Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Masese 24:16 elobi: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.” Yango ezali nde kolobela moto oyo azali kosala lisumu mbala na mbala kasi Nzambe azali kolimbisa ye?

Na ntembe te, vɛrsɛ oyo elingi koloba bongo te. Ezali nde kolobela moto oyo azali kokutana na mikakatano mbala na mbala kasi azali koyikela yango mpiko.

Sikoyo, tótalela bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya Masese 24:16. Bavɛrsɛ yango elobi: “Kobatama te, lokola moto mabe, mpo na kozela kokwela esika ya kofanda ya moyengebene; kopunza esika na ye ya kopema te. Mpo moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza, kasi bato mabe, mpasi ekobɛtisa bango libaku. Ntango monguna na yo akwei, mpe ntango babɛtisi ye libaku, motema na yo ezala na esengo te.”​—Mas. 24:15-17.

Bato mosusu bakanisaka ete vɛrsɛ 16 ezali kolobela moto oyo akweaki na lisumu kasi na nsima abongoli motema mpe azongi lisusu na boyokani malamu elongo na Nzambe. Na ndakisa, bakonzi mibale ya lingomba moko na Angleterre bakomaki ete: “Bateyi mingi, ezala ya kala to ya mikolo na biso, balimbolaka vɛrsɛ yango ndenge wana.” Balobi lisusu ete ndimbola wana emonisi ete, “moto malamu akoki kokwea na . . . masumu ya minene, kasi akokoba kolinga Nzambe mpe Nzambe akolinga ye mpo abongoli motema.” Likanisi ya ndenge wana ekoki kosepelisa moto oyo alingaka te kotɛmɛla lisumu. Akoki kokanisa ete ata soki asali masumu mbala na mbala, Nzambe akolimbisa ye kaka.

Nzokande vɛrsɛ 16 elimboli bongo te.

Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kokwea” mpe “akwei” na verse 16 mpe 17 ekoki kosalelama na ndenge mingi. Ekoki kolimbola kokwea na ndenge ya solo. Na ndakisa, ngɔmbɛ ekwei na balabala, moto auti na likoló ya ndako akwei na nse, to libanga ekwei na mabele. (Mib. 22:4, 8; Am. 9:9) Kasi, liloba yango mpe ekoki kosalelama na ndenge ya elilingi, na ndakisa: “Yehova atɛlɛmisaka ngwi makolo ya mobali makasi, mpe Ye asepelaka na nzela na ye. Ata soki akwei, akobwakama na nse te, mpo Yehova azali kosimba lobɔkɔ na ye.”​—Nz. 37:23, 24; Mas. 11:5; 13:17; 17:20.

Kasi, talá likanisi oyo Profesɛrɛ Edward H. Plumptre apesi. Alobi boye: “Liloba ya Ebre [“kokwea”] esalelamaka ata moke te mpo na kolobela kokwea na lisumu.” Moto mosusu ya mayele alobeli vɛrsɛ 16 na mokuse boye: “Ekozala bozoba konyokola basaleli ya Nzambe, mpo bakolonga kaka; kasi bato mabe bakolonga te!”

Makambo nyonso oyo emonisi ete Masese 24:16 elobeli te kokwea na lisumu, kasi emonisi nde bampasi mpe mikakatano oyo moto akoki kokutana na yango mbala na mbala. Na mokili mabe oyo, moyengebene akoki kobɛla to kokutana na mikakatano mosusu. Ntango mosusu, bakonzi ya Leta bakoki konyokola ye makasi mpenza mpo na kondima na ye. Kasi akoki kotya motema ete Nzambe azali mosungi na ye, akosalisa ye ayika mpiko mpe alonga. Omituna boye: ‘Namonaka te ete mbala mingi makambo ya basaleli ya Nzambe esukaka kaka malamu?’ Mpo na nini? Mpo tondimaka na motema moko ete “Yehova azali kosunga baoyo nyonso bazali kokwea, mpe azali kotombola baoyo nyonso bagumbami.”​—Nz. 41:1-3; 145:14-19.

“Moyengebene” asepelaka te ntango bato mosusu bazali kokutana na mikakatano. Kasi, alendisamaka nde mpo ayebi ete “ekosukela baoyo babangaka Nzambe ya solo malamu, mpo bazali kobanga ye.”​—Mos. 8:11-13; Yobo 31:3-6; Nz. 27:5, 6.