Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 10

Ndenge oyo ndeko nyonso akoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákola tii bázwa batisimo

Ndenge oyo ndeko nyonso akoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákola tii bázwa batisimo

“Enama mokomoko . . . ezali kosalisa na bokoli ya nzoto.”​—EF. 4:16.

LOYEMBO 85 Bóyambanaka

NA MOKUSE *

1-2. Nani akoki kosalisa moyekoli ya Biblia akola tii azwa batisimo?

AMY, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Fiji alobi boye: “Nazalaki kosepela na makambo oyo nazalaki koyekola. Nayebaki ete ezali solo. Kasi, kolekisa ntango elongo na bandeko ya lisangá esalisaki ngai nasala bambongwana mpe nazwa batisimo.” Makambo oyo Amy alobi eteyi biso likambo moko ya ntina mingi: Soki bandeko ya lisangá basalisi moyekoli ya Biblia, ezalaka mpasi te mpo akola tii azwa batisimo.

2 Mosakoli mokomoko akoki kopesa mabɔkɔ mpo na bokoli ya lisangá. (Ef. 4:16) Leilani, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela oyo afandaka na Vanuatu alobi boye: “Lisese moko elobaka ete mboka mobimba esengeli kopesa mabɔkɔ mpo mwana akola. Namoni ezali mpe bongo na likambo etali kokómisa bato bayekoli. Mbala mingi esɛngaka ete bandeko nyonso ya lisangá bápesa mabɔkɔ mpo na kosalisa moto akóma Motatoli ya Yehova.” Baboti, bandeko ya libota, baninga, mpe balakisi na eteyelo, bango nyonso basengeli kopesa mabɔkɔ mpo mwana akola. Basalaka bongo na ndenge balendisaka mwana, mpe bateyaka ye makambo ya ntina. Ndenge moko mpe, bandeko ya lisangá basengeli kopesa toli, kolendisa, mpe kozala ndakisa malamu epai ya bayekoli ya Biblia mpo na kosalisa bango bákola tii bázwa batisimo.​—Mas. 15:22.

3. Makambo oyo ndeko Ana, Dorin, mpe Leilani balobi eteyi yo nini?

3 Mpo na nini mosakoli oyo azali koyekola na moto Biblia asengeli kondima lisalisi oyo bandeko mosusu bazali kopesa moto yango? Talá makambo Ana, oyo azali mobongisi-nzela monene na Moldavie alobi: “Ezali mpasi ete moto moko kaka akokisa bamposa nyonso ya moyekoli ya Biblia ntango azali kokola na elimo.” Dorin, oyo azali mpe mobongisi-nzela monene kaka na ekólo yango, alobi boye: “Mbala mingi, basakoli mosusu balobaka likambo moko oyo esimbaka motema ya moyekoli ya Biblia, likambo oyo mbala mosusu ngai nakokaki kokanisa te.” Leilani amonisi mpe ntina mosusu. Alobi boye: “Ntango moyekoli ya Biblia amoni bolingo oyo bandeko ya lisangá bazali komonisela ye, mpe ndenge oyo bazali kotyela ye likebi, yango ekosalisa ye amona ete tozali mpenza basaleli ya Yehova.”​—Yoa. 13:35.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Kasi okoki komituna boye: ‘Lokola ngai te moto nayekolaka na moto yango Biblia, ndenge nini nakoki kosalisa ye akola?’ Mpo na yango, tólobela oyo tokoki kosala ntango ndeko moko asɛngi biso tókende elongo na ye mpo na koyekola na moyekoli na ye Biblia, mpe oyo tokoki kosala ntango moyekoli ya Biblia abandi koyangana na makita. Lisusu, tokomona oyo bankulutu bakoki kosala mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bákola tii bázwa batisimo.

NTANGO BOKEI KOYEKOLA NA MOTO BIBLIA

Soki ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo ayekola Biblia na moto, bongisá malamu makambo oyo bokoyekola (Talá paragrafe 5-7)

5. Soki ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo na koyekola na moto Biblia, mokumba na yo ezali nini?

5 Ntango boyekoli ezali kosalema, ndeko oyo ayekolaka na moto yango Biblia nde azali na mokumba ya kosalisa ye akanga ntina ya Liloba ya Nzambe. Soki ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo na koyekola na moto yango, mokumba na yo ezali ya kopesa ye mabɔkɔ. (Mos. 4:9, 10) Kasi, makambo nini mpenza okoki kosala mpo boyekoli yango esalema malamu?

