Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

“Yehova abosanaki ngai te”

“Yehova abosanaki ngai te”

NAFANDAKA na Orealla, mboka moko oyo ezalaka na ekólo Guyane, na Amerika ya Sudi. Mboka yango ezali na bato soki 2 000 mpe ezali mosika mpenza. Mpo na kokóma kuna osengeli kokende na mwa mpɛpɔ to na masuwa.

Nabotamá na 1983. Na bomwana, nazalaki nzoto malamu lokola bana nyonso. Kasi ntango nakómaki na mbula zomi, nabandaki koyoka nzoto mobimba mpasi makasi. Mbula soki mibale na nsima, mokolo moko na ntɔngɔ ntango nalamukaki, nazalaki kokoka lisusu kotambola te. Atako nasalaki makasi mpo nameka kotambola, nazalaki kokoka te. Banda mokolo wana, natikalá lisusu kotambola te. Maladi yango mpe esalaki ete nakola lisusu te. Tii lelo oyo, nazali kaka mokuse lokola mwana moke.

Mokolo moko, nsima ya kolekisa mwa basanza banda nakɔtá ndako mpo na maladi, Batatoli ya Yehova mibale bayaki kotala ngai. Mbala mingi ntango bato bazalaki koya kotala ngai, nazalaki kobombana, kasi mokolo wana, nandimaki ete basi yango básolola na ngai. Ntango balobelaki Paradiso, nakanisaki lisusu makambo oyo nayoká ntango nazalaki na mbula soki mitano. Na ntango wana, ndeko moko ya misionɛrɛ na nkombo Jethro, oyo azalaki kofanda na Suriname, azalaki koya na mboka na biso mbala moko na sanza, mpe azalaki koyekola Biblia na tata na ngai. Jethro azalaki kosalela ngai makambo na boboto. Nalingaki ye mingi mpenza. Lisusu, bankɔkɔ na ngai bazalaki komema ngai na makita ya Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki kosalema na mboka na biso. Na yango, ntango Florence, moko ya basi oyo bayaki kotala ngai mokolo yango, atunaki ngai soki nakosepela koyekola makambo mosusu, nandimaki.

Florence ayaki ná mobali na ye, Justus, mpe babandaki koyekola na ngai Biblia. Ntango bamonaki ete nayebi kotánga te, basalisaki ngai nayeba kotánga. Nsima ya mwa ntango, nakómaki kotánga malamu. Mokolo moko, ndeko mwasi yango ná mobali na ye bayebisaki ngai ete batindi bango bákende kosakola na Suriname. Likambo ya mawa, ezalaki na moto mosusu te na Orealla oyo akokaki koyekola na ngai Biblia. Kasi, likambo ya esengo, Yehova abosanaki ngai te.

Eumelaki te, Floyd ndeko moko ya mobongisi-nzela ayaki na Orealla, mpe amonaki ngai ntango azalaki kosakola ndako na ndako. Ntango alobaki ete ayekola na ngai Biblia, nasɛkaki mwa moke. Bongo atunaki ngai, “Mpo na nini ozali kosɛka?” Nayebisaki ye ete nasilisá koyekola mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpe nabandaki koyekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. * Mpe nayebisaki ye ntina oyo nayekolaka lisusu te. Floyd asilisaki koyekola na ngai buku Boyebi, na nsima, ye mpe batindaki ye akende kosakola epai mosusu. Nazangaki lisusu moto ya koteya ngai Biblia.

Kasi, na 2004, batindaki babongisi-nzela monene mibale na Orealla: ndeko Granville ná ndeko Joshua. Bamonaki ngai ntango bazalaki kosakola ndako na ndako. Ntango batunaki ngai soki nakolinga koyekola, nasɛkaki mwa moke. Nasɛngaki bango bázongela koyekola na ngai buku Boyebi banda na ebandeli. Nalingaki koyeba soki bakoteya ngai kaka makambo oyo bandeko mosusu wana bateyaki ngai liboso. Ndeko Granville ayebisaki ngai ete basalaka makita na mboka na biso. Atako nasalaki mbula pene na zomi nakendaka esika mosusu te, nasepelaki kokende na makita yango. Na yango, ndeko Granville ayaki kozwa ngai na ndako, atyaki ngai na kiti ya bibɔsɔnɔ mpe apusaki ngai tii na Ndako ya Bokonzi.

