Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 51

“Yehova abikisaka baoyo balɛmbi nzoto”

“Yehova abikisaka baoyo balɛmbi nzoto”

“Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—NZ. 34:18.

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

NA MOKUSE *

1-2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

NA BANTANGO mosusu, tokoki kokanisa ndenge oyo bomoi ezalaka mokuse mpe ‘etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Yango wana, na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto. Basaleli mingi ya Yehova na ntango ya kala mpe balɛmbaki nzoto. Bamosusu kutu basɛngaki bákufa. (1 Bak. 19:2-4; Yobo 3:1-3, 11; 7:15, 16) Kasi Yehova azalaki ntango nyonso kobɔndisa bango mpe kopesa bango makasi. Makambo oyo bakutanaki na yango ekomamaki mpo na kobɔndisa mpe koteya biso.​—Rom. 15:4.

2 Na lisolo oyo, tokolobela mwa basaleli ya Yehova oyo bakutanaki na makambo oyo elɛmbisaki bango nzoto. Na ndakisa, tokolobela Yozefe mwana ya Yakobo, mpe Ruta ná mama-bokilo na ye Naomi, basi mibale oyo mibali na bango bakufá. Na nsima, tokolobela Molevi oyo akomaki Nzembo 73, mpe na nsuka tokolobela ntoma Petro. Ndenge nini Yehova apesaki bango makasi? Mpe mateya nini mokomoko na biso akoki kozwa na makambo oyo ekómelaki bango? Biyano na mituna yango ekondimisa biso ete “Yehova azali pene na baoyo mitema ebukani,” mpe abikisaka baoyo balɛmbi nzoto.​—Nz. 34:18.

BASALELAKI YOZEFE MAKAMBO YA MABE MPE YA KOZANGA BOSEMBO

3-4. Makambo nini ekómelaki Yozefe ntango azalaki naino elenge?

3 Yozefe azalaki na mbula soki 17 ntango alɔtaki ndɔtɔ mibale oyo eutaki epai ya Nzambe. Bandɔtɔ yango emonisaki ete mokolo mosusu, Yozefe akokóma moto monene oyo bato ya libota na bango bakomemya. (Eba. 37:5-10) Kasi mwa moke kaka nsima ya kolɔta bandɔtɔ wana, Yozefe akutanaki na makambo ya mabe mpenza. Na esika bamonisela ye limemya, bandeko na ye batɛkaki ye mpe akómaki moombo na ndako ya mokonzi moko ya Ezipito na nkombo Potifare. (Eba. 37:21-28) Na mwa ntango moke, bomoi ya Yozefe ebongwanaki mpenza; mwana oyo tata na ye azalaki kolinga mingi akómaki nde moombo mpamba epai ya mokonzi moko ya Ezipito oyo azalaki mopakano.​—Eba. 39:1.

4 Na nsima, bomoi ya Yozefe ekómaki lisusu mabe koleka. Mwasi ya Potifare akoselaki Yozefe makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Na esika Potifare aluka ata koyeba ndenge makambo elekaki, abwakaki Yozefe mbala moko na bolɔkɔ, mpe bakangaki makolo na ye na minyɔlɔlɔ ya ebende. (Eba. 39:14-20; Nz. 105:17, 18) Yozefe azalaki naino elenge. Na yango, meká kokanisa mpasi oyo ayokaki ndenge bakoselaki ye makambo ete alingaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya moto mosusu. Mpe kanisá nsɔni oyo likambo yango ekokaki komemela nkombo ya Yehova. Na ntembe te, likambo wana ekokaki mpenza kolɛmbisa Yozefe nzoto!

5. Yozefe asalaki nini mpo alɛmba nzoto koleka ndelo te?

5 Ntango Yozefe azalaki moombo mpe na nsima ntango akɔtaki bolɔkɔ, akokaki kosala eloko moko te mpo na kobongola makambo ya bomoi na ye. Nini esalisaki ye azala kaka na makanisi ya malamu? Na esika atya makanisi na ye nyonso na makambo oyo akokaki kosala lisusu te, azalaki nde kosala na molende mosala nyonso oyo bapesaki ye. Kasi likambo eleki ntina, Yozefe azalaki ntango nyonso koluka ndenge ya kosepelisa Yehova. Yango wana, Yehova apambolaki eloko nyonso oyo Yozefe azalaki kosala.​—Eba. 39:21-23.

