Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 38

Kómisá makasi bolingo na yo mpo na bandeko

Kómisá makasi bolingo na yo mpo na bandeko

“Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino.”​—YOA. 20:17.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE *

1. Bato bakoki kobenga Yehova nani?

YESU, “Mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá,” mpe ebele ya baanzelu bazali na kati ya libota ya basambeli ya Yehova. (Kol. 1:15; Nz. 103:20) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalisaki bato ya sembo báyeba ete bakoki kobenga Yehova Tata na bango. Ntango azalaki kosolola na bayekoli na ye, Yesu abengaki Yehova “Tata na ngai mpe Tata na bino.” (Yoa. 20:17) Ntango moto amipesi na Yehova mpe azwi batisimo, akɔtaka na libota ya bandeko oyo balinganaka mpenza.​—Mrk. 10:29, 30.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Bato mosusu bazalaka na mokakatano ya kondima ete Yehova azali Tata ya bolingo. Basusu mpe bayebaka te ndenge ya komonisela bandeko bolingo. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge Yesu asalisi biso tómona ete Yehova azali Tata ya bolingo oyo tokoki kopusana penepene na ye. Tokomona mpe oyo tokoki kosala mpo na komekola Yehova na ndenge oyo tosalelaka bandeko na biso makambo.

YEHOVA ALINGI ETE OPUSANA PENEPENE NA YE

3. Ndenge nini libondeli ya ndakisa esalisaka biso tópusana penepene na Yehova?

3 Yehova azali Tata ya bolingo. Yesu alingi tótalelaka Yehova ndenge oyo atalelaka ye, elingi koloba, lokola moboti ya boboto mpe ya bolingo oyo tokoki kosolola na ye ntango nyonso. Kasi alingi te tótalelaka ye lokola mokonzi moko oyo azangá boboto. Yango emonisami polele na makambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na yango. Abandaki libondeli ya ndakisa na maloba oyo: “Tata na biso.” (Mat. 6:9) Yesu akokaki koyebisa biso tósalela batitre ya lokumu oyo Biblia elobeli mpo na kobenga Yehova. Na ndakisa, “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” “Mozalisi,” to “Mokonzi ya seko.” (Eba. 49:25; Yis. 40:28; 1 Tim. 1:17) Kasi ayebisaki biso tóbengaka Yehova “Tata.”

4. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka tópusana penepene na ye?

4 Ozalaka na mokakatano ya komona ete Yehova azali Tata ya bolingo? Bamosusu kati na biso bazalaka na mokakatano yango. Soki tata oyo abotá biso azalaki boboto te, ekoki kozala mpasi tókanisa ete ezali na tata moko oyo akoki kolinga biso. Kasi koyeba ete Yehova ayebi mpenza ndenge oyo tozali komiyoka, ekitisaka biso motema! Alingaka kozala penepene na biso, yango wana Liloba na ye elendisi biso na maloba oyo: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8) Yehova alingaka biso mingi mpe azali Tata na biso oyo aleki malamu.

5. Na kotalela Luka 10:22, ndenge nini Yesu akoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova?

5 Yesu akoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Ayebi Yehova malamu mpe amonisaka bizaleli na ye na ndenge ya kokoka. Yango wana alobaki: “Moto oyo amoni ngai, amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Lokola Yesu azali yaya na biso, yango wana ateyaka biso ndenge ya kotosa Tata na biso, ndenge ya koboya koyokisa ye mpasi, mpe oyo tokoki kosala mpo asepela na biso. Kasi bomoi ya Yesu awa na mabele emonisaki mpenza bolingo mpe boboto oyo Yehova azalaka na yango. (Tángá Luka 10:22.) Tótalela mwa bandakisa.

Lokola azali Tata ya bolingo, Yehova atindaki anzelu moko mpo alendisa Mwana na ye (Talá paragrafe 6) *

6. Pesá bandakisa oyo emonisi ete Yehova azalaki koyoka Mwana na ye.

6 Yehova ayokaka bana na ye. Kanisá ndenge azalaki koyoka Mwana na ye ya liboso. Na ntembe te, Yehova ayokaki mabondeli mingi oyo Mwana na ye asalaki ntango azalaki awa na mabele. (Luka 5:16) Ayokaki mabondeli oyo Yesu asalaki mpo na kozwa bikateli ya minene, na ndakisa liboso apona bantoma na ye 12. (Luka 6:12, 13) Yehova ayokaki mpe mabondeli oyo Yesu asalaki ntango azalaki komitungisa. Kaka liboso Yudasi atɛka ye, Yesu abondelaki Tata na ye na motema mobimba mpo na makambo ya mpasi oyo asengelaki kokutana na yango. Yehova asukaki kaka te na koyoka Yesu, Mwana na ye oyo alingaka mingi, kasi atindaki mpe anzelu moko mpo na kolendisa ye.​—Luka 22:41-44.

