Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 20

Batelá makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola

Batelá makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola

“Loná mboto na yo mpe . . . kopemisa lobɔkɔ na yo te.”​—MOS. 11:6.

LOYEMBO 70 Tóluka banani babongi

NA MOKUSE *

Nsima ya komata na likoló, bayekoli ya Yesu basakolaki na molende mpenza na Yerusaleme mpe na bisika mosusu mingi (Talá paragrafe 1)

1. Ndakisa nini Yesu atikelaki bayekoli na ye, mpe basalaki nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)

NA BOUMELI ya mosala na ye awa na mabele, Yesu abatelaki makanisi malamu. Alingi ete bayekoli na ye mpe bábatela makanisi malamu na mosala ya kosakola. (Yoa. 4:35, 36) Ntango Yesu azalaki elongo na bayekoli na ye, bazalaki na molende na mosala ya kosakola. (Luka 10:1, 5-11, 17) Kasi ntango bakangaki Yesu mpe babomaki ye, bayekoli na ye babungisaki mposa wana ya kosakola mpo na mwa ntango. (Yoa. 16:32) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu alendisaki bango bátya makanisi na bango nyonso na mosala ya kosakola. Mpe ntango amataki na likoló, basakolaki na molende mpenza, mpe yango etindaki banguna na bango báloba: “Talá! botondisi Yerusaleme na mateya na bino.”​—Mis. 5:28.

2. Ndenge nini Yehova apamboli mosala ya kosakola?

2 Yesu nde akambaki mosala ya kosakola oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki, mpe Yehova apambolaki mosala na bango. Yango wana bato mingi bandimaki nsango na bango. Na ndakisa, na Pantɛkote ya mobu 33 ya ntango na biso, bato soki 3 000 bazwaki batisimo. (Mis. 2:41) Mpe motángo ya bayekoli na ye ekobaki kobakisama mingi mpenza. (Mis. 6:7) Lisusu, Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka, ebele ya bato mpenza bakondima nsango malamu.​—Yoa. 14:12; Mis. 1:8.

3-4. Mpo na nini bato mosusu bazalaka na mokakatano ya kosakola, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Biso nyonso tosalaka makasi tóbatela makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola. Na bikólo mosusu, ezalaka mpasi te kosala bongo. Mpo na nini? Mpo bato mingi basepelaka koyekola Biblia mpe yango esɛngaka ete basusu bázela tii ntango Motatoli ya Yehova moko akoleka mpo na kosolola na bango! Kasi na mikili mosusu, basakoli bazalaka na mokakatano ya kosakola mpo bato bazalaka mpenza na bandako te, mpe baoyo bazalaka na bandako basepelaka mpenza na makambo ya Biblia te.

4 Soki ofandaka na esika oyo ezalaka mpasi kosakola, na ntembe te makanisi oyo ezali na lisolo oyo ekoki kosalisa yo. Tokolobela makambo oyo basakoli mosusu basalaki mpo bákutanaka na bato mingi na mosala ya kosakola. Mpe tokolobela ntina oyo tosengeli kobatela makanisi malamu ezala bato bandimi koyoka nsango na biso to te.

BATELÁ MAKANISI MALAMU SOKI OZALI KOKUTA BATO TE NA BANDAKO NA BANGO

5. Mikakatano nini basakoli mingi bakutanaka na yango?

5 Ekómi lisusu mpasi mpo basakoli mingi bákuta bato na bandako na bango. Basakoli mingi bafandaka na bisika oyo ezali na bandako ya milaimilai oyo ebatelami malamu mpe ezalaka mpasi kokɔta kuna. Bato oyo bakɛngɛlaka bandako yango bapekisaka moto nyonso akɔta, longola kaka soki moto moko oyo afandaka kuna abengisaki ye. Na bisika mosusu, basakoli bazalaka na mokakatano te ya kosakola ndako na ndako, kasi bakutaka kaka bato moke na bandako yango. Basakoli mosusu basakolaka na bisika oyo kaka bato moke nde bafandaka. Ekoki kosɛnga ete basakoli bátambola bakilomɛtrɛ ebele mpo na kokutana kaka na moto moko, oyo mbala mosusu mpe bakoki kokuta ye na ndako te! Soki tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tosengeli kolɛmba te. Tokoki kosala nini mpo tólonga mikakatano ya ndenge wana mpe tósolola na bato mingi na mosala ya kosakola?

