Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tyá makanisi na yo nyonso na mosala na yo!

Tyá makanisi na yo nyonso na mosala na yo!

OYOKAKA ndenge nini soki moninga na yo ya motema atindeli yo mokanda moko ya kolendisa? Ntoma Paulo atindelaki Timote mokanda ya ndenge wana. Mokanda yango ezali sikoyo na kati ya Biblia mpe ebengami 2 Timote. Na ntembe te, Timote alukaki esika moko ya kimya mpo na kotánga makambo oyo moninga na ye akomelaki ye. Mbala mosusu azalaki komituna boye: ‘Paulo azali malamu? Azali ata na toli moko te ya kopesa ngai mpo nasala mosala na ngai malamu? Ndenge nini mokanda oyo ekoki kosalisa ngai nabongisa lisusu lolenge na ngai ya kosakola mpe ya koteya basusu?’ Ndenge tokomona yango, Timote azwaki biyano na mituna yango na mokanda ya ntina mingi oyo ntoma Paulo atindelaki ye. Na lisolo oyo, tokolobela mwa makambo ya ntina oyo ezali na kati ya mokanda yango.

“NAZALI KOKOBA KOYIKELA MAKAMBO NYONSO MPIKO”

Ntango Timote abandaki kotánga mokanda yango, na mbala moko amonaki ete ntoma Paulo azalaki mpenza kotyela ye likebi. Na esengo nyonso, Paulo abengaki Timote ‘mwana na ye ya bolingo.’ (2 Tim. 1:2) Atako Timote azalaki na mbula koleka 30 ntango azwaki mokanda yango na mobu soki 65 T.B., azalaki nkulutu oyo ayebaki makambo mingi mpo asilaki kosala elongo na Paulo na boumeli ya mbula koleka 10.

Koyeba ete Paulo atikalaki sembo liboso ya minyoko, elendisaki mpenza Timote. Paulo azalaki mokangami na Roma mpe etikalaki moke baboma ye. (2 Tim. 1:15, 16; 4:6-8) Timote amonaki ete Paulo azalaki mpenza na mpiko, mpo Paulo alobaki ete: “Nazali kokoba koyikela makambo nyonso mpiko.” (2 Tim. 2:8-13) Lokola Timote, ndenge oyo Paulo ayikelaki mikakatano mpiko, ekoki mpe kopesa biso makasi.

“PELISÁ LOKOLA MƆTƆ LIKABO”

Paulo alendisaki Timote azwa na motuya mingi mokumba oyo azalaki na yango na mosala ya Nzambe. Alingaki ete Timote “apelisa lokola mɔtɔ likabo ya Nzambe” oyo ezalaki epai na ye. (2 Tim. 1:6) Paulo asalelaki liloba ya Grɛki khaʹrisma oyo elimboli “likabo.” Liloba yango ya Grɛki elimbolaka likabo ya ofele oyo moto abongi na yango te. Timote azwaki likabo yango ntango aponamaki mpo na kosala mosala ya ntina mingi mpo na bandeko ya lisangá.​—1 Tim. 4:14.

Paulo azalaki kolendisa Timote asala nini na likabo yango? Ekoki kozala ete ntango Timote atángaki maloba “pelisá lokola mɔtɔ,” akanisaki mɔtɔ oyo bato bazalaki kopelisa na bandako, oyo na bantango mosusu ezalaki kokóma makala ya mɔtɔ. Makala yango oyo epeli makasi, ezalaki kobimisa lolemo ya mɔtɔ mpe molunge makasi. Diksionɛrɛ moko elobi ete vɛrbɛ ya Grɛki (anazopyreʹo) oyo Paulo asalelaki elimboli “kopelisa lisusu, kopupola, to kofula mɔtɔ mopɛpɛ, kokóma lisusu na mposa makasi to na molende mpo na mosala moko boye.” Na yango, Paulo azalaki koloba na Timote ete: “Asala nyonso oyo akoki na mokumba oyo azali na yango!” Lelo oyo, biso mpe tosengeli kosalaka bongo, elingi koloba, kozala na molende na mosala na biso.