7. Koyeba ete Yehova ayokaka mabondeli na biso esengeli kotinda biso tómiyoka ndenge nini?

7 Lelo oyo, Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye, mpe ayanolaka yango na ntango oyo ebongi mpe na lolenge eleki malamu. (Nz. 116:1, 2) Ndeko mwasi moko na Inde amonaki mpenza ndenge oyo Yehova ayanolaki na mabondeli na ye. Azalaki konyokwama mingi na makanisi, mpe abondelaki Yehova mingi mpo na likambo yango. Akomi boye: “Programɛ ya TV JW ya sanza ya 05/2019 oyo elobelaki makambo oyo tokoki kosala ntango tozali komitungisa mingi, esalisaki ngai mpenza. Ezalaki mpenza eyano ya mabondeli na ngai.”

8. Nini emonisi ete Yehova azalaki kolinga Yesu ntango azalaki awa na mabele?

8 Yehova alingaka biso kaka ndenge alingaki Yesu ntango azalaki awa na mabele. (Yoa. 5:20) Akokisaki bamposa ya Yesu ya mosuni mpe ya elimo, mpe atyaki likebi na mayoki na ye. Lisusu, Yehova akakatanaki te mpo na koloba polele ete azalaki kolinga mpe kondima Mwana na ye. (Mat. 3:16, 17) Lokola Yesu azalaki ntango nyonso kotyela Tata na ye motema, amiyokaki soki moke te ete azalaki ye moko.​—Yoa. 8:16.

9. Makambo nini endimisi biso ete Yehova alingaka biso?

9 Lokola Yesu, biso nyonso tokutaná na makambo mingi oyo emonisi ete Yehova alingaka biso. Kanisá naino: Yehova akómisá biso baninga na ye mpe apesá biso bandeko basi mpe mibali oyo basalisaka biso tózala na esengo mpe balendisaka biso na ntango ya mpasi. (Yoa. 6:44) Yehova apesaka biso mpe nyonso oyo tosengeli na yango mpo tókoba kobatela kondima na biso makasi. Lisusu, akokisaka bamposa na biso ya mosuni ya mokolo na mokolo. (Mat. 6:31, 32) Ntango tokanisaka ndenge oyo Yehova alingaka biso, bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi.

LINGÁKÁ BANDEKO NDENGE YEHOVA ALINGAKA BANGO

10. Ndenge oyo Yehova asalelaka bandeko na biso makambo ekoki koteya biso nini?

10 Yehova alingaka bandeko na biso ya elimo. Kasi lokola tozali na mimeseno ekeseni mpe tokolá na bisika ekeseni, ekoki kozala mpasi tómonisela bango bolingo. Lisusu, biso nyonso tosalaka mabunga mpe makambo oyo epesaka basusu mpasi. Atako bongo, biso nyonso tokoki kosala ete bolingo ezala na kati ya libota na biso ya elimo. Na ndenge nini? Soki tozali komekola Tata na biso mpe soki tozali komonisela bandeko na biso bolingo. (Ef. 5:1, 2; 1 Yoa. 4:19) Tótala mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yehova.

11. Ndenge nini Yesu amekolaki motema mawa ya Yehova?

11 Yehova amonisaka motema mawa. (Luka 1:78) Moto ya motema mawa ayokaka mpasi ntango basusu bazali konyokwama mpe alukaka ndenge ya kosalisa mpe ya kolendisa bango. Ndenge oyo Yesu asalelaka bato makambo emonisi ete amekolaka Tata na ye. (Yoa. 5:19) Mokolo moko ntango amonaki ebele ya bato, Yesu “ayokelaki bango mawa, mpo banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” (Mat. 9:36) Yesu asukaki kaka te na komonisela bango motema mawa, kasi asalaki likambo moko mpo na kosalisa bango. Abikisaki bato ya maladi mpe asalisaki ‘baoyo bazalaki komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba.’​—Mat. 11:28-30; 14:14.

Monisáká motema mawa mpe kabeláká bandeko na yo mpo na komonisa ete omekolaka Yehova (Talá paragrafe 12-14) *

12. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki komonisela basusu motema mawa.

