LISOLO YA BOMOI
Tozalaki kondima kosala makambo nyonso oyo Yehova azalaki kosɛnga biso
NSIMA ya mopɛpɛ moko makasi, mai ya ebale etondaki na pɔtɔpɔtɔ, mpe mbonge ebɛtaki makasi tii ememaki ata mabanga ya minene. Tozalaki na mposa ya kokatisa na ngámbo mosusu ya ebale, kasi lokola mbonge ezalaki makasi, ebukaki gbagba (pont). Ngai ná mobali na ngai Harvey, ná mobali moko oyo azalaki kobongolela biso monɔkɔ ya Amis, tosilaki mayele mpe tozangaki likambo ya kosala. Na ngámbo mosusu, bandeko bazalaki kotala biso na mawa, mpe tobandaki kokatisa. Liboso, tozongisaki mwa motuka na biso ya moke nsima ya motuka ya monene. Na nsima, lokola tozalaki na nsinga te mpo na kokanga motuka na biso, motuka ya monene ebandaki kotíyola. Nzela yango ya kokatisa ekómaki molai mpenza na miso na biso; kasi, ntango nyonso oyo tozalaki kokatisa tozalaki kobondela Yehova mpe tokómaki malamu. Likambo yango esalemaki na 1971. Tozalaki na ɛsti ya Taïwan, mosika mpenza na mboka na biso. Tiká nabɛtɛla bino lisolo na biso.
TOYEKOLI KOLINGA YEHOVA
Harvey azalaki mwana ya liboso na libota ya bana mibali minei. Libota na bango bayebaki solo na engumba Midland Junction, na wɛsti ya Australie, na bambula ya 1930, na ntango oyo nkita ya mboka ebebaki mpenza. Harvey ayekolaki kolinga Yehova mpe azwaki batisimo ntango akómaki na mbula 14. Eumelaki te, akómaki kondima mokumba nyonso oyo bazalaki kopesa ye na lisangá. Lokola azalaki naino elenge, mokolo moko aboyaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na makita mpo akanisaki ete akokoka kotánga yango malamu te. Kasi ndeko mobali moko ayebisaki ye akanisa malamu, mpe alobaki na ye ete: “Na ebongiseli ya Yehova, soki ndeko moko asɛngi yo osala eloko moko, amoni ete okokoka kosala yango!”—2 Ko. 3:5.
Ngai ná yaya na ngai ya mwasi mpe mama na biso, toyekolaki solo na Angleterre. Na ebandeli, tata na biso azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te, kasi na nsima, ye mpe akómaki Motatoli. Atako asepelaki te, nazwaki batisimo ntango nazalaki kaka na mbula libwa. Namityelaki mokano ya kokóma mobongisi-nzela mpe na nsima kokóma misionɛrɛ. Kasi, tata na biso alingaki ete nabanda mosala ya mobongisi-nzela kaka soki nakómi na mbula 21. Nalingaki te kozela mingi ndenge wana. Na yango, ntango nakómaki na
mbula 16, apesaki ngai nzela ya kokende na Australie epai ya yaya na biso ya mokóló, oyo akendaki kofanda kuna. Nsukansuka, ntango nakokisaki mbula 18, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela.Na Australie, nakutanaki na Harvey. Biso mibale tozalaki na mposa ya kosalela Yehova na mosala ya misionɛrɛ. Tobalanaki na 1951. Nsima ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mbula mibale, basɛngaki biso tósala mosala ya zongazonga. Zongazonga na biso ezalaki monene mpenza, na yango tosengelaki kosala mibembo milai na bisika oyo ekauká mpe na bamboka ya mosika.
MPOSA NA BISO EKOKISAMI
Na 1954, babengaki biso tókɔta na kelasi ya 25 ya eteyelo ya Gileade. Mposa na biso ya kokóma bamisionɛrɛ ekómaki pene ya kokokisama! Tokómaki na New York na masuwa mpe tobandaki koyekola Biblia na mozindo. Na Gileade, tozalaki mpe koyekola monɔkɔ ya Espagnol, kasi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Harvey, mpo azalaki kokoka te kotánga lɛtrɛ “r” na Espagnol.
