Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 40

Kobongola motema ya solosolo elimboli nini?

Kobongola motema ya solosolo elimboli nini?

“Nayei kobenga . . . basumuki mpo bábongola motema.”​LUKA 5:32.

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

NA MOKUSE *

1-2. Nini ekesenisaki Ahaba ná Manase, mpe mituna nini tokotalela?

TÓTALELA na likebi mpenza ndakisa ya bakonzi mibale ya ntango ya kala. Moko ayangelaki bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele, mpe mosusu ayangelaki bokonzi ya mabota mibale ya Yuda. Atako bazalaki na bomoi na bileko ekeseni, kasi bomoi na bango ekokani na makambo mingi. Bakonzi yango nyonso batombokelaki Yehova mpe batindaki bato ya bikólo na bango básala masumu. Bango nyonso mibale basambelaki bikeko mpe babomaki bato. Kasi ezali na likambo moko oyo ekesenisaki bakonzi yango mibale. Moko akobaki kosala makambo ya mabe tii na nsuka ya bomoi na ye, kasi mosusu abongolaki motema mpe masumu ya minene oyo asalaki elimbisamaki. Bakonzi yango banani?

2 Bakonzi yango ezalaki Ahaba, mokonzi ya Yisraele, mpe Manase, mokonzi ya Yuda. Bokeseni oyo ezali kati na bakonzi yango mibale ekoki koteya biso likambo moko ya ntina mingi: kobongola motema. (Mis. 17:30; Rom. 3:23) Kobongola motema elimboli nini, mpe ndenge nini moto amonisaka yango? Tosengeli koyeba likambo yango mpo tozalaka na mposa ete Yehova alimbisa biso soki tosali lisumu. Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tokolobela bomoi ya bakonzi yango mibale, mpe tokomona mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa na bango. Na nsima, tokolobela makambo oyo Yesu ateyaki na likambo etali kobongola motema.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA MOKONZI AHABA

3. Ahaba azalaki mokonzi ya lolenge nini?

3 Ahaba azalaki mokonzi ya nsambo na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele. Abalaki Yezabele, mwana mwasi ya mokonzi ya Sidone, ekólo moko ya bozwi oyo ezalaki na nɔrdi. Mbala mosusu libala yango esalaki ete ekólo Yisraele ekóma na bozwi mingi. Kasi na nsima, ebebisaki boyokani ya ekólo Yisraele ná Yehova. Yezabele azalaki kosambela Baala mpe atindaki Ahaba alendisa losambo yango, oyo esangisaki kosala pite na tempelo ata mpe kopesa bana mbeka. Ntango Yezabele azalaki na bokonzi, basakoli nyonso ya Yehova bazalaki na likama. Abomisaki mingi kati na bango. (1 Bak. 18:13) Longola yango, Biblia elobi ete Ahaba “akómaki kosala mabe mingi na miso ya Yehova koleka baoyo nyonso bazalaki liboso na ye.” (1 Bak. 16:30) Yehova akangaki miso te na makambo oyo Ahaba mpe Yezabele bazalaki kosala. Ayebaki makambo yango malamu mpenza. Lokola azali Nzambe ya motema mawa, Yehova atindaki mosakoli Eliya mpo asalisa bato bábongola motema mpe básalela ye wana ntango ezalaki naino. Kasi Ahaba ná Yezabele baboyaki koyoka.

4. Etumbu nini bakatelaki Ahaba, mpe asalaki nini ntango ayokaki yango?

4 Nsukansuka, ntango ekokaki mpo Yehova azwa ekateli. Atindaki mosakoli Eliya mpo asakola nsango ya etumbu mpo na Ahaba mpe Yezabele. Bakitani na bango nyonso basengelaki kobomama. Maloba ya Eliya epesaki Ahaba mpasi na motema! Likambo ya kokamwa, mobali yango ya lofundo ‘amikitisaki.’​—1 Bak. 21:19-29.

Lokola Mokonzi Ahaba abongolaki mpenza motema te, atyaki mosakoli ya Nzambe na bolɔkɔ (Talá paragrafe 5-6) *

5-6. Nini emonisi ete Ahaba abongolaki mpenza motema te?

5 Atako Ahaba amikitisaki na libaku yango, makambo oyo asalaki na nsima emonisaki ete abongolaki mpenza motema te. Asalaki ata eloko moko te mpo na kosilisa losambo ya Baala na bokonzi na ye. Mpe alendisaki losambo ya Yehova te. Ahaba asalaki mpe makambo mosusu oyo emonisaki ete abongolaki motema te.

6 Na ndakisa, mokolo moko Ahaba abengisaki Mokonzi Yehoshafate ya Yuda aya kopesa ye mabɔkɔ mpo na kobundisa mokonzi ya Siri. Yehoshafate ayebisaki ye ete bátuna naino likanisi ya mosakoli ya Yehova. Na ebandeli, Ahaba aboyaki likanisi yango mpe alobaki boye: “Moto mosusu azali oyo tokoki kotuna Yehova na nzela na ye; kasi ngai, nayinaka ye mpenza, mpo asakwelaka ngai makambo ya malamu te, kaka ya mabe.” Atako bongo, batunaki likanisi ya mosakoli Mikaya. Kaka ndenge Ahaba alobaki, moto ya Nzambe ya solo asakolaki makambo ya mabe mpo na ye! Na esika abongola motema mpo Yehova alimbisa ye, Ahaba atyaki nde mosakoli ya Yehova na bolɔkɔ. (1 Bak. 22:7-9, 23, 27) Atako Ahaba akokaki kotya mosakoli Mikaya na bolɔkɔ, kasi akokaki te kopekisa esakweli yango ekokisama. Mpe na etumba oyo elandaki, Ahaba abomamaki.​—1 Bak. 22:34-38.

7. Yehova alobaki nini mpo na Ahaba nsima ya liwa na ye?

7 Nsima ya liwa ya Ahaba, Yehova amonisaki ndenge azalaki kotalela ye. Ntango Yehoshafate, mokonzi malamu, azongaki na kimya epai na ye, Yehova atindaki mosakoli Yehu apamela ye ndenge akendaki kosalisa Ahaba. Mosakoli ya Yehova alobaki boye: “Esengeli nde kosalisa moto mabe, mpe osengeli nde kolinga baoyo bazali koyina Yehova?” (2 Nt. 19:1, 2) Kanisa naino: Soki Ahaba abongolaka mpenza motema, mosakoli alingaki te koloba ete azalaki moto mabe oyo azalaki koyina Yehova. Ya solo, atako Ahaba amonisaki mwa moke mawa mpo na makambo oyo asalaki, kasi abongolaki mpenza motema te.

8. Ndakisa ya Ahaba ekoki koteya biso nini na likambo etali kobongola motema?

8 Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Ahaba? Ntango Eliya ayebisaki Ahaba ete libota na ye ekozwa etumbu, na ebandeli, Ahaba amikitisaki. Yango ezalaki likambo ya malamu mpenza. Kasi makambo oyo asalaki na nsima, emonisaki ete abongolaki motema te. Kobongola motema ya solosolo esuki kaka te na koyoka mawa mpo na mwa ntango. Tótala ndakisa mosusu oyo ekosalisa biso tóyeba soki kobongola motema ya solosolo elimboli mpenza nini.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA MOKONZI MANASE

9. Manase azalaki mokonzi ya lolenge nini?

9 Basiɛklɛ soki mibale na nsima, Manase akómaki mokonzi ya Yuda. Ekoki kozala ete masumu oyo asalaki ezalaki kutu mabe koleka oyo ya Ahaba! Biblia elobi boye mpo na ye: “Asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.” (2 Nt. 33:1-9) Manase atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya, atyaki kutu ekeko ya nzete ya losambo, ntango mosusu mpo na komonisa losambo ya pite, na tempelo mosantu ya Yehova! Asalaki misala ya maji, ya kosakola makambo oyo ekoya, mpe ya bonganga nkisi. Lisusu, Manase “asopaki makila mingi ya bato oyo bazalaki na likambo te.” Abomaki bato ebele mpe ‘alekisaki bana na ye na mɔtɔ’ mpo na kopesa bango mbeka epai ya banzambe ya lokuta.​—2 Bak. 21:6, 7, 10, 11, 16.

10. Ndenge nini Yehova apesaki Manase disiplini, mpe Manase asalaki nini?

10 Ndenge moko na Ahaba, Manase aboyaki koyoka makebisi oyo Yehova apesaki ye na nzela ya basakoli na ye. Nsukansuka, ‘Yehova amemelaki bato ya Yuda bakonzi ya limpinga ya mokonzi ya Siri, bongo bazwaki Manase na mabulu, mpe bakangaki ye na bikangeli mibale ya motako mpe bamemaki ye na Babilone.’ Wana azalaki mokangami na mboka-mopaya, emonani ete Manase akanisaki na mozindo na makambo oyo asalaki. Na nsima, “amikitisaki mingi mpo na Nzambe ya bankɔkɔ na ye.” Kasi asukaki wana te. “Akitisaki Yehova Nzambe na ye motema.” Kutu, Manase “azalaki kobondela Ye.” Moto yango ya mabe akómaki kobongwana. Akómaki kotalela Yehova lokola “Nzambe na ye,” mpe abondelaki ye na motema mobimba.​—2 Nt. 33:10-13.

