Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe ayokaka mabondeli na yo?

Nzambe ayokaka mabondeli na yo?

Ntango obondelaka, okanisaka mpenza ete Nzambe ayokaka yo?

BIBLIA ELOBI NINI?

  • Nzambe ayokaka. Biblia eyebisi biso ete “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo. . . . Akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”​—Nzembo 145:18, 19.

  • Nzambe alingi obondela ye. Biblia ezali kosɛnga biso ete: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:6.

  • Nzambe atyeleka yo likebi mpenza. Nzambe ayebi malamu mpenza bampasi mpe mitungisi na biso mpe azali na mposa ya kosalisa biso. Biblia elobi: ‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’​—1 Petro 5:7.