6. Ekoki kozala ete Yozefe azwaki makasi na bandɔtɔ oyo alɔtaká. Na ndenge nini?

6 Ekoki kozala ete Yozefe azwaki mpe makasi ntango azalaki kokanisa bandɔtɔ ya bisakweli oyo alɔtaki bambula mingi liboso. Bandɔtɔ yango emonisaki ete akokutana lisusu na bato ya libota na ye mpe bomoi na ye ekobonga. Mpe yango nde esalemaki. Ntango Yozefe akómaki na mbula soki 37, bandɔtɔ yango ebandaki kokokisama na ndenge ya kokamwa mpenza!​—Eba. 37:7, 9, 10; 42:6, 9.

7. Na kotalela 1 Petro 5:10, nini ekosalisa biso tóyikela minyoko mpiko?

7 Yango eteyi biso nini? Lisolo ya Yozefe ezali kokundwela biso ete, mokili oyo ezali mabe mpenza mpe bato bakosalela biso makambo ya kozanga bosembo. Ata mpe bandeko na biso bakristo bakoki kosalela biso makambo oyo ekoki kozokisa biso. Kasi soki tozali komona ete Yehova azali Libanga mpe Ekimelo na biso, tokolɛmba nzoto te mpe tokotika kosalela ye te. (Nz. 62:6, 7; tángá 1 Petro 5:10.) Kobosana mpe te ete, ntango mosusu Yozefe azalaki na mbula soki 17 ntango Yehova alɔtisaki ye bandɔtɔ wana. Yango emonisi polele ete, Yehova atyelaka basaleli na ye oyo bazali bilenge motema. Lelo oyo, bilenge mingi bazali lokola Yozefe. Bango mpe bazalaka na kondima makasi epai ya Yehova. Bakɔtisá bamosusu kati na bango na bolɔkɔ kaka mpo baboyaki kobebisa bosembo na bango epai ya Nzambe.​—Nz. 110:3.

BASI MIBALE OYO BAZALAKI NA MAWA MAKASI

8. Makambo nini ekómelaki Naomi ná Ruta?

8 Lokola nzala makasi ekɔtaki na mokili ya Yuda, Naomi ná libota na ye balongwaki na mboka na bango mpe bakendaki kofanda na mboka-mopaya, na Moabe. Kuna, Elimeleke, mobali ya Naomi akufaki, mpe atikaki ye na bana mibali mibale. Na nsima, bana yango babalaki basi ya Moabe, Ruta ná Orpa. Mbula soki zomi na nsima, bana ya Naomi mpe bakufaki, batikaki ata bana te. (Ruta 1:1-5) Kanisá mawa makasi oyo basi wana bayokaki! Na ntembe te, Ruta ná Orpa bakokaki kobala lisusu. Kasi, nani alingaki kobatela Naomi oyo azalaki kokóma mobange? Naomi alɛmbaki nzoto mingi mpenza, yango wana mokolo moko alobaki: “Bóbenga ngai Naomi te. Bóbenga ngai Mara, mpo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akómiseli ngai makambo bololo mpenza.” Nsima ya kokutana na makambo nyonso wana ya mpasi, Naomi azwaki ekateli ya kozonga na Beteleme, mpe Ruta alandaki ye.​—Ruta 1:7, 18-20.

