Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nyonso wana kaka mpo na mwa kosɛka!

Nyonso wana kaka mpo na mwa kosɛka!

BILENGE basi mibale bazalaki kotambola na esika moko ya mombongo, na engumba Baguio, na Philippines. Bamonaki shario ya kotanda mikanda, kasi bapusanaki pene na yango te. Ntango ndeko mwasi Helen oyo atɛlɛmaki pene na shario amonaki bango, asɛkaki mwa moke. Basi yango batɛlɛmaki te. Kasi mwa kosɛka ya Helen ekamwisaki bango mingi.

Na nsima, ntango bilenge basi yango bazalaki kozonga epai na bango na bisi, bamonaki Ndako ya Bokonzi moko epai bakomaki JW.ORG ya monene mpenza. Bamikundolaki ete bautaki komona likomi ya ndenge wana na shario. Bakitaki na bisi mpe bakendaki na Ndako ya Bokonzi yango. Ntango bakómaki kuna, bamonaki programɛ ya makita ya masangá ndenge na ndenge.

Bilenge basi yango bayaki na makita oyo elandaki. Oyebi soki bamonaki nani ntango bakɔtaki na Ndako ya Bokonzi? Bamonaki Helen! Bayebaki mbala moko ete ye nde moto oyo asɛkaki mwa moke ntango amonaki bango. Helen alobi boye: “Ntango namonaki bango, nabangaki mwa moke mpo nakanisaki ete nasalaki likambo moko ya mabe.” Kasi, bilenge basi yango bayebisaki Helen ete bamonaki ye liboso ya shario.

Bilenge basi yango basepelaki mpenza na makita mpe basepelaki kozala elongo na bandeko basi mpe bandeko mibali. Ntango bamonaki bandeko mosusu bazali kotya bopeto na Ndako ya Bokonzi nsima ya makita, basɛngaki ete bango mpe básalisa. Moko ya bilenge basi yango azalaka lisusu na Philippines te. Kasi mosusu abandaki koyangana na makita mpe koyekola Biblia. Nyonso wana kaka mpo na mwa kosɛka!