Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo okoki kosala mpo okɔta na mokili ya sika

Oyo okoki kosala mpo okɔta na mokili ya sika

Masolo oyo eleki emonisi ete, etikali moke Nzambe asukisa mokili mabe oyo ná mikakatano na yango nyonso. Tosengeli kondima ete likambo yango ekosalema mpenza. Mpo na nini? Mpo Biblia, Liloba ya Nzambe, epesi elaka oyo:

“Mokili ezali koleka.”​—1 YOANE 2:17.

Tokoki kondima mpe ete bato bakobika mpo vɛrsɛ yango ebakisi ete:

“Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”

Yango wana, soki tolingi kobika, tosengeli kosala mokano ya Nzambe. Mpo na koyeba mokano ya Nzambe, tosengeli liboso koyeba Nzambe.

SOKI ‘OYEKOLI KOYEBA’ NZAMBE OKOBIKA NTANGO MOKILI EKOKUFA

Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko.” (Yoane 17:3) Mpo tóbika na nsuka ya mokili mpe tózwa bomoi ya seko, tosengeli ‘koyekola koyeba’ Nzambe. Yango esuki kaka te na koyeba ete Nzambe azali, to koyeba mwa makambo na ye. Tosengeli kokóma baninga na ye. Soki olingi ete boninga na yo ná moto moko ekóma makasi, bosengeli kolekisaka ntango elongo. Mpo na kozala moninga ya Nzambe, esengeli mpe kosalaka bongo. Tótala mateya mosusu ya ntina oyo ezali na Biblia, oyo ekoki kosalisa biso tókóma baninga ya Nzambe mpe tóbatela boninga yango.

TÁNGÁKÁ LILOBA YA NZAMBE, BIBLIA, MOKOLO NA MOKOLO

Soki obondeli Nzambe asalisa yo mpe soki ozali kosala mokano na ye, okoki kobika ntango mokili mabe oyo ekokufa

Tolyaka mokolo na mokolo mpo tózala na bomoi. Kasi, Yesu alobaki ete: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.”​—Matai 4:4.

Lelo oyo, tozali kokuta maloba ya Yehova na kati ya Biblia. Soki ozali koyekola buku mosantu yango, okoyeba mateya ya ntina mpenza oyo ekoyebisa yo makambo oyo Nzambe asaláká kala, oyo azali kosala lelo, mpe oyo akosala na mikolo ezali koya.

BONDELÁ NZAMBE ASALISA YO

Okoki kosala nini soki olingi kotosa Nzambe kasi ozali kokoka te kotika makambo oyo Nzambe alobi ete ezali mabe? Na ntango wana, okozwa mpenza lisalisi soki oyebi Nzambe malamumalamu.

Tózwa ndakisa ya mwasi moko na nkombo Sakura, oyo azalaki na bomoi moko ya mbindo mpenza. Ntango abandaki koyekola Biblia, ayebaki mobeko ya Nzambe oyo elobi ete “bókima pite.” (1 Bakorinti 6:18) Sakura abondelaki Nzambe apesa ye makasi mpe azwaki makasi ya kotika etamboli ya mbindo oyo azalaki na yango. Atako bongo, akobaki kaka kobunda na komekama yango. Alobi ete: “Soki makanisi ya mbindo eyeli ngai, nabondelaka Yehova na bosembo mpenza, mpo nayebi ete nakokoka kobundisa yango ngai moko te. Nguya ya libondeli ekómisi ngai moninga ya Yehova.” Ndenge moko na Sakura, bamilio ya bato bazali koyekola koyeba Yehova. Yehova azali kopesa bango makasi oyo basengeli na yango mpo na kobongola bomoi na bango mpe kozala na bomoi oyo ekosepelisa ye.​—Bafilipi 4:13.

Soki oyebi Nzambe malamu, ‘Nzambe [mpe] akoyeba yo’ mpo ozali moninga na ye ya motema. (Bagalatia 4:9; Nzembo 25:14) Nsima na yango nde okoki kobika mpe kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Kasi, mokili ya sika ekozala ndenge nini? Lisolo oyo elandi ekolimbola yango.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge ezali na Biblia.