Mokonzi Manase abundisaki losambo ya lokuta mpo na komonisa ete abongolaki mpenza motema (Talá paragrafe 11) *

11. Na kotalela 2 Ntango 33:15, 16, ndenge nini Manase amonisaki ete abongolaki mpenza motema?

11 Nsukansuka, Yehova ayanolaki na mabondeli ya Manase. Amonaki ete Manase abongolaki mpenza motema, ndenge mabondeli na ye emonisaki yango. Na yango, Yehova ayokaki malɔmbɔ oyo Manase asalaki mpo na kosɛnga bolimbisi, mpe azongisaki ye lisusu na bokonzi. Manase asalaki oyo akoki mpo na komonisa ete abongolaki mpenza motema. Asalaki makambo oyo Ahaba asalaki te. Abongolaki bizaleli na ye. Na mpiko nyonso, abundisaki losambo ya lokuta mpe alendisaki losambo ya solo. (Tángá 2 Ntango 33:15, 16.) Na ntembe te, yango esɛngaki mpiko mpe kondima mpo na boumeli ya bambula mingi, Manase azalaki ndakisa mabe mpo na bato ya libota na ye, mpo na bato ya lokumu ya mboka na ye, mpe mpo na bato ya ekólo na ye mobimba. Kasi ntango Manase akómaki mobange, asalaki nyonso abongisa makambo mosusu ya mabe oyo asalaki. Mpe emonani ete akómaki ndakisa malamu mpo na nkɔkɔ na ye Yosiya, oyo na nsima akómaki mokonzi moko malamu.​—2 Bak. 22:1, 2.

12. Ndenge oyo Manase abongolaki motema ekoki koteya biso nini?

12 Ndakisa ya Manase ekoki koteya biso nini? Amikitisaki, kasi asukaki kaka wana te. Abondelaki Yehova mpe asɛngaki ayokela ye mawa. Mpe abongolaki bizaleli na ye. Asalaki oyo akoki mpo abongisa makambo mabe oyo asalaki mpe alingaki kosambela Yehova mpe kosalisa bato mosusu básala mpe bongo. Ndakisa ya Manase ekoki kosalisa ata baoyo basalá masumu ya minene koleka. Tomoni polele ete Yehova azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ (Nz. 86:5) Kaka baoyo bamonisaka kobongola motema ya solosolo nde balimbisamaka.

13. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa soki kobongola motema elakisi mpenza nini.

13 Manase asukaki kaka te na koyoka mawa mpo na masumu oyo asalaki. Yango epesi biso liteya ya ntina mingi na likambo etali kobongola motema. Tózwa ndakisa oyo: Kanisa ete okei na esika oyo batɛkaka bagato mpe osɛngi ete bátɛkela yo gato moko. Kasi na esika bápesa yo gato, bapesi yo kaka liki. Okosepela na yango? Soki moke te! Okosepela soki moto oyo azali kotɛka gato ayebisi yo ete liki ezali moko ya biloko ya ntina mingi oyo batyaka na gato? Okosepela kaka te! Ndenge moko mpe, Yehova asɛngaka basumuki bábongola motema. Soki mosumuki ayoki mawa mpo na lisumu oyo asalaki, yango ezali malamu. Koyoka bongo ezali moko ya makambo ya ntina mingi mpo na kobongola motema. Kasi esuki kaka wana te. Esɛngi lisusu kosala nini? Ndakisa oyo Yesu apesaki ekoki kosalisa biso.

