Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 36

Zwáká na motuya makasi oyo bilenge bazalaka na yango

Zwáká na motuya makasi oyo bilenge bazalaka na yango

“Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango.”​—MAS. 20:29.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

NA MOKUSE *

1. Mokano nini tokoki komityela ntango tozali kokóma mibange?

WANA tozali kokóma mibange, tokoki kobanga ete tokozala lisusu na likoki ya kosala mingi te na mosala ya Yehova ndenge tozalaki kosala liboso. Ata soki sikoyo tozali lisusu na makasi mingi te, tokoki kosalela bwanya mpe makambo oyo toyekolá mpe oyo tokutaná na yango na bomoi mpo na kosalisa bilenge básalela makoki na bango malamu mpe bázwa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova. Nkulutu moko oyo akómi mobange alobaki boye: “Ntango nakómaki koyoka ete makasi na ngai ya nzoto ebandi kosila, nasepelaki ndenge ezalaki na bilenge ya makoki na lisangá na biso oyo bakobaki na mosala ya Yehova.”

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki matomba oyo bilenge bazwaka soki basali boninga na bandeko oyo bakómi mibange. Na lisolo oyo, tokomona ndenge lisangá mobimba ezwaka matomba soki bandeko oyo bakómi mibange bazali komonisa bizaleli lokola komikitisa, bopɔlɔ, botɔndi, mpe ezaleli ya kokaba ntango bazali kosala elongo na bilenge.

ZALÁ NA KOMIKITISA

3. Na kotalela Bafilipi 2:3, 4, komikitisa ezali nini, mpe ndenge nini ekoki kosalisa mokristo?

3 Bandeko oyo bakómi mibange basengeli kozala na komikitisa soki balingi kosalisa bilenge. Moto ya komikitisa amonaka ete basusu baleki ye. (Tángá Bafilipi 2:3, 4.) Mibange oyo bazalaka na komikitisa bayebaka ete ekoki kozala na balolenge mingi ya kokokisa mokumba moko malamu mpe na boyokani na makomami. Na yango, bazelaka te ete moto nyonso asala likambo kaka ndenge bazalaki kosala yango na kala. (Mos. 7:10) Atako bazalaka na makambo mingi ya koyebisa bilenge, babosanaka te ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana” mpe ekoki kosɛnga ete báyekola lolenge ya sika ya kosala makambo mosusu.​—1 Ko. 7:31.

Bandeko oyo bakómi mibange basepelaka koyebisa basusu makambo oyo bakutaná na yango na bomoi (Talá paragrafe 4-5) *

4. Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga bamonisaka ezaleli lokola oyo Balevi bazalaki na yango?

4 Mibange oyo bazali na komikitisa bayebaka ete wana mbula na bango ezali kopusana, bakoki te kosala mingi ndenge bazalaki kosala liboso. Tótalela ndakisa ya bakɛngɛli na biso ya zongazonga. Soki bakokisi mbula 70, basɛngaka bango bátika mokumba yango mpe básala makambo mosusu na ebongiseli ya Yehova. Yango ekoki kozala mokakatano mpo balingaka mpe bazwaka na motuya mingi mikumba na bango ya kosalisa bandeko. Atako bongo, bayebaka ete eleki malamu bilenge bákokisa mikumba yango. Na yango, bamonisaka ezaleli oyo Balevi bazalaki na yango na Yisraele ya kala. Mobeko esɛngaki bango ete soki bakokisi mbula 50, bátika mikumba oyo bazalaki kokokisa na tabernakle. Balevi yango bazalaki kosepela na mokumba nyonso oyo bazalaki kopesa bango, mpe bazalaki kokokisa yango na molende nyonso. Lisusu bazalaki kosala oyo bakoki mpo na kosalisa bilenge. (Mit. 8:25, 26) Lelo oyo, soki bakɛngɛli ya zongazonga bakokisi mbula 70, batikaka kokende kotala masangá. Atako bongo, basalisaka mpe balendisaka mpenza bandeko ya masangá na bango.

5. Ndakisa ya ndeko Dan ná Katie eteyi yo nini?

5 Tótalela ndakisa ya ndeko Dan, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na boumeli ya mbula 23. Ntango akokisaki mbula 70, ye ná mwasi na ye Katie bakómaki babongisi-nzela monene. Basalaka nini mpo básepela na mokumba na bango ya sika? Dan alobi ete sikoyo azali na makambo mingi ya kosala koleka ndenge ezalaki liboso! Akokisaka mikumba na ye na lisangá, asalisaka bandeko bákokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala, mpe apesaka bandeko mosusu formasyo mpo báyeba kosakola na bingumba mpe na babolɔkɔ. Bandeko oyo bokómi mibange, ezala bozali na mosala ya ntango nyonso to te, bokoki kosala makambo mingi mpo na kosalisa basusu. Na ndenge nini? Bómesana na lolenge ya bomoi oyo bokómi na yango, bómityela mikano ya sika, mpe bótya makanisi na bino kaka na makambo oyo bokokoka kosala.

ZALÁ NA BOPƆLƆ

6. Mpo na nini ezali na ntina ete tózala na bopɔlɔ? Pesá ndakisa.

6 Moto ya bopɔlɔ ayebaka esika makoki na ye esuki. (Mas. 11:2) Alukaka te kosala makambo oyo akokoka te. Yango esalaka ete abatela esengo na ye mpe akoba kosala mosala makasi. Tokoki kokokanisa moto ya bopɔlɔ na sofɛlɛ oyo azali kokumba motuka mpe komata ngomba. Sofɛlɛ yango asengeli kokitisa vitɛsi mpo akoba komata ngomba. Ata soki akokende malembemalembe, kasi akokoba kokende liboso. Ndenge moko mpe, moto ya bopɔlɔ ayebaka ntango nini asengeli “kokitisa vitɛsi na ye,” elingi koloba, kosala mbongwana mpo akoba kosalela Yehova mpe kosalisa basusu.​—Flp. 4:5.

7. Ndenge nini Barzilai amonisaki ezaleli ya bopɔlɔ?

7 Tótalela ndakisa ya Barzilai oyo azalaki na mbula 80. Ntango Mokonzi Davidi asɛngaki ye aya kofanda na ndako ya mokonzi, Barzilai aboyaki. Lokola Barzilai ayebaki ete akómaki mobange mpe akokoka kosala makambo mosusu te, asɛngaki Davidi ete elenge mobali moko na nkombo Kimeame akende na esika na ye. (2 Sa. 19:35-37) Ndenge moko na Barzilai, bandeko oyo bakómi mibange basepelaka kotikela bilenge libaku ya kokokisa mikumba mosusu.

Mokonzi Davidi andimaki ekateli oyo Nzambe azwaki ete mwana na ye atonga tempelo (Talá paragrafe 8)

8. Ndenge nini Mokonzi Davidi amonisaki ezaleli ya bopɔlɔ ntango alingaki kotonga tempelo?

8 Mokonzi Davidi mpe atiká ndakisa malamu na likambo etali komonisa bopɔlɔ. Azalaki mpenza na mposa ya kotongela Yehova ndako. Kasi ntango Yehova ayebisaki ye ete akopesa mokumba yango na elenge Salomo, Davidi andimaki ekateli oyo Yehova azwaki mpe na motema moko, apesaki mabɔkɔ na mosala yango. (1 Nt. 17:4; 22:5) Davidi amonaki te ete ye nde abongaki na mokumba yango mpo Salomo azalaki ‘elenge mpe azalaki naino makasi te.’ (1 Nt. 29:1) Davidi ayebaki ete mpo tempelo yango etongama, ezalaki kotalela te mbula mpe mayele ya bato oyo bazalaki kokamba mosala yango, kasi nde lipamboli ya Yehova. Ndenge moko na Davidi, bandeko oyo bakómi mibange bakobaka kozala na molende na mosala ya Yehova ata ntango mokumba na bango ebongwani. Bayebaka ete Yehova akopambola bilenge oyo bazali kokokisa mikumba oyo bazalaki na yango liboso.

9. Ndenge nini ndeko moko ya Komite ya filiale amonisaki ezaleli ya bopɔlɔ?

9 Ndeko mobali moko na nkombo Shigeo azali ndakisa malamu na likambo etali komonisa bopɔlɔ na mikolo na biso. Na 1976, ntango akómaki na mbula 30, aponamaki mpo asala na Komite ya filiale. Na 2004, akómaki mokambi-misala ya Komite ya filiale. Na nsima, amonaki ete azalaki lisusu na makasi mingi te mpe akokoka lisusu te kokokisa mokumba yango. Abondelaki mpo na likambo yango mpe amonaki ete ezali malamu ndeko mobali oyo azali naino elenge azwa mokumba yango. Atako Shigeo azali lisusu na mokumba yango te, akobaka kosala elongo na bandeko mosusu ya Komite ya filiale. Ndenge ndakisa ya Barzilai, ya Mokonzi Davidi, mpe ya ndeko Shigeo emonisi yango, moto oyo azali na komikitisa mpe na bopɔlɔ atyaka makanisi na ye nyonso kaka te na makambo oyo bilenge bayebi te, kasi nde na makasi oyo bazali na yango. Atalelaka bango te lokola bato oyo bazali kosala mpo báleka ye, kasi nde lokola baninga ya mosala.​—Mas. 20:29.

ZALÁ NA BOTƆNDI

10. Ndenge nini bandeko oyo bakómi mibange batalelaka bilenge na lisangá?

10 Bandeko oyo bakómi mibange batalelaka bilenge lokola makabo oyo euti epai ya Yehova mpe bazalaka na botɔndi mpo na oyo bilenge basalaka. Wana makasi na bango ya nzoto ezali kosila, bandeko oyo bakómi mibange bazalaka na botɔndi ndenge baoyo bazali naino na makasi ya bolenge bandimaka kosalisa lisangá.

11. Na kotalela Ruta 4:13-16, mapamboli nini mibange bakoki kozwa soki bandimi lisalisi ya bilenge?

11 Na Biblia, Naomi azali ndakisa malamu ya mobange oyo andimaki lisalisi ya elenge. Ntango mobali ya Ruta akufaki, Naomi asɛngaki Ruta azonga epai na bango. Kasi ntango Ruta atingamaki mpo azonga ná Naomi na Beteleme, Naomi andimaki lisalisi na ye. (Ruta 1:7, 8, 18) Yango ememelaki bango nyonso mibale mapamboli! (Tángá Ruta 4:13-16.) Mibange oyo bazalaka na komikitisa, balandaka ndakisa ya Naomi.

12. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki botɔndi na ye?

12 Ntoma Paulo azalaki na botɔndi mpo na lisalisi oyo azwaki. Na ndakisa, apesaki bandeko oyo bazalaki na lisangá ya Filipi matɔndi mpo na makabo oyo batindelaki ye. (Flp. 4:16) Amonisaki mpe botɔndi mpo na lisalisi oyo Timote apesaki ye. (Flp. 2:19-22) Lisusu, Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpo na baoyo bayaki kolendisa ye ntango bazalaki komema ye na bolɔkɔ na Roma. (Mis. 28:15) Paulo azalaki mobali ya mpiko oyo asalaki mibembo ya milai mpo na kosakola mpe kolendisa masangá. Kasi azalaki na komikitisa mpe andimaki lisalisi oyo bandeko bapesaki ye.

13. Ndenge nini mibange bakoki komonisa botɔndi epai ya bilenge?

13 Bandeko oyo bokómi mibange, bokoki komonisa botɔndi na bino epai ya bandeko ya lisangá na ndenge mingi. Soki balingi komema bino na motuka na bango, kokende kosombela bino biloko, to kosalisa bino na makambo mosusu, bóndimaka lisalisi na bango. Bótalela lisalisi na bango lokola bolingo oyo Yehova azali komonisela bino. Bokokamwa ndenge oyo bokoki kokóma baninga ya motema ya bandeko oyo bazali kosalisa bino. Bósalisaka baninga na bino oyo bazali naino bilenge bákóma na boyokani malamu ná Yehova. Bóyebisaka bango ete bosepelaka mingi ntango bomonaka bango bazali kosalisa lisangá na makambo mingi. Bóndimaka kolekisa ntango elongo na bango mpe kobɛtelaka bango masolo ya bomoi na bino. Soki bosali bongo, ‘bokozala na botɔndi’ ndenge Yehova abendá bilenge na kati ya lisangá na ye.​—Kol. 3:15; Yoa. 6:44; 1 Tes. 5:18.

MONISÁ EZALELI YA BOKABI

14. Ndenge nini Mokonzi Davidi amonisaki ezaleli ya bokabi?

14 Ndakisa ya Davidi eteyi biso ezaleli mosusu ya ntina mingi oyo mibange basengeli komonisa: ezaleli ya bokabi. Apesaki mbongo mingi mpe biloko na ye ya motuya mpo na kotonga tempelo. (1 Nt. 22:11-16; 29:3, 4) Asalaki bongo atako ayebaki ete lokumu ya mosala yango ekopesama epai ya mwana na ye Salomo. Ata soki tozali lisusu na makasi te ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga bisika na biso ya losambo, tokoki kokoba kopesa mabɔkɔ na misala yango soki tozali kopesa makabo ya mbongo na kotalela makoki na biso. Mpe tokoki kosalisa bilenge bázwa matomba na makambo oyo tokutaná na yango na bomoi.

15. Makabo nini ya motuya ntoma Paulo apesaki Timote?

15 Tótalela ndakisa oyo ntoma Paulo atiká na likambo etali komonisa ezaleli ya bokabi. Asɛngaki Timote akende elongo na ye na mibembo na ye ya mosala ya misionɛrɛ. Paulo alakisaki ye mayele na ye ya koteya mpe ya kosakola. (Mis. 16:1-3) Formasyo oyo Paulo apesaki Timote esalisaki ye akóma mosakoli mpe moteyi malamu. (1 Ko. 4:17) Na ngala na ye mpe, Timote asalelaki mayele oyo azwaki epai ntoma Paulo mpo na kopesa basusu formasyo.

16. Nini etindaki ndeko Shigeo apesa bandeko mosusu formasyo?

16 Bandeko oyo bakómi mibange bakanisaka te ete bakozala lisusu na ntina te soki bapesi bilenge formasyo mpo bákokisa mikumba oyo bazalaki na yango na kati ya lisangá. Na ndakisa, na boumeli ya bambula, ndeko Shigeo oyo tolobelaki liboso, apesaki bandeko mosusu ya Komite ya filiale oyo bazalaki bilenge formasyo na makambo mingi. Asalaki bongo mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso na ekólo oyo azalaki kosala. Yango esalaki ete na ntango oyo azalaki lisusu na likoki te ya kozala mokambi-misala ya Komite ya filiale, ndeko mobali mosusu oyo azwaki formasyo malamu azwa esika na ye. Shigeo asali na Komite ya filiale na boumeli ya mbula koleka 45 mpe akobaka kosalela makambo oyo ayekolá mpo na kosalisa bandeko ya Komite ya filiale oyo bazali bilenge. Bandeko ya ndenge wana bazali mpenza lipamboli mpo na basaleli ya Nzambe!

17. Ndenge Luka 6:38 emonisi yango, makambo nini mibange bakoki kopesa basusu?

17 Bino bandeko oyo bokómi mibange, bozali komonisa ete kosalela Yehova na kondima mpe na bosembo ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Na ndakisa na bino, bomonisaka ete koyekola mitinda ya Biblia mpe kosalela yango na bomoi na biso epesaka mpenza matomba. Boyebi ndenge makambo ezalaki kosalema na kala, kasi bomonaka mpe ete bosengeli komesana na makambo ya sika. Bino mibange oyo bozwi batisimo kala mingi te, bokoki mpe kosalisa bandeko mosusu na makambo mingi. Bokoki koyebisa bango ndenge koyeba Yehova na bobange epesaka bino esengo. Bilenge bakosepela koyoka makambo oyo bokutaná na yango na bomoi mpe mateya oyo bozwá. Soki bozali kosalela makambo oyo boyekolá na bomoi mpo na kopesa basusu formasyo, Yehova akopambola bino mpenza.​—Tángá Luka 6:38.

18. Ndenge nini mibange mpe bilenge bakoki kosalisana?

18 Ntango bino mibange bozali kosala boninga ná bilenge, bokosalisana. (Rom. 1:12) Mokomoko azali na likambo ya motuya oyo mosusu azali na yango te. Mibange bazali na bwanya. Longola yango, bayebi mpe bakutaná na makambo mingi na bomoi. Bilenge bazali na makasi mpe na nguya. Ntango mibange mpe bilenge basali boninga, bapesaka Tata na biso ya likoló lokumu mpe bazalaka lipamboli mpo na moto nyonso na lisangá.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

^ par. 5 Tozalaka na esengo ndenge na masangá na biso tozali na ebele ya bilenge basi mpe mibali oyo bapesaka ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ. Ata soki bazali bato ya mimeseno nini, to mpe bakutaná na makambo nini na bomoi, bandeko oyo bazali mibange bakoki mpenza kosalisa bilenge mpo básalela makasi na bango na mosala ya Yehova.

^ par. 55 NDIMBOLA YA BILILINGI: Soki mokɛngɛli ya zongazonga akokisi mbula 70, ye ná mwasi na ye bazwaka mokumba ya sika. Makambo oyo bayekolá na boumeli ya bambula esalisaka bango bápesa basusu formasyo na lisangá oyo bazali.