Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 26

Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

“Nzambe nde . . . azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.”​—FLP. 2:13.

LOYEMBO 64 Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma

NA MOKUSE *

1. Yehova asalá nini mpo na yo?

NDENGE NINI okómaki Motatoli ya Yehova? Mbala mosusu oyokaki “nsango malamu” epai ya baboti na yo, epai ya moninga ya mosala to ya kelasi, to mpe bayaki koteya yo na mosala ya kosakola ya ndako na ndako. (Mrk. 13:10) Na nsima, ndeko moko alekisaki ntango mingi mpe asalaki milende mpo na koyekola na yo Biblia. Boyekoli yango esalisaki yo okóma kolinga Yehova mpe oyeba ete ye mpe alingaka yo. Yehova abendaki yo na solo mpe sikoyo lokola ozali moyekoli ya Yesu Kristo, ozali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. (Yoa. 6:44) Na ntembe te, ozali na botɔndi ndenge Yehova asalelaki ndeko moko mpo na koteya yo solo mpe ndenge andimá ete okóma mosaleli na ye.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Lokola toyebi solo, tozali na mokumba ya kosalisa basusu báya kotambola elongo na biso na nzela ya bomoi. Mbala mosusu tozalaka na mokakatano te ya kosakola ndako na ndako, kasi ekoki kozala mpasi tósɛnga moto mpo tóyekola na ye Biblia. Yo mpe omiyokaka bongo? Soki ezali bongo, makanisi oyo ezali na lisolo oyo ekoki kosalisa yo. Tokolobela makambo oyo etindaka biso tósalisa basusu bákóma bayekoli. Tokolobela mpe ndenge ya kolonga mikakatano oyo ekoki kopekisa biso koyekola na bato Biblia. Tólobela naino ntina oyo tosengeli kozala kaka te basakoli, kasi mpe bateyi ya nsango malamu.

YESU APESÁ BISO ETINDA YA KOSAKOLA MPE YA KOTEYA

3. Mpo na nini tosakolaka?

3 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, apesaki bayekoli na ye mitindo mibale. Ya liboso, ayebisaki bango básakola nsango malamu ya Bokonzi, mpe alakisaki bango ndenge ya kosala yango. (Mat. 10:7; Luka 8:1) Na ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye oyo basengelaki kosala soki bato bandimi to baboyi koyoka nsango ya Bokonzi. (Luka 9:2-5) Alobaki mpe ete bayekoli na ye bakosakwela bato mingi mpe bakopesa “litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14; Mis. 1:8) Yesu ayebisaki bayekoli na ye básakola Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo Bokonzi yango ekosala, ata soki bato baboyi to bandimi.

4. Na kotalela Matai 28:18-20, longola kosakwela bato nsango ya Bokonzi, tosengeli kosala lisusu nini?

4 Wapi etinda ya mibale oyo Yesu apesaki bayekoli na ye? Ayebisaki bango báteya bato nyonso oyo basengelaki kokóma bayekoli na ye bátosa makambo nyonso oyo apesaki bango mitindo. Kasi mosala yango ya kosakola mpe ya koteya esengelaki kosuka kaka na siɛklɛ ya liboso ndenge bato mosusu balobaka? Te. Yesu alobaki ete mosala yango ya ntina mingi esengelaki kokoba tii na mikolo na biso, “tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Tángá Matai 28:18-20.) Ekoki kozala ete Yesu apesaki etinda yango ntango abimelaki bayekoli na ye koleka 500. (1 Ko. 15:6) Mpe na emoniseli oyo alakisaki Yoane, Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye nyonso basengeli kosalisa bato mosusu báyekola makambo etali Yehova.​—Em. 22:17.

5. Na kotalela 1 Bakorinti 3:6-9, ndakisa nini ntoma Paulo asaleli mpo na komonisa bokokani kati na mosala ya kosakola mpe ya koteya?

5 Ntoma Paulo akokanisaki mosala ya kokómisa bato bayekoli na mosala ya bilanga. Amonisaki ete tosengeli kosuka kaka te na kolona mboto. Ayebisaki bakristo ya lisangá ya Korinti ete: “Ngai nalonaki, Apolosi amwangisaki mai . . . Bino bozali elanga ya Nzambe oyo ezali kolonama.” (Tángá 1 Bakorinti 3:6-9) Lokola tozali basali na “elanga ya Nzambe,” tosengeli kosuka kaka te na kolona mboto, kasi tosengeli mpe komwangisaka mai mpe kolandelaka mbala na mbala bokoli ya milona na biso. (Yoa. 4:35) Kasi toyebi ete Nzambe nde akolisaka milona yango.

6. Mosala na biso ya koteya esɛngaka makambo nini?

6 Tozali koluka baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Mpo na kosalisa bato yango bakóma bayekoli, tosengeli kosalisa bango (1) bákanga ntina, (2) bándima, mpe (3) básalela makambo oyo bazali koyekola na Biblia. (Yoa. 17:3; Kol. 2:6, 7; 1 Tes. 2:13) Bandeko nyonso ya lisangá bakoki kosalisa bayekoli ya Biblia soki bazali komonisela bango bolingo mpe soki bazali kosalisa bango bámiyoka malamu ntango bayei na makita. (Yoa. 13:35) Ndeko oyo azali koyekola na moto Biblia akoki kolekisa ntango mingi mpe kosala molende mpo na kosalisa moto yango akweisa biloko oyo “epikamá makasi,” elingi koloba mateya mpe mimeseno ya mabe. (2 Ko. 10:4, 5) Ekoki kosɛnga basanza mingi mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia asala bambongwana na bomoi na ye mpe akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Kasi milende yango ekendaka na mai te.

BOLINGO ETINDAKA BISO TÓKÓMISA BATO BAYEKOLI

7. Nini etindaka biso tósakola mpe tókómisa bato bayekoli?

7 Mpo na nini tosakolaka mpe tokómisaka bato bayekoli? Libosoliboso, ezali mpo tolingaka Yehova. Ntango osalaka nyonso oyo okoki mpo na kotosa etinda ya Yesu ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, omonisaka ete olingaka Nzambe. (1 Yoa. 5:3) Bolingo na yo mpo na Yehova etindaka yo osakola ndako na ndako. Kanisá naino: Ezalaki pɛtɛɛ mpo otosa etinda yango? Mbala mosusu ezalaki pɛtɛɛ te. Mokolo ya liboso oyo osakolaki ndako na ndako, ozalaki kobanga? Na ntembe te ozalaki kobanga! Kasi oyebaki ete yango nde mosala oyo Yesu asɛngi yo osala, mpe otosaki etinda na ye. Mpe wana ntango ezalaki koleka, ezalaki lisusu mpasi te mpo osakolaka. Sikoyo tokoloba nini mpo na likambo etali koyekola Biblia na moto? Yango ebangisaka yo? Ntango mosusu. Kasi, soki obondeli Yehova asalisa yo olongola kobanga, mpe obanda koyekola Biblia na moto moko, Yehova akoki kosalisa yo okómisa bato bayekoli.

8. Na kotalela Marko 6:34, makambo nini mosusu esengeli kotinda biso tóteya bato?

8 Ya mibale, bolingo mpo na bazalani na biso etindaka biso tóteya bango solo. Mokolo moko, Yesu ná bayekoli na ye balɛmbaki nsima ya kosakola mingi. Bazalaki na mposa ya kokende na esika moko mpo bápema. Kasi, ebele ya bato bamonaki bango. Yesu ayokelaki bango mawa mpe abandaki koteya bango “makambo mingi.” (Tángá Marko 6:34.) Yesu ateyaki bango makambo mingi atako alɛmbaki makasi. Mpo na nini? Mpo amityaki na esika na bango. Amonaki ndenge bazalaki konyokwama mpe bazangaki elikya, yango wana azalaki na mposa ya kosalisa bango. Lelo oyo, bato mingi bazali mpe bongo. Kotika te ndenge oyo bazali komonana na miso ekosa yo. Bazali lokola bampate oyo esundolami mpe ezangi mobateli mpo na kotambwisa yango. Ntoma Paulo alobaki ete bato ya lolenge wana bazali na Nzambe te mpe bazangi elikya. (Ef. 2:12) Bazali na ‘nzela oyo ememaka na libebi’! (Mat. 7:13) Ntango tomonaka ndenge bato ya teritware na biso bazalaka na boyokani ya malamu te ná Nzambe, bolingo mpe motema mawa etindaka biso tósalisa bango. Mpe lolenge eleki malamu ya kosalisa bango, ezali ya kosɛnga tóyekola na bango Biblia.

9. Na kotalela Bafilipi 2:13, ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo?

9 Mbala mosusu okakatanaka kosɛnga moto oyekola na ye Biblia mpo oyebi ete ezwaka ntango mingi mpo na kobongisa boyekoli ya Biblia mpe koyekola na moto. Soki ezali bongo, yebisá Yehova ndenge ozali komiyoka. Sɛngá ye asalisa yo okóma na mposa ya kozwa moto ya koyekola na ye Biblia. (Tángá Bafilipi 2:13.) Ntoma Yoane amonisi biso ete Yehova ayanolaka na mabondeli oyo eyokani na mokano na ye. (1 Yoa. 5:14, 15) Na yango, yebá ete Yehova akosalisa yo okolisa mposa ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli.

NDENGE YA KOLONGA MIKAKATANO MOSUSU

10-11. Nini ekoki kopekisa biso koyekola na bato Biblia?

10 Tozwaka na lisɛki te mokumba na biso ya kokómisa bato bayekoli mpe ya koteya bango atako tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kopekisa biso kosala mingi ndenge tolingaka. Tiká tolobela mwa mikakatano yango mpe tómona ndenge oyo tokoki kolonga yango.

11 Ekoki kozala ete makambo ya bomoi na biso ezali kopekisa biso kosala mingi. Na ndakisa, basakoli mosusu bazali mibange to mpe babɛlaka. Yo mpe ozali na mokakatano ya ndenge wana? Soki ezali bongo, tyá likebi na liteya oyo tozwi na ntango ya maladi mabe ya Coronavirus: Toyekoli ete tokoki kotambwisa boyekoli ya Biblia na nzela ya baaparɛyi! Na yango, okoki kobanda mpe koyekola na bato Biblia wana ofandi na ndako na yo moko. Ezali mpe na litomba mosusu. Bato mosusu bakoki kosepela koyekola Biblia, kasi mbala mingi bazalaka na bandako te ntango bandeko na biso balekaka mpo na kosakola. Kasi bakoki kozala na ndako na ntɔngɔntɔngɔ to mpe na mpokwa. Okondima kosomba ntango mpo na kosakwela bango na bangonga wana? Yesu ateyaki Nikodeme na butu mpo yango nde ezalaki ntango malamu mpo na Nikodeme.​—Yoa. 3:1, 2.

12. Makambo nini endimisi biso ete tokoki kokóma bateyi ya makoki?

12 Tokoki kokanisa ete tokokoka te koyekola na bato Biblia. Mbala mosusu tokanisaka ete tosengeli kozala na boyebi mpe na makoki mingi liboso tóbanda koyekola na moto Biblia. Soki yo mpe okanisaka bongo, talá makambo misato oyo ekoki kosalisa yo. Ya liboso, Yehova amonaka ete ozali na makoki ya koteya basusu. (2 Ko. 3:5) Ya mibale, Yesu oyo azali na “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” apesi yo ndingisa ya koteya. (Mat. 28:18) Ya misato, bandeko mosusu bakoki kosalisa yo. Yesu azalaki koyebisa bato makambo oyo Tata na ye ateyaki ye, yo mpe okoki kosala bongo. (Yoa. 8:28; 12:49) Longola yango, okoki kosɛnga mokɛngɛli ya etuluku na bino ya mosala ya kosakola, mobongisi-nzela moko ya makoki, to mpe mosakoli moko oyo ayebi koteya asalisa yo obanda koyekola na bato Biblia. Kobima na mosala ya kosakola elongo na bandeko yango mpe kotya likebi ndenge bazali koyekola na bato Biblia ezali moko ya makambo oyo ekosalisa yo okolisa makoki na yo.

13. Mpo na nini tosengeli komesana na makambo ya sika?

13 Tokoki komona ete ezali mpasi tómesana na mayele mpe bisaleli ya sika. Lolenge oyo toyekolaka na bato Biblia ebongwani. Buku Sepelá na bomoi libela na libela!, oyo ezali esaleli na biso ya libosoliboso mpo na koyekola na bato Biblia, ebongoli lolenge na biso ya kobongisa boyekoli mpe ya koyekola na bato Biblia. Totángaka baparagrafe mingi te mpe boyekoli ezali kosalema lokola lisolo elongo na moyekoli ya Biblia. Ntango tozali koteya, tozali kosalela mingi bavideo mpe baprogramɛ mosusu, na ndakisa JW Library®. Soki okokaka te kosalela bisaleli yango, sololá na ndeko moko oyo akoki kosalisa yo. Biso bato, tosepelaka kosala makambo ndenge tomesaná. Ezalaka pɛtɛɛ te tómesana na lolenge ya sika ya kosala makambo. Kasi na lisalisi ya Yehova mpe ya bandeko mosusu, ekozala mpasi te mpo omesana mpe osepela koyekola na bato Biblia. Kaka ndenge mobongisi-nzela moko alobaki: “Lolenge oyo ya koyekola na bato ezali kosepelisa moteyi ná moyekoli.”

14. Ntango tozali kosakola na teritware oyo ezalaka mpasi kobanda boyekoli, makambo nini tosengeli kobosana te, mpe ndenge nini 1 Bakorinti 3:6, 7 ezali kolendisa biso?

14 Ekoki kozala ete tófandaka na teritware oyo ezalaka mpasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Bato bakoki kosepela na nsango na biso te ata mpe kotɛmɛla yango. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu na teritware ya ndenge wana? Tóbosana te ete na mokili oyo mabe, makambo ya bomoi ya bato ekoki kobongwana na mbalakaka, mpe baoyo na ebandeli bazalaki kosepela te, bakoki kokóma na mposa ya koyekola makambo ya Nzambe. (Mat. 5:3) Bato mosusu, oyo kala bazalaki koboya kozwa mikanda na biso, bakómaki kondima koyekola Biblia. Toyebi ete Yehova nde azali Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma. (Mat. 9:38) Mposa na ye ezali ete tókoba kolona mpe komwangisa mai, kasi ye nde moto oyo akolisaka. (1 Ko. 3:6, 7) Mpe ezali likambo ya kolendisa koyeba ete ata soki sikoyo tozali na moto ya koyekola na ye Biblia te, Yehova apesaka biso mbano mpo na milende na biso, kasi te mpo na motángo ya bato oyo toyekolaka na bango Biblia! *

YOKÁ ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

Talá oyo mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya ekoki kosala na bomoi ya moto (Talá paragrafe 15-17) *

15. Yehova ayokaka ndenge nini soki moto moko andimi koyekola Biblia mpe azali kosalela makambo oyo azali koyekola?

15 Yehova asepelaka soki moto andimi mateya ya solo ya Biblia mpe ayebisi yango bato mosusu. (Mas. 23:15, 16) Kanisá esengo oyo Yehova ayokaka ntango amonaka makambo oyo ezali kosalema lelo oyo! Na ndakisa, atako maladi mabe oyo etungisaki bato na boumeli ya mobu ya mosala 2020, bandeko bayekolaki Biblia na bato 7 705 765, mpe yango esalaki ete bato 241 994 bámipesa na Yehova mpe bázwa batisimo. Na ngala na bango, bayekoli yango ya sika bakoyekola Biblia na bato ebele mpe bakokómisa bango bayekoli. (Luka 6:40) Na ntembe te, tosepelisaka motema ya Yehova ntango topesaka mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli.

16. Mokano nini ya malamu tokoki komityela?

16 Mosala ya kokómisa bato bayekoli ezalaka pɛtɛɛ te, kasi na lisalisi ya Yehova, tokoki koteya bato ya sika bálinga Tata na biso ya likoló. Mpo na nini te komityela mokano ya kobanda koyekola Biblia ata na moto moko? Ntango tosaleli mabaku nyonso mpo na kosɛnga bato oyo tokutanaka na bango soki bakosepela tóyekola na bango Biblia, tokoki kokamwa komona matomba oyo yango ekobimisa. Tóyeba ete Yehova akopambola milende na biso.

17. Matomba nini tokozwa soki tozali koyekola na bato Biblia?

17 Ezali mpenza lokumu monene kosakola mpe koteya basusu mateya ya Biblia! Mosala yango epesaka biso mpenza esengo. Ntoma Paulo, oyo asalisaki bato mingi na Tesaloniki bákóma bayekoli, alobeli esengo oyo ayokaki na maloba oyo: “Elikya na biso to esengo na biso to motole na biso ya nsai ezali nini​—ɛɛ, ezali bino te?​—liboso ya Nkolo na biso Yesu na ntango ya kozala na ye? Ya solo, bino nde nkembo na biso mpe esengo na biso.” (1 Tes. 2:19, 20; Mis. 17:1-4) Bandeko mingi lelo oyo bamiyokaka mpe bongo. Ndeko mwasi moko na nkombo Stéphanie ná mobali na ye basalisi bato ebele bázwa batisimo. Stéphanie alobi boye: “Ezali na eloko moko te oyo epesaka esengo koleka kosalisa bato bámipesa na Yehova.”

LOYEMBO 57 Tósakwela bato ya lolenge nyonso

^ par. 5 Yehova apesá biso kaka te mokumba ya kosakola kasi mpe ya koteya basusu bátosa makambo nyonso oyo Yesu apesaki biso mitindo. Nini etindaka biso tóteya basusu? Mikakatano nini tokutanaka na yango na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli? Mpe ndenge nini tokoki kolonga mikakatano yango? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango.

^ par. 14 Mpo na koyeba ndenge oyo ndeko mokomoko na lisangá akoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli, talá lisolo “Ndenge oyo ndeko nyonso akoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákola mpe bázwa batisimo,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2021.

^ par. 53 NDIMBOLA YA ELILINGI: Talá ndenge boyekoli ya Biblia ekoki kobongola bomoi ya moto: Na ebandeli, ezali komonana lokola bomoi ya mobali oyo ezali na ntina te, mpe ayebi Yehova te. Na nsima, Batatoli ya Yehova bakutani na ye na mosala ya kosakola mpe andimi koyekola Biblia. Makambo oyo bateyi ye, esalisi ye amipesa na Yehova mpe azwa batisimo. Na nsima, ye mpe akómi koyekola na bato Biblia. Nsukansuka, bango nyonso bakɔti na Paradiso.