Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 6

“Mokonzi ya mwasi ezali mobali”

“Mokonzi ya mwasi ezali mobali”

“Mokonzi ya mwasi ezali mobali.”​—1 KO. 11:3.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

NA MOKUSE *

1. Ntango ndeko mwasi alingi kozwa ekateli ya kobalana ná ndeko mobali moko, wapi mwa mituna oyo asengeli komituna?

BAKRISTO nyonso bazali na nse ya litambwisi ya Yesu Kristo oyo azali mokonzi ya kokoka. Kasi, ntango mwasi mokristo abali, akómaka na nse ya bokonzi ya mobali na ye oyo azali moto ya kozanga kokoka. Yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na yango, liboso andima kobalana na mobali moko, ndeko mwasi asengeli komituna boye: ‘Nini endimisi ngai ete akozala mokonzi malamu ya libota? Atyaka makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ye? Soki ezali bongo te, nini endimisi ngai ete nsima ya kobalana na ye akozala moto oyo akosalisa ngai mpo nabatela boyokani ya malamu ná Yehova?’ Lisusu, ndeko mwasi asengeli mpe komituna boye: ‘Bizaleli nini nazali na yango oyo ekosalisa na libala na biso? Nazalaka motema molai mpe nakabaka? Nazali na boyokani ya malamu elongo na Yehova?’ (Mos. 4:9, 12) Soki mwasi azwi bikateli ya malamu liboso abala, yango ekoki kosala ete libala na bango elonga mpe azala na esengo.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Bandeko basi bakristo mingi bazali bandakisa malamu na likambo etali komikitisa liboso ya mibali na bango. Babongi mpenza kozwa longonya! Tosepelaka mpenza kosalela Yehova elongo na bandeko basi yango ya sembo. Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna misato oyo: (1) Mikakatano nini bandeko basi bakoki kokutana na yango? (2) Mpo na nini mwasi andimaka komikitisa liboso ya mobali na ye? Mpe (3) na likambo etali komikitisa, mateya nini mibali mpe basi bakristo bakoki kozwa na ndakisa ya Yesu, Abigaile mpe Maria, oyo azalaki mwasi ya Yozefe mpe mama ya Yesu?

MIKAKATANO NINI BASI BAKRISTO BAKUTANAKA NA YANGO?

3. Mpo na nini babalani nyonso bakutanaka na mikakatano?

3 Libala ezali likabo ya kokoka oyo eutá na Nzambe. Kasi, tozali bato ya kozanga kokoka. (1 Yoa. 1:8) Yango nde ntina oyo Liloba ya Nzambe ekebisi babalani ete bakokutana na mikakatano, mpe ebengi yango “bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” (1 Ko. 7:28) Tólobela mwa mikakatano oyo mwasi akoki kokutana na yango.

4. Mpo na nini mwasi akoki komiyoka ete bakitisi ye ndenge basɛngi ye atosaka mobali na ye?

4 Na bantango mosusu, mwasi akoki komona ete ezali mpasi amikitisa liboso ya mobali na ye na kotalela esika oyo abɔkwámá. Marisol, ndeko mwasi moko oyo afandaka na États-Unis alobi boye: “Na esika oyo nakolá, bazalaki koyebisa basi mbala na mbala ete basengeli kozala ndenge moko na mibali na makambo nyonso. Nayebi ete Yehova nde apesá mibali bokonzi mpe azwá ekateli ete basi bámikitisaka liboso ya mibali na bango. Atako bongo, ebongi kaka kopesa basi lokumu. Kasi, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo natosa bokonzi ya mobali na ngai, mpo na esika oyo tofandi bato balobaka ete basi basengeli kotosaka mibali te.”

5. Makanisi nini ya libunga mibali mosusu bazalaka na yango mpo na basi?

5 Longola yango, mwasi akoki mpe kobalana na mobali oyo akanisaka ete basi bazali na ntina mingi te. Ndeko mwasi moko na nkombo Yvonne oyo afandaka na Amerika ya Sudi alobi boye: “Na mboka na biso, mibali balyaka liboso mpe basi na nsima. Bana basi nde balambaka, mpe batyaka bopeto na bandako. Kasi, bana mibali bafandaka kaka boye lokola mikonzi mpo mama ná bandeko na bango ya basi básalela bango. Kutu, bayebisaka bango ete bazali ‘bakonzi ya ndako.’” Ndeko mwasi moko na nkombo Yingling, oyo afandaka na Azia, alobi boye: “Na monɔkɔ ya mboka na biso, bato balobaka ete basi basengeli te kozala mayele to kozala na makoki. Mokumba na bango ezali kaka ya kosala misala ya ndako, mpe bazali na ndingisa te ya kopesa mibali ata likanisi moko.” Mobali oyo alandaka makanisi ya ndenge wana, oyo ezangi bolingo mpe oyo eyokani te na mitinda ya Biblia, akómisaka bomoi ya mwasi na ye mpasi mpenza, amekolaka Yesu te mpe asepelisaka Yehova te.​—Ef. 5:28, 29; 1 Pe. 3:7.

6. Makambo nini basi basengeli kosala mpo na kokómisa boyokani na bango ná Yehova makasi?

6 Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova alingi ete mibali bakristo bákokisaka bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya bato ya libota na bango. Alingi mpe ete mibali bálingaka bato ya libota na bango. (1 Tim. 5:8) Nzokande, atako bandeko basi bazalaka na makambo mingi ya kosala, basengeli kozwaka ntango ya kotánga mpe ya komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mpe ya kobondela Yehova na motema mobimba. Yango ekoki kozala pɛtɛɛ te. Lokola basi bazalaka na makambo mingi ya kosala, bakoki komona ete bazali na ntango mpe na makasi te ya kosala makambo wana nyonso. Kasi ezali na ntina ete bázwaka ntango ya kosala makambo yango. Mpo na nini? Mpo Yehova alingi ete mokomoko na biso akolisa mpe abatela boyokani ya malamu elongo na ye.​—Mis. 17:27.

7. Nini ekoki kosalisa mwasi atosa mpe amemya mobali na ye?

7 Toboyi te, ekoki kosɛnga ete mwasi asala makasi mpo amikitisa liboso ya mobali na ye oyo azali moto ya kozanga kokoka. Kasi, soki ayebi ntina oyo Biblia esɛngi ye amikitisaka liboso ya mobali na ye, ekozala mpasi te mpo asala yango.

NTINA OYO MWASI ASENGELI KOMIKITISAKA LIBOSO YA MOBALI NA YE

8. Ndenge Baefese 5:22-24 emonisi yango, mpo na nini mwasi mokristo asengeli komikitisaka liboso ya mobali na ye?

8 Mwasi mokristo asengeli komikitisaka liboso ya mobali na ye mpo Yehova nde asɛngi ye asala bongo. (Tángá Baefese 5:22-24.) Atyelaka Tata na ye ya likoló motema mpo ayebi ete alingaka ye, mpe ete soki asɛngi ye asala likambo moko boye, ezalaka kaka mpo na bolamu na ye moko.​—Mib. 6:24; 1 Yoa. 5:3.

9. Matomba nini ndeko mwasi akoki kozwa soki azali kotosa bokonzi ya mobali na ye?

9 Bato ya mokili oyo balendisaka basi bátosa mibeko ya Yehova te, mpe bámonaka ete kotosa mibali na bango ezali kokitisa lokumu bango. Nzokande, baoyo balendisaka makanisi ya ndenge wana bayebi Tata na biso ya bolingo te. Yehova akoki soki moke te kopesa bana na ye ya basi mibeko oyo ekokitisa lokumu na bango. Soki ndeko mwasi asali makasi akokisa mokumba oyo Yehova apesá ye, kimya ekozala na libota na ye. (Nz. 119:165) Ye moko azwaka matomba, mobali ná bana na ye mpe bazwaka matomba.

10. Makambo oyo Carol alobi ekoki koteya biso nini?

10 Mwasi oyo amikitisaka liboso ya mobali na ye oyo azali moto ya kozanga kokoka, amonisaka ete alingaka mpe atosaka Yehova, oyo atyá bokonzi na kati ya libota. Ndeko mwasi moko na nkombo Carol, oyo afandaka na Amerika ya Sudi alobi boye: “Nayebi ete mobali na ngai akosala mabunga. Nayebi mpe ete ndenge oyo nasalelaka ye makambo ntango asali mabunga, emonisaka soki nazwaka boninga na ngai ná Yehova na motuya to te. Na yango, nasalaka makasi nakoba komikitisa mpo nalingaka kosepelisa Tata na ngai ya likoló.”

