Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 43

Kotika te!

Kotika te!

“Tótika te kosala oyo ezali malamu.”​—GAL. 6:9.

LOYEMBO 68 Tólona mboto ya Bokonzi

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini kozala Motatoli ya Yehova ezali esengo mpe lokumu?

EZALI esengo mpe lokumu kozala Motatoli ya Yehova! Tomemaka nkombo ya Nzambe mpe tomonisaka ete tozali Batatoli na ye ndenge tosakwelaka basusu mpe toteyaka bango makambo na ye. Tosepelaka soki tosalisi moto moko oyo azali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” akóma mosaleli na ye. (Mis. 13:48) Tomiyokaka lokola Yesu ntango bayekoli na ye bayebisaki ye makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Biblia elobi: “Atondaki na esengo mpe na elimo santu.”​—Luka 10:1, 17, 21.

2. Ndenge nini tomonisaka ete tozwaka mosala na biso ya kosakola na lisɛki te?

2 Tozwaka mosala na biso ya kosakola na lisɛki te. Ntoma Paulo ayebisaki Timote boye: “Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.” Abakisaki boye: “Mpo soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.” (1 Tim. 4:16) Na yango, mosala na biso ya kosakola ebikisaka bomoi ya bato. Tokebaka mpenza mpo tozali bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Tolingaka ntango nyonso kosala makambo na ndenge oyo ekopesa Yehova lokumu mpe na ndenge oyo eyokani na nsango malamu oyo tosakolaka. (Flp. 1:27) Tomonisaka ete tozali ‘kokeba na mateya na biso’ na ndenge tomibongisaka malamu mpo na mosala ya kosakola mpe tosɛngaka lisalisi ya Yehova liboso tósakwela basusu.

3. Ndenge nini bato mosusu bakoki kotalela nsango oyo tosakolaka? Pesá ndakisa.

3 Kasi ata soki tosali oyo tokoki mpo na kosakwela basusu, bato mingi ya teritware na biso bakoki kosepela te na nsango malamu ya Bokonzi. Tótalela ndakisa ya ndeko Georg Lindal, oyo asakolaki kaka ye moko kobanda 1929 tii 1947 na ekólo Islande. Akabolaki mikanda ebele mpenza kasi ata moto moko te andimaki solo. Akomaki boye: “Emonani ete bato mosusu bazali kotɛmɛla nsango ya Biblia, kasi mingi na bango bazali nde kosepela te.” Batindaki bamisionɛrɛ oyo bautaki na eteyelo ya Gileade mpe bapalanganisaki nsango malamu kuna. Kasi, atako bongo, esɛngaki lisusu mbula 9 eleka liboso bato ya Islande bámipesa na Yehova mpe bázwa batisimo. *

4. Tokoki komiyoka ndenge nini soki bato baboyi koyoka nsango na biso?

4 Tolɛmbaka nzoto soki bato baboyi koyoka nsango na biso. Tokoki koyoka ndenge moko na ntoma Paulo. Ayokaki ‘mawa monene mpe mpasi oyo ezalaki kosila te’ ntango Bayuda mingi baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya. (Rom. 9:1-3) Okosala nini soki osali mpenza milende mpe obondeli mingi mpo na moyekoli na yo ya Biblia, kasi azali kokola te na elimo mpe esengeli kokata boyekoli? To okosala nini soki oyekolá naino te Biblia na moto tii azwa batisimo? Osengeli nde komipesa foti, mpe mbala mosusu kokanisa ete Yehova azali kopambola mosala na yo ya kosakola te? Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo mibale: (1) Nini emonisaka ete tolongi na mosala na biso ya kosakola? (2) Tosengeli komizela na makambo nini ntango tozali kosakwela basusu nsango malamu?

NINI EMONISAKA ETE TOLONGI NA MOSALA YA KOSAKOLA?

5. Mpo na nini na bantango mosusu mosala na biso ya kosakola ebotaka mbuma te ndenge oyo tozalaki komizela?

5 Biblia elobi boye mpo na moto oyo asalaka mokano ya Nzambe: “Nyonso oyo azali kosala ekolonga.” (Nz. 1:3) Kasi, yango emonisi te ete makambo nyonso oyo tozali kosala mpo na Yehova ekosalema kaka ndenge tolingi. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, bomoi na biso mpe ya bato mosusu ‘etondi na mpasi.’ (Yobo 14:1) Lisusu, batɛmɛli bakoki kopekisa biso mpo na mwa ntango tósakola ndenge tomesaná kosala yango. (1 Ko. 16:9; 1 Tes. 2:18) Kasi, makambo nini Yehova atalelaka mpo na kokata soki tolongi na mosala na biso ya kosakola to te? Tótalela mwa mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso tóyanola na motuna yango.

Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka, ezala mpo na kosakwela bato oyo tokutanaka na bango, na nzela ya mikanda, to na telefone (Talá paragrafe 6)

6. Makambo nini Yehova atalelaka mpo na kokata soki tolongi na mosala na biso to te?

6 Yehova atyaka likebi na milende mpe na ezaleli na biso ya koyika mpiko. Asepelaka na biso soki tozali kosakola na molende mpo tolingaka ye, ata soki bato bazali kosepela koyoka biso to te. Paulo akomaki boye: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Ebr. 6:10) Yehova abosanaka te milende oyo tosalaka mpe bolingo na biso, ata soki milende yango ezali kobota mbuma te. Na yango, okoki kosalela makambo oyo ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti ete: “Mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na kati ya Nkolo,” ata soki mosala yango ezali kobota te mbuma oyo ozalaki komizela na yango.​—1 Ko. 15:58.

7. Ndenge oyo ntoma Paulo alobelaki mosala na ye ya kosakola ekoki koteya biso nