Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 42

Zalá mpenza na kondima ete ozali na kati ya solo

Zalá mpenza na kondima ete ozali na kati ya solo

“Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu.”​—1 TES. 5:21.

LOYEMBO 142 Tósimba makasi elikya na biso

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini bato mingi bazali na mobulungano?

LELO oyo, ezali na bato mingi oyo bamibengaka bakristo mpe balobaka ete basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka. Likambo yango etye bato mingi na mobulungano! Yango wana bamitunaka, “Lingomba ya solo ezali kaka moko, to Nzambe andimaka mangomba nyonso?” Biso Batatoli ya Yehova tondimaka mpenza ete toteyaka solo mpe tosambelaka Yehova na lolenge oyo andimaka. Nini endimisaka biso yango? Tótalela yango.

2. Na kotalela 1 Batesaloniki 1:5, nini esalisaki Paulo amona ete makambo oyo azalaki kondima ezalaki solo?

2 Ntoma Paulo andimaki mpenza ete azali na kati ya solo. (Tángá 1 Batesaloniki 1:5.) Andimaki likambo yango kaka te mpo ezalaki kosepelisa ye. Paulo azalaki koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo mpenza. Andimaki ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Tim. 3:16) Makambo nini ayekolaki? Paulo amonaki na Makomami makambo oyo endimisaki ye ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki; likambo oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda baboyaki kondima. Bakonzi ya mangomba yango bazalaki na bokosi. Bazalaki koloba ete bazalaki bamonisi ya Nzambe, nzokande bazalaki kosala makambo oyo Nzambe ayinaka. (Tito 1:16) Kasi Paulo akesanaki na bango. Azalaki te kopona makambo oyo asengelaki kondima na Liloba ya Nzambe mpe oyo asengelaki kondima te. Andimaki koteya mpe kosalela “mokano mobimba ya Nzambe.”​—Mis. 20:27.

3. Tosengeli kozwa biyano na mituna nyonso mpo tómindimisa ete tozali na kati ya solo? (Talá mpe etanda “ Misala mpe makanisi ya Yehova ‘ekoki kotángama te.’”)

3 Bato mosusu bakanisaka ete lingomba ya solo esengeli koyanola na mituna nyonso, ata oyo biyano na yango ezali na Biblia te. Ezali mpenza malamu kokanisa bongo? Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Alendisaki baninga na ye bakristo ete ‘báluka koyeba likambo nyonso,’ kasi alobaki mpe ete ezalaki na makambo mingi oyo azalaki kokanga ntina na yango te. (1 Tes. 5:21) Akomaki boye: “Tozali na boyebi ya ndambo.” Abakisaki lisusu boye: “Tozali komona bandelo molilimolili na talatala ya ebende.” (1 Ko. 13:9, 12) Ndenge moko na Paulo, biso mpe tokangaka ntina ya makambo nyonso te. Kasi Paulo ayebaki mateya ya moboko oyo etali Yehova. Ayebaki makambo mingi oyo endimisaki ye ete azalaki na kati ya solo!

4. Ndenge nini tokoki komindimisa ete tozali na kati ya solo, mpe makambo nini tokolobela mpo na bakristo ya solo?

4 Mpo na komindimisa ete tozali mpenza na kati ya solo, tosengeli kokokanisa lolenge oyo biso Batatoli ya Yehova tosambelaka Nzambe ná lolenge oyo Yesu azalaki kosambela ye. Na lisolo oyo, tokomona ete bakristo ya solo basengeli (1) koboya losambo ya bikeko, (2) kopesa nkombo ya Yehova nkembo, (3) kolinga solo, mpe (4) kolingana mpenza na motema moko.

TOBOYAKA LOSAMBO YA BIKEKO

5. Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini na oyo etali kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka, mpe ndenge nini tokoki kosalela makambo oyo ateyaki?