11. Nini esalisaka ndeko mwasi moko na nkombo Aneese alimbisaka, mpe makambo oyo alobi ekoki koteya biso nini?

11 Ekoki kozala mpasi mpo mwasi atosa mpe azala na komikitisa soki amonaka ete mobali na ye akipaka te mayoki mpe mitungisi na ye. Kasi, tótala oyo ndeko mwasi moko na nkombo Aneese asalaka soki makambo ya bongo esalemi. Alobi boye: “Nasalaka makasi nasilika te. Nabosanaka te ete biso nyonso tosalaka mabunga. Namityelá mokano ya kolimbisa na motema moko kaka ndenge Yehova asalaka yango. Ntango nalimbisi, nazwaka kimya ya makanisi.” (Nz. 86:5) Ezalaka mpasi te mpo na mwasi oyo alimbisaka amikitisa liboso ya mobali na ye.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA BANDAKISA OYO EZALI NA BIBLIA

12. Biblia ezali na bandakisa nini?

12 Bato mosusu bakoki kokanisa ete, moto oyo amikitisaka azali na bolɛmbu. Kasi yango ezali solo te. Biblia ezali na bandakisa ya bato oyo bazalaki na mpiko mingi kasi bamikitisaki. Tótalela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu, ya Abigaile, mpe ya Maria.

13. Mpo na nini Yesu amikitisaka liboso ya Yehova? Limbolá.

13 Yesu amikitisaka liboso ya Yehova. Kasi ezali te mpo azangi mayele to makoki. Ndenge oyo azalaki koteya na pɛtɛɛ nyonso mpe na polele emonisi ete azalaki na mayele mingi. (Yoa. 7:45, 46) Yehova ayebaki ete Yesu azalaki na makoki, yango wana apesaki ye nzela ya kosala elongo na ye mpo na kokela biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe awa na mabele. (Mas. 8:30; Ebr. 2:1-4) Mpe nsima ya lisekwa na ye, Yehova apesaki ye “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” (Mat. 28:18) Atako Yesu azali na makoki mingi, asɛngaka kaka Yehova atambwisa ye. Mpo na nini? Mpo alingaka Tata na ye.​—Yoa. 14:31.

14. (a) Mateya nini mibali bakoki kozwa na ndenge oyo Yehova atalelaka basi? (b) Mateya nini bakoki kozwa na makanisi oyo ezali na Masese mokapo 31?

14 Mateya mpo na mibali. Soki Yehova asɛngaka ete mwasi amikitisaka liboso ya mobali na ye, ezali te mpo amonaka ete mibali baleki basi. Yehova ye moko amonisi yango na ndenge aponi basi mpe mibali bákende koyangela na likoló elongo na Yesu. (Gal. 3:26-29) Yehova amonisi ete atyelaka Mwana na ye motema na ndenge apesi ye bokonzi. Ndenge moko mpe, mobali ya bwanya apesaka mwasi na ye mwa bokonzi. Biblia elobeli makambo oyo mwasi ya makoki akoki kosala. Na ndakisa, akoki kokamba misala oyo esalemaka na ndako, kosomba mpe kotɛka bilanga, mpe kosala mombongo. (Tángá Masese 31:15, 16, 18.) Azali moombo te oyo akoki te kopesa makanisi na ye. Kutu, mobali na ye atyelaka ye motema mpe ayokaka makanisi na ye. (Tángá Masese 31:11, 26, 27.) Soki mobali azali kosalela mwasi na ye makambo na boboto mpe kopesa ye lokumu, mwasi na ye akondima komikitisa liboso na ye.