6. Ntango ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo na koyekola na moto Biblia, ndenge nini okoki kosalela toli oyo ezali na Masese 20:18?

6 Bongisá boyekoli liboso. Ya liboso, sɛngá ndeko oyo ayekolaka na moto yango Biblia ayebisa yo mwa makambo etali moto yango. (Tángá Masese 20:18.) Okoki kotuna ye boye: “Makambo nini oyebi mpo na moyekoli yango? Bokoyekola lisolo nini? Makambo nini olingi moto yango akanga ntina na boyekoli yango? Ezali na likambo moko oyo nasengeli koloba to te na ntango ya boyekoli? Ndenge nini nakoki kolendisa moyekoli yango mpo akola?” Ezali solo ete ndeko oyo ayekolaka na ye akoyebisa yo te makambo ya sekele oyo etali moyekoli yango. Kasi, makambo oyo akoyebisa yo ekoki kosalisa yo mingi. Joy, ndeko moko oyo azali misionɛrɛ, ayebisaka bato oyo bakei elongo na ye mpo na koyekola na moto Biblia makambo ya ndenge wana. Alobi boye: “Masolo yango esalisaka ndeko oyo akei elongo na ngai akóma na mposa ya kosalisa moyekoli mpe ayeba oyo akoki koloba na ntango ya boyekoli.”

7. Mpo na nini tosengeli komibongisa malamu soki ndeko moko asɛngi biso tókende elongo na ye mpo ayekola Biblia na moyekoli na ye?

7 Soki ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo ayekola na moyekoli na ye Biblia, ekozala malamu obongisa makambo oyo bokotalela. (Ezr. 7:10) Dorin, ndeko mobali oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nasepelaka mingi soki ndeko oyo azali elongo na ngai abongisi boyekoli malamu. Yango ekoki kosala ete apesa makanisi oyo ebongi mpenza.” Lisusu, moyekoli akoki komona ete bino mibale bomibongisaki malamu mpenza mpe yango ekopesa ye ndakisa malamu oyo asengeli kolanda. Ata soki okokoka te kobongisa makambo nyonso oyo bokoyekola, okoki kozwa mwa ntango mpo na kotalela makanisi ya ntina ya boyekoli yango.

8. Okoki kosala nini mpo libondeli oyo osalaka na ntango ya boyekoli ya Biblia ezala ya sikisiki?

8 Lokola libondeli ezali na ntina mingi ntango bozali koyekola na moto Biblia, ekozala malamu okanisa liboso makambo oyo okoloba soki basɛngi yo obondela. Soki osali bongo, okoloba makambo ya sikisiki na libondeli na yo. (Nz. 141:2) Hanae, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Japon, abosanaka te mabondeli oyo ndeko mwasi moko oyo azalaki koya elongo na ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye Biblia azalaki kosala. Alobi boye: “Nazalaki komona ete azalaki na boninga ya makasi mpenza elongo na Yehova, yango wana ngai mpe nalingaki komekola ye. Lisusu, ntango azalaki kotánga nkombo na ngai na mabondeli, yango ezalaki kosalisa ngai namona ete alingaka ngai mpenza.”

9. Na kotalela Yakobo 1:19, okoki kosala nini mpo ozala moninga ya mosala ya malamu ntango ndeko moko azali koyekola Biblia na moto?

9 Pesá ndeko oyo azali koyekola Biblia na moto mabɔkɔ. Omamuyov, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela monene na Nigeria, alobi boye: “Moninga ya mosala ya malamu, alandaka na likebi ntango boyekoli ya Biblia ezali kosalema. Apesaka makanisi oyo ebongi, kasi aboyaka koloba mingi mpo ayebaka ete ezali mokumba ya ndeko oyo azali koyekola Biblia na moto.” Na yango, ndenge nini okoki koyeba ntango oyo osengeli koloba likambo moko, mpe ndenge oyo okoki koloba yango? (Mas. 25:11) Yokáká na likebi ntango ndeko azali kosolola na moyekoli ya Biblia. (Tángá Yakobo 1:19.) Yango ekosalisa yo oyeba ntango ya malamu oyo osengeli kopesa likanisi na yo. Toboyi te, osengeli kokanisa liboso ya koloba likambo moko. Na ndakisa, osengeli te kolobaka mingi, kokata ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli maloba, to mpe kokɔtisa lisolo mosusu oyo eyokani te na makambo oyo bozali koyekola. Kasi soki opesi likanisi ya mokuse, osaleli ndakisa moko, to mpe otuni motuna, okoki kosala ete lisolo oyo bozali koyekola ekóma lisusu polele. Na bantango mosusu, okoki komona ete ozali na makambo mingi te ya kobakisa na lisolo oyo bozali koyekola. Kasi, soki opesi moyekoli ya Biblia longonya mpe otyeli ye likebi, okosalisa ye mpo akola na elimo.

