Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 16

Kobá komonisa botɔndi mpo na lisiko

Kobá komonisa botɔndi mpo na lisiko

“Mwana ya moto ayaki . . . mpo na kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”​—MRK. 10:45.

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

NA MOKUSE *

1-2. Lisiko ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli na yango?

NTANGO Adama oyo azalaki moto ya kokoka asalaki lisumu, abungisaki libaku ya kozala na bomoi ya seko, kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na bakitani na ye. Lokola Adama asalaki lisumu yango na nko, ntina ya kolimbisa ye ezalaki te. Kasi bana na ye basalaki ata likambo moko te ya mabe mpe batindaki Adama te asala lisumu. (Rom. 5:12, 14) Adama azwaki etumbu ya liwa mpo na likambo oyo asalaki. Kasi Yehova akokaki kosala likambo moko mpo bana ya Adama bázala na bomoi libela na libela. Mwa moke nsima ya lisumu ya Adama, Yehova akómaki komonisa mokemoke ndenge oyo akobikisa bamilio ya bana ya Adama na lisumu mpe na liwa. (Eba. 3:15) Na ntango oyo Yehova atyaki, atindaki Mwana na ye uta na likoló, mpo na “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”​—Mrk. 10:45; Yoa. 6:51.

2 Lisiko ezali nini? Na kotalela Makomami ya Grɛki ya bokristo, lisiko ezali motuya oyo Yesu apesaki mpo na kosomba eloko oyo Adama abungisaki. (1 Ko. 15:22) Mpo na nini tosengeli na lisiko? Mpamba te na kotalela mibeko oyo Yehova apesaki na likambo etali bosembo, esɛngaki kopesa bomoi mpo na bomoi. (Kob. 21:23, 24) Adama abungisaki bomoi na ye ya kokoka. Mpo na kokokisa bosembo ya Nzambe, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka. (Rom. 5:17) Na ndenge yango, akómaki “Tata ya Seko” ya baoyo nyonso bazali komonisa kondima na mbeka ya lisiko.​—Yis. 9:6; Rom. 3:23, 24.

3. Na kotalela Yoane 14:31 mpe 15:13, mpo na nini Yesu andimaki kopesa bomoi na ye ya kokoka mbeka?

3 Bolingo makasi mpo na Tata na ye ya likoló mpe mpo na biso nde etindaki Yesu andima kopesa bomoi na ye mbeka. (Tángá Yoane 14:31; 15:13.) Bolingo yango nde etindaki ye abatela bosembo na ye tii na nsuka mpe akokisa mokano ya Tata na ye. Yesu asalaki yango na ndenge atikalaki sembo tii na liwa. Yango ekosala ete mokano oyo Yehova azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabele ekokisama. Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo Yehova atikaki ete Yesu anyokwama mingi ndenge wana liboso akufa. Tokolobela mpe na mokuse ndakisa ya ntoma Yoane oyo azalaki kozwa lisiko na motuya mingi. Na nsuka, tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na lisiko, mpe ndenge oyo tokoki kokómisa lisusu makasi botɔndi na biso mpo na mbeka oyo Yehova ná Yesu bapesá biso.

MPO NA NINI YEHOVA ATIKAKI YESU ANYOKWAMA?

Kanisá makambo nyonso ya mpasi oyo Yesu ayikelaki mpiko mpo na kopesa biso lisiko! (Talá paragrafe 4)

4. Lobelá ndenge oyo Yesu akufaki.

4 Kanisá makambo oyo esalemaki na mokolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele liboso akufa. Atako Yesu akokaki kosɛnga na mampinga ya baanzelu bábatela ye, atikaki ete basoda ya Roma bákanga ye mpe bábɛta ye kozanga mawa. (Mat. 26:52-54; Yoa. 18:3; 19:1) Babɛti ye na fimbo moko oyo ezokisi ye makasi mpenza. Na nsima, bamemisi ye nzete moko ya kilo mpenza na mokɔngɔ na ye oyo etondi na bampota. Yesu abandi komema nzete yango tii na esika oyo basengeli koboma ye. Kasi mwa moke na nsima, basoda ya Roma bayebisi mobali moko oyo azalaki wana amemela Yesu nzete yango. (Mat. 27:32) Ntango Yesu akómi na esika oyo asengeli kobomama, basoda yango babɛti ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo likoló ya nzete yango. Kilo ya nzoto ya Yesu ebandi kopasola misuni na ye na bisika oyo babɛti ye bansɛtɛ. Baninga na ye bazali na mawa makasi mpe mama na ye azali kolela, kasi bakonzi ya Bayuda bazali kotyola Yesu. (Luka 23:32-38; Yoa. 19:25) Yesu azali kolekisa bangonga moko ya mpasi mpenza. Ndenge oyo bakakisi ye likoló ya nzete, esali ete motema mpe mimpululu (poumons) na ye esala lisusu malamu te. Yango wana akómi kopema na mpasi. Yesu ayebi ete atikali sembo epai ya Yehova, yango wana liboso akufa, abondeli ye mpo na mbala ya nsuka. Na nsima, akitisi motó na ye mpe akati motema. (Mrk. 15:37; Luka 23:46; Yoa. 10:17, 18; 19:30) Ezalaki liwa moko ya nsɔni, ya mpasi mpenza, mpe ezwaki ntango mingi!

