekosalisa bango bálinga lisusu Nzambe mingi. (Mis. 15:30-32) Lisusu, na makita, moteyi akoki kolakisa moyekoli ya Biblia epai ya bandeko oyo bazali kokutana na mikakatano lokola oyo ya ye. Moyekoli akomona bandakisa malamu ya bandeko oyo bazali komonisa bolingo na kati ya lisangá. Tótalela bandakisa oyo elandi.

11. Bandakisa nini moyekoli ya Biblia akoki komona na lisangá, mpe yango ekoki kotinda ye asala nini?

11 Mwasi moko oyo ayekolaka Biblia mpe oyo abɔkɔlaka bana ye moko amoni ndeko mwasi moko oyo abɔkɔlaka mpe bana ye moko. Moyekoli ya Biblia yango akamwe komona milende oyo ndeko mwasi wana asalaka mpo na koya ná bana na ye ya mike na Ndako ya Bokonzi. Mobali moko oyo ayekolaka Biblia mpe oyo azali kobunda mpo na kotika komɛla likaya, akutani na ndeko mobali moko oyo kala azalaki mpe komɛla likaya kasi atiká. Mosakoli ayebisi moyekoli yango ya Biblia ete kolinga Yehova mingi nde etindaki ye atosa mibeko ya Nzambe. (2 Ko. 7:1; Flp. 4:13) Nsima ya koyoka lisolo ya ndeko yango, moyekoli ya Biblia amiyoki malamu ntango ndeko yango ayebisi ye ete: “Yo mpe okoki kotika komɛla likaya.” Mwasi moko oyo ayekolaka Biblia amoni ete ndeko mwasi moko oyo azali naino elenge asepelaka mingi ndenge azali Motatoli ya Yehova. Mwasi yango azwi mokano ya koluka koyeba ntina oyo ndeko mwasi yango azalaka ntango nyonso na esengo.

12. Mpo na nini tokoki koloba ete mosakoli mokomoko na lisangá azali na mokumba ya kosalisa bayekoli ya Biblia?

12 Ntango bayekoli ya Biblia bazali koyeba basakoli ndenge na ndenge oyo bazali kosalela Yehova na bosembo, bandakisa na bango ekoki koteya bayekoli bámona ndenge oyo bakoki kotosa etinda ya Kristo ya kolinga Nzambe mpe bato. (Yoa. 13:35; 1 Tim. 4:12) Lisusu, ndenge tomonaki yango liboso, moyekoli ya Biblia akoki kozwa mateya epai ya basakoli oyo bazali kokutana na mikakatano lokola oyo ya ye. Bandakisa na bango ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia amona ete ye mpe akoki kosala mbongwana oyo esengeli mpo akóma moyekoli ya Kristo. (Mib. 30:11) Mosakoli mokomoko na lisangá akoki kopesa mabɔkɔ na ndenge mingi mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia akola na elimo. (Mat. 5:16) Milende nini osalaka mpo na kolendisa bayekoli ya Biblia oyo bayanganaka na makita?

SALISÁ BAOYO BATIKÁ KOSAKOLA BÁZONGELA MOSALA YANGO

13-14. Ndenge nini Yesu asalelaki bantoma na ye oyo balɛmbaki nzoto makambo?

13 Tozali na mposa ya kosalisa bandeko na biso oyo batiká kosakola bázongela lisusu mosala ya kokómisa bato bayekoli. Ndenge oyo Yesu asalelaki bantoma na ye oyo balɛmbaki nzoto makambo emonisi oyo tosengeli kosala lelo oyo.

14 Na nsuka ya mosala ya Yesu awa na mabele, mwa moke liboso abomama, bantoma na ye “nyonso basundolaki ye mpe bakimaki.” (Mrk. 14:50; Yoa. 16:32) Yesu asalaki nini na ntango wana oyo bantoma na ye balɛmbaki nzoto? Mwa moke nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye mosusu ete: “Bóbanga te! Bókende, bópesa bandeko na ngai nsango [ete nasekwi].” (Mat. 28:10a) Yesu asundolaki bantoma na ye te. Atako basundolaki ye, akobaki kaka kobenga bango “bandeko na ngai.” Ndenge moko na Yehova, Yesu azalaki na motema mawa mpe azalaki kolimbisa.​—2 Bak. 13:23.

15. Toyokaka ndenge nini mpo na bandeko oyo batiká kosakola?

15 Ndenge moko mpe, tomitungisaka mingi mpo na baoyo batiká kosakola. Bazali bandeko na biso, mpe tolingaka bango! Tobosanaka te mosala makasi oyo bandeko yango basalá na bolingo mpenza. Bamosusu basalá yango na boumeli ya bambula ebele. (Ebr. 6:10) Tokanisaka bango mingi mpenza! (Luka 15:4-7) Lokola Yesu, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komitungisa mpo na bango?

16. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komitungisa mpo na bandeko na biso oyo batiká kosakola?