10. Ndenge nini kolobela makambo oyo okutaná na yango na bomoi ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia?

10 Yebisá bango makambo oyo okutaná na yango na bomoi. Soki esengeli, okoki koyebisa moyekoli ya Biblia na mokuse ndenge oyo oyebaki solo, ndenge oyo olongaki mokakatano moko boye, to mpe ndenge oyo omonaki lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo. (Nz. 78:4, 7) Ntango mosusu yango nde makambo oyo moyekoli ya Biblia azali na mposa ya koyoka. Makambo yango ekoki kokómisa kondima na ye makasi, to mpe kolendisa ye mpo akoba kokola tii azwa batisimo. Mpe ekoki kosalisa ye ayeba ndenge ya kolonga mokakatano oyo azali kokutana na yango. (1 Pe. 5:9) Gabriel, oyo afandaka na Brésil mpe oyo azali mobongisi-nzela, abosanaka te matomba oyo azwaki ntango azalaki koyekola Biblia. Alobi boye: “Ntango nayokaki masolo ya makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, yango esalisaki ngai namona ete Yehova ayebaka mikakatano oyo tokutanaka na yango. Soki balongaki mikakatano yango, ngai mpe nakoki kolonga yango.”

NTANGO MOYEKOLI YA BIBLIA AYEI NA MAKITA

Biso nyonso tokoki kolendisa moyekoli ya Biblia akoba koyangana na makita (Talá paragrafe 11)

11-12. Mpo na nini tosengeli koyamba na esengo moyekoli ya Biblia oyo ayei na makita?

11 Mpo moyekoli ya Biblia akola tii azwa batisimo, asengeli koyanganaka mbala na mbala na makita, mpe kozwela yango matomba. (Ebr. 10:24, 25) Ntango mosusu ndeko oyo ayekolaka na ye akobengisa ye aya na makita mpo na mbala ya liboso. Ntango ayei na makita, biso nyonso tosengeli kolendisa ye akoba koya na Ndako ya Bokonzi. Ndenge nini tokoki kosala yango?

12 Yambá moyekoli ya Biblia na esengo mpenza. (Rom. 15:7) Soki moyekoli amoni ete toyambi ye na esengo mpenza, ntango mosusu yango ekotinda ye akoba koya na Ndako ya Bokonzi. Ekozala malamu opesa ye mbote na esengo mpe olakisa ye epai ya bandeko mosusu. Kasi osengeli kosala yango na bokatikati. Ekoki kozala ete ndeko oyo ayekolaka na ye Biblia akómi naino te na Ndako ya Bokonzi, to mpe azali na makambo mosusu ya kosala. Yango wana ekozala malamu osolola na moyekoli yango. Tyá likebi na makambo oyo azali koloba, mpe monisá ete ozali mpenza kosepela na ye. Soki oyambi moyekoli na esengo, akoki komiyoka ndenge nini? Tótalela ndakisa ya Dmitrii, oyo autaki kozwa batisimo eleki mwa bambula, mpe oyo azali sikoyo mosaleli na misala. Alobeli makambo oyo amonaki ntango ayaki makita mpo na mbala ya liboso na maloba oyo: “Ndeko mobali moko amonaki ngai natɛlɛmi libanda ya Ndako ya Bokonzi, mpe nazalaki kobanga. Na boboto nyonso, akɔtisaki ngai na Ndako ya Bokonzi. Bandeko mingi bayaki kopesa ngai mbote. Yango ekamwisaki ngai mpenza. Nasepelaki mingi, mpe mposa na ngai ezalaki ete makita yango esalemaka mikolo nyonso. Naino namoná likambo ya ndenge wana te.”

