Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 22

Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo

Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo

“Mokomoko na bino abatisama.”​—MIS. 2:38.

LOYEMBO 72 Tóyebisa bato solo ya Bokonzi

NA MOKUSE *

1. Bayekoli ya Yesu bayebisaki ebele ya bato básala nini?

EBELE ya bato, basi mpe mibali, basali mobembo tii na Yerusaleme. Bauti na bikólo ndenge na ndenge mpe bazali koloba minɔkɔ ekeseni. Likambo moko ya kokamwa esalemi na mokolo yango. Na mbala moko mwa etuluku moko ya Bayuda ekómi koloba minɔkɔ ya bapaya wana oyo bayaki na Yerusaleme. Yango ekamwisaki mpenza ebele ya bato. Kasi oyo ekamwisaki bango mingi, ezalaki makambo oyo Bayuda yango bazalaki koloba na bango mpe oyo ntoma Petro ayebisaki bango nyonso. Bayebisaki bato yango ete bakozwa lobiko soki bandimeli Yesu Kristo. Makambo yango esimbaki mpenza mitema na bango mpe etindaki bango bátuna boye: “Tosengeli kosala nini?” Petro ayebisaki bango: “Mokomoko na bino abatisama.”​—Mis. 2:37, 38.

Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazali koyekola Biblia na elenge mobali moko oyo azali na buku Sepelá na bomoi libela na libela! (Talá paragrafe 2)

2. Makambo nini tókotalela na lisolo oyo? (Talá elilingi ya ezipeli.)

2 Likambo oyo esalemaki na nsima ekamwisaki mpenza. Bato soki 3 000 bazwaki batisimo na mokolo yango mpe bakómaki bayekoli ya Kristo. Yango ezalaki ebandeli ya mosala monene ya kokómisa bato bayekoli oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye básala. Tii lelo oyo, bayekoli ya Yesu bazali kokoba kosala mosala yango. Na mikolo na biso, tokoki te kosalisa moto tii azwa batisimo kaka nsima ya koyekola na ye Biblia mwa bangonga. Ekoki kosɛnga basanza to mpe mbula moko to koleka mpo moyekoli akokisa mokano yango. Soki oyekolaka na moto Biblia, oyebi malamu ete mosala ya kokómisa bato bayekoli esɛngaka makambo mingi. Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa moyekoli na yo ya Biblia azwa batisimo.

SALISÁ MOYEKOLI NA YO ASALELA MAKAMBO OYO AZALI KOYEKOLA

3. Ndenge Matai 28:19, 20 emonisi yango, makambo nini moyekoli ya Biblia asengeli kosala mpo azwa batisimo?

3 Liboso azwa batisimo, moyekoli ya Biblia asengeli kosalela makambo oyo Biblia eteyaka. (Tángá Matai 28:19, 20.) Ntango moyekoli azali kosalela makambo oyo azali koyekola, akokóma lokola “moto ya mayele” oyo atimolaki libulu ya mwa mozindo mpo atonga ndako na ye likoló ya mabanga. (Mat. 7:24, 25; Luka 6:47, 48) Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia asalela makambo oyo azali koyekola? Tólobela makanisi misato.

4. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo? (Talá mpe etanda “ Salisá moyekoli na yo amityela mikano mpe akokisa yango.”)

4 Salisá moyekoli na yo amityela mikano. Mpo na nini osengeli kosala yango? Tózwa ndakisa oyo: Soki olingi kosala mobembo moko ya molai, na ntembe te okopona bisika ya malamu oyo osengeli kopema. Yango ekosalisa yo olɛmba nzoto te mpe omona te ete esika oyo ozali kokende ezali mosika mingi. Ndenge moko mpe, soki moyekoli ya Biblia amityeli mikano oyo asengeli kokokisa nsima ya mwa mikolo, yango ekosalisa ye amona ete mokano na ye ya kozwa batisimo ekokokisama. Salelá etanda “Oyo okoki kosala” na buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na kosalisa moyekoli na yo akola. Na nsuka ya liteya mokomoko, lobelá elongo na moyekoli ndenge oyo komityela mokano ya ndenge wana ekosalisa ye asalela makambo oyo auti koyekola. Soki ozali na mokano mosusu oyo okolinga ete moyekoli na yo akokisa, komá yango na esika bakomi “Makambo mosusu.” Mbala na mbala, taleláká elongo na moyekoli na yo mikano oyo asengeli kokokisa nsima ya mwa ntango, mpe oyo ekoumela ntango molai.

5. Na kotalela Marko 10:17-22, Yesu ayebisaki moto moko ya bozwi asala nini, mpe mpo na nini?

5 Salisá moyekoli na yo asala bambongwana na bomoi na ye. (Tángá Marko 10:17-22.) Yesu ayebaki malamu ete ekozala mpasi mpo mozwi atɛka biloko na ye nyonso. (Mrk. 10:23) Atako bongo, Yesu ayebisaki mobali yango ete asala mbongwana wana ya monene na bomoi na ye. Mpo na nini? Mpo Yesu alingaki mobali yango. Na bantango mosusu tokoki kokakatana mpo na kolendisa moyekoli ya Biblia asalela makambo oyo azali koyekola, mpo tozali kokanisa ete akoki naino te kosala mbongwana oyo esengeli. Ekoki kozwa mwa ntango mpo bato mosusu bálongola bomoto ya kala mpe bálata oyo ya sika. (Kol. 3:9, 10) Kasi soki oumeli te mpo na koyebisa ye mbongwana oyo asengeli kosala, yango ekosalisa ye aumela te mpo abanda kosala mbongwana yango. Koyebisa ye bongo ekomonisa ete otyelaka ye likebi.​—Nz. 141:5; Mas. 27:17.

6. Mpo na nini tosengeli kotunaka mituna oyo ekotinda moyekoli ya Biblia abimisa makanisi na ye?

6 Ezali na ntina ete otunaka makanisi ya moyekoli na yo na lisolo moko oyo bozali kolobela. Yango ekosalisa yo oyeba makambo oyo moyekoli na yo ayebi mpe oyo andimaka. Soki osali bongo mbala na mbala, ekozala mpasi te mpo olobela makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo moyekoli na yo andima. Buku Sepelá na bomoi libela na libela! ezali na mituna mingi mpo na kosalisa moyekoli abimisa makanisi na ye. Na ndakisa, liteya 04 ezali na motuna oyo: “Okanisi nini: Yehova akoyoka ndenge nini soki obengi ye na nkombo na ye?” Mpe liteya 09 ezali na motuna oyo: “Makambo nini mosusu okosepela kobondela mpo na yango?” Na ebandeli, ekoki kozala mpasi mpo moyekoli na yo ayeba ndenge ya koyanola na mituna oyo ekosɛnga ete abimisa makanisi na ye. Okoki kosalisa ye ayeba ndenge ya kokanisa na bavɛrsɛ ya Biblia mpe na bililingi oyo ezali na buku oyo azali koyekola.

7. Ndenge nini tokoki kosalela malamu makambo oyo bato mosusu bakutanaki na yango mpo na kosalisa moyekoli?

7 Ntango moyekoli na yo ayebi makambo oyo asengeli kosala, bɛtɛlá ye masolo ya bandeko oyo basalaki mpe makambo yango; na ntembe te ekolendisa ye mpenza. Na ndakisa, soki azalaka na mokakatano ya koyangana na makita, okoki kolakisa ye video: Yehova asungaki ngai, na eteni “Makanisi mosusu” oyo ezali na liteya 14. Na mateya mingi ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! okokuta masolo ya ndenge wana na eteni “Kɔtá na mozindo” to na eteni “Makanisi mosusu.” * Kebá na likambo oyo: kokokanisa te moyekoli na yo na moto mosusu mpe koloba na ye te ete, “Soki moto wana akokaki kosala bongo, yo mpe okokoka.” Tiká moyekoli ye moko nde aloba bongo. Kasi lobelá makambo ya ntina oyo esalisaki moto oyo balobeli na video yango mpo asalela mateya ya Biblia. Ntango mosusu okoki kolobela vɛrsɛ moko ya ntina to mpe likambo moko ya sikisiki oyo moto yango asalaki. Soki likoki ezali, monisá ndenge oyo Yehova asalisaki moto yango.

8. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli na biso akóma kolinga Yehova?

8 Salisá moyekoli na yo akóma kolinga Yehova. Ndenge nini okoki kosala yango? Luká mabaku mpo na kobenda likebi na ye na bizaleli ya Yehova. Salisá moyekoli na yo amona ete Yehova azali Nzambe ya esengo mpe ete asalisaka baoyo balingaka ye. (1 Tim. 1:11; Ebr. 11:6) Salisá ye amona ete akozwa matomba soki asaleli makambo oyo azali koyekola mpe monisá ye ete matomba oyo akoki kozwa emonisi bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na ye. (Yis. 48:17, 18) Wana bolingo na ye mpo na Yehova ezali kokóma makasi, yango ekotinda ye asala bambongwana minene na bomoi na ye.​—1 Yoa. 5:3.

LAKISÁ MOYEKOLI NA YO EPAI YA BATATOLI YA YEHOVA MOSUSU

9. Na kotalela Marko 10:29, 30, nini ekoki kosalisa moto amipimela makambo mosusu mpo azwa batisimo?

9 Mpo moyekoli akola mpe azwa batisimo, asengeli komipimela makambo mosusu. Ndenge moko na mozwi oyo tolobelaki liboso, bayekoli mosusu ya Biblia basengeli kondima kotika biloko mosusu ya mosuni. Na ndakisa, soki mosala ya mosuni oyo basalaka eyokani te na mitinda ya Biblia, ekozala malamu báluka mosala mosusu. Ekoki kosɛnga mpe ete mingi kati na bango bátika baninga na bango oyo balingaka Yehova te. Lisusu, ekoki kozala ete bandeko ya libota ya bayekoli ya Biblia oyo balingaka Yehova te basundoli bango. Yesu ayebaki ete ekoki kozala mpasi mpo bato mosusu bámipimela makambo ya ndenge wana. Kasi alakaki ete baoyo bazali kolanda ye bakosundolama te. Yehova akopambola bango na ndenge akopesa bango libota na kati ya basaleli na ye. (Tángá Marko 10:29, 30.) Ndenge nini okoki kosalisa moyekoli na yo azwa matomba na likabo yango ya kitoko?

10. Makambo oyo Manuel alobi eteyi yo nini?

10 Salá boninga elongo na moyekoli na yo. Ezali na ntina omonisa moyekoli na yo ete otyelaka ye likebi. Mpo na nini? Tótala makambo ndeko Manuel, oyo afandaka na Mexique, alobi mpo na ntango oyo azalaki naino koyekola Biblia. Alobi boye: “Mbala nyonso liboso ya koyekola, ndeko oyo azalaki koyekola na ngai Biblia azalaki kotuna ngai soki nazali malamu. Azalaki kosalisa ngai namiyoka malamu mpe nayebisa ye makambo nyonso oyo ezalaki na motema na ngai. Nazalaki komona ete azalaki mpenza kotyela ngai likebi.”

11. Matomba nini bayekoli bakoki kozwa soki balekisi ntango elongo na biso?

11 Lekisáká ntango elongo na bayekoli na yo ya Biblia kaka ndenge Yesu azalaki kolekisa ntango elongo na bayekoli na ye. (Yoa. 3:22) Soki esengeli, bengisáká moyekoli na yo ya Biblia oyo azali kokola malamu na elimo mpo bólya mwa eloko elongo to mpe bótala programɛ ya sanza ya TV JW. Moyekoli na yo akoki kosepela mpenza mingimingi soki obengisi ye na ntango oyo baninga to bato ya libota na ye bazali kosala bafɛti ya ekólo to ya mangomba ya lokuta; mpo na bantango ya ndenge wana akoki komiyoka ete azali ye moko. Kazibwe, ndeko mobali moko oyo afandaka na Ouganda alobi boye: “Kaka ndenge ezalaka ntango toyekolaka, kolekisa ntango elongo na ndeko oyo ayekolaki na ngai Biblia esalisaki ngai nayekola makambo mingi na ntina etali Yehova. Namonaki ndenge Yehova atyelaka mpenza basaleli na ye likebi mpe ndenge oyo bazalaka na esengo. Yango nde likambo nazalaki koluka na bomoi na ngai.”

Soki ozali kokende elongo na basakoli ndenge na ndenge mpo na koyekola na moto Biblia, moyekoli yango akokakatana te mpo na koyangana na makita (Talá paragrafe 12) *

12. Mpo na nini tosengeli kokendaka na basakoli ndenge na ndenge ntango tokei koyekola na moto Biblia?

12 Ntango okei koyekola na ye Biblia, kendáká na basakoli ndenge na ndenge. Na bantango mosusu, tokoki komona ete ezali malamu tókendaka koyekola na ye kaka biso moko to tókendaka kaka ná mosakoli moko boye. Atako ekoki kozala pɛtɛɛ kosala bongo, moyekoli ya Biblia akozwa matomba soki na bantango mosusu tozali kokende elongo na basakoli ndenge na ndenge mpo na koyekola na ye Biblia. Dmitrii oyo afandaka na Moldavie alobi boye: “Nazalaki komona ete mosakoli nyonso oyo azalaki koya elongo na ndeko oyo azalaki koyekola na ngai Biblia azalaki na lolenge na ye ya kolimbola makambo. Yango esalisaki ngai namona lolenge mosusu ya kosalela makambo oyo nazalaki koyekola. Lokola nasilaki kokutana na bandeko mingi liboso, yango esalisaki ngai nayoka nsɔni mingi te ntango nakendaki na makita mpo na mbala ya liboso.”

13. Mpo na nini tosengeli kosalisa moyekoli na biso ayanganaka na makita?

13 Salisá moyekoli na yo ayanganaka na makita. Mpo na nini? Mpo Yehova asɛngi basaleli na ye básalaka bongo. Yango ezali mpe na kati ya losambo na biso. (Ebr. 10:24, 25) Lisusu, bandeko na biso ya lisangá bazali bandeko na biso ya elimo. Ntango tozalaka na makita elongo na bango, ezalaka lokola tozali na ndako mpe tozali kolya bilei ya kitoko elongo. Soki osalisi moyekoli na yo ya Biblia ayanganaka na makita, ozali kosalisa ye asala likambo moko ya ntina mingi mpo azwa batisimo. Kasi ekoki kozala mpasi mpo abanda koyangana na makita. Ndenge nini buku Sepelá na bomoi libela na libela! ekoki kosalisa moyekoli na yo alonga ata mokakatano ya ndenge nini oyo akoki kokutana na yango?

14. Ndenge nini tokoki kolendisa moyekoli ya Biblia ayanganaka na makita?

14 Salelá liteya 10 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na kolendisa moyekoli na yo ya Biblia. Liboso buku yango ebima, basɛngaki na basakoli mosusu bámeka koyekola liteya 10 ya buku yango elongo na bayekoli na bango. Basakoli yango balobaki ete esimbaki mpenza mpe esalisaki bayekoli na bango báyangana na makita. Yango elingi koloba te ete osengeli kozela tii bóyekola na moyekoli na yo liteya 10 ya buku yango liboso obengisa ye na makita. Koumela te mpo na kobengisa ye na makita mpe saláká bongo mbala na mbala. Bayekoli ya Biblia bazalaka na mikakatano ndenge moko te. Na yango, tyáká likebi na bamposa na ye mpe talá soki ezali na likambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa ye. Kolɛmba nzoto te soki ezwi mwa ntango liboso abanda koyangana na makita. Zalá na motema molai kasi kobá kaka kobengisa ye.

SALISÁ MOYEKOLI NA YO ALONGOLA KOBANGA

15. Makambo nini ekoki kobangisa moyekoli na yo?

15 Ozali koyeba lisusu ndenge ozalaki kobanga mwa moke mpo na kokóma Motatoli ya Yehova? Mbala mosusu ozalaki kokanisa ete okokoka te kosakola. To mpe mbala mosusu ozalaki kobanga ete baninga to bandeko na yo ya libota bátɛmɛla yo. Soki ezali bongo, osengeli komitya na esika ya moyekoli na yo. Yesu ayebaki ete bato mosusu bakoki kobanga. Kasi alendisaki bayekoli na ye bátika te ete kobanga epekisa bango kosalela Yehova. (Mat. 10:16, 17, 27, 28) Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye bálongola kobanga? Mpe ndenge nini okoki kolanda ndakisa na ye?

16. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia ayebisa bato makambo oyo azali koyekola?

16 Malɛmbɛmalɛmbɛ, lakisá moyekoli na yo ndenge ya koyebisa basusu makambo oyo azali koyekola. Ekoki kozala ete bayekoli ya Yesu babangaki ntango atindaki bango bákende kosakola. Kasi Yesu asalisaki bango na ndenge ayebisaki bango esika mpe nsango oyo basengelaki kosakola. (Mat. 10:5-7) Ndenge nini okoki komekola Yesu? Salisá moyekoli na yo ayeba esika oyo akoki kosakola. Na ndakisa, tuná ye soki ayebi moto moko oyo akoki kozwa matomba soki ayekoli liteya moko boye ya Biblia. Na nsima, salisá ye abongisa ndenge oyo akoki kolobela liteya yango na ndenge ya pɛtɛɛ. Soki likoki ezali, okoki komekameka ndenge ya kosala yango elongo na moyekoli na yo mpe kosalela makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Soki moto alobi na yo” mpe “Soki moto atuni yo,” oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela! Na nsima, lakisá moyekoli na yo ndenge ya kosalela Biblia mpo na kopesa biyano ya pɛtɛɛ mpe na ndenge ya mayele.

17. Ndenge nini tokoki kosalela Matai 10:19, 20, 29-31 ntango tozali kosalisa moyekoli na biso ya Biblia atyelaka Yehova motema?

17 Salisá moyekoli na yo atyelaka Yehova motema. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Yehova akosalisa bango mpo alingaka bango. (Tángá Matai 10:19, 20, 29-31.) Yebisáká moyekoli na yo ete Yehova akosalisa mpe ye. Okoki kosalisa ye atyelaka Yehova motema soki ozali kobondela elongo na ye mpo na mikano oyo azali na yango. Francizek, oyo afandaka na Pologne alobi boye: “Ndeko oyo ayekolaki na ngai Biblia azalaki kolobela mbala na mbala mikano oyo nazalaki na yango na mabondeli na ye. Ntango namonaki ndenge Yehova ayanolaki na mabondeli ya ndeko yango, nabandaki mbala moko kobondela. Nazalaki komona ndenge Yehova azalaki kosalisa ngai ntango nazalaki kosɛnga nzela na mosala mpo nakende makita mpe liyangani ya etúká.”

18. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na mosala na biso ya koyekola na bato Biblia?

18 Yehova atyelaka mpenza bayekoli na biso ya Biblia likebi. Ayebi milende oyo tosalaka mpo na kosalisa bato bápusana penepene na ye, mpe alingaka biso mingi mpo na yango. (Yis. 52:7) Soki ozali te na moto oyo oyekolaka na ye Biblia, okoki kaka kosalisa bayekoli ya Biblia bákola mpe bázwa batisimo soki ozali kokende elongo na basakoli mosusu ntango bakei koyekola na bato Biblia.

LOYEMBO 60 Tolingi bázwa bomoi

^ par. 5 Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo Yesu asalisaki bato bákóma bayekoli na ye, mpe ndenge oyo tokoki komekola ye. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki kosalela buku Sépela na bomoi libela na libela! Buku yango esalemi mpo na kosalisa moyekoli akola tii azwa batisimo.

^ par. 7 Okoki mpe komona makambo oyo bato mosusu bakutaná na yango na bomoi na (1) Buku ya bolukiluki ya Batatoli ya Yehova na motó ya likambo “Biblia,” na nse ya motó ya likambo moke “Esalisaka biso,” mpe na nsima “Biblia ebongolaka bato’ (Masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli).” To mpe na (2) JW Library® na Media” mpe na motó ya likambo moke “Mituna-lisolo mpe masolo ya bomoi.”

^ par. 62 NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko akei elongo na mwasi na ye mpo na koyekola na elenge mobali moko Biblia. Na bantango mosusu, akei na bandeko mibali ndenge na ndenge mpo na koyekola na elenge yango.