Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

“Nayekoli makambo mingi epai ya basusu!”

“Nayekoli makambo mingi epai ya basusu!”

EZALAKI mokolo moko na butu makasi, na bangomba ya Algérie epai limpinga na biso ya basoda ya France etyaki kaa na yango, mpe bitumba na Algérie ekómaki mpenza ndongo. Nazalaki kaka ngai moko ná mondoki na mabɔkɔ na esika ya kokɛngɛla oyo esalemaki na basaki oyo etɔndaki na zɛlo. Na mbala moko nayokaki lokola moto moko azali koya. Nabangaki makasi. Na ntango yango, nazalaki kaka na mbula mwa moke koleka zomi mpe nazalaki na mposa ya koboma moto te mpe nalingaki báboma ngai te. Nagangaki: “Nzambe, Nzambe na ngai!”

Likambo yango ya nsɔmɔ ebongolaki bomoi na ngai mpo yango etindaki ngai naluka koyeba makambo etali Mozalisi. Kasi liboso nayebisa bino makambo oyo esalemaki nsima na butu yango, nayebisa bino naino makambo oyo esalemaki na bomwana na ngai, oyo ebongolaki makanisi na ngai mpe oyo etindaki ngai naluka koyeba makambo etali Nzambe.

MAKAMBO OYO NAYEKOLAKI EPAI YA TATA NA NGAI

Nabotamá na 1937 na engumba Guesnain, oyo ezali na nɔrdi ya ekólo France epai batimolaka mabanga ya ntalo. Tata na ngai azalaki kotimola Charbon mpe ateyaki ngai ete ezali na ntina kosalaka mosala makasi. Ateyaki ngai mpe ete esengeli koyina makambo ya kozanga bosembo. Amonaki ete bazalaki kosalela bato oyo batimolaka Charbon makambo na bosembo te, mpe bazalaki kosala na esika moko ya likama mpenza, yango wana alingaki kosalisa bango. Mpo na kosalisa bango, akɔtaki na bibongiseli oyo ebundelaka ntomo ya bato oyo batimolaka Charbon. Asilikaki mpe komona bokosi ya basango ya esika oyo bazalaki kofanda. Atako mingi na bango bazalaki na bomengo, bazalaki kosɛnga biloko ya kolya mpe mbongo epai ya bato oyo bazalaki kotimola Charbon atako bato yango bazalaki babola. Bizaleli ya basango ezalaki kopesa tata nkanda mpenza, yango wana ateyaki ngai te makambo etali lingomba. Kutu tozalaki kolobela ata moke te makambo etali Nzambe.

Ntango nazalaki kokola, ngai mpe nakómaki koyina makambo ya kozanga bosembo. Na ndakisa, ndenge bazalaki koloba mabe mpo na bapaya oyo bafandaka na France. Nazalaki kobɛta lisano ya ndembo elongo na bana ya bapaya oyo bayaki kofanda na France mpe nazalaki kosepela kozala elongo na bango. Kutu mama na ngai azalaki moto ya ekólo Pologne, kasi ya France te. Mposa na ngai ezalaki ete bato ya loposo ndenge na ndenge bafanda esika moko na kimya mpe basalela bango nyonso makambo ndenge moko.

NAKÓMI KOKANISA NTINA YA BOMOI

Ntango nazalaki na mosala ya soda

Na 1957, guvɛrnema esɛngaki ngai nakɔta mosala ya soda. Yango nde esalaki ete nakóma na bangomba ya Algérie oyo nalobelaki liboso. Nsima ya koganga “Nzambe, Nzambe na ngai!” nayaki koyeba ete ezalaki monguna te kasi nde likako moko! Motema na ngai ekitaki mpenza! Likambo yango ata mpe bitumba yango moko etindaki ngai nakanisi mingi na oyo etali ntina ya bomoi. Na yango nakómaki komituna boye: Mpo na nini tozali na mabele? Nzambe atyelaki biso likebi? Mokolo mosusu tokozala na kimya?