13. Ndenge nini ndakisa na yo ya malamu ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia?

13 Zalá ndakisa malamu. Ndakisa na yo ya malamu ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia amona ete tozali bakristo ya solo. (Mat. 5:16) Vitalii, oyo azali sikoyo mobongisi-nzela na Moldavie, alobi boye: “Nazalaki komona bizaleli oyo bandeko mosusu ya lisangá bazalaki na yango, mpe ndenge oyo bazalaki kokanisa. Yango endimisaki ngai ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza na lingomba ya solo.”

14. Ndenge nini ndakisa na yo ekoki kosalisa moto akoba kokola na elimo?

14 Mpo moyekoli ya Biblia akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo, asengeli kosalela makambo oyo azali koyekola. Kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi ntango moyekoli ya Biblia azali komona ndenge oyo kosalela mitinda ya Biblia esalisi yo na bomoi na yo, yango ekotinda ye amekola yo. (1 Ko. 11:1) Tótalela ndakisa ya Hanae oyo tolobelaki liboso. Alobi boye: “Bandeko ya lisangá bazalaki kosalela na bomoi na bango ya mokolo na mokolo makambo oyo nazalaki koyekola. Namonaki ndenge oyo nasengelaki kolendisa basusu, kolimbisa bango, mpe komonisela bango bolingo. Bazalaki ntango nyonso koloba malamu mpo na basusu. Nazalaki na mposa ya komekola bango.”

15. Ndenge nini Masese 27:17 esalisi biso tómona ntina oyo tosengeli kosala boninga na moyekoli ya Biblia wana azali kokoba koyangana na makita?

15 Kómisá moyekoli ya Biblia moninga na yo. Wana moyekoli ya Biblia azali kokoba kayangana na makita, kobá komonisa ete otyelaka ye likebi. (Flp. 2:4) Sololáká na ye. Okoki koyebisa ye ete ozali kosepela ndenge azali kosala bambongwana na bomoi na ye. Okoki mpe kotuna ye makambo oyo etali boyekoli na ye ya Biblia, libota mpe mosala na ye. Kasi osengeli kokeba ete otuna ye te mituna oyo ekoki koyokisa ye nsɔni. Masolo ya ndenge wana ekoki kosala ete bókóma baninga. Soki okómisi moyekoli ya Biblia moninga na yo, okosalisa ye mpo akola tii azwa batisimo. (Tángá Masese 27:17.) Lelo oyo, Hanae azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Abosanaka te mbala ya liboso oyo abandaki koyangana na makita. Alobi boye: “Lokola nazwaki baninga na kati ya lisangá, nabandaki lisusu kozangisa makita te. Nazalaki kozela mokolo ya makita na mposa makasi, mpe nazalaki kaka kokende makita ata soki nalɛmbi. Nazalaki kosepela kozala elongo na baninga na ngai ya sika, mpe yango esalisaki ngai nakata boninga ná bato oyo basambelaka Yehova te. Nazalaki na mposa ya kopusana penepene na Yehova mpe bandeko ya lisangá. Yango wana nazwaki ekateli ya kozwa batisimo.”

16. Makambo nini mosusu okoki kosala mpo moyekoli ya Biblia amiyoka mopaya te na lisangá?

16 Wana moyekoli ya Biblia azali kokoba kokola na elimo, mpe kosala bambongwana na bomoi na ye, salisá ye amiyoka ete azali mopaya te na lisangá. Okoki kosala yango soki omoniseli ye ezaleli ya koyamba bapaya. (Ebr. 13:2) Denis, ndeko mobali moko oyo afandaka na Moldavie, abosanaka te ntango oyo azalaki moyekoli ya Biblia. Alobi boye: “Mbala mingi, bandeko ya lisangá bazalaki kobengisa ngai ná mwasi na ngai mpo tólekisa ntango elongo. Bayebisaki biso ndenge Yehova asalisaki bango mpe yango elendisaki biso mpenza. Yango endimisaki biso ete tozalaki na mposa ya kosalela Yehova. Tomonaki mpe ete tokozala na bomoi ya malamu soki tosaleli ye.” Ntango moyekoli ya Biblia akómi mosakoli, okoki mpe kosɛnga ye bóbima elongo na mosala ya kosakola. Diego, ndeko mobali moko oyo afandaka na Brésil, alobi boye: “Bandeko mibali mingi bazalaki kobengisa ngai mpo tóbima elongo na mosala ya kosakola. Yango esalisaki ngai nayeba bango lisusu malamu kaleka. Koyeba bango malamu esalisaki ngai nayeba makambo mingi mpe nakómaki komiyoka penepene na Yehova mpe Yesu.”