Mateya nini mwasi ya makoki akoki kozwa na ndenge oyo Yesu amikitisaka liboso ya Yehova? (Talá paragrafe 15)

15 Ndakisa ya Yesu ekoki koteya basi nini?

15 Mateya mpo na basi. Atako Yesu asalaki makambo mingi ya minene, amonaki te ete kotosa bokonzi ya Yehova ezali kokitisa ye. (1 Ko. 15:28; Flp. 2:5, 6) Ndenge moko mpe, mwasi ya makoki oyo alandaka ndakisa ya Yesu, akomona te ete bakitisi ye ndenge basɛngi ye ete atosaka mobali na ye. Akopesa mobali na ye mabɔkɔ kaka te mpo alingaka ye, kasi libosoliboso mpo alingaka mpe atosaka Yehova.

Nsima ya kotindela Davidi mpe mibali yango bilei, Abigaile ayei kokutana na ye. Afukami elongi na nse mpe asɛngi Davidi azongisa mabe na mabe te mpo na koboya komema ngambo ya makila (Talá paragrafe 16)

16. Na kotalela 1 Samwele 25:3, 23-28, mikakatano nini Abigaile akutanaki na yango? (Talá elilingi ya ezipeli.)

16 Abigaile azalaki na mobali moko na nkombo Nabale. Mobali yango azalaki kaka koluka matomba na ye moko, azalaki na lolendo, mpe azangaki botɔndi. Atako bongo, Abigaile amonaki yango te libaku ya koboma libala yango. Soki Abigaile azalaka na mposa ya koboma libala, akokaki kotika ete Davidi ná mibali oyo bazalaki elongo na ye báboma mobali na ye. Kasi asalaki bongo te. Kutu, asalaki nde oyo akokaki mpo na kobatela mobali na ye mpe bato ya ndako na ye. Kanisá mpiko oyo Abigaile amonisaki mpo na kosolola na Davidi na limemya nyonso liboso ya mibali 400 oyo bazalaki na bibundeli ! Andimaki kutu ata kosɛnga bolimbisi mpo na makambo mabe oyo mobali na ye asalaki. (Tángá 1 Samwele 25:3, 23-28.) Davidi ayebaki ete Yehova nde asalelaki mwasi yango ya mpiko mpo na kopesa ye toli oyo asengelaki na yango, oyo epekisaki ye asala libunga ya monene.

17. Lisolo ya Davidi ná Abigaile ekoki koteya mibali nini?

17 Mateya mpo na mibali. Abigaile azalaki mwasi ya bwanya. Davidi mpe amonisaki bwanya ndenge ayokaki toli na ye, mpe yango esalaki ete Davidi amema te ngambo ya makila. Ndenge moko mpe, mobali oyo azali na bwanya, atalelaka na likebi makanisi ya mwasi na ye liboso ya kozwa bikateli ya minene. Ntango mosusu, makanisi oyo mwasi na ye akopesa, ekosalisa ye azwa te ekateli ya mabe.

18. Ndakisa ya Abigaile ekoki koteya basi nini?

18 Mateya mpo na basi. Mwasi oyo alingaka mpe atosaka Yehova akoki kosalisa libota na ye na makambo mingi ata soki mobali na ye asalelaka Yehova te to mpe atosaka mibeko na ye te. Alukaka te koboma libala na ndenge oyo eyokani te na Makomami. Nzokande, soki azali komonisa limemya mpe azali komikitisa liboso ya mobali na ye, akosalisa mobali yango ayekola makambo etali Yehova. (1 Pe. 3:1, 2) Kasi, ata soki mobali na ye aboyi kosalela Yehova, Yehova akosepela kaka na bosembo oyo mwasi yango azali komonisela ye, mpe na komikitisa oyo azali komonisela mobali na ye.

19. Na makambo nini mwasi akoboya kotosa mobali na ye?

19 Nzokande, mwasi oyo atosaka mobali na ye akopesa mobali na ye mabɔkɔ te soki asɛngi ye abuka mibeko ya Nzambe to asala makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Na ndakisa, kanisá ete mobali ya ndeko mwasi moko oyo azali Motatoli te ayebisi ye akosa, ayiba, to asala likambo moko oyo esepelisaka Yehova te. Bakristo nyonso, ata mpe bandeko basi oyo babalá, basengeli libosoliboso kotosa Yehova Nzambe. Soki basɛngi ndeko mwasi moko abuka mibeko ya Nzambe, asengeli koboya; kasi akomonisa na mpiko mpe na boboto nyonso ntina oyo aboyi kosala likambo oyo basɛngi ye.​—Mis. 5:29.