Na nsima, ntango nakendaki na konje mpo na kotala baboti na ngai, nakutanaki na Motatoli ya Yehova moko. Apesaki ngai La Sainte Bible, libongoli moko ya lingomba ya Katoliki mpe nakómaki kotánga yango ntango nazongaki na Algérie. Vɛrsɛ moko oyo esimbaki mpenza motema na ngai ezalaki Emoniseli 21:3, 4, oyo elobi: “Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato . . . Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” * Maloba yango ekamwisaki ngai mpenza. Namitunaki soki makambo yango ekosalema mpenza. Na ntango yango, nayebaki ata eloko moko te na oyo etali Nzambe mpe Biblia.

Nsima ya kotika mosala ya soda na 1959, nakutanaki na Motatoli moko na nkombo François, oyo ateyaki ngai makambo mingi na Biblia. Na ndakisa, alakisaki ngai na Biblia ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. (Nz. 83:18) François ayebisaki ngai lisusu ete Nzambe akotya bosembo na mabele, akokómisa mabele paradiso, mpe akokokisa maloba oyo ezali na Emoniseli 21:3, 4.

Mateya yango ezalaki solo mpe esimbaki mpenza motema na ngai. Kasi, nakómaki lisusu koyokela basango nkanda makasi, mpe mposa na ngai ezalaki ete nabimisa polele makambo oyo bazalaki koteya oyo ezalaki na Biblia te. Emonanaki ete nazalaki na makanisi ndenge moko ná tata na ngai mpe mposa na ngai ezalaki ya kosilisa makambo ya kozanga bosembo. Nazalaki na mposa ya kosilisa yango mbala moko!

François ná baninga na ngai ya sika oyo bazalaki Batatoli ya Yehova, bayebisaki ngai nakitisa motema. Bayebisaki ngai ete mokumba na biso bakristo ezali te ya kosambisa bato, kasi ya koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekopesa bango elikya. Yango nde mosala oyo Yesu asalaki mpe asɛngaki bayekoli na ye mpe basalaka bongo. (Mat. 24:14; Luka 4:43) Nasengelaki mpe koyekola kosolola na bato na boboto mpe na mayele ata soki bazali na bindimeli nini. Biblia elobi ete: “Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.”​—2 Tim. 2:24.

Nasalaki bambongwana oyo esengeli mpe nazwaki batisimo na 1959 na liyangani moko ya zongazonga. Na liyangani yango, nakutanaki na ndeko mwasi moko ya elenge na nkombo Angèle, oyo asepelisaki ngai mpenza. Nakómaki kokende na lisangá oyo azalaki koyangana, mpe tobalanaki na 1960. Azali mwasi moko malamu mpe kitoko mpenza mpe azali likabo oyo Yehova apesá ngai.​—Mas. 19:14.

Mokolo ya libala na biso

NAYEKOLI MAKAMBO MINGI EPAI YA BANDEKO MIBALI YA BWANYA MPE OYO BAYEBI MAKAMBO MINGI

Nsima ya bambula, nayekoli mateya mingi ya ntina epai ya bandeko mibali ya bwanya mpe oyo bayebi makambo mingi. Moko kati na mateya yango ya ntina mingi ezali ete tokoki kolonga na mokumba nyonso oyo Yehova apesi biso soki tozali na komikitisa mpe soki tosaleli toli oyo ezali na Masese 15:22, oyo elobi: “Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”

Tozali na mosala ya zongazonga na France, na 1965

Na 1964, nakómaki komona ete maloba yango ezali mpenza solo. Na mbula yango, nabandaki mosala ya zongazonga. Nazalaki kokende kotala bandeko ya lisangá mpo na kolendisa bango mpe kosalisa bango bápusana penepene na Yehova. Kasi na ntango yango nazalaki na mbula 27 mpe nayebaki naino makambo mingi te. Yango wana nasalaki mabunga mingi. Kasi nasalaki makasi nayekola makambo epai ya bandeko yango. Oyo eleki ntina, nayekoli mateya mingi ya ntina epai ya “bapesi-toli” ya makoki mpe oyo bayebi makambo mingi.

Nabosanaka te makambo oyo esalemaki ntango nabandaki mosala ya zongazonga. Nsima ya kotala lisangá moko na Paris, ndeko mobali moko oyo akɔmeli na elimo atunaki ngai soki akoki kosolola na ngai. Nandimaki.

Atunaki ngai boye: “Louis, monganga akendaki kotala banani na bandako na bango?”

Nayebisaki ye, “bato oyo bazali kobɛla.”

Mpe ayebisaki ngai: “Olobi solo. Kasi namoni ete olekisaka ntango mingi elongo na bandeko oyo bazali makasi na elimo, na ndakisa, mokɛngɛli ya lisangá. Na lisangá na biso ezali na bandeko mingi oyo balɛmbi-nzoto, bandeko ya sika mpe oyo bazalaka nsɔninsɔni. Bakosepela mingi soki olekisi ntango elongo na bango ata mpe kokende kolya na bandako na bango.”

Nasepelaki na toli ya malamu oyo ndeko yango apesaki ngai. Bolingo oyo azalaki na yango mpo na bampate ya Yehova esimbaki mpenza motema na ngai. Atako ezalaki mpasi nandima ete nasalaki libunga, nabandaki mbala moko kosalela toli yango. Napesaka Yehova matɔndi mpo na bandeko ya ndenge wana.

Na bambula ya 1969 mpe ya 1973, basɛngaki ngai nakamba mosala ya cafétaria na mayangani mibale oyo esangisaka bato ya bikólo mingi oyo esalemaki na Colombes, na Paris. Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na 1973, nasengelaki koleisa bato soki 60 000 na boumeli ya mikolo mitano! Mpo na koloba solo, nabangaki mpenza. Kasi na mbala oyo mpe, toli oyo ezali na Masese 15:22 oyo elobi ete tosengeli kolukaka toli epai ya basusu, esalisaki ngai mpenza. Nasɛngaki toli epai ya bandeko mibali oyo bayebi malamu makambo etali kolamba. Bamosusu kati na bango bayebaki malamu mosala ya koboma banyama, ya kolona ndunda, ya kolamba, mpe ya kosomba biloko. Elongo na bango, tokokisaki malamu mosala yango oyo ezalaki mpasi.

Na 1973, basɛngaki ngai ná mwasi na ngai tokende kosala na Betele ya France. Mokumba ya liboso oyo bapesaki ngai ezalaki mpenza mokakatano mpo na ngai. Nasengelaki kotindela bandeko na biso oyo bazali na ekólo Cameroun na Afrika mikanda, epai mosala na biso epekisamaki kobanda 1970 tii 1993. Nayebaki te soki nakokoka kokokisa mokumba yango. Ekoki kozala ete mokɛngɛli ya filiale ya France, ayebaki ndenge oyo nazalaki komiyoka. Mpo na kolendisa ngai alobaki boye: “Bandeko na biso ya Cameroun bazali mpenza na mposa ya bilei ya elimo. Tosengeli kosalisa bango!” Mpe yango nde tosalaki.

Tozali na likita moko ya ntina mingi na Nigeria elongo na Batatoli ya Yehova mosusu oyo bauti na Cameroun, na 1973

Nasalaki mibembo ebele na bikólo oyo ezali zingazinga ya Cameroun mpo na kokutana na bankulutu ya bikólo yango. Bandeko mibali yango bazalaki na mpiko mpe na bwanya. Basalisaki ngai nayeba ndenge ya kotinda mikanda mpo bandeko bazwaka yango mbala na mbala. Yehova apambolaki milende na biso. Kutu na boumeli ya mbula soki 20, bandeko yango bazangaki ata nimero moko te ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mwa mokanda oyo ezalaki kobima sanza na sanza oyo ezalaki kobengama Mosala na biso ya Bokonzi.

Na 1977, ngai ná Angèle tokendaki na Nigeria kotala bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango oyo bautaki na Cameroun

NAYEKOLI MAKAMBO MINGI EPAI YA MWASI NA NGAI

Kaka na ntango oyo ngai ná ye tokómaki koyebana malamu, namonaki ete Angèle azalaki na bizaleli mingi ya malamu ya elimo. Bizaleli yango eyaki koyebana lisusu malamu mingi koleka ntango tobalanaki. Na ndakisa, kaka na mpokwa ya mokolo oyo tobalanaki, ayebisaki ngai nabondela Yehova mpo na koyebisa ye mposa oyo tozalaki na yango ya kosalela ye lisusu mingi. Yehova ayanolaki na libondeli yango.

Angèle asalisaki ngai mpe natyelaka lisusu Yehova motema mingi. Na ndakisa, ntango basɛngaki biso tokende kosala na Betele na 1973, nakakatanaki mwa moke mpo nazalaki kolinga mingi mosala ya zongazonga. Kasi Angèle ayebisaki ngai ete topesá bomoi na biso epai ya Yehova. Na yango, tosengeli kosala nyonso oyo ebongiseli na ye ezali kosɛnga biso. (Ebr. 13:17) Nandimaki mpenza likanisi yango! Na yango tokendaki na Betele. Mwasi na ngai azalaka na bwanya, mpe azalaka mwasi ya makambo makasimakasi te, mpe alingaka mpenza Yehova. Bizaleli yango ekómisá boyokani na biso makasi mpe esalisá biso tózwa bikateli ya malamu na boumeli ya bambula oyo tolekisi elongo.

Ngai ná Angèle na elanga ya Betele, na France

Atako sikoyo tokómi mibange, Angèle azali kaka kokoba kozala mwasi malamu mpe apesaka ngai mabɔkɔ. Na ndakisa, mpo na kokɔta na biteyelo ya teokrasi, oyo mingi na yango esalemaka na Anglais, ngai ná Angèle tozali kosala makasi mpo tóyeba koloba monɔkɔ yango malamu. Na yango, tokendaki na lisangá ya Anglais ata soki na ntango yango tozalaki na mbula koleka 70. Lokola nazali na Komite ya filiale ya France mpe nazali na mikumba mingi, ezalaki mpasi koyekola monɔkɔ ya sika. Kasi ngai ná Angèle tozalaki kosalisana. Sikoyo tozali na mbula koleka 80, mpe tokobaka kobongisa makita na biso ezala na monɔkɔ ya Anglais mpe ya Français. Toyanganaka mpe mbala na mbala na makita, mpe tobimaka na mosala ya kosakola na kotalela makoki na biso. Yehova apamboli milende oyo tosali mpo na koyekola monɔkɔ ya Anglais.

Lipamboli ya monene oyo tozwaki, ezalaki na 2017. Ngai ná Angèle tozwaki libaku ya kokɔta na Eteyelo ya bandeko ya Komite ya filiale ná basi na bango, oyo esalemaki na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na New York.

Yehova azali mpenza Molakisi Monene. (Yis. 30:20) Na yango, tosengeli kokamwa te ndenge basaleli na ye, ezala bilenge to mibange, bateyamaka na ndenge ya malamu mpenza! (Mib. 4:5-8) Kutu namoni ete bandeko basi mpe mibali oyo bazali bilenge oyo bayokaka Yehova mpe bandeko basi mpe mibali oyo baumeli mingi na lisánga, bakolaka malamu na elimo mpe bakómaka basaleli ya sembo ya Yehova. Masese 9:9 eyebisi biso boye: “Pesá moto ya bwanya mateya mpe akokóma lisusu na bwanya koleka. Pesá moyengebene boyebi mpe akobakisa boyebi ya makambo mingi.”

Na bantango mosusu, nakanisaka makambo oyo esalemaki mokolo wana na butu na bangomba ya Algérie, eleki sikoyo mbula 60. Na butu yango, nayebaki te ete nakokóma na bomoi ya malamu boye. Nayekoli makambo mingi epai ya basusu! Yehova apesá ngai ná Angèle bomoi ya malamu mpe ya esengo mpenza. Na yango, tozali na ekateli ya kotika soki moke te koyekola makambo etali Tata na biso ya likoló mpe epai ya bandeko ya bwanya oyo baumeli mingi mpe oyo balingaka ye.

^ par. 11 Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.