12 Liboso tómonisela bandeko na biso motema mawa, tosengeli liboso koyeba mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Na ndakisa, ndeko mwasi moko akoki kozala na maladi moko ya makasi. Ekoki kozala ete amilelakalelaka te mpo na yango, kasi akosepela soki ndeko moko asalisi ye. Tokoki komituna boye: Asalaka ndenge nini mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na ye? Tokoki kosalisa ye na kolamba mwa eloko to kotyela ye bopeto na ndako? Ekoki mpe kozala ete balongoli ndeko mobali moko mosala. Mbala mosusu soki topesi ye mwa mbongo, kozanga koyebisa ye ete biso nde topesi ye yango, ekoki kosalisa ye tii ntango akozwa mosala mosusu.

13-14. Ndenge nini tokoki komekola ezali ya kokaba ya Yehova?

13 Yehova azali Nzambe oyo akabaka. (Mat. 5:45) Abimiselaka biso moi mikolo nyonso kozanga kutu tósɛnga ye. Mpe moi esalisaka moto nyonso, kaka te baoyo bamonisaka botɔndi. Lokola Yehova, tokoki kosalisa bandeko na biso kozanga ete básɛnga biso. Tosengeli kaka te kozela tii ntango bakoyebisa biso ete bazali na mposa ya lisalisi mpo tómonisela bango motema mawa. Na ntembe te, ndenge oyo Yehova akokisaka bamposa na biso emonisi mpenza ete alingaka biso! Tolingaka ye mingi mpo atondi na boboto mpe akabaka!

14 Lokola bandeko na biso mingi bamekolaka Tata na biso, yango wana bakabelaka basusu. Na ndakisa, na 2013, mopɛpɛ moko makasi babengi Typhon Haiyan, ebimisaki makama minene na ekólo Philippines. Bandeko na biso mingi babungisaki bandako mpe biloko na bango. Kasi bandeko na biso na mokili mobimba basalisaki bango nokinoki. Mingi bapesaki mbongo, mpe basusu bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa mpe kotonga lisusu bandako oyo ebebaki. Yango esalaki ete bátonga mpe bábongisa bandako soki 750 kaka na boumeli ya mwa basanza! Lisusu, na boumeli ya maladi mabe ya Coronavirus, Batatoli ya Yehova basalaki mosala makasi mpo na kosalisa bandeko na bango. Soki tozali kosalisa bandeko na biso ya elimo nokinoki, tokomonisa ete tolingaka bango.

15-16. Na kotalela Luka 6:36, wapi lolenge eleki malamu oyo tokoki komekola Tata na biso ya likoló?

15 Yehova alimbisaka. (Tángá Luka 6:36.) Mokolo na mokolo, Tata na biso ya likoló alimbisaka biso. (Nz. 103:10-14) Bayekoli ya Yesu bazalaki bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Yesu azalaki kolimbisa bango. Andimaki kutu kopesa bomoi na ye mpo masumu na biso elimbisama. (1 Yoa. 2:1, 2) Ndenge oyo Yehova ná Yesu balimbisaka biso, esalisaka biso tólinga bango mingi.

16 Bolingo oyo tozalaka na yango mpo na bandeko na biso ya elimo ekómaka makasi ntango ‘tolimbisanaka na motema moko.’ (Ef. 4:32) Na ntembe te, na bantango mosusu ekoki kozala mpasi tólimbisa bandeko. Yango wana tosengeli kosala makasi tólimbisaka basusu. Ndeko mwasi moko amonaki ete lisolo “Tólimbisanaka na motema moko” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalisaki ye. * Akomi boye: “Lisolo yango esalisaki ngai namona ete kolimbisa basusu ekomemela ngai matomba. Elobaki ete kolimbisa basusu elakisi te ete osepelaki na makambo oyo basalelaki yo, mpe elingi koloba te ete likambo yango esalaki yo mpasi te. Kasi elimboli kobatela kimya ya motema mpe koboya kobomba nkanda mpo na makambo mabe oyo basalelaki yo.” Ntango tolimbisaka bandeko na biso na motema moko, tomonisaka ete tolingaka bango mpe ete tozali komekola Yehova, Tata na biso.

ZWÁKÁ NA MOTUYA ESIKA NA YO NA LIBOTA YA YEHOVA

Mwana mpe mokoló moko bamoniseli bandeko ya mokili mobimba bolingo (Talá paragrafe 17) *

17. Na kotalela Matai 5:16, ndenge nini tokoki kopesa Tata na biso ya likoló lokumu?

17 Ezali mpenza lokumu kozala na kati ya libota ya basambeli ya Yehova ya mokili mobimba oyo bamoniselanaka bolingo! Tolingi ete bato ebele báya kosambela Nzambe elongo na biso. Yango wana tosengeli kokeba ete tósala te likambo moko oyo ekobebisa lokumu ya basaleli ya Yehova, to ya Tata na biso ya likoló. Tosalaka makasi tózala na bizaleli oyo ekotinda bato bándima nsango malamu.​—Tángá Matai 5:16.