Na kelasi, balakisi bapesaki liyebisi ete, baoyo balingi kokende kosakola na Japon bakoki kopesa bankombo na bango mpo na koyekola monɔkɔ ya Japonais. Kasi biso tolobaki ete tosengeli kotikela ebongiseli ya Yehova mokumba ya koponela biso esika oyo tokokende kosakola. Mwa moke na nsima, ndeko Albert Schroeder, moko ya balakisi na Gileade, ayokaki ete tokomisi nkombo te mpo na kokende na Japon. Alobaki na biso ete: “Bókanisa lisusu malamu.” Lokola tozalaki kaka kokakatana mpo na kokomisa nkombo na biso, ndeko Schroeder alobaki ete: “Ngai ná balakisi mosusu minei tokomisi nkombo na bino. Bómeka naino koyekola monɔkɔ ya Japonais.” Harvey amesanaki na monɔkɔ yango noki mpenza.
Tokómaki na Japon na 1955, na ntango wana, basakoli bazalaki kaka 500 na ekólo yango mobimba. Harvey azalaki na mbula 26, mpe ngai na mbula 24. Batindaki biso na engumba Kobe mpe tosalaki kuna mbula minei. Na nsima, tosepelaki lisusu ntango bayebisaki biso tózonga na mosala ya zongazonga, mpe tosalaki pene na engumba Nagoya. Tosepelaki na makambo nyonso oyo ezalaki kuna; na ndakisa bandeko, biloko ya kolya, mpe bazamba na yango. Nzokande, banda kala, tozalaki kondima kosala makambo nyonso oyo Yehova azalaki kosɛnga biso.
MOKUMBA YA SIKA EMEMELI BISO MIKAKATANO MOSUSU
Nsima ya mbula misato na mosala ya zongazonga, filiale ya Japon esɛngaki biso tókende kosakola na Taïwan epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Amis. Bandeko mosusu oyo balobaka monɔkɔ ya Amis bakómaki bapɛngwi, mpe filiale ya Taïwan ezalaki na mposa ya ndeko mobali moko oyo ayebi koloba * Tolingaki mingi mpenza mosala na biso na Japon, yango wana ezalaki pɛtɛɛ te mpo tóndima kokende. Kasi Harvey ayekolaki kondima mokumba nyonso oyo bazalaki kopesa ye, yango wana tondimaki kokende.
malamu monɔkɔ ya Japonais mpo na kobongisa likambo yango.Tokómaki kuna na sanza ya 11/1962. Taïwan ezalaki na basakoli 2271, mpe mingi na bango bazalaki koloba monɔkɔ ya Amis. Kasi liboso, tosengelaki naino koyekola monɔkɔ ya Chinois. Tozalaki kaka na buku moko na monɔkɔ ya Chinois, mpe moto oyo azalaki kolakisa biso monɔkɔ yango ayebaki koloba Anglais te, kasi toyekolaki kaka bongo.
Mwa moke nsima ya kokóma na Taïwan, baponaki Harvey azala mokɛngɛli ya filiale. Betele yango ezalaki moke, yango wana, Harvey azalaki kosala misala na ye na biro mpe kosala elongo na bandeko ya Amis mbala misato na sanza moko. Mbala na mbala, azalaki mpe kosala mosala ya mokɛngɛli ya etúká, na yango, azalaki kosala badiskur na mayangani mingi. Harvey azalaki kosala badiskur na monɔkɔ ya Japonais, mpe bandeko oyo balobaka monɔkɔ ya Amis bazalaki kokanga ntina. Kasi, bakonzi ya Leta bapesaki mitindo ete mangomba esalaka losambo kaka na monɔkɔ ya Chinois. Na yango, ntango Harvey azalaki kobundabunda mpo na koloba monɔkɔ ya Chinois malamu, azalaki kosala badiskur kaka na monɔkɔ yango mpe ndeko mobali moko azalaki kobongola yango na monɔkɔ ya Amis.
Lokola basoda nde bakómaki kotambwisa makambo na Taïwan, yango wana bandeko basengelaki naino kozwa ndingisa liboso ya kosala mayangani. Kozwa mikanda yango ezalaki pɛtɛɛ te, mpe na bantango mosusu ezalaki koumela mpenza. Soki na pɔsɔ oyo liyangani esengelaki kosalema bakonzi ya polisi bapesi naino ndingisa te, Harvey azalaki kofanda na biro na bango tii bakopesa ye yango. Lokola bapolisi bazalaki kolinga te ete moto oyo azali mopaya afanda na biro na bango ndenge wana, ezalaki koumela te mpo bápesa biso ndingisa ya kosala liyangani.