NDENGE OYO BANKULUTU BAKOKI KOSALISA

Bankulutu, soki bozali mpenza kotyela bayekoli ya Biblia likebi, yango ekosalisa bango bákola na elimo (Talá paragrafe 17)

17. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bayekoli ya Biblia?

17 Bózwaka ntango ya kosolola na bayekoli ya Biblia. Bankulutu, ntango bozali komonisela bayekoli ya Biblia bolingo mpe kotyela bango likebi, bokoki kosalisa bango bákola tii bázwa batisimo. Mpo na nini te kosolola mbala na mbala na bayekoli ya Biblia na makita? Bakomona ete botyelaka bango likebi soki bozali kobosana bankombo na bango te, mingimingi ntango babandi kopesa biyano na makita. Bokoki kobongisa programɛ na bino mpo bókende elongo na mosakoli moko oyo akei koyekola Biblia na moto. Ntango mosusu okosalisa moyekoli na ndenge oyo okanisaki te. Jackie, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela na Nigeria, alobi boye: “Bayekoli mingi bakamwaka soki bayebi ete ndeko oyo azali elongo na ngai ntango tozali koyekola na bango Biblia azali nkulutu. Moyekoli moko ya Biblia alobaki: ‘Pastɛrɛ ya lingomba na ngai akoki kosala likambo ya ndenge wana te. Akendaka kaka kotala bato oyo bazali na mbongo mingi mpe asalaka yango kaka soki bafuti ye!’” Sikoyo moyekoli yango ayanganaka na makita.

18. Na kotalela Misala 20:28, ndenge nini bankulutu bakoki kokokisa mokumba oyo bapesá bango?

18 Bópesaka basakoli formasyo mpe bólendisaka bango. Bankulutu, bozali na mokumba monene ya kosalisa bandeko ya lisangá mpo bákóma basakoli mpe bateyi malamu. (Tángá Misala 20:28.) Soki mosakoli moko azali koyoka nsɔni mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia ntango ozali wana, sɛngá ye otambwisa boyekoli yango. Jackie oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Bankulutu batunaka ngai mbala na mbala makambo etali bayekoli na ngai ya Biblia. Soki nazali na mokakatano ya koyekola na moto Biblia, bapesaka ngai batoli oyo ebongi mpenza.” Bankulutu bakoki kosala makambo mingi mpo na kolendisa basakoli. (1 Tes. 5:11) Jackie abakisi boye: “Nasepelaka mingi ntango bankulutu balendisaka ngai, mpe bayebisaka ngai ete basepelaka na mosala makasi oyo nasalaka. Maloba ya ndenge wana ekitisaka ngai motema lokola mai ya mpiɔ na ntango ya molunge makasi. Maloba na bango ya boboto esalisaka ngai namiyoka ete nayekolaka na bato Biblia malamu mpe yango ebakiselaka ngai esengo.”​—Mas. 25:25.

19. Esengo nini mokomoko na biso akoki koyoka?

19 Ata soki sikoyo tozali na moto oyo toyekolaka na ye Biblia te, tokoki kosalisa moto akola na elimo. Soki tomibongisi malamu, tokoki kopesa likanisi ya mokuse oyo ekosalisa ndeko oyo azali koyekola na moto Biblia. Tokoki kokómisa bayekoli ya Biblia baninga na biso soki bayei na Ndako ya Bokonzi, mpe tokoki kozala bandakisa malamu mpo na bango. Mpe bankulutu bakoki kolendisa bayekoli ya Biblia soki bazali kozwa ntango mpo na kosololaka na bango, mpe bakoki kolendisa basakoli soki bazali kopesa bango formasyo mpe longonya. Ya solo, toyokaka mpenza esengo soki tosali likambo ata ya moke mpo na kosalisa moto alinga mpe asalela Yehova, Tata na biso.

LOYEMBO 79 Tóteya bango batɛlɛma ngwi

^ par. 5 Biso nyonso tozwaka te libaku ya koyekola na bato Biblia. Kasi biso nyonso tokoki kosalisa moto akola tii azwa batisimo. Na lisolo oyo, tokomona oyo mokomoko na biso akoki kosala mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia akokisa mokano yango.