Nzambe amonisaki Naomi ná Ruta ete akoki kosalisa basambeli na ye bálonga ezaleli ya kolɛmba nzoto mpe ya mawa. Akoki mpe kosalisa yo? (Talá paragrafe 8-13) *

9. Na kotalela Ruta 1:16, 17, 22, ndenge nini Ruta alendisaki Naomi?

9 Nini esalisaki Naomi? Ezali bolingo ya sembo. Na ndakisa, Ruta amoniselaki Naomi bolingo ya sembo na ndenge andimaki kofanda elongo na ye. (Tángá Ruta 1:16, 17, 22.) Na Beteleme, Ruta azalaki kosala mosala makasi mpenza; azalaki kolɔkɔta mbuma ya ɔrje mpo na ye ná Naomi. Yango esalaki ete Ruta ayebana lokola mwasi moko malamu mpe oyo asalaka mosala makasi.​—Ruta 3:11; 4:15.

10. Na ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaka babola lokola Naomi ná Ruta?

10 Yehova apesaki Bayisraele mobeko oyo emonisaki ezaleli na ye ya motema mawa epai ya babola lokola Naomi ná Ruta. Ayebisaki bango ete ntango bazali kobuka mbuma na bilanga na bango, basengelaki kotika oyo ezali pembenipembeni ya elanga mpo na babola. (Lev. 19:9, 10) Yango wana, Naomi ná Ruta bazalaki kozwa biloko ya kolya kozanga ete básɛngakasɛngaka epai ya bato mosusu.

11-12. Ndenge nini Boaze apesaki Naomi ná Ruta esengo?

11 Nkolo-elanga oyo Ruta akendaki kolɔkɔta mbuma azalaki na bomɛngo mingi, nkombo na ye ezalaki Boaze. Mobali yango akamwaki mpenza komona bosembo ya Ruta epai ya Naomi mpe ndenge azalaki kolinga ye mingi. Yango wana, na nsima, Boaze abalaki Ruta, mpe asombaki mabele ya bato ya libota ya Naomi, oyo bana ya Ruta bakokaki kozwa yango lisusu na nsima. (Ruta 4:9-13) Babotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Obede, oyo akómaki nkɔkɔ ya Mokonzi Davidi.​—Ruta 4:17.

12 Meká komona esengo oyo Naomi ayokaki ntango amemaki Obede! Kanisá mpe esengo oyo ayokaki ntango azalaki kobondela Yehova mpo na kopesa ye matɔndi na motema mobimba! Kasi makambo ya malamu koleka mpo na Naomi ná Ruta ekosalema na mikolo ezali koya. Ntango bakosekwa, bakoyeba ete Obede akómaki nkɔkɔ ya Yesu Kristo, Masiya oyo alakamaki!

13. Mateya nini ya ntina tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Naomi ná Ruta?

13 Yango eteyi biso nini? Ntango tozali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge, tokoki kolɛmba nzoto, ata mpe koyoka motema mpasi mpenza. Ntango mosusu tokoki kokanisa ete mikakatano na biso ekosila te. Na bantango ya boye, tosengeli kotyela Tata na biso ya likoló motema mobimba mpe kotikala pene ya bandeko na biso bakristo. Ezali solo ete Yehova alongolaka ntango nyonso te mikakatano na biso. Na ndakisa, azongisaki te na bomoi mobali ya Naomi mpe bana na ye. Kasi na bantango mosusu, asalisaka biso tóyika mpiko na nzela ya makambo ya boboto oyo bandeko na biso bakristo basalelaka biso.​—Mas. 17:17.

MOLEVI OYO AKÓMAKI PENE NA KOTIKA KOSALELA YEHOVA

Etikalaki moke mokomi ya Nzembo 73 abɛta libaku ntango emonanaki lokola ete bato oyo bazali kolanda makambo ya Yehova te bazali kolonga na bomoi na bango. Yango ekoki mpe kokómela biso (Talá paragrafe 14-16)

14. Mpo na nini Molevi moko alɛmbaki mpenza nzoto?

14 Mokomi ya Nzembo 73 azalaki Molevi. Na yango, azalaki na lokumu ya kosalela Yehova na esika na ye ya losambo. Atako bongo, ye mpe alɛmbaki nzoto na eleko moko boye ya bomoi na ye. Mpo na nini? Akómaki kolula bato mabe mpe ya lolendo, mpo na makambo ya mabe oyo bazalaki kosala te, kasi nde mpo ezalaki komonana ete bazalaki na bomoi ya malamu. (Nz. 73:2-9, 11-14) Ezalaki komonana lokola bazalaki na nyonso oyo esengeli; na ndakisa bomɛngo, bomoi ya malamu, mpe ata motungisi moko te. Yango esalaki ete Molevi wana alɛmba nzoto mpe aloba ete: “Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba, mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.” Emonani polele ete, makambo wana ekokaki kopekisa ye kosalela Yehova.

