Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?

Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?

Ndenge tolobelaki yango na masolo eleki, bato bazali kosala nyonso mpo bázala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Yango wana, bazali kotya motema na bango na liteya oyo elobaka ete makambo nyonso etángamá, na bakelasi ya milaimilai, na bomɛngo, mpe na kozala moto malamu. Kasi, koluka kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya na lolenge wana, ezali lokola kokende na esika moko boye kasi ozwi nde nzela oyo ekei epai mosusu. Yango elingi nde koloba ete ezali na eloko moko te oyo ekoki kosalisa moto mpo azala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Ezali bongo te!

LISALISI OYO EUTI NA ESIKA OYO ELEKI MALAMU

Mbala mingi, ntango tolingaka kozwa bikateli, totunaka mokóló to moto oyo aleki biso na bwanya. Ndenge moko mpe, tokoki kozwa lisalisi ya malamu epai ya moto oyo azali mokóló mpe oyo aleki biso mosika mpenza na bwanya. Toli ya moto yango ezali na mikanda moko oyo ezali na Makomi mosantu oyo basangisá mpe esali buku moko. Kokomama ya buku yango ebandaki eleki sikoyo mbula soki 3 500. Makomi mosantu yango oyo basangisi esika moko babengaka yango Biblia.

Mpo na nini osengeli kondimela makambo oyo Biblia elobi? Mpo moto oyo akomisá yango azali mokóló mpe azali na bwanya koleka moto nyonso. Biblia elobi ete azali “Mokóló na Mikolo” oyo azali “libela na libela.” (Danyele 7:9; Nzembo 90:2) Azali “Mozalisi ya likoló, Ye Nzambe ya solo, Moto oyo asalaki mabele.” (Yisaya 45:18) Ye moko alobi ete nkombo na ye ezali Yehova.​—Nzembo 83:18.

Biblia euti epai ya Mozalisi. Elobi ata esika moko te ete bato ya loposo boye baleki bato ya loposo oyo kuna, to mimeseno boye eleki oyo kuna. Toli ya buku yango esilaka ngala te, mpe bato ya bikólo nyonso bazwelaka yango litomba. Buku yango ezali na minɔkɔ ebele mpenza, mpe ekabolamaka koleka babuku mosusu nyonso. * Yango elingi koloba ete bato ya mokili mobimba bakoki kotánga yango mpe kolanda toli na yango. Makambo oyo elandi ezali makambo oyo Biblia yango moko elobi:

“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—MISALA 10:34, 35.

Kaka ndenge baboti balingaka bana na bango mpe basalisaka bango, Yehova Nzambe azali Tata ya bolingo oyo azali kosalisa biso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (2 Timote 3:16) Okoki kondimela Liloba na ye, mpo ye moto asalaki biso mpe ayebi makambo oyo ezali malamu mpo na biso.

Osengeli kosala nini mpo omindimisa ete okozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Talá lisolo oyo elandi.

^ Mpo na koyeba ndenge Biblia ebongolami mpe ekabolami, kende na www.pr418.com mpe kɔtá na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > ISTWARE MPE BIBLIA.

^ Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 ya buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na Internet na www.pr418.com. Kɔtá na esika bakomi BIBLIOTƐKƐ > BABUKU MPE MWA BABUKU.