6. Na makambo nini basakoli bakokani na baluki-mbisi?

6 Yesu akokanisaki mosala ya kosakola na mosala ya koluka mbisi. (Mrk. 1:17) Baluki-mbisi mosusu bakoki kosala mikolo ebele kozanga ete bázwa ata mbisi moko. Kasi balɛmbaka nzoto te. Babongolaka nde lolenge na bango ya koluka mbisi. Babongolaka ntango, esika, mpe mayele ya kokanga mbisi. Biso mpe tokoki kosala bongo na mosala na biso ya kosakola. Tótalela makanisi oyo elandi.

Ntango ozali kosakola na bisika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako, luká kokutana na bango na bangonga ekeseni, na bisika ekeseni, to mpe salelá mayele ekeseni (Talá paragrafe 7-10) *

7. Matomba nini tokoki kozwa soki tosakoli na bangonga ekeseni?

7 Luká kokutana na bato na bangonga ekeseni. Tokokutana na bato mingi soki tosakoli na bangonga oyo bazalaka na bandako na bango. Mpo ata ndenge nini, moto nyonso azongaka kaka epai na ye na ngonga moko boye! Bandeko mingi bamonaka malamu básakola nsima ya midi to na mpokwa mpo bakutanaka na bato mingi. Longola yango, bankolo-ndako bakoki kondima kosolola na bato na bantango yango. Ntango mosusu okosepela kosalela makanisi oyo nkulutu moko na nkombo David asalelaki. Alobi ete nsima ya kosakola na boumeli ya mwa ntango na teritware moko, ye ná moninga na ye ya mosala bazongaka lisusu na bandako oyo bakutaki bato te. Alobi boye: “Nakamwaka mpenza ndenge nakutanaka na bato ebele na bandako ntango nazongelaka bango lisusu.” *

Ntango ozali kosakola na bisika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako, luká kokutana na bango na bangonga ekeseni (Talá paragrafe 7-8)

8. Ndenge nini tokoki kosalela Mosakoli 11:6 na mosala ya kosakola?

8 Tosengeli kotika te. Vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo emonisi ezaleli oyo tosengeli kozala na yango. (Tángá Mosakoli 11:6.) David oyo touti kolobela alɛmbaki te. Nsukansuka, akutanaki na nkolo-ndako moko nsima ya kozongela ye mbala na mbala. Moto yango asepelaki básolola makambo ya Biblia, mpe alobaki boye: “Nafandaka awa eleki soki mbula mwambe, kasi ata Motatoli ya Yehova moko te aleká awa epai na ngai.” David alobi boye: “Namoni ete nsukansuka soki okutani na bato na bandako na bango, mbala mingi bandimaka koyoka nsango na biso.”

Ntango ozali kosakola na bisika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako, luká kokutana na bango na bisika ekeseni (Talá paragrafe 9)

9. Batatoli ya Yehova mosusu basalaka nini mpo básolola na bato oyo ezalaka mpasi kokuta bango na bandako?

9 Meká koluka bango na bisika mosusu. Mpo na komona bato oyo ezalaka mpasi kokuta bango na bandako, basakoli mosusu babongolá bisika na bango ya kosakola. Na ndakisa, kosakola na babalabala mpe na bashario esalisaka mingi mpo na kokutana na bato oyo bafandaka na bandako ya minene epai kosakola ndako na ndako epekisamá. Yango esalisaka basakoli yango básolola na bango. Lisusu, basakoli mingi bamonaka ete bato mingi bandimaka kosolola na bango mpe kozwa mikanda na biso, na baparke, na bazando mpe na bisika ya mombongo. Floiran, mokɛngɛli ya zongazonga moko na Bolivie alobi boye: “Tokendaka na zando mpe na bisika ya mombongo kobanda na bangonga ya 13:00 tii 15:00, na ntango oyo bato oyo batɛkaka bazalaka na makambo mingi te ya kosala. Mbala mingi tosololaka na bango malamu mpenza, kutu tokómá koyekola Biblia na basusu.”

Ntango ozali kosakola na bisika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako, salelá mayele ekeseni (Talá paragrafe 10)

10. Mayele nini okoki kosalela mpo na kokutana na bato?

10 Salelá mayele ndenge na ndenge. Kanisá ete osali makasi mpo na kokutana na moto moko mbala na mbala. Ozongeli ye na bangonga ekeseni, kasi okuti ye kaka te na ndako. Ezali na mayele mosusu oyo okoki kosalela mpo na kokutana na moto ya ndenge wana? Ndeko mwasi moko na nkombo Katarína alobi boye: “Baoyo nakutaka na bandako te, nakomelaka bango mikanda. Nakomelaka bango makambo oyo nalingaki koyebisa bango soki tókutanaka.” Yango eteyi biso nini? Ntango ozali kosakola na teritware na yo moko, salelá mayele ndenge na ndenge mpo na kokutana na moto nyonso.

BATELÁ MAKANISI MALAMU SOKI BATO BAZALI KOSEPELA TE

11. Mpo na nini bato mosusu basepelaka na nsango na biso te?

11 Bato mosusu basepelaka te na nsango na biso. Bamonaka te ntina ya koluka koyeba makambo etali Nzambe to Biblia. Bandimelaka Nzambe te mpo bamonaka ete mpasi etondi na mokili. Basepelaka na Biblia te mpo bamonaka ete bakonzi ya mangomba oyo balobaka ete batosaka makambo oyo Biblia elobaka, basalaka makambo mingi ya mabe. Bato mosusu mpe bakanisaka mingi makambo etali misala na bango, mabota na bango, to mpe mikakatano na bango moko, yango wana bamonaka te ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa bango. Ndenge nini tokoki kobatela esengo na biso ntango bato oyo tosakwelaka bazali komona te ntina ya nsango na biso?

12. Ndenge nini kosalela maloba oyo ezali na Bafilipi 2:4 ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola?

12 Monisá ete otyelaka basusu likebi. Bato mingi oyo liboso bazalaki kosepela na nsango malamu te, bakómaki kosepela na yango ntango bamonaki ete mosakoli moko atyelaki bango mpenza likebi. (Tángá Bafilipi 2:4.) Na ndakisa, David oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Soki moto moko alobi ete asepelaka te na nsango na biso, totikaka Biblia mpe mikanda na biso mpe tolobaka: ‘Nakosepela koyeba mpo na nini okanisaka bongo.’” Bato bayebaka ntango moto moko azali kotyela bango likebi. Bakoki kobosana makambo oyo toyebisaki bango, kasi bakobosana te ndenge oyo totyelaki bango likebi. Ata soki nkolo-ndako atikeli biso nzela te tósolola na ye, tokoki komonisa na bizaleli mpe na elongi na biso ete tozali kotyela ye likebi.

13. Ndenge nini tokoki koyokanisa mateya na biso na bamposa ya nkolo-ndako?

13 Tokomonisa ete tozali kotyela nkolo-ndako likebi soki toyokanisi mateya na biso na bamposa na ye. Na ndakisa, ezali na makambo oyo emonisi ete azali na bana? Baboti bakoki kosepela na toli ya Biblia oyo elobeli ndenge ya kobɔkɔla bana to ndenge ya kozala na libota ya esengo. Tozali komona bafungola mingi na porte na ye? Tokoki komona malamu tólobela mobulu, mpe ndenge oyo yango ebangisaka bato mingi. Na nsima, nkolo-ndako akoki kosepela koyeba ete makambo yango nyonso ekosila. Mbala nyonso oyo okutani na bato oyo basepeli koyoka, luká kosalisa bango báyeba ndenge oyo toli ya Biblia ekoki kosalisa bango. Katarína, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nabosanaka te ndenge oyo solo ekómisá bomoi na ngai malamu koleka.” Yango esalaka ete Katarína aloba na mpiko, mpe na ntembe te bato oyo asololaka na bango bamonaka yango.