5 Lokola Yesu alingaki Yehova mingi, yango wana asambelaki kaka ye ezala ntango azalaki na likoló to awa na mabele. (Luka 4:8) Ateyaki bayekoli na ye básalaka mpe bongo. Ezala Yesu to mpe bayekoli na ye, basalelaki te bililingi mpo na kosambela Nzambe. Lokola Nzambe azali elimo, eloko moko te oyo moto akoki kosala ekoki kokokana na ye! (Yis. 46:5) Kasi tokoloba nini mpo na bililingi ya basantu oyo bato mosusu basalaka mpe basambelaka yango? Kati na mibeko zomi oyo Yehova apesaki, oyo ya mibale elobaki boye: “Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali na mabele awa na nse . . . Osengeli te kogumbamela yango.” (Kob. 20:4, 5) Baoyo balingaka kosepelisa Nzambe, bayebi ete alingaka te básambela bikeko.

6. Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya banani mpo na kosambela Nzambe?

6 Bato ya istware balobi ete na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki kosambela kaka Nzambe. Na ndakisa, buku moko ya istware elobi ete bakristo ya liboso “bazalaki koyina” likanisi ya kosalela bililingi na bisika ya losambo. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa oyo bakristo wana batiká na likambo yango. Tosambelaka bililingi ya “basantu” to ya baanzelu te. Kutu tosambelaka ata Yesu te. Lisusu, topesaka bendele losako te mpe tosalaka eloko moko te oyo ekomonisa ete tozali kosambela ekólo na biso. Ata soki basali biso nini, tozalaka na ekateli ya kotosa maloba oyo ya Yesu ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo.”​—Mat. 4:10.

7. Makambo nini ekesenisi Batatoli ya Yehova ná mangomba mosusu?

7 Lelo oyo, bato mingi basepelaka koyoka mateya ya bakonzi ya mangomba oyo bayebani mingi. Lokola balingaka bateyi yango mingi mpenza, na bantango mosusu, bakómaka kosambela bango. Bato mingi mpenza bakendaka na mangomba ya bateyi yango, basombaka babuku na bango, mpe bapesaka bango mbongo mingi mpo na kopesa bango mabɔkɔ. Bato mosusu bandimaka makambo nyonso oyo bakonzi yango ya mangomba balobaka. Basepelaka na bakonzi ya mangomba yango mingi mpenza kaka ndenge balingaki kosepela soki bámonaka Yesu! Kasi baoyo basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka balandaka bato te. Atako totosaka baoyo bakamba biso, tondimaka maloba ya Yesu oyo alobaki ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Mat. 23:8-10) Tosambelaka bato te, ezala bazali bakonzi ya mangomba to ya politiki. Topesaka bango mpe mabɔkɔ te. Kutu, toboyaka kokɔta na makambo ya mokili. Makambo nyonso oyo touti kolobela emonisi ete tokeseni mpenza na mangomba mosusu oyo bandimi na yango balobaka ete bazali bakristo.​—Yoa. 18:36.

TOPESAKA NKOMBO YA YEHOVA NKEMBO

Bakristo ya solo basepelaka koyebisa basusu makambo etali Yehova (Talá paragrafe 8-10) *

8. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka bato nyonso báyeba nkombo na ye mpe bápesa yango nkembo?

8 Mokolo moko Yesu abondelaki boye: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Uta na likoló, Yehova ye moko ayanolaki na libondeli yango na mongongo makasi mpe alakaki ete akopesa yango nkembo. (Yoa. 12:28) Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu apesaki nkombo ya Tata na ye nkembo. (Yoa. 17:26) Yango wana bakristo ya solo bamonaka ete ezali lokumu kosalela nkombo ya Nzambe mpe koyebisa yango basusu.

9. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki ete bazalaki kopesa nkombo ya Nzambe nkembo?

9 Mwa moke nsima ya kotyama ya lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Yehova “abalolaki likebi na ye . . . epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Mis. 15:14) Bakristo yango bamonaki ete ezalaki lokumu kosalela nkombo ya Nzambe mpe koyebisa yango basusu. Basalelaki nkombo ya Nzambe mingi mpenza na mosala ya kosakola mpe na mikanda ya Biblia oyo bakomaki. * Na ndenge yango bamonisaki mpenza ete bazalaki ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe.​—Mis. 2:14, 21.

10. Makambo nini endimisi biso ete Batatoli ya Yehova bazali ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe?

10 Batatoli ya Yehova bazali ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe? Tótalela makambo oyo endimisi biso yango. Lelo oyo, bakonzi mingi ya mangomba basali nyonso oyo bakoki mpo na kobombela bato nkombo ya Nzambe. Balongoli nkombo yango na mabongoli na bango ya Biblia mpe basusu bapekisi bandimi na bango básalela nkombo yango na losambo na bango. * Moto moko te akoki koboya ete kaka Batatoli ya Yehova nde bapesaka nkombo ya Nzambe nkembo mpe lokumu oyo ebongi na yango. Koleka mangomba nyonso, kaka biso nde tobomaka nzoto mpo nkombo ya Nzambe eyebana na mokili mobimba! Lisusu, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo bomoi na biso eyokana na nkombo oyo tozali komema: Batatoli ya Yehova! (Yis. 43:10-12) Tóbimisi Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika koleka milio 240. Biblia yango esalelaka nkombo ya Nzambe, Yehova, na bisika oyo babongoli mosusu ya Biblia balongolá yango. Tobimisaka mpe mikanda oyo esalelaka nkombo ya Nzambe, Yehova, na minɔkɔ koleka 1 000!

TOLINGAKA SOLO

11. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki ete bazalaki kolinga solo?

11 Yesu alingaki solo, elingi koloba, solo oyo etali Nzambe mpe mikano na ye. Ayebisaki yango basusu mpe azalaki kosala makambo na boyokani na solo yango. (Yoa. 18:37) Bayekoli ya Yesu mpe balingaki solo makasi mpenza. (Yoa. 4:23, 24) Kutu ntoma Petro abengaki lingomba ya bokristo “nzela ya solo.” (2 Pe. 2:2) Lokola bakristo ya liboso balingaki solo mingi, baboyaki makanisi ya bakonzi ya mangomba, mimeseno ya bonkɔkɔ, mpe makanisi nyonso ya bato oyo eyokanaki te na solo. (Kol. 2:8) Ndenge moko mpe lelo oyo, bakristo ya solo ‘batambolaka na kati ya solo’ na ndenge basalaka makasi ete mateya mpe lolenge ya bomoi na bango esimbama na Liloba ya Yehova.​—3 Yoa. 3, 4.

12. Nini esalemaka soki bandeko oyo bakambaka biso bamoni ete liteya moko esengeli kosembolama, mpe mpo na nini basalaka bongo?

12 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova balobaka te ete bayebi makambo nyonso oyo ezali na Biblia. Na bantango mosusu, basalaki mabunga na ndenge na bango ya kolimbola mateya ya Biblia to mpe na ndenge ya kotambwisa makambo. Yango esengeli kokamwisa biso te. Biblia emonisi polele ete mpo na kokóma na boyebi ya sikisiki ya solo esɛngaka mwa ntango. (Kol. 1:9, 10) Yehova amonisaka solo malembemalembe, mpe tosengeli komonisa motema molai tii ntango pole ya solo ekongɛnga makasi. (Mas. 4:18) Soki bandeko oyo bakambaka biso bamoni ete ezali na liteya moko oyo tosengeli kosembola, bakakatanaka te mpo na kosala bambongwana oyo esengeli. Lelo oyo mangomba mingi ebongolaka mateya na yango mpo na kosepelisa bandimi na yango to mpo eyebana mingi na mokili. Kasi biso Batatoli ya Yehova tosalaka bambongwana mpo tolingaka kozala penepene na Nzambe mpe kosambela ye ndenge Yesu asalaki yango. (Yak. 4:4) Tosalaka bambongwana te mpo makanisi ya bato ya mokili oyo ebongwani, kasi mpo tokangi malamu ntina ya mateya ya Biblia. Tolingaka solo!​—1 Tes. 2:3, 4.

TOLINGANAKA NA MOTEMA MOKO

13. Wapi ezaleli eleki ntina oyo bakristo bamonisaka, mpe ndenge nini yango emonanaka epai ya Batatoli ya Yehova lelo oyo?

13 Na siɛklɛ ya liboso, bakristo ya solo bayebanaki mpo na bizaleli na bango ya malamu, kasi ezaleli oyo eleki ntina ezalaki nde bolingo. Yesu alobaki boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:34, 35) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bamoniselanaka bolingo mpe bazalaka na bomoko. Tokeseni na mangomba mosusu nyonso mpo tozalaka libota moko ata soki tokeseni bikólo, loposo, mpe mimeseno. Tomonaka mpenza bolingo yango na makita ya lisangá, ata mpe na mayangani ya mike mpe ya minene. Yango endimisaka biso mpenza ete tosambelaka Yehova na ndenge oyo andimaka.

14. Na kotalela Bakolose 3:12-14, ndenge nini tokoki komoniselana bolingo makasi?

14 Biblia eyebisi biso ete ‘tólinganaka makasi.’ (1 Pe. 4:8) Tomonisaka bolingo yango ndenge tolimbisanaka mpe tokangaka motema na mabunga ya basusu. Tolukaka mpe mabaku ya komonisa ezaleli ya koyamba bapaya mpe ya kokabela bato nyonso na lisangá, ata mpe baoyo bapesaki biso mpasi. (Tángá Bakolose 3:12-14.) Bolingo ya ndenge wana emonisaka ete tozali mpenza bakristo ya solo.

“KONDIMA KAKA MOKO”

15. Wapi lolenge mosusu oyo tomekolaka bakristo ya siɛklɛ ya liboso na likambo etali kosambela Nzambe?

15 Tolandaka mpe makambo mosusu oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala na losambo na bango. Na ndakisa, lisangá na biso ebongisami na kolanda ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso. Tozali na bakɛngɛli-batamboli, bankulutu, mpe basaleli na misala. (Flp. 1:1; Tito 1:5) Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, biso mpe tolandaka mibeko ya Yehova na likambo etali kosangisa nzoto mpe libala, lolenge ya kotalela makila, mpe kolongola na lisangá mosumuki oyo aboyi kobongola motema mpo na kobatela bopɛto ya lisangá.​—Mis. 15:28, 29; 1 Ko. 5:11-13; 6:9, 10; Ebr. 13:4.

16. Maloba oyo ezali na Baefese 4:4-6 eteyi biso nini?

16 Yesu alobaki ete bato mingi bakoloba ete bazali bayekoli na ye, kasi bango nyonso te nde bakozala bayekoli na ye ya sembo. (Mat. 7:21-23) Makomami elobi mpe ete na mikolo ya nsuka, bato mingi ‘bakomonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe.’ (2 Tim. 3:1, 5) Kasi Biblia eyebisi biso polele ete ezali na “kondima kaka moko” oyo esepelisaka Nzambe.​—Tángá Baefese 4:4-6.

17. Lelo oyo, banani nde bakristo ya solo oyo basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka?

17 Banani nde bazali kosambela Nzambe na ndenge andimaka lelo oyo? Touti komona makambo oyo esalisi biso tóyeba bango. Tomoni makambo oyo Yesu ateyaki na likambo etali kosambela Nzambe mpe ndenge oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalelaki yango. Eyano ezali polele. Batatoli ya Yehova nde basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka. Ezali mpenza lokumu monene kozala mosaleli ya Yehova mpe koyeba solo na ntina etali Yehova mpe mikano na ye! Tiká tókoba komindimisa ete tozali mpenza na kati ya solo.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

^ par. 5 Na lisolo oyo, tokotalela ndakisa oyo Yesu atiká na likambo etali losambo ya solo mpe ndenge oyo bayekoli na ye ya siɛklɛ ya liboso balandaki ndakisa yango. Tokolobela mpe makambo oyo ezali kondimisa biso ete Batatoli ya Yehova bazali mpe kolanda ndakisa yango lelo oyo.

^ par. 9 Talá etanda “Bakristo ya liboso basalelaki nkombo ya Nzambe?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2010, lokasa 6.

^ par. 10 Na ndakisa, na 2008, Pápa Bénoît XVI apesaki mitindo ete nkombo ya Nzambe “esengeli te kosalelama na misa ya lingomba ya Katoliki, na banzembo, to mpe na mabondeli na bango.”

^ par. 63 ELILINGI: Batatoli ya Yehova babimisi Biblia-Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 200 mpo bato básalela Biblia oyo ezali na nkombo ya Nzambe na minɔkɔ na bango.