15. Na kotalela Nzembo 73:16-19, 22-25, ndenge nini Molevi oyo akomaki nzembo yango alongaki ezaleli ya kolɛmba nzoto?

15 Tángá Nzembo 73:16-19, 22-25. Molevi wana akɔtaki “na esika mosantu monene ya Nzambe.” Ekoki kozala ete ntango azalaki kuna elongo na basambeli mosusu ya Yehova, afandaki kimya, abandaki kokanisa na mozindo, mpe abondelaki mpo na makambo ya bomoi na ye. Na yango, ayaki komona ete makanisi na ye ekómaki kobeba, mpe akokaki kobebisa boyokani na ye ná Yehova. Ayaki mpe komona ete bato mabe bazali na “mabele ya mosɛlu” mpe bakosuka na ndenge moko ya mabe mpenza. Mpo atika kolɛmba nzoto mpe kolula bato mabe, Molevi yango asengelaki kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Ntango asalaki bongo, amitungisaki lisusu te, mpe akómaki na esengo. Alobaki ete: ‘Longola Yehova, nazali na esengo mosusu te na mabele.’

16. Makambo oyo ekómelaki Molevi moko ekoki koteya biso nini?

16 Yango eteyi biso nini? Tosengeli soki moke te kolula bato mabe oyo bazali komonana lokola bazali na bomoi ya malamu. Esengo na bango ezali ya likolólikoló mpe ya ntango moke, mpe lisusu bakozwa bomoi ya seko te. (Mos. 8:12, 13) Soki tozali kolula bango, tokolɛmba nzoto mpe tokoki ata kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Yango wana, soki obandi kolula bomoi ya bato mabe, salá oyo Molevi wana asalaki na nsima. Salelá toli oyo Nzambe apesaka biso na bolingo mpenza, mpe yanganáká elongo na bato mosusu oyo basalaka mokano ya Yehova. Soki ozali kolinga Yehova koleka eloko mosusu nyonso, okozwa bolamu ya solosolo. Mpe okotikala na nzela ya “bomoi ya solosolo.”​—1 Tim. 6:19.

MABUNGA YA NTOMA PETRO ELƐMBISAKI YE NZOTO

Bakoki kosalisa biso, to mpe biso tokoki kosalisa basusu bákanisa na ndenge oyo Petro alɛmbaki nzoto kasi na nsima, azongelaki lisusu kosalela Yehova na molende (Talá paragrafe 17-19)

17. Makambo nini elɛmbisaki mpenza Petro nzoto?

17 Ntoma Petro azalaki mobali ya mpiko; nzokande azalaki mpe motema mɔtɔmɔtɔ, mpe na bantango mosusu, azalaki koumela te mpo na kobimisa mayoki na ye. Yango wana, na bantango mosusu, azalaki koyoka mawa mpo na makambo oyo alobaki to asalaki. Na ndakisa, ntango Yesu ayebisaki bantoma na ye ete bato bakonyokola ye mpe bakoboma ye, Petro apamelaki ye na maloba oyo: “Likambo wana ekokómela yo te.” (Mat. 16:21-23) Kasi, Yesu asembolaki ye. Ntango ebele ya bato bayaki mpo bákanga Yesu, Petro akanisaki ata kokanisa te, azwaki mopanga na ye mpe akataki litoi ya moombo ya nganga-nzambe monene. (Yoa. 18:10, 11) Na mbala oyo mpe Yesu asembolaki ye. Lisusu, Petro atutaki ntolo ete ata soki bantoma mosusu bakimi Yesu, ye akokima soki moke te! (Mat. 26:33) Kasi, Petro azalaki makasi te ndenge azalaki kokanisa. Na nsima, kaka na butu wana, abangaki bato mpe awanganaki Yesu mbala misato mobimba. Lokola likambo yango elɛmbisaki ye mpenza nzoto, “abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi.” (Mat. 26:69-75) Na ntembe te, akómaki komituna soki Yesu akokaki kolimbisa ye.