MBALA YA LIBOSO OYO NAMATAKI NGOMBA
Na boumeli ya bapɔsɔ oyo tolekisaki elongo na bandeko, mbala mingi tozalaki kotambola ngonga moko to koleka, mpo na komata bangomba mpe kokatisa bibale. Nazali koyeba lisusu ngomba ya liboso oyo namataki. Nsima ya kolya nokinoki, tomataki bisi ya 5:30 ya ntɔngɔ mpo na kokende na mboka moko ya mosika. Na nsima, tokatisaki ebale moko ya monene mpe tomataki ngomba moko ya molai. Ngomba yango ezalaki molai mpenza na boye ete, soki natali liboso na ngai, nazalaki komona makolo ya ndeko oyo azalaki liboso na ngai.
Na ntɔngɔ, Harvey akendaki kosakola elongo na bandeko mibali ya mboka wana, mpe ngai nakendaki kosakola ngai moko na mwa mboka moko ya moke epai bato bazalaki koloba monɔkɔ ya Japonais. Ntango tokómaki soki na ngonga ya liboso nsima ya midi, nalɛmbaki makasi mpo elekaki bangonga mingi nalyaki te. Nsukansuka, ntango nakutanaki na Harvey, atikalaki kaka ye moko. Apesaki bato bazulunalo mpe bato yango bapesaki ye maki ya nsoso misato ya mobesu. Alakisaki ngai ndenge ya kolya likei moko ya mobesu. Otɔbɔli nsɔngɛ ya moke, otye na monɔkɔ mpe obendi yango. Namekaki moko atako ezalaki kitoko te na monɔkɔ. Kasi nani alyaki oyo ya misato? Ngai nde nalyaki yango, mpo Harvey akanisaki
ete soki nalye eloko te, na nzela, akokoka komema ngai te.LOLENGE YA KOSUKOLA OYO TOMESANAKI NA YANGO TE
Na liyangani moko ya zongazonga, nakutanaki na mokakatano ya ndenge mosusu. Tozalaki kofanda na ndako ya ndeko mobali moko oyo ezalaki pene na Ndako ya Bokonzi. Lokola ba-Amis bazwaka likambo ya kosukola na ntina mingi, mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga abongiselaki ngai ná Harvey eloko nyonso oyo esengeli mpo na kosukola. Lokola Harvey azalaki na makambo mingi ya kosala, ayebisaki ngai nakende kosukola liboso. Mpo na kosukola, osengeli kozala na katini misato: moko ya mai ya malili, mosusu ya mai ya mɔtɔ, mpe mosusu oyo ezali na eloko te. Likambo ya kokamwa, mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga atyaki yango libándá, ezalaki kotalana na Ndako ya Bokonzi, mpe bandeko mibali oyo bazalaki kosala misala ya liyangani bakokaki komona yango. Nasɛngaki ye apesa ngai rido to elamba moko nazipa. Kasi, ayelaki ngai eteni moko ya plastike oyo ezalaki komonisa na kati! Namonaki malamu nakende na esika ya mwa kobombana na nsima ya ndako, kasi kuna ezalaki na mwa bandɛkɛ babengi oies, oyo ezalaka lokola mabata, mpe nakanisaki ete ekododa ngai. Nakanisaki boye: ‘Lokola bandeko mibali bazali na mosala mingi, bakoyeba te ete nazali kosukola. Mpe soki nasukoli te, bakomona mabe mpenza. Tiká nasukola kaka!’
MIKANDA NA MONƆKƆ YA AMIS
Harvey amonaki ete bandeko oyo balobaka monɔkɔ ya Amis bazalaki kosala makasi báyeba makambo ya Nzambe, kasi mingi na bango bayebaki kotánga te mpe ezalaki na mokanda moko te na monɔkɔ na bango. Lokola bautaki kobanda kokoma kala mingi te monɔkɔ ya Amis na ekomeli ya Baroma, tomonaki malamu tóteya bango báyeba kotánga monɔkɔ na bango moko. Yango ezalaki mosala monene mpenza, kasi nsukansuka, bandeko bakokaki koyekola makambo ya Yehova na monɔkɔ na bango moko. Babandaki kobimisa mikanda na monɔkɔ ya Amis na nsuka ya bambula ya 1960, mpe na 1968, babandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ yango.
