Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 50

“Bakufi bakolamuka mpenza ndenge nini?”

“Bakufi bakolamuka mpenza ndenge nini?”

“Liwa, wapi bolongi na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?”​—1 KO. 15:55.

LOYEMBO 141 Bomoi ezali likamwisi

NA MOKUSE *

1-2. Mpo na nini bakristo nyonso basengeli koluka koyeba makambo etali lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló?

BATO mingi oyo bazali kosalela Yehova lelo oyo, bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Kasi, mwa ndambo ya bakristo oyo Yehova atye mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele, bazali na elikya ya kosekwisama mpo na kokende na likoló. Bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo bazalaka na mposa makasi ya koyeba ndenge bomoi na bango ekozala kuna na likoló. Bongo bakristo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele? Ndenge tokomona yango, lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló ekomemela mpe baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele mapamboli ebele mpenza. Yango wana, ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na likoló to na mabele, tosengeli koluka koyeba makambo etali lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló.

2 Na siɛklɛ ya liboso, Nzambe asalelaki elimo na ye, mpo na kotinda bayekoli mosusu ya Yesu mpo bákoma makambo etali lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló. Ntoma Yoane alobi boye: “Sikoyo tozali bana ya Nzambe, kasi ndenge tokozala emonisami naino polele te. Toyebi ete ntango ye akomonisama biso mpe tokozala lokola ye.” (1 Yoa. 3:2) Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebi te ndenge bakozala ntango bakosekwisama mpo na kozala na bomoi na likoló na nzoto ya elimo. Kasi, bakomona mpenza Yehova ndenge azalaka ntango bakozwa mbano na bango. Biblia elobeli likambo mokomoko te oyo etali lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló, kasi ntoma Paulo ayebisi mwa makambo mosusu oyo etali lisekwa yango. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala elongo na Kristo ntango akokómisa “mpamba baguvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya,” ezala mpe “liwa, monguna ya nsuka.” Na nsuka, Yesu elongo na baoyo bakoyangela na ye bakomitya na nse Yehova, mpe bakotya biloko nyonso na nse na ye. (1 Ko. 15:24-28) Ekozala ntango moko ya esengo mpenza! *

3. Ndenge 1 Bakorinti 15:30-32 emonisi yango, lokola ntoma Paulo azalaki kondimela lisekwa, yango esalisaki ye asala nini?

3 Lokola ntoma Paulo azalaki kondimela lisekwa, yango esalisaki ye ayikela mikakatano ya ndenge na ndenge mpiko. (Tángá 1 Bakorinti 15:30-32.) Ayebisaki bakristo ya Korinti ete: “Mokolo na mokolo nazalaka liboso ya liwa.” Ntoma Paulo akomaki lisusu ete: “Nabundaki na banyama mabe na Efese.” Ekoki kozala ete ntoma Paulo abundaki na banyama ya solo mpenza na esika ya masano na Efese. (2 Ko. 1:8; 4:10; 11:23) To mpe ekoki kozala ete azalaki kolobela botɛmɛli ya Bayuda ná bato mosusu oyo bazalaki lokola “banyama mabe ya zamba.” (Mis. 19:26-34; 1 Ko. 16:9) Ezala abundaki na banyama ya solo to ya elilingi, ntoma Paulo akutanaki na makambo mingi ya mabe, kasi atako bongo, akobaki kondima ete akozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.​—2 Ko. 4:16-18.

Libota moko ya bandeko na biso oyo bafandaka na esika oyo mosala na biso epekisami, bazali kokoba kosambela Nzambe mpe bazali mpenza na kondima ete Nzambe abombeli bango makambo ya malamu mpenza na mikolo ezali koya (Talá paragrafe 4)

4. Na ndenge nini elikya ya lisekwa epesaka bakristo makasi lelo oyo? (Talá elilingi ya ezipeli.)

4 Tozali kobika na eleko moko ya mabe mpenza. Bandeko na biso mosusu bazali kokutana na makambo mingi ya mabe. Basusu bazali kofanda na bisika ya bitumba mpe bazali na libateli moko te. Na bamboka mosusu, basaleli ya Yehova bazali na bonsomi ya kosakola te mpe bazali kosalela Yehova atako bakoki kokanga bango, kotya bango na bolɔkɔ, to mpe koboma bango. Atako bongo, bandeko yango nyonso bazali kaka kokoba kosambela Yehova; bazali bandakisa malamu mpenza mpo na biso. Babangaka te mpo bayebi ete, ata soki babungisi bomoi na bango sikoyo, Yehova abombeli bango eloko oyo eleki malamu na mikolo ezali koya.

