Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki: “Na nzela ya mibeko nakufaki na makambo ya mibeko”?​—Gal. 2:19.

Paulo akomaki: “Na nzela ya mibeko nakufaki na makambo ya mibeko mpo nakóma moto ya bomoi na makambo ya Nzambe.”​—Gal. 2:19.

Makambo oyo Paulo akomaki ezalaki na boyokani na likambo ya ntina oyo azalaki koyebisa masangá ya Bagalatia, etúká oyo Baroma bazalaki koyangela. Bakristo mosusu oyo bazalaki kuna bakómaki kolanda bateyi ya lokuta. Bateyi yango bazalaki koteya ete mpo moto azwa lobiko asengelaki kotosa makambo oyo Mibeko ya Moise elobaki, mingimingi likambo ya kokatama ngenga. Kasi Paulo ayebaki ete Nzambe azali lisusu te kosɛnga bakristo bákatama ngenga. Apesaki bilembeteli ya solosolo mpo na komonisa ete mateya yango ezalaki mpenza ya lokuta mpe asalisaki bandeko bákóma na kondima makasi na mbeka ya lisiko oyo Yesu Kristo apesaki.​—Gal. 2:4; 5:2.

Biblia elobi polele ete soki moto akufi ayebaka lisusu eloko te oyo ezali kosalema zingazinga na ye. (Mos. 9:5) Ntango Paulo alobaki ete “na nzela ya mibeko nakufaki,” alingaki komonisa ete mibeko ya Moize ezalaki lisusu na nguya te na bomoi na ye. Kasi Paulo ayebaki ete lokola azalaki komonisa kondima na mbeka ya lisiko, akómaki “moto ya bomoi na makambo ya Nzambe.”

Mibeko esalaki ete makambo ya bomoi ya Paulo ebongwana. Na ndenge nini? Autaki komonisa ete “moto atángamaka moyengebene, mpo na misala ya mibeko te, kasi kaka mpo na kondima oyo andimeli Kristo Yesu.” (Gal. 2:16) Likambo ya esengo, Mibeko ekokisaki likambo moko ya ntina mingi. Paulo ayebisaki Bagalatia boye: “Yango ebakisamaki mpo na komonisa polele makambo ya kobuka mibeko, tii ntango momboto oyo bapesaki ye elaka akoya.” (Gal. 3:19) Mibeko emonisaki polele ete bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu bakoki te kotosa Mibeko na ndenge ya kokoka mpe ete bazalaki na mposa ya mbeka ya kokoka. Na yango, Mibeko esalisaki bato báyeba ete Yesu nde azalaki “momboto” yango. Soki moto andimeli Yesu Kristo, Nzambe akokaki kotánga ye moyengebene. (Gal. 3:24) Paulo ayebaki likambo yango mpo Mibeko nde esalisaki ye andimela Yesu. Na yango, Paulo ‘akufaki na makambo ya mibeko’ mpe ‘akómaki na bomoi na makambo ya Nzambe.’ Mibeko ezalaki lisusu kotambwisa bomoi na ye te kasi nde Nzambe.

Paulo amonisaki mpe makanisi ya ndenge wana na mokanda oyo akomelaki Baroma. Akomaki boye: “Bandeko na ngai, na kotalela Mibeko, bino mpe bokufaki na nzela ya mbeka ya nzoto ya Kristo . . . sikoyo tolongwe na Mibeko, mpo tokufi na kotalela eloko oyo ezalaki kokanga biso makasi.” (Rom. 7:4, 6) Vɛrsɛ oyo ata mpe Bagalatia 2:19, emonisi ete Paulo azalaki te kolobela kokufa lokola mosumuki oyo bakateli ye etumbu na nzela ya Mibeko. Kasi azalaki nde kolobela likambo etali kosikolama. Mibeko ezalaki lisusu te na nguya likoló na ye mpe likoló ya bato mosusu. Komonisa kondima na lisiko oyo Yesu apesaki esikolaki bango.