Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kopona ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya

Okoki kopona ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya

Eleki sikoyo mbula soki 3 500, Yehova Nzambe ayebisaki bato oyo bazalaki kosambela ye ete bakoki kopona kozala na bomoi ya malamu. Ayebisaki bango boye: “Natye bomoi ná liwa liboso na yo, lipamboli ná elakeli mabe; mpe osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi, yo ná bana na yo.”​—Kolimbola Mibeko 30:19.

Mpo na kozala na bomoi ya malamu, bato yango basengelaki koyeba kopona. Lelo oyo, biso mpe tosengeli koyeba kopona. Biblia ezali kolimbola ndenge oyo tokoki kopona kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya, elobi boye: “Na kolingáká Yehova Nzambe na yo, na koyokáká mongongo na ye.”​—Kolimbola Mibeko 30:20.

NDENGE NINI TOKOKI KOLINGA YEHOVA MPE KOYOKA MONGONGO NA YE?

YEKOLÁKÁ MAKAMBO OYO EZALI NA BIBLIA: Mpo na kolinga Yehova, osengeli libosoliboso koyekola makambo na ye na Biblia. Ntango ozali koyekola, okoyeba ete azali Nzambe ya bolingo oyo alingi mpenza bolamu na yo. Asɛngi yo obondelaka ye “mpo atyelaka yo likebi.” (1 Petro 5:7) Biblia epesi elaka ete soki osali makasi oyekolaka makambo ya Nzambe, ye mpe “akopusana penepene na yo.”​—Yakobo 4:8.

SALELÁKÁ MAKAMBO OYEKOLI: Koyoka Nzambe elimboli kolanda toli ya malamu mpenza oyo ezali na Biblia. Ntango ozali kotosa Nzambe, “okolongisa banzela na yo mpe na ndenge yango okosala makambo na bwanya.”​—Yosua 1:8.

^ Boyekoli yango na nzela ya Internet ezali na minɔkɔ 7, na kati na yango minɔkɔ lokola Chinois Mandarin mpe Chinois Cantonais .