Kasi, Leta apekisaki kokabola mikanda nyonso oyo ezalaki na monɔkɔ ya Chinois te. Yango wana, mpo na kokima likambo yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Amis ebandaki kobimisama na ndenge mingi. Na ndakisa, na boumeli ya mbula moko na sanza mitano, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobima na minɔkɔ mibale esika moko, Chinois Mandarin ná Amis. Soki moto atuni, tozalaki koyebisa ye ete, tozali kosalela zulunalo yango mpo na koteya bana Mis. 10:34, 35.
mboka monɔkɔ ya Chinois. Kobanda wana tii lelo, ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa mikanda na monɔkɔ ya Amis mpo na kosalisa bato yango báyekola mateya ya solo.—ELEKO MOKO YA KOPƐTOLAMA
Na boumeli ya bambula ya 1960 mpe ya 1970, bandeko mingi oyo balobaka monɔkɔ ya Amis, bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe te na bomoi na bango. Lokola bazalaki mpenza koyeba mitinda ya Nzambe malamu te, bamosusu bazalaki kosala pite, kolangwa masanga to komɛla likaya mpe kolya mbuma ya nzete babengi bétel. Harvey azalaki kokende kotala masangá mingi mpe kosalisa bandeko báyeba oyo Yehova akanisaka mpo na makambo yango. Na moko ya mibembo yango nde tokutanaki na likambo oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo.
Bandeko ya komikitisa bandimaki kobongwana, kasi likambo ya mawa, bandeko mingi baboyaki kobongwana. Mpe na boumeli ya mbula 20, motángo ya basakoli na Taïwan elongwaki na 2 450 mpe ekitaki soki na 900. Yango elɛmbisaki biso mpenza. Kasi, toyebaki ete Yehova akopambola soki moke te ebongiseli ya mbindo. (2 Ko. 7:1) Nsukansuka, mimeseno wana ya mbindo esilaki mpe Yehova apambolaki mpenza. Lelo oyo na Taïwan basakoli bazali koleka 11 000.
Banda bambula ya 1980 tii lelo oyo, tomoni ndenge bandeko oyo balobaka monɔkɔ ya Amis bakómi na kondima makasi; mpe Harvey akokaki sikoyo kolekisa ntango mingi elongo na bandeko oyo balobaka Chinois. Azalaki na esengo ndenge asalisaki mibali ya bandeko basi mwa mingi mpo bákóma Batatoli ya Yehova. Nazali koyeba lisusu ndenge alobaki ete ayokaki esengo makasi ntango moko ya mibali yango abondelaki Yehova mpo na mbala ya liboso. Ngai mpe nazali na esengo ndenge nasalisi bato mingi ya mitema sembo bápusana penepene na Yehova. Nazalaki kutu na esengo ya kosala na Betele ya Taïwan elongo na bana mibale, ya mwasi ná ya mobali, ya bato oyo nayekolá na bango Biblia.
LIWA YA MOBALI NA NGAI
Kasi, lelo oyo, nazali lisusu na mobali te. Nsima ya kolekisa mbula 59 na libala, Harvey, mobali na ngai akufaki na mokolo ya 01/01/2010, na maladi ya kansɛr. Alekisaki mbula pene na 60 na mosala ya ntango nyonso! Nakanisaka ye mingi mpenza. Kasi nazalaki na esengo ya kosala elongo na ye na bikólo mibale ya kitoko! Biso mibale toyekolaki koloba minɔkɔ mibale ya makasi ya Asie. Kutu Harvey ayekolaki mpe kokoma minɔkɔ yango.
Nsima ya mbula minei, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bamonaki ete lokola nakómi mobange, ekozala malamu nazonga na Australie. Likanisi na ngai ya liboso ezalaki ete, ‘Nakolongwa na Taïwan te.’ Kasi lokola Harvey ateyaki ngai nandimaka mokumba nyonso oyo ebongiseli ya Yehova ekopesa ngai, yango wana nakendaki. Na nsima, nayaki komona ete ekateli yango ezalaki ya bwanya.
Lelo oyo, nazali kosala na Betele ya Australasie, mpe na nsuka ya pɔsɔ, nasakolaka elongo na bandeko ya lisangá na ngai. Nazali na esengo ya kosalela monɔkɔ ya Japonais mpe ya Chinois mpo na kotambwisa bato oyo bayaka kotala Betele. Yango wana, nazali kozela na mposa makasi mokolo oyo Yehova alaká mpo na kosekwisa bato. Nayebi ete, lokola Harvey azalaki kondima mokumba nyonso oyo Yehova azalaki kopesa ye, Yehova akobosana ye te.—Yoa. 5:28, 29.
^ par. 14 Lelo oyo, monɔkɔ ya Chinois nde monɔkɔ oyo bato basalelaka na misala ya Leta mpe oyo bana batángelaka na yango kelasi na Taïwan. Kasi na ntango wana, na boumeli ya bambula mingi, ezaláká nde monɔkɔ ya Japonais. Yango wana, tii lelo, bato mingi na Taïwan balobaka monɔkɔ ya Japonais.