5. Makanisi nini ya mabe oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso na elikya ya lisekwa?

5 Ntoma Paulo akebisaki bandeko na ye ete báboya makanisi ya mabe oyo bato mosusu bazalaki na yango. Bato yango bazalaki koloba boye: “Soki bakufi bakolamuka te, ‘tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.’” Bato mosusu bazalaki na makanisi ya ndenge wana liboso kutu ya eleko ya ntoma Paulo. Ntango mosusu Paulo atángaki maloba ya Yisaya 22:13, oyo emonisaki makanisi ya Bayisraele. Na esika ya kopusana penepene na Nzambe, bazalaki nde kolanda bisengo ya bomoi. Bayisraele yango bazalaki kokanisa boye: “Tosengeli kosepela lelo mpo liwa eponi ntango te.” Bato mingi bakanisaka mpe bongo lelo oyo. Kasi, Biblia emonisi mbuma mabe oyo Bayisraele babukaki mpo na makanisi mabe oyo bazalaki na yango.​—2 Nt. 36:15-20.

6. Lokola tondimaka ete lisekwa ekozala, yango esengeli kotinda biso tópona baninga ya ndenge nini?

6 Lokola toyebi polele ete Yehova akosekwisa bakufi, yango esengeli kotinda biso tóponaka malamu baninga na biso. Bandeko ya Korinti basengelaki kokeba ete bázala te baninga ya bato oyo bazalaki kondima lisekwa te. Yango ezali liteya mpo na biso lelo: Soki tozali baninga ya motema ya bato oyo balingá bisengo ya ntango oyo, tokosuka mabe. Kosala boninga na bato ya ndenge wana, mpe kolekisa ntango elongo na bango, ekoki kobebisa makanisi mpe bizaleli na biso. Kutu, baninga ya ndenge wana bakoki kotinda biso tósala makambo oyo Nzambe ayinaka. Yango wana, ntoma Paulo apesaki likebisi oyo na nguya mpenza: “Bólamuka, bózongela makanisi ya malamu na ndenge oyo eyokani na boyengebene mpe bósalaka lisumu te.”​—1 Ko. 15:33, 34.

BAKOSEKWA NA NZOTO YA NDENGE NINI?

7. Na kotalela 1 Bakorinti 15:35-38, motuna nini bato mosusu bakokaki kotuna mpo na lisekwa?

7 Tángá 1 Bakorinti 15:35-38. Moto oyo azalaki kolinga te ete bato mosusu bándimela lisekwa akokaki kotuna boye: “Bakufi bakolamuka mpenza ndenge nini?” Ezali malamu tótalela eyano ya ntoma Paulo, mpamba te, lelo oyo, bato mingi bazali na makanisi ekeseni mpo na oyo ekómelaka moto nsima ya liwa. Kasi Biblia eteyaka nini?

Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya mboto ná molona, mpo na kolimbola ete ntango moto asekwi, Nzambe akoki kopesa ye nzoto oyo ebongi (Talá paragrafe 8)

8. Ndakisa nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló ekozala?

8 Ntango moto akufi, nzoto na ye epɔlaka. Kasi, moto oyo asalá molɔ́ngɔ́ mobimba azali na likoki ya kosekwisa moto yango mpe kopesa ye nzoto oyo ebongi. (Eba. 1:1; 2:7) Ntoma Paulo asaleli ndakisa moko mpo na komonisa ete, Nzambe asengeli te kozongisa kaka nzoto oyo ekufaki. Apesaki ndakisa ya “mbuma,” to “mboto” ya milona. Soki oloni yango ebandaka naino kobima mpe na nsima ekómaka molona ya sika. Molona yango ya sika ekesanaka mpenza na mboto oyo elonamaki. Ntoma Paulo asalelaki ndakisa yango mpo na komonisa ete Mozalisi na biso akoki kopesa ‘nzoto oyo alingi’ epai ya moto oyo asekwi.”