16 Bengisá bango na boboto báya na makita. Likambo moko oyo Yesu asalaki mpo na kolendisa bantoma na ye oyo balɛmbaki nzoto, ezalaki ya kobengisa bango na likita moko. (Mat. 28:10b; 1 Ko. 15:6) Ndenge moko mpe lelo oyo, tokoki kolendisa bandeko oyo batiká kosakola báyanganaka na makita ya lisangá, soki basalaka yango lisusu te. Ntango mosusu, ekoki kosɛnga tóbengisa bango mbala ebele liboso bándima koya. Na ntembe te, Yesu asepelaki ndenge bayekoli na ye bayaki na likita yango.​—Talá Matai 28:16 mpe Luka 15:6.

17. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko oyo atiká kosakola ayei na makita?

17 Yambá bango na esengo. Yesu ayambaki bayekoli na ye na esengo ntango akutanaki na bango, mpe ye nde abandaki kosolola na bango. (Mat. 28:18) Tokosala nini soki ndeko moko oyo atiká kosakola ayei na makita? Tosengeli koyamba ye na esengo mpenza. Na ebandeli, tokoki koyeba te tóloba nini. Kasi mpo tóyokisa ye nsɔni te, tokoki kaka koloba ete tosepeli mingi ndenge tomoni ye lisusu.

18. Ndenge nini tokoki kolendisa baoyo batiká kosakola?

18 Lendisá bango. Ntango mosusu, bayekoli ya Yesu babangaki ntango Yesu apesaki bango etinda ya kosakola na mokili mobimba. Yesu alendisaki bango na maloba oyo: “Nazali na bino mikolo nyonso.” (Mat. 28:20) Maloba yango esalisaki bayekoli na ye? Ɛɛ. Mwa moke na nsima, “bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu.” (Mis. 5:42) Bandeko oyo batiká kosakola bazalaka mpe na mposa tólendisa bango. Ntango mosusu bakoki kobanga kozongela lisusu mosala ya kosakola. Tokoki kolendisa bango ete bakosakola bango moko te. Ntango balingi kozongela mosala ya kosakola, tokoki kosakola elongo na bango. Na ntembe te, bakosepela na lisalisi oyo tokopesa bango ntango bazongeli lisusu mosala ya kosakola. Ntango tozali kotalela baoyo batiká kosakola lokola bandeko na biso mpe tozali kosalela bango makambo na ndenge ebongi, bakozongela lisusu mosala ya kosakola mpe lisangá mobimba ekozala na esengo.

TOLINGI KOSILISA MOSALA OYO YESU APESÁ BISO

19. Mposa na biso ezali nini, mpe mpo na nini?

19 Tii ntango nini tokokoba kosakola mpe kokómisa bato bayekoli? Tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. (Mat. 28:20) Tokozala mpenza na likoki ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli tii na nsuka ya mokili oyo? Tozali mpenza na mokano ya kosala bongo! Na esengo nyonso, topesaka ntango, makasi, mpe mbongo na biso mpo na koluka baoyo nyonso bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Ntango tozali kosala bongo, tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Alobaki ete: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoa. 4:34; 17:4) Yango mpe ezali mposa na biso. Tozali na mposa ya kosilisa mosala oyo Yesu apesá biso. (Yoa. 20:21) Mpe tolingi ete bato mosusu, ata mpe bandeko na biso oyo batiká kosakola, biso nyonso tókoba na mosala yango.​—Mat. 24:13.

20. Na kotalela Bafilipi 4:13, mpo na nini tondimi ete tokoki kokokisa mosala oyo Yesu apesá biso?

20 Kotosa etinda oyo Yesu apesaki biso ezali pɛtɛɛ te. Kasi, tosalaka mosala yango biso moko te. Yesu apesaki elaka ete akozala elongo na biso. Ntango tozali kokómisa bato bayekoli, tozali “kosala elongo na Nzambe” mpe “esika moko na Kristo.” Yango wana, Yehova ná Yesu basalisaka biso na mosala yango. (1 Ko. 3:9; 2 Ko. 2:17) Na yango, tokoki kosilisa mosala yango. Ezali mpenza lokumu mpe esengo kosala mosala yango mpe kosalisa bato mosusu básala mpe bongo!​—Tángá Bafilipi 4:13.

LOYEMBO 79 Tóteya bango bátɛlɛma ngwi

^ par. 5 Yesu ayebisaki bayekoli na ye báteya bato bátosa makambo nyonso oyo apesaki bango mitindo. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki kotosa malako yango. Makambo mosusu oyo ezali na lisolo oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2004, nkasa 14-19.

^ par. 66 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mwasi moko azali koyekola na mwasi moko Biblia mpe azali kolimbwela ye makambo oyo asengeli kosala mpo alinga Nzambe mingi. Na nsima, moyekoli yango asaleli makanisi misato oyo ndeko yango ateyaki ye.