Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge oyo mabondeli ekoki kosalisa yo

Ndenge oyo mabondeli ekoki kosalisa yo

Pamela abɛlaki makasi mpenza mpe akendaki epai ya minganga. Kasi, abondelaki mpe Nzambe apesa ye makasi ya koyikela maladi na ye mpiko. Libondeli esalisaki ye?

Pamela alobi boye: “Ntango bazalaki kosalisa ngai na maladi na ngai ya kansɛr, mbala mingi, nazalaki kobanga mpenza. Kasi ntango nazalaki kobondela Yehova Nzambe, motema na ngai ezalaki kokita, nazalaki kobanga te mpe koyika mpiko. Tii lelo oyo nayokaka kaka mpasi, kasi libondeli esalisaka ngai nazala na makanisi ya malamu. Ntango bato batunaka ngai ndenge nazali koyoka, nalobaka ete, ‘nazali koyoka malamu te kasi nazali na esengo!’”

Na ntembe te, tokozela te tókutana na mokakatano moko ya makasi mpo tóbanda kobondela. Biso nyonso tokutanaka na mikakatano, ezala ya minene to ya mike, mpe mbala mingi, tozalaka na mposa básalisa biso mpo tóyikela yango mpiko. Libondeli ekoki kosalisa yo?

Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.” (Nzembo 55:22) Maloba yango ezali kobɔndisa mpenza! Bongo ndenge nini libondeli ekoki kosalisa yo? Ntango ozali kobondela Nzambe na ndenge ya malamu, akopesa yo oyo osengeli na yango mpo na koyikela mikakatano na yo mpiko.​—Talá etanda “ Bolamu oyo mabondeli ekoki kopesa yo.”