9. Na 1 Bakorinti 15:39-41, Biblia elobi nini na likambo etali nzoto?

9 Tángá 1 Bakorinti 15:39-41. Ntoma Paulo amonisi ete Nzambe asalá bikelamu nyonso na nzoto ndenge moko te. Na ndakisa, nzoto ya ngɔmbɛ, ya ndɛkɛ, mpe ya mbisi ekeseni mpenza. Alobaki ete na likoló, sanza ná moi ekeseni. Mpe amonisi ete “monzoto na monzoto ezali na nkembo na yango.” Likambo yango ezali mpenza solo atako tokoki komona yango na miso te. Bato ya siansi balobi ete minzoto ezali ndenge na ndenge: mosusu ezali minene, mosusu ezali mike mpenza, mosusu ezali na langi ya motane, mosusu ya mpɛmbɛ, mosusu ya mosaka, na ndakisa moi. Ntoma Paulo alobaki lisusu ete “nzoto ya likoló ezali, nzoto ya mabele mpe ezali.” Alingaki mpenza koloba nini? Na mabele tozali na nzoto ya mosuni, kasi na likoló ezali nde nzoto ya elimo, na ndakisa, nzoto oyo baanzelu bazalaka na yango.

10. Bato oyo basekwi mpo na kokende na likoló bakómaka na nzoto ya ndenge nini?

10 Talá likambo oyo ntoma Paulo alobi na nsima: “Ezali mpe bongo mpo na lisekwa ya bakufi. Yango elonami na kati ya kopɔla, elamwisami na kozanga kopɔla.” Ya solo, ntango moto akufaka, nzoto na ye epɔlaka mpe ezongaka putulu. (Eba. 3:19) Na yango, ndenge nini ekoki kosalema ete moto asekwa “kozanga kopɔla”? Ntoma Paulo azalaki kolobela te bato oyo basekwisamaki mpo na kofanda awa na mabele, na ndakisa bato oyo Eliya, Elisha, mpe Yesu, basekwisaki. Azalaki nde kolobela moto oyo asekwi na nzoto oyo ekoki kofanda na likoló, elingi koloba, “nzoto ya elimo.”​—1 Ko. 15:42-44.

11-12. Mbongwana nini esalemaki na nzoto ya Yesu ntango asekwaki, mpe mbongwana nini esalemaka na nzoto ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ntango basekwaka?

11 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki na nzoto ya mosuni. Kasi ntango asekwaki, “akómaki elimo oyo apesaka bomoi” mpe azongaki na likoló. Ndenge moko mpe, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakosekwa na nzoto ya elimo. Ntoma Paulo amonisi yango na maloba oyo: “Kaka ndenge tolatá elilingi ya moto oyo asalemaki na putulu, tokolata mpe elilingi ya moto yango ya likoló.”​—1 Ko. 15:45-49.

12 Tósimba ete Yesu asekwaki na nzoto ya mosuni te. Ntango ntoma Paulo akómi pene ya kosukisa lisolo na ye oyo etali lisekwa, amonisaki likambo yango polele ntango alobaki ete: “Mosuni ná makila ekoki kozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te” na likoló. (1 Ko. 15:50) Bantoma mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoki te kosekwa mpo na kokende na likoló na nzoto ya mosuni mpe ya makila, oyo ekoki kopɔla. Ntango nini bakosekwisama? Ntoma Paulo amonisaki polele ete lisekwa yango esengelaki kosalema mikolo mingi na nsima, kasi kaka te ntango bakufi. Na ntango oyo ntoma Paulo akomaki mokanda ya 1 Bakorinti, bayekoli mosusu basilaki kolala “na kati ya liwa,” na ndakisa, ntoma Yakobo. (Mis. 12:1, 2) Na nsima, bantoma ná bakristo mosusu oyo batyamaki mafuta na elimo balalaki mpe “na kati ya liwa.”​—1 Ko. 15:6.

BALONGI LIWA

13. Makambo nini ekosalema na ntango ya kozala ya Yesu?

13 Ezala Yesu to ntoma Paulo, basakolaki ete ntango moko ya malamu mpenza ekoya: kozala ya Kristo. Na ntango yango ya kozala ya Kristo, bitumba, koningana ya mabele, maladi mabe, mpe makambo mosusu ya mabe ekozala na mokili mobimba. Tozali komona ndenge esakweli yango, oyo elobeli kozala ya Kristo, ezali kokokisama banda mobu 1914. Ekozala mpe na likambo mosusu ya ntina mpenza na kati ya elembo yango oyo ekokokisama. Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koyangela esengeli kosakolama “na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:3, 7-14) Ntoma Paulo amonisaki mpe ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo ‘balalá na kati ya liwa’ basengeli kosekwa na ntango ya “kozala ya Nkolo.”​—1 Tes. 4:14-16; 1 Ko. 15:23.

14. Nini ekómelaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kosekwa na ntango ya kozala ya Kristo?

14 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kokufa lelo oyo, bazali kosekwa mbala moko mpo na kokende na likoló. Ntoma Paulo andimisi likambo yango na maloba oyo ekomami na 1 Bakorinti 15:51, 52: “Biso nyonso tokolala na kati ya liwa te, kasi tokokóma ndenge mosusu biso nyonso, mbala moko, na kobɛta ya liso, na kelelo ya nsuka.” Maloba ya ntoma Paulo ezali kokokisama sikoyo! Ntango bandeko yango ya Kristo basekwaka, bazalaka na esengo monene mpenza mpo bakozala “ntango nyonso elongo na Nkolo.”​—1 Tes. 4:17.

Bakristo oyo bakobongwana “na kobɛta ya liso,” bakozala elongo na Yesu mpo na kobundisa bato nyonso ya mabe oyo bazali awa na mabele (Talá paragrafe 15)

15. Mosala nini ezali kozela bakristo oyo bakobongwana “na kobɛta ya liso”?

15 Biblia eyebisi biso makambo bakristo yango, oyo bakobongwana na “kobɛta ya liso,” bakosala kuna na likoló. Yesu alobi na bango boye: “Moto oyo alongi mpe abateli misala na ngai tii na nsuka, nakopesa ye bokonzi likoló ya bikólo, mpe akokamba bato na lingenda ya ebende, bongo bakopanzana lokola bambɛki ya mabele, ndenge ngai mpe nazwaki bokonzi epai ya Tata na ngai.” (Em. 2:26, 27) Bakolanda Komanda na bango Yesu, mpe bakokamba bato ya bikólo na lingenda ya ebende.​—Em. 19:11-15.

16. Ndenge nini bato mingi bakolonga liwa?

16 Ezali polele ete, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakolonga liwa. (1 Ko. 15:54-57) Lisekwa na bango ekopesa bango nzela ya kopesa mabɔkɔ mpo na kosilisa mabe nyonso na mokili mobimba na etumba ya Armagedone oyo ezali koya. Bamilio ya bakristo mosusu ‘bakouta na bolɔzi monene,’ bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sika. (Em. 7:14) Bato yango bakomona na miso bolongi mosusu likoló ya liwa ntango bamiliare ya bato oyo bakufá kala bakosekwa. Kanisá esengo tokozala na yango ntango likambo monene wana ekosalema! (Mis. 24:15) Mpe bato nyonso oyo bakomonisa mpenza ete bazali sembo epai ya Yehova, bakolonga ata liwa oyo tozwá epai ya Adama. Bakozala na likoki ya kozala na bomoi ya seko.

17. Na 1 Bakorinti 15:58, Biblia elendisi biso tósala nini?

17 Mokristo nyonso oyo azali na bomoi lelo asengeli kosepela na maloba ya kobɔndisa oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Korinti na oyo etali lisekwa. Tosengeli mpenza kosala nyonso oyo esengeli mpo na kotosa toli ya ntoma Paulo, oyo elobi ete tósala nyonso oyo tokoki “na mosala ya Nkolo.” (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) Soki tozali ntango nyonso kosala oyo esengeli na mosala yango, tokoki kozala na elikya ete tokozala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya. Bomoi yango ekozala malamu mpenza koleka bomoi nyonso oyo tokoki kokanisa. Yango ekomonisa mpenza ete mosala na biso na kati ya Nkolo ezalaki ya mpamba te.

LOYEMBO 140 Nazwi bomoi ya seko!

^ par. 5 Eteni ya mibale ya 1 Bakorinti mokapo 15 elobeli mingi makambo etali lisekwa, mingimingi lisekwa ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, makambo oyo ntoma Paulo akomi na mokapo yango, ezali mpe na ntina mpo na bampate mosusu. Lisolo oyo ekomonisa ndenge elikya ya lisekwa etaleli bomoi na biso lelo oyo, mpe ndenge ekosalisa biso tózala na bomoi malamu na mikolo ezali koya.

^ par. 2Mituna ya batángi” oyo ezali na nimero oyo ezali kolobela makanisi ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 15:29.