5. Mpo na Yesu, likambo nini ezalaki mabe mpenza koleka ndenge oyo asengelaki kobomama?

5 Mpo na Yesu, lolenge oyo asengelaki kobomama ezalaki te likambo ya mpasi mingi. Azalaki nde komitungisa mpo na makambo oyo bafundaki ye mpe oyo mpo na yango asengelaki kobomama. Bafundaki ye ete afingi Nzambe, elingi koloba, azalaki ata na limemya moko te mpo na Nzambe mpe mpo na nkombo na ye. (Mat. 26:64-66) Likambo yango etungisaki Yesu mingi mpe atyaki motema ete Tata na ye akotika nzela te ete ayokisama nsɔni ndenge wana. (Mat. 26:38, 39, 42) Mpo na nini Yehova atikaki nzela ete Mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi anyokwama mpe akufa? Tólobela bantina misato.

6. Mpo na nini Yesu asengelaki kokakisama likoló ya nzete ya mpasi?

6 Ya liboso, Yesu asengelaki kokakisama na nzete mpo na kosikola Bayuda na elakeli mabe. (Gal. 3:10, 13) Bandimaki ete bakotosa mibeko ya Nzambe kasi batosaki yango te. Mpo na yango, balakelamaki mabe. Elakeli mabe yango ebakisamaki na etumbu ya liwa oyo bazalaki na yango mpo bazalaki bana ya Adama. (Rom. 5:12) Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisraele elobaki ete soki moto asali lisumu oyo ebongi na liwa, moto yango asengelaki kobomama. Na nsima, nzoto ya moto yango esengelaki kokakisama likoló ya nzete. * (Mib. 21:22, 23; 27:26) Na yango, lokola bakakisaki Yesu likoló ya nzete, Bayuda bakokaki kosikolama na elakeli mabe yango, mpe mbeka oyo Yesu apesaki ekokaki kosalisa bango atako baboyaki ye.

7. Wapi ntina ya mibale oyo Yehova atikaki nzela ete Mwana na ye anyokwama?

7 Tólobela ntina ya mibale oyo Nzambe atikaki nzela ete Mwana na ye anyokwama. Azalaki kopesa Yesu formasyo mpo na mokumba oyo akozala na yango na mikolo ezali koya, ya kozala Nganga-nzambe Monene na biso. Yesu amonaki ndenge oyo kotosa mibeko ya Nzambe ezalaka mpasi ntango moto akutani na komekama ya makasi. Atungisamaki mingi mpenza, yango wana abondelaki Nzambe “na koganga makasi mpe na mpisoli.” Na ntembe te, lokola Yesu atungisamaki mingi ndenge wana, ayebi bamposa na biso mpe ‘akoki kosalisa biso ntango tozali komekama.’ Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova atyelá biso Nganga-nzambe Monene oyo atondi na motema mawa, mpe oyo akoki “koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso!”​—Ebr. 2:17, 18; 4:14-16; 5:7-10.

8. Wapi ntina ya misato oyo Nzambe atikaki nzela ete Mwana na ye amekama makasi?

8 Ya misato, Yehova atikaki Mwana na ye anyokwama makasi ndenge wana mpo akoka kopesa eyano na motuna oyo ya ntina mingi: Bato bakoki nde kotikala sembo epai ya Nzambe ata ntango bakutani na komekama ya makasi? Satana alobaka ete ekoki kosalema te! Alobaka ete bato basalelaka Nzambe mpo balingaka ete Nzambe apesa bango mwa eloko. Alobaka mpe ete, lokola nkɔkɔ na bango Adama, bato balingaka Yehova te. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Lokola Yehova ayebaki ete Yesu akotikala sembo, yango wana atikaki nzela ete Mwana na ye anyokwama tii na nsuka mpenza. Yesu abatelaki bosembo na ye mpe amonisaki ete Satana azali mobuki-lokuta.