Talá paragrafe 20 *

20. Ndenge nini toyebi ete Maria azalaki na boyokani ya malamu mpenza elongo na Yehova?

20 Maria azalaki na boyokani ya malamu mpenza elongo na Yehova. Na ntembe te, ayebaki Makomami malamu. Ntango azalaki kosolola na Elizabeti, mama ya Yoane Mobatisi, Maria atángaki Makomami ya Ebre mbala koleka 20. (Luka 1:46-55) Mpe kanisá likambo oyo: Atako Maria ná Yozefe balakanaki libala, anzelu ya Yehova abimelaki liboso Yozefe te. Alobaki mbala moko na Maria mpe ayebisaki ye ete akobota Mwana ya Nzambe. (Luka 1:26-33) Yehova ayebaki Maria malamu mpe azalaki na kondima ete akolinga mpe akobatela Mwana na ye malamu. Mpe na ntembe te, Maria akobaki kozala na boyokani ya malamu ná Yehova ata nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu.​—Mis. 1:14.

21. Makambo oyo Biblia elobi mpo na Maria ekoki koteya mibali nini?

21 Mateya mpo na mibali. Mobali ya bwanya azalaka na esengo soki mwasi na ye ayebi Makomami malamu. Asilikelaka ye te, mpe akanisaka te ete alingi abɔtɔla ye bokonzi. Ayebaka ete soki mwasi na ye ayebi Makomami mpe mitinda ya Biblia malamu, akosalisa mpenza libota na ye. Na ntembe te, ata soki mwasi atángá kelasi mingi koleka mobali, mobali nde azali na mokumba ya kotambwisa losambo na kati ya libota mpe makambo mosusu ya elimo.​—Ef. 6:4.

Mateya nini basi bakoki kozwa epai ya Maria mama ya Yesu na likambo etali koyekola mpe komanyola? (Talá paragrafe 22) *

22. Ndakisa ya Maria ekoki koteya basi nini?

22 Mateya mpo na basi. Mwasi asengeli komikitisa liboso ya mobali na ye. Kasi ye moko azali na mokumba ya kobatela kondima na ye makasi. (Gal. 6:5) Mpo na yango, asengeli kozwaka ntango ya kosala boyekoli na ye moko mpe ya komanyola. Yango ekosalisa ye akoba kolinga Yehova mpe kotosa ye, mpe akozwa esengo ndenge azali komikitisa liboso ya mobali na ye.

23. Soki basi bazali komikitisa liboso ya mibali na bango, matomba nini bango moko, libota na bango mpe lisangá ekozwa?

23 Basi oyo bamikitisaka liboso ya mibali na bango mpo balingaka Yehova, bakozala na esengo mingi koleka baoyo baboyaka kotosa ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá. Bakozala mpe bandakisa malamu mpo na bilenge basi mpe bilenge mibali. Mpe bakosala ete bolingo mpe kimya ezala na kati ya libota mpe na kati ya lisangá. (Tito 2:3-5) Lelo oyo, basaleli mingi ya sembo ya Yehova ezali nde basi. (Nz. 68:11) Biso nyonso, tózala basi to mibali, tokoki kosala ete esengo ezala na kati ya lisangá. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo mokomoko na biso akoki kosala yango.

LOYEMBO 131 “Oyo Nzambe akangisi esika moko”

^ par. 5 Yehova nde azwá ekateli ete mwasi atosaka mobali na ye. Yango elimboli mpenza nini? Ndakisa ya Yesu mpe ya basi mosusu oyo masolo na bango ekomamá na Biblia ekoki koteya mibali mpe basi makambo mingi na oyo etali komikitisa.

^ par. 68 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntango azalaki kosolola na Elizabeti mama ya Yoane Mobatisi, Maria atángaki Makomami ya Ebre oyo akangaki na motó.

^ par. 70 NDIMBOLA YA BILILINGI: Mpo mwasi mokristo abatela kondima na ye makasi, asengeli kozwaka ntango mpo na koyekola Biblia.