Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini? Yesu alobaki nini?

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini? Yesu alobaki nini?

Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ntango Biblia elobelaka nsuka ya mokili, elingaka koloba te ete mabele ná bato nyonso bakokufa. Kasi, ezali nde nsuka ya makambo ya mabe mpe ya bato nyonso oyo bazali kosala yango. Biblia eyebisi biso ntango nini mokili mabe oyo ekosuka?

TÓTALA MAKAMBO MIBALE OYO YESU ALOBAKI MPO NA NSUKA:

“Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​—MATAI 25:13.

“Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.”​—MARKO 13:33.

Yango wana, moto moko te awa na mabele ayebi mpenza ntango mokili oyo ekosuka. Kasi, Nzambe abongisá “ntango oyo etyamá,” elingi koloba, ‘mokolo mpe ngonga’ ya sikisiki, oyo nsuka ekoya. (Matai 24:36) Yango elingi nde koloba ete ezali ata na ndenge moko te ya koyeba ete nsuka ekómi pene? Ezali bongo te. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bátala ebele ya makambo oyo ekolakisa ete nsuka ekómi mpenza pene.

ELEMBO

Makambo yango ezali elembo ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Yesu alobaki: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala, mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” (Matai 24:​3, 7) Alobaki mpe ete “bamaladi mabe” ekozala. (Luka 21:​11) Ozali komona makambo oyo Yesu asakolaki?

Lelo oyo, bato bazali konyokwama mpo na bitumba, nzala, mabele ezali koningana, mpe bamaladi mabe ndenge na ndenge. Na ndakisa, na mobu 2004, mabele eninganaki makasi na ebale monene oyo babengi océan indien mpe ebimisaki mbonge ya nsɔmɔ oyo babengi tsunami, mpe yango ebomaki bato soki 225 000. Na boumeli ya mbula misato, maladi ya coronavirus ebomi bato soki 6 900 000 na mokili mobimba. Yesu alobaki ete makambo lokola oyo wana ekomonisa ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene.

“MIKOLO YA NSUKA”

Biblia elobi ete “mikolo ya nsuka” ezali eleko oyo ezali liboso ya nsuka ya mokili. (2 Petro 3:3, 4) Na 2 Timote 3:1-5, Biblia emonisi ete na mikolo ya nsuka bizaleli ya bato ekobeba makasi mpenza. (Talá etanda “ Liboso ya nsuka ya mokili.”) Lelo oyo, ozali komona ete bato bazali koluka kaka matomba na bango moko, bazali na lokoso, na nkanda makasi, mpe bazali na bolingo te? Yango mpe emonisi ete nsuka ya mokili ekómi mpenza pene.

Mikolo ya nsuka ekoumela ntango boni? Biblia elobi ete, ekozala kaka “ntango mokuse.” Na nsima, Nzambe akoboma “baoyo bazali kobebisa mabele.”​—Emoniseli 11:15-18; 12:12.

ETIKALI MOKE MABELE EKÓMA PARADISO!

Nzambe asilá kopona mokolo mpe ngonga oyo ye akosukisa mokili mabe oyo. (Matai 24:36) Kasi, nsango malamu ezali ete Nzambe “alingi moto ata moko te abomama.” (2 Petro 3:9) Azali kopesa moto nyonso libaku ya koyekola mokano na ye mpe kotosa ye. Mpo na nini? Mpo alingi ete tóbika ntango mokili oyo ekobomama mpe tókɔta na mokili na ye ya sika, ntango mabele ekokóma paradiso.

Nzambe atyá programɛ ya koteya bato na mokili mobimba mpo na kosalisa bango báyekola ndenge ya kokóma bato oyo bakofanda na mokili ya sika, oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekosakolama na “mabele mobimba esika bato bafandi.” (Matai 24:14) Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova balekisaka bamiliare ya bangonga na mosala ya kosakola mpe koteya bato nsango oyo epesaka elikya. Yesu alobaki ete mosala yango ya kosakola ekosalema na mokili mobimba liboso nsuka eya.

Ntango oyo bato basengelaki koyangela etikali moke esila. Kasi, likambo ya esengo ezali ete okoki kobika ntango mokili oyo ekosuka mpe kokɔta na Paradiso oyo Nzambe alaki. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo okoki kofanda na mokili yango ya sika.

Esakweli ya Yesu oyo elobeli “mikolo ya nsuka” ezali kopesa biso elikya