18. Ndenge nini Yesu asalisaki Petro alonga ezaleli ya kolɛmba nzoto?

18 Kasi, Petro atikaki te ete makambo yango elɛmbisa ye nzoto koleka ndelo mpe etinda ye atika kosalela Yehova. Ata nsima ya libunga wana, akobaki kosalela Yehova elongo na bantoma mosusu. (Yoa. 21:1-3; Mis. 1:15, 16) Nini esalisaki ye? Ya liboso, Yesu abondelaki na butu wana ete kondima ya Petro elɛmba te, mpe alendisaki ye ete azonga mpe alendisa bandeko na ye. Yehova apesaki eyano na libondeli wana, oyo Yesu asalaki na motema mobimba. Na nsima, Yesu abimelaki Petro; mbala mosusu mpo na kolendisa ye. (Luka 22:32; 24:33, 34; 1 Ko. 15:5) Lisusu, ntango bantoma bakendaki koluka mbisi butu mobimba kasi bazwaki eloko te, Yesu abimelaki bango. Na mbala oyo mpe, Yesu apesaki lisusu Petro libaku ya komonisa ete alingaka Yesu mingi. Yesu alimbisaki moninga na ye ya motema mpe apesaki ye mosala monene mpenza.​—Yoa 21:15-17.

19. Na kotalela Nzembo 103:13, 14 ndenge nini Yehova atalelaka biso ntango tosali lisumu?

19 Yango eteyi biso nini? Ndenge oyo Yesu asalelaki Petro makambo emonisi ete azali na motema mawa kaka lokola Tata na ye. Yango wana, soki tosali mabunga, tosengeli kokanisa soki moke te ete Yehova akolimbisa biso te. Tóbosana te ete, Satana nde alingaka ete tókanisaka bongo. Kutu, tosengeli nde kokanisa na likebi ndenge Yehova alingaka biso, mpe ayebi esika makoki na biso esuki, mpe azalaka na mposa makasi ya kolimbisa biso. Yango wana, biso mpe tosengeli komekola ye ntango basusu basaleli biso makambo oyo epesi biso mpasi.​—Tángá Nzembo 103:13, 14.

20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Ndakisa ya Yozefe, ya Naomi ná Ruta, ya Molevi moko, mpe ya ntoma Petro endimisi biso ete “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani.” (Nz. 34:18) Na bantango mosusu, atikaka nzela ete tókutana na mikakatano mpe tólɛmba nzoto. Atako bongo, soki toyikeli mikakatano yango mpiko na lisalisi ya Yehova, kondima na biso ekokóma makasi. (1 Pe. 1:6, 7) Na lisolo oyo elandi, tokomona lisusu ndenge oyo Yehova asungaka basaleli na ye ya sembo oyo balɛmbi nzoto, ntango mosusu mpo na mabunga na bango to mpo na makambo ya mpasi oyo bazali kokutana na yango.

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

^ par. 5 Yozefe, Naomi, Ruta, Molevi moko, mpe ntoma Petro bakutanaki na makambo oyo elɛmbisaki bango nzoto. Na lisolo oyo, tokomona ndenge Yehova abɔndisaki bango mpe ndenge oyo apesaki bango makasi. Tokomona mpe mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa na bango, mpe na ndenge oyo Yehova asalisaki bango na bolingo mpenza.

^ par. 56 NDIMBOLA YA BILILINGI: Naomi, Ruta, ná Orpa bayokaki mawa makasi mpe balɛmbaki nzoto ntango mibali na bango bakufaki. Na nsima, Ruta ná Naomi basepelaki elongo na Boaze ntango Obede abotamaki.