Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likomi oyo ezali na libanga: “Yahweh Sabaot alakela Hagaf mwana ya Hagav mabe”

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge nini likomi moko ya kala endimisi makambo oyo Biblia elobi?

NA MUSÉE moko (Bible Lands Museum) na Jérusalem, ezali na libanga moko ya mobu soki 700-600 liboso ya ntango na biso. Na libanga yango ezali na likomi moko. Bazwaki libanga yango na lilita moko pene na Hébron, na Israël. Likomi yango elobi boye: “Yahweh Sabaot alakela Hagaf mwana ya Hagav mabe.” Na ndenge nini likomi yango endimisi makambo oyo Biblia elobi? Yango emonisi ete na ntango ya kala, nkombo ya Nzambe Yehova, oyo ekomamá na balɛtrɛ ya Ebre ya kala YHWH, eyebanaki malamu mpe bato bazalaki kosalela yango na bomoi ya mokolo na mokolo. Kutu, makomi mosusu ya malita yango emonisi ete ezalaki na bato oyo bazalaki kokutana mpe komibomba kuna. Bato yango bazalaki mbala mingi kokoma na bifelo na yango nkombo ya Nzambe mpe bankombo ya bato mosusu oyo ezali na nkombo ya Nzambe.

Dr. Rachel Nabulsi ya Inivɛrsite ya Géorgie alobaki boye mpo na makomi yango: “Ndenge oyo nkombo YHWH ezali komonana mbala na mbala na makomi yango, ezali koteya biso makambo mingi mpenza. . . . Makomi ya Biblia mpe ya makambo mosusu ezali komonisa ete nkombo YHWH ezalaki na ntina mingi na bomoi ya Bayisraele mpe ya bato ya Yuda.” Yango endimisi makambo oyo ezali na Biblia, epai okomona nkombo ya Nzambe YHWH oyo ekomami na balɛtrɛ ya Ebre mbala mingi mpenza. Nkombo ya Nzambe ezalaki mbala mingi na kati ya bankombo ya bato yango.

Maloba “Yahweh Sabaot,” oyo ekomami na libanga yango, elimboli “Yehova ya mampinga.” Na yango, emonani ete na ntango ya kala bato bazalaki kosalela mbala mingi nkombo ya Nzambe mpe titre “Yehova ya mampinga.” Yango mpe endimisi ntina oyo Biblia esaleli titre “Yehova ya mampinga” mbala koleka 250 na Makomami ya Ebre, mingimingi na mokanda ya Yisaya, ya Yirimia, mpe ya Zekaria.