14. Na kotalela Masese 27:17, ndenge nini bandeko oyo bazali kosakola elongo bakoki kosalisana?

14 Ndimá lisalisi ya basusu. Na siɛklɛ ya liboso, Paulo alakisaki Timote mayele ya kosakola mpe ya koteya mpe alendisaki ye asalela mayele yango mpo na kosalisa basusu. (1 Ko. 4:17) Ndenge moko na Timote, tokoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko oyo baumeli mingi na lisangá. (Tángá Masese 27:17.) Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo Shawn. Na ntango moko boye, azalaki mobongisi-nzela na mwa mboka moko epai bato mingi bazalaki kosepela na lingomba na bango. Ndenge nini abatelaki esengo na ye? Alobi boye: “Mbala nyonso soki libaku emonani, nazalaki kosakola elongo na ndeko moko. Ntango tolongwe na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu, nzelanzela tozalaki kolobela makambo oyo tokoki kosala, mpo tókóma basakoli ya malamu koleka. Na ndakisa, tozalaki kolobela makambo oyo nkolo-ndako moko alobaki mpe oyo tosalaki mpo na kosalisa ye. Na nsima, tozalaki kolobela oyo tokoki kosala na mbala ya nsima soki tokutani na likambo ya ndenge wana.”

15. Mpo na nini libondeli ezali na ntina mingi mpo na mosala ya kosakola?

15 Bondelá Yehova asalisa yo. Sɛngá Yehova asalisa yo mbala nyonso oyo obimi na mosala ya kosakola. Soki Yehova asalisi biso na nzela ya elimo santu na ye te, moko te kati na biso akokoka kosala makambo oyo azali kosala. (Nz. 127:1; Luka 11:13) Ntango ozali kobondela Yehova asalisa yo, lobáká makambo ya sikisiki. Na ndakisa, sɛngá ye asalisa yo mpo okutana na bato oyo bakosepela koyoka makambo etali ye. Na nsima, salá makambo oyo eyokani na libondeli na yo mpe sakwelá moto nyonso oyo okokutana na ye.

16. Mpo na nini boyekoli na biso moko ezali na ntina mingi mpo na mosala ya kosakola?

16 Zwaká ntango ya kosala boyekoli na yo moko. Liloba ya Nzambe elobi: “Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Rom. 12:2) Soki tomindimisi ete makambo oyo toyebi mpo na Nzambe ezali solo, tokokóma na mpiko mingi ntango tozali koloba na mosala ya kosakola. Katarína, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Eleki mwa ntango, namonaki ete nasengeli kokómisa kondima na ngai makasi na mateya mosusu ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. Na yango, nayekolaki na likebi mpenza makambo oyo emonisi ete ezali na Mozalisi moko, ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe, mpe ete Nzambe azali na ebongiseli moko lelo oyo.” Katarína alobi ete boyekoli na ye moko ekómisaki kondima na ye makasi mpe ebakisaki esengo na ye na mosala ya kosakola.

NTINA OYO TOSENGELI KOBATELA MAKANISI MALAMU NA MOSALA YA KOSAKOLA

17. Mpo na nini Yesu abatelaki makanisi malamu na mosala na ye ya kosakola?

17 Yesu abatelaki makanisi malamu mpe akobaki kosakola atako bato mosusu baboyaki mateya na ye. Mpo na nini? Ayebaki ete bato mingi basengelaki koyeba solo, mpe alingaki kopesa mingi na bango libaku ya kondima nsango ya Bokonzi. Lisusu, ayebaki ete bato mosusu oyo baboyaki koyoka mateya na ye na ebandeli, nsukansuka bakondima koyoka yango. Tótalela makambo oyo esalemaki epai ya bandeko na ye ya libota. Na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala na ye awa na mabele, ata ndeko na ye moko te ya libota akómaki moyekoli na ye. (Yoa. 7:5) Kasi nsima ya lisekwa na ye bakómaki bakristo.​—Mis. 1:14.