“BATELÁ ELOKO YANGO YA MOTUYA”

Ntango Timote azalaki kokoba kotánga mokanda oyo moninga na ye ya motema atindelaki ye, amonaki maloba mosusu oyo esalisaki ye alonga na mosala na ye. Paulo akomaki: “Eloko yango ya motuya oyo babombi epai na yo, batelá yango na lisalisi ya elimo santu oyo ezali epai na biso.” (2 Tim. 1:14) Eloko yango ya motuya ezalaki nini? Eloko nini ya motuya Timote azalaki na yango? Na vɛrsɛ oyo ezali liboso, Paulo alobeli “maloba oyo epesaka litomba,” elingi koloba solo oyo ezali na makomami. (2 Tim. 1:13) Lokola azalaki mosakoli ya nsango malamu, Timote asengelaki kosakola solo ezala na kati to mpe na libanda ya lisangá. (2 Tim. 4:1-5) Lisusu, Timote atyamaki nkulutu mpo na kobatela etonga ya Nzambe. (1 Pe. 5:2) Mpo na kobatela eloko ya motuya oyo babombaki epai na ye, to solo oyo asengelaki koteya, asengelaki kotyela Liloba ya Nzambe mpe elimo santu motema.​—2 Tim. 3:14-17.

Lelo oyo, babombá mpe epai na biso solo oyo tosakolaka epai ya bato mosusu. (Mat. 28:19, 20) Mpo na komonisa botɔndi mpo na eloko ya motuya oyo babombá epai na biso, tosengeli kotingama na mabondeli, mpe koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala. (Rom. 12:11, 12; 1 Tim. 4:13, 15, 16) Tokoki mpe kozwa mokumba mosusu ya kosala lokola nkulutu, to mpe na mosala ya ntango nyonso. Mokumba yango ya ntina mingi esengeli kotinda biso tózala na komikitisa mpe kotyela Nzambe motema mpo asalisa biso. Tokoki kobatela eloko yango soki tozali kozwa yango na motuya mpe kotyela Yehova motema ete akosalisa biso mpo tóbatela yango.

“PESÁ BATO YA SEMBO MAKAMBO YANGO”

Mikumba oyo Timote azwaki ezalaki kaka mpo na ye moko te. Asengelaki mpe kopesa bato mosusu formasyo mpo básala mosala oyo azalaki kosala. Yango wana Paulo alendisaki Timote ete: “Makambo oyo oyokaki epai na ngai . . .  pesá bato ya sembo makambo yango, bongo bango mpe bakoyeba mpenza koteya bato mosusu.” (2 Tim. 2:2) Paulo ayebisaki Timote ateya bandeko mibali mosusu makambo nyonso oyo ye ayekolaki. Ezali na ntina ete bankulutu nyonso na kati ya lisangá básalaka mpe bongo. Nkulutu ya malamu, abombaka te makambo oyo ayebi mpo na mokumba moko mpo na ye moko. Kasi, ateyaka nde bato mosusu mpo bango mpe báyeba mosala yango. Abangaka te ete bandeko yango báyeba to mpe bákokisa mokumba yango malamu koleka ye. Na yango, nkulutu asukaka kaka te na koteya makambo ya mikemike oyo etali mokumba moko. Asepelaka kosalisa bato oyo azali kopesa formasyo bákóma na bososoli, elingi koloba bákóma bakristo oyo bakɔmeli na elimo. Soki asali bongo, “mibali ya sembo” oyo ateyaki bakosalisa lisangá mingi mpenza.

Na ntembe te, Timote azwaki na motuya mokanda ya kolendisa oyo ntoma Paulo atindelaki ye. Tokoki komona na makanisi ndenge azali kozongela kotánga mokanda yango mbala na mbala mpo asalela malamu batoli na yango na mikumba oyo azalaki na yango.

Biso mpe tosengeli kosalela toli yango. Na ndenge nini? Tosengeli kosala makasi tópelisa lokola mɔtɔ likabo oyo tozali na yango, kobatela eloko oyo babombá epai na biso, mpe koteya bato mosusu makambo nyonso oyo toyebi. Soki tosali bongo, kaka ndenge Paulo ayebisaki Timote, ‘tokokokisa mosala na biso malamumalamu.’​—2 Tim. 4:5.