Na nsima, ndeko Granville alendisaki ngai nakomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ayebisaki ngai ete: “Atako ozali ebɔsɔnɔ, kasi okoki koloba. Mokolo mosusu, okosala diskur. Okosala yango mpenza!” Maloba yango elendisaki ngai mingi.

Nakómaki kosakola elongo na ndeko Granville. Kasi, lokola banzela mingi ya mboka na biso ezalaki salite mpe mabulumabulu, ezalaki mpasi mpo na kotindika kiti ya bibɔsɔnɔ. Na yango, nasɛngaki ye atya ngai na bruwɛti mpe atindikaka ngai. Yango esimbaki mpenza. Na sanza ya 04/2005, nazwaki batisimo. Mwa moke na nsima, bandeko bapesaki ngai formasyo mpo natalelaka mikanda mpe nasalaka na sono na Ndako ya Bokonzi.

Kasi likambo ya mawa, na 2007, tata na ngai akweaki na nse ya masuwa mpe akufaki. Likambo yango epesaki libota na biso mpasi mingi. Ndeko Granville abondelaki elongo na biso, mpe atángelaki biso bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kobɔndisa biso. Mbula mibale na nsima, likambo mosusu ya mpasi ekómelaki biso: ndeko Granville azindaki na masuwa mpe akufaki.

Mwa lisangá na biso etikalaki na mawa, mpo tozalaki lisusu ata na nkulutu moko te, kaka mosaleli na misala moko. Liwa ya ndeko Granville epesaki ngai mpasi mingi mpo azalaki moninga na ngai ya motema. Azalaki ntango nyonso kosalisa ngai ezala na elimo to na mosuni. Na likita ya liboso oyo tosalaki nsima ya liwa na ye, bapesaki ngai mokumba ya kotánga baparagrafe na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Natángaki kaka baparagrafe mibale mpamba, mpe na nsima nabandaki kolela mpenza. Esengelaki nalongwa na estrade.

Nakómaki koyoka mwa malamu ntango bandeko ya lisangá mosusu bayaki na Orealla mpo na kosalisa biso. Lisusu, biro ya filiale etindelaki biso mobongisi-nzela monene moko na nkombo Kojo. Esengo na ngai ebakisamaki ntango mama na ngai ná leki na ngai ya mobali babandaki koyekola Biblia, mpe na nsima bazwaki batisimo. Na nsima, na sanza ya 03/2015, nakómaki mosaleli na misala. Mpe nsima ya mwa ntango, nasalaki diskur na ngai ya liboso. Mokolo yango, nasɛkaki mwa moke mpe nalelaki ntango nakanisaki maloba oyo ndeko Granville ayebisaki ngai mwa bambula liboso ete: “Mokolo mosusu, okosala diskur. Okosala yango mpenza!”

Na nzela ya TV JW, nayekoli makambo mingi epai ya bandeko oyo bazali mpe na mikakatano lokola oyo ya ngai. Atako bazali bibɔsɔnɔ, basalaka makambo mingi mpe bazali na esengo. Ngai mpe nazali na likoki ya kosala mwa makambo mosusu. Lokola mposa na ngai ezalaki ya kopesa Yehova nyonso oyo nakoki, nakómaki mobongisi-nzela. Mpe na sanza ya 09/2019, nazwaki nsango oyo nakanisaki kutu te! Bayebisaki ngai ete nakómi nkulutu na lisangá na biso, oyo ezali na basakoli soki 40.

Nazali na botɔndi mingi epai ya bandeko oyo bayekolaki na ngai Biblia mpe basalisaki ngai nasalela Yehova. Oyo eleki nyonso, nazali kopesa Yehova matɔndi mingi ndenge abosanaki ngai te.

^ par. 8 Ebimisamá na Batatoli ya Yehova, kasi lelo oyo ebimisamaka lisusu te.