NDENGE YA KOYEBA SOKI MOTO ABONGOLI MPENZA MOTEMA

Ntango mwana oyo abungaki nzela azongelaki makanisi ya malamu, asalaki mobembo molai mpo na kozonga epai na bango (Talá paragrafe 14-15) *

14. Na ndakisa oyo Yesu apesaki, makambo nini emonisaki ete mwana oyo abungaki nzela abandi kobongola motema?

14 Na Luka 15:11-32, Yesu apesaki ndakisa ya kolendisa ya mwana oyo abungaki nzela. Elenge mobali yango atombokelaki tata na ye, alongwaki ndako mpe asalaki mobembo na “mokili moko ya mosika.” Kuna, akómaki na bomoi moko ya mbindo. Kasi nsima ya kokutana na mikakatano, akómaki kokanisa na bikateli ya mabe oyo azwaki. Akómaki kokanisa bomoi ya malamu oyo azalaki na yango ntango azalaki na ndako ya tata na ye. Ndenge Yesu amonisaki yango, elenge mobali yango ‘azongelaki makanisi ya malamu.’ Azwaki ekateli ya kozonga ndako mpe kosɛnga tata na ye bolimbisi. Ezalaki mpenza malamu ndenge mwana yango amonaki ete azwaki bikateli ya mabe. Kasi asengelaki kosuka kaka wana te. Asengelaki mpe kobongola bizaleli na ye!

15. Ndenge nini mwana oyo abungaki nzela amonisaki ete abongoli mpenza motema?

15 Mwana yango amonisaki ete abongolaki mpenza motema mpo na makambo mabe oyo asalaki. Asalaki mobembo molai mpo na kozonga epai ya tata na ye. Mpe ntango amonaki tata na ye, alobaki: “Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu. Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te.” (Luka 15:21) Ndenge elenge mobali yango andimaki makambo ya mabe oyo asalaki, emonisi ete azalaki na mposa ya kobongisa boyokani na ye ná Yehova. Ayebaki ete makambo mabe oyo asalaki epesaki tata na ye mpasi, mpe andimaki kosala makasi mpo na kozongisa lisusu boyokani ya malamu ná tata na ye. Yango wana, andimaki kutu kozala lokola moko ya basali ya tata na ye! (Luka 15:19) Ndakisa yango ezali kaka te lisapo moko ya kolendisa. Lisolo yango ezali na mateya mingi ya ntina oyo ekoki kosalisa bankulutu ntango bazali koluka koyeba soki moto moko oyo asalaki lisumu ya monene abongoli mpenza motema.

16. Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ te bankulutu báyeba soki moto moko abongoli mpenza motema?

16 Ezalaka pɛtɛɛ te bankulutu báyeba soki moto moko oyo asalaki lisumu ya monene abongoli mpenza motema. Mpo na nini? Bankulutu bakoki koyeba te makambo oyo ezali na motema ya moto. Yango wana basengeli koluka makambo oyo endimisi bango ete ndeko oyo asalaki lisumu abongoli mpenza makanisi mpo na lisumu oyo asalaki. Na bantango mosusu, moto akoki kosala lisumu ya monene mpenza mpe bakoki komona te makambo oyo endimisi bango ete abongoli mpenza motema.

17. (a) Ndakisa nini emonisi ete soki moto ayoki mawa mpo na mabe oyo asali elakisi te ete abongoli mpenza motema? (b) Ndenge emonisami na 2 Bakorinti 7:11, mpo moto amonisa mpenza ete abongoli motema, asengeli kosala nini?

17 Tótalela ndakisa moko. Ndeko mobali moko asali ekobo mbala mingi mpe na boumeli ya bambula mingi. Na esika aluka lisalisi, abombeli mwasi na ye, baninga na ye, ata mpe bankulutu makambo ya mabe oyo asalaki. Nsukansuka, bayebisi bankulutu makambo yango mpe balakisi ye makambo oyo emonisi ete asalaki ekobo. Ndeko mobali yango andimi makambo ya mabe oyo asalaki mpe emonani lokola ayoki mawa mpo na yango. Kasi yango emonisi ete abongoli mpenza motema? Te. Bankulutu oyo bazali kotalela likambo ya ndenge wana basengeli kosuka kaka te na kotalela mawa oyo moto yango ayoki. Moto yango asalaki lisumu kaka mbala moko te mpo azwaki ekateli ya mabe, kasi asalaki yango mbala mingi mpe na boumeli ya bambula mingi. Longola yango, moto mosusu nde akendaki koyebisa bankulutu masumu na ye, kasi ye moko te. Na yango, ekosɛnga ete bankulutu bámona makambo oyo emonisi ete moto yango abongoli mpenza makanisi, mayoki, mpe bizaleli na ye. (Tángá 2 Bakorinti 7:11.) Ekosɛnga mpenza ntango mpo moto yango asala mbongwana oyo emonisi ete abongoli mpenza motema. Na ntembe te, ekosɛnga ete moto yango alongolama na lisangá mpo na mwa ntango.​—1 Ko. 5:11-13; 6:9, 10.