18. Nini ekoki kosalisa biso tósakola na mpiko?

18 Na bantango mosusu, bato bakoki koloba na biso mabe to konyokola biso mpo tozali kotosa Tata na biso ya likoló. Tokosala nini soki tozali kobanga koyebisa bato mosusu mateya oyo tondimaka? Tokoki kotyela Yehova mpe Mwana na ye motema mpo básalisa biso. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengelaki kobanga te mpo na ndenge oyo bakoloba mpe makambo oyo bakoloba. Mpo na nini? Alobaki boye: “Bakopesa bino oyo bokoloba kaka na ngonga wana; mpo baoyo bazali koloba ezali kaka bino moko te, kasi elimo ya Tata na bino nde ezali koloba na nzela na bino.”​—Mat. 10:19, 20.

19. Pesá ndakisa ya moto moko oyo apesaki litatoli na mpiko nyonso.

19 Tótalela ndakisa ya ndeko Robert. Akutanaki na likambo moko ntango kaka abandaki koyekola Biblia mpe ayebaki naino mateya mingi te. Asengelaki kokende na tribinale moko ya basoda na Afrique du Sud, mpe kolimbwela zuzi moko ntina oyo aboyaki kokɔta mosala ya soda. Na mpiko nyonso, Robert amonisaki polele na tribinale ete aboyaki kokɔta mosala ya soda mpo alingaka bandeko na ye bakristo. Azwaki na motuya esika oyo azali na yango na libota na biso ya elimo. Na mbala moko zuzi yango atunaki ye: “Banani nde bandeko na yo?” Robert amizelaki te ete bakotuna ye motuna yango. Kasi na mbala moko, akanisaki mokapo ya mokolo wana. Ezalaki Matai 12:50 oyo elobi: “Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló, ye wana nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.” Atako Robert azalaki moyekoli ya Biblia ya sika, elimo ya Yehova esalisaki ye ayanola na motuna yango, mpe na mituna mosusu ebele oyo amizelaki na yango te. Na ntembe te, Yehova asepelaki mpenza na Robert! Yehova asepelaka mpe na biso ntango totyelaka ye motema mpo tópesa litatoli na mpiko nyonso ata na ntango oyo ezali mpasi kosala yango.

20. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini? (Yoane 17:11, 15)

20 Tókoba kozwa na motuya lipamboli oyo tozali na yango ya kozala na libota ya elimo oyo basangani na yango balinganaka. Tozali mpenza na Tata oyo aleki malamu, mpe na ebele ya bandeko basi mpe mibali oyo balingaka biso. Tosengeli ntango nyonso kozala na botɔndi mpo na yango. Satana ná bato na ye ya mabe balukaka kotinda biso tóboya kondima ete Tata na biso ya likoló alingaka biso, mpe balukaka kobebisa bomoko na biso. Kasi Yesu abondelaki mpo na biso, mpe asɛngaki Tata na ye abatela biso mpo tózala na bomoko. (Tángá Yoane 17:11, 15.) Yehova azali koyanola na libondeli yango. Lokola Yesu, tosengeli soki moke te kotya ntembe ete Tata na biso ya likoló alingaka biso mpe asalisaka biso. Tózwa ekateli ya kokómisa makasi mpenza bolingo na biso mpo na bandeko.

LOYEMBO 99 Tozali na bandeko ebele

^ par. 5 Tosepelaka mpenza ndenge tozali na kati ya libota ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo balingaka biso. Biso nyonso tosengeli kokómisa makasi bolingo oyo tozalaka na yango mpo na bandeko. Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tomekoli ndenge oyo Yehova alingaka biso, tolandi ndakisa ya Yesu mpe ya bandeko na biso bakristo.

^ par. 57 NDIMBOLA YA BILILINGI: Yehova atindaki anzelu moko mpo alendisa Yesu na elanga ya Getesemane.

^ par. 59 NDIMBOLA YA BILILINGI: Na boumeli ya maladi mabe ya Coronavirus, bandeko mingi bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa mpe kokabola bilei mpo na bandeko.

^ par. 61 NDIMBOLA YA BILILINGI: Mama moko azali kosalisa mwana na ye ya mwasi oyo azali kokoma mokanda ya kolendisa mpo na kotindela ndeko na bolɔkɔ.