18. Mpo na nini tokobaka kosakola?

18 Toyebi te soki nsukansuka nani nde akondima mateya ya solo ya Biblia oyo toteyaka. Mpo na bato mosusu, esɛngaka mwa ntango mpo bándima mateya na biso. Ata baoyo balingaka koyoka biso te bamonaka etamboli mpe makanisi ya malamu oyo tozalaka na yango, mpe nsukansuka, bakoki kobanda ‘kopesa Nzambe nkembo.’​—1 Pe. 2:12.

19. Na kotalela 1 Bakorinti 3:6, 7, likambo nini tosengeli kobosana te?

19 Atako biso nde tolonaka mpe tomwangisaka mai, tosengeli kobosana te ete Nzambe nde akolisaka. (Tángá 1 Bakorinti 3:6, 7.) Getahun, ndeko mobali moko oyo asakolaka na Éthiopie alobi boye: “Na boumeli ya mbula koleka 20, nazalaki Motatoli ya Yehova kaka ngai moko na mboka oyo nazalaki kofanda. Kasi sikoyo basakoli bakómi 14. Zomi na misato kati na bango bazwi batisimo, ata mpe mwasi ná bana na ngai misato. Lisusu, bato soki 32 bayanganaka na makita.” Getahun azali na esengo ndenge akobaki kosakola mpe azelaki na motema molai ete Yehova abenda bato ya mitema sembo na ebongiseli na ye!​—Yoa. 6:44.

20. Na ndenge nini tozali lokola bato oyo babikisaka bomoi ya bato?

20 Yehova azwaka bato nyonso na motuya. Apesi biso lokumu ya kosala elongo na Mwana na ye mpo na koyanganisa bato ya bikólo nyonso, liboso nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eya. (Hag. 2:7) Tokoki kokokanisa mosala na biso ya kosakola na mosala ya kobikisa bato. Mpe biso tozali lokola bato oyo babikisaka bato oyo mabele ezipi bango na esika oyo batimolaka mabanga ya ntalo. Ata soki kaka bato moke nde babikisi moto moko oyo mabele ezipaki, bango nyonso bazalaka na esengo mpo bango nyonso basalaki mosala ya ntina mingi. Ezali mpe bongo mpo na mosala na biso ya kosakola. Toyebi te motángo ya bato oyo bakobikisama na ebongiseli oyo ya Satana. Kasi Yehova akoki kosalela ata nani na kati na biso mpo na kosalisa bango. Andreas oyo afandaka na Bolivie alobi boye: “Nayebaka ete ntango moto moko ayekoli solo mpe azwi batisimo, ezali mpo bato mingi basalaki elongo mpo na kosalisa ye.” Biso mpe tóbatela makanisi ya bongo mpo na mosala ya kosakola. Soki tosali bongo, Yehova akopambola biso mpe mosala na biso ya kosakola ekomemela biso esengo mpenza.

LOYEMBO 66 Tósakola nsango malamu

^ par. 5 Ndenge nini tokoki kobatela makanisi malamu na mosala ya kosakola ata ntango tozali kokuta bato na bandako na bango te, to mpe ntango bato bazali kosepela na nsango na biso te? Lisolo oyo ekolobela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo tóbatela makanisi malamu.

^ par. 7 Ntango basakoli bazali kosalela mayele ndenge na ndenge ya kosakola oyo tolobeli na lisolo oyo, basengeli kosala yango na ndenge oyo eyokani na mibeko ya kobomba makambo ya bato.

^ par. 60 NDIMBOLA YA ELILINGI: (banda na likoló tii na nse): Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali kosakola na esika oyo ezalaka mpasi kokuta bato na bandako na bango. Nkolo-ndako ya liboso azali na esika na ye ya mosala, oyo ya mibale azali na lopitalo, mpe oyo ya misato azali kosomba biloko. Bakutani na nkolo-ndako ya liboso ntango bazongeli ye na mpokwa. Bakutani na oyo ya mibale ntango bazali kopesa litatoli na esika ya bato mingi pene na lopitalo moko. Mpe babengi nkolo-ndako ya misato na telefone.