18. Ndenge nini moto oyo alongolami na lisangá akoki komonisa ete abongoli mpenza motema, mpe matomba nini akoki kozwa?

18 Mpo moto oyo alongolami na lisangá amonisa ete abongoli mpenza motema, asengeli koyanganaka na makita, mpe kolanda toli oyo bankulutu bapesaki ye ya kobondelaka mpe koyekolaka Biblia mbala na mbala. Asengeli mpe koboya makambo oyo esalaki ete akwea na lisumu wana. Soki asali makasi abongisa boyokani na ye ná Yehova, akoki komindimisa ete Yehova akolimbisa ye mpe bankulutu bakozongisa ye na lisangá. Ntango bankulutu bazali koluka koyeba soki moto moko abongoli mpenza motema, bayebaka ete likambo na likambo ezalaka na ndenge na yango. Yango wana batalelaka likambo mokomoko na likebi mpenza mpe baboyaka kosambisa kozanga mawa.

19. Kobongola motema ya solosolo esɛngi makambo nini? (Ezekiele 33:14-16)

19 Ndenge tomoni yango, kobongola motema ya solosolo esuki kaka te na koyoka mawa mpo na makambo ya mabe oyo tosalaki. Esɛngaka mpe ete moto abongola makanisi mpe mayoki na ye mpe asala makambo oyo emonisi ete abongoli mpenza motema. Yango esɛngi kotika makambo ya mabe mpe kotosa mitinda ya sembo ya Yehova. (Tángá Ezekiele 33:14-16.) Likambo eleki ntina oyo mosumuki asengeli kosala, ezali ya kozongisa boyokani ya malamu elongo na Yehova.

KOSALISA BASUMUKI BÁBONGOLA MOTEMA

20-21. Ndenge nini tokoki kosalisa moto moko oyo akwei na lisumu ya monene?

20 Yesu alobelaki likambo moko ya ntina oyo ayaki kosala awa na mabele na maloba oyo: “Nayei kobenga . . . basumuki mpo bábongola motema.” (Luka 5:32) Yango esengeli mpe kozala mposa na biso. Tosengeli kosala nini soki toyebi ete moninga na biso moko ya motema asali lisumu ya monene?

21 Tokoluka nde kobomba lisumu oyo moninga yango asalaki? Kosala bongo esimbaka te mpo Yehova azali komona. (Mas. 5:21, 22; 28:13) Okoki kosalisa moninga na yo soki oyebisi ye ete bankulutu bakosepela kosalisa ye. Soki moninga na yo aboyi koyebisa bankulutu likambo yango, ekozala malamu oyebisa bankulutu likambo yango mpo na komonisa ete olingi kosalisa ye. Boyokani na ye ná Yehova ezali mpenza na likama!

22. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

22 Bongo soki ndeko moko asali masumu ya minene na boumeli ya bambula mingi, mpe bankulutu bazwi ekateli ete alongolama na lisangá, yango emonisi ete basaleli ye makambo kozanga mawa? Na lisolo oyo elandi tokolobela ndenge Yehova amoniselaka basumuki motema mawa na ndenge apesaka bango disiplini. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki komekola ye.

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate​—Makabo oyo ezali bato

^ par. 5 Kobongola motema ya solosolo esuki kaka te na koloba ete toyoki mawa mpo na lisumu oyo tosalaki. Na lisolo oyo tokolobela ndakisa ya Mokonzi Ahaba, ya Mokonzi Manase, mpe ya mwana oyo abungaki nzela oyo Yesu apesaki mpo na kosalisa biso tóyeba soki kobongola motema ya solosolo elimboli mpenza nini. Tokolobela mpe makambo oyo bankulutu basengeli kotalela mpo na koluka koyeba soki ndeko oyo asali lisumu ya monene abongoli mpenza motema.

^ par. 60 ELILINGI: Na nkanda nyonso, Mokonzi Ahaba azali koyebisa basoda na ye bátya Mikaya, mosakoli ya Yehova na bolɔkɔ.

^ par. 62 ELILINGI: Mokonzi Manase azali kotinda basaleli na ye bábuka bikeko oyo atyaki na tempelo.

^ par. 64 ELILINGI: Mwana oyo abungaki nzela alɛmbi nsima ya kosala mobembo molai, kasi motema na ye ekiti ntango amoni ndako na bango na mosika.