NTOMA YOANE AZALAKI KOZWA LISIKO NA MOTUYA MINGI

9. Ndakisa nini ntoma Yoane atikelá biso?

9 Liteya ya lisiko ekómisá kondima ya bakristo mingi makasi. Bakobaka kosakola atako botɛmɛli mpe bayikaka mpiko na minyoko ya ndenge na ndenge bomoi na bango mobimba. Tótalela ndakisa ya ntoma Yoane. Ekoki kozala ete na boumeli ya mbula koleka 60, ateyaki na bosembo nyonso solo na ntina etali Kristo mpe lisiko. Ntango akómaki na mbula pene na 100, guvɛrnema ya Roma ekanisaki ete azali moto mabe mpenza. Yango wana, batyaki ye na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi. Likambo nini ya mabe asalaki? Azalaki “kolobela Nzambe mpe kotatola mpo na Yesu.” (Em. 1:9) Yoane atikelá biso ndakisa malamu mpenza na likambo etali komonisa kondima mpe koyika mpiko!

10. Ndenge nini mikanda oyo Yoane akomaki emonisi ete azalaki na botɔndi mingi mpo na lisiko?

10 Na mikanda ya Biblia oyo Yoane akomaki, amonisi ndenge oyo azalaki kolinga Yesu mingi mpe ndenge oyo azalaki na botɔndi mingi mpo na lisiko. Alobeli lisiko to matomba oyo bato bakozwa na nzela na yango mbala koleka 100. Na ndakisa, Yoane akomaki boye: “Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Kristo, moyengebene.” (1 Yoa. 2:1, 2) Lisusu, mikanda oyo Yoane akomaki ebɛti nsɛtɛ na likambo etali “kotatola mpo na Yesu.” (Em. 19:10) Emonani polele ete Yoane azalaki na botɔndi mingi mpo na lisiko. Ndenge nini biso mpe tokoki komekola ye?

NDENGE NINI OKOKI KOMONISA BOTƆNDI MPO NA LISIKO?

Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na lisiko, tokoboya kosala masumu (Talá paragrafe 11) *

11. Nini ekoki kosalisa biso tóboya kosala lisumu?

11 Boyá kosala masumu. Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na lisiko, tokoboya kozala na makanisi lokola oyo: ‘Ntango namekami, ezali na ntina te ete naboma nzoto mpo naboya kosala lisumu. Nakoki kosala lisumu mpe na nsima nakosɛnga Nzambe alimbisa ngai.’ Nzokande, ntango tomekami mpo tosala likambo moko ya mabe, tosengeli nde koloba: ‘Te! Na kotalela nyonso oyo Yehova ná Yesu basalá mpo na ngai, nakoki te kosala likambo ya boye.’ Na kotalela makambo oyo touti koloba, tokoki kosɛnga Yehova apesa biso makasi mpe koloba na ye: ‘Salisá ngai nakwea na komekama te.’​—Mat. 6:13.

12. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na 1 Yoane 3:16-18?

12 Lingá bandeko na yo bakristo. Ntango tozali kolinga bandeko na biso bakristo, tomonisaka mpe botɔndi mpo na lisiko. Mpo na nini? Mpo Yesu apesaki bomoi na ye kaka mpo na biso moko te, kasi mpe mpo na bandeko na biso bakristo. Lokola andimaki kokufa mpo na bango, yango emonisi ete bazali na motuya mingi na miso na ye. (Tángá 1 Yoane 3:16-18.) Tokomonisa ete tolingaka bandeko na biso bakristo na makambo oyo tosalelaka bango. (Ef. 4:29, 31–5:2) Na ndakisa, tosalisaka bango ntango bazali kobɛla, ntango bazali kokutana na mikakatano ya makasi to na makama oyo ebimaka yango moko. Kasi tosengeli kosala nini ntango ndeko moko asali to alobi likambo moko oyo epesi biso mpasi?

13. Mpo na nini tosengeli kolimbisaka basusu?

13 Na bantango mosusu omonaka ete ezali mpasi olimbisa ndeko moko? (Lev. 19:18) Soki ezali bongo, landá toli oyo: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu, mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Kol. 3:13) Mbala nyonso oyo tolimbisi ndeko na biso, tomonisaka Tata na biso ya likoló ete tozali mpenza na botɔndi mpo na lisiko. Ndenge nini tokoki kokoba komonisa lisusu botɔndi mingi mpo na likabo yango oyo Nzambe apesá biso?

NDENGE NINI OKOKI KOMONISA LISUSU BOTƆNDI MINGI MPO NA LISIKO?

14. Wapi lolenge moko oyo tokoki komonisa lisusu botɔndi mingi mpo na lisiko?

14 Pesáká Yehova matɔndi mpo na lisiko. Joanna, ndeko mwasi moko ya mbula 83 oyo afandaka na Inde alobi boye: “Namoni ete ezali na ntina nalobelaka lisiko ntango nyonso oyo nazali kobondela mpe napesaka Yehova matɔndi mpo na yango.” Mikolo nyonso na mabondeli na yo moko, yebisáká Yehova mabunga oyo osali mpe sɛngáká ye alimbisa yo. Kasi soki osali lisumu moko ya monene, ekosɛnga mpe oluka lisalisi ya bankulutu. Bakoyoka yo mpe bakopesa yo toli ya malamu oyo euti na Liloba ya Nzambe. Bakobondela elongo na yo mpe bakosɛnga Yehova alimbisa yo mpo ozongela lisusu boyokani ya malamu elongo na ye.​—Yak. 5:14-16.

15. Mpo na nini tosengeli kozwaka ntango ya kotánga makambo etali lisiko mpe komanyola na yango?

15 Manyolá na lisiko. Rajamani, ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 73 alobi boye: “Mbala nyonso oyo natángaka ndenge oyo Yesu anyokwamaki, mayi ya miso ebimaka ngai.” Yo mpe okoki koyoka bongo soki okanisi ndenge oyo Mwana ya Nzambe anyokwamaki mingi. Kasi soki ozali kokanisa na mozindo na mbeka oyo Yesu apesaki, bolingo na yo mpo na ye mpe mpo na Tata na ye ekokóma lisusu makasi. Mpo na kosalisa yo okanisa na mozindo na lisiko, ekozala malamu otya yango na programɛ ya boyekoli na yo moko.

Na nzela ya bilei moko oyo ezangi mindɔndɔ, Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kokanisa mbeka na ye (Talá paragrafe 16)

16. Koteya bato mosusu makambo etali lisiko ekoki kosalisa biso na nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)

16 Teyáká basusu makambo etali lisiko. Mbala nyonso oyo toyebisi bato makambo etali lisiko, tokómaka na botɔndi mingi mpo na yango. Tozali na bisaleli ya kitoko mpenza mpo na koteya basusu ntina oyo Yesu akufaki mpo na biso. Na ndakisa, tokoki kosalela liteya 4 ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Liteya yango ezali na motó ya likambo: “Yesu Kristo azali nani?” To mpe tokoki kosalela mokapo 5 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka. Mokapo yango ezali na motó ya likambo: “Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene.” Mpe mbula na mbula, tokómisaka lisusu makasi botɔndi na biso mpo na lisiko na ndenge toyanganaka na Ekaniseli ya liwa ya Yesu, mpe na ndenge tobengisaka bato báya kosangana elongo na biso na molulu yango. Yehova apesá biso lokumu monene ya koteya basusu makambo etali Mwana na ye.

17. Mpo na nini lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene mpo na bato?

17 Na ntembe te, tozali na ntina ya kobatela mpe ya kokómisa lisusu makasi botɔndi na biso mpo na lisiko. Na nzela ya lisiko, tokoki kozala na boyokani ya malamu ná Yehova atako tozali bato ya kozanga kokoka. Mpe na nzela ya lisiko, misala nyonso ya Zabolo ekosuka mpo na libela. (1 Yoa. 3:8) Lisusu na nzela ya lisiko, mokano oyo Yehova azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele ekokokisama. Mabele mobimba ekokóma Paradiso. Moto nyonso oyo okokutana na ye kuna, akolinga Yehova mpe akosalela ye. Na yango, tiká ete mokolo na mokolo tóluka lolenge ya komonisa botɔndi na biso mpo na lisiko, likabo ya Nzambe oyo eleki monene mpo na bato.

LOYEMBO 20 Opesá mwana na yo ya bolingo

^ par. 5 Mpo na nini Yesu akufaki liwa moko ya mpasi? Lisolo oyo ekoyanola na motuna yango. Ekosalisa biso tokómisa lisusu makasi botɔndi na biso mpo na lisiko.

^ par. 6 Baroma bazalaki na momeseno ya kokakisa likoló ya nzete mosali-mabe oyo azali na bomoi, mpe Yehova atikaki nzela ete Mwana na ye abomama na ndenge wana.

^ par. 55 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mokomoko azali kotɛmɛla komekama: ya kotala bililingi ya mabe, ya komɛla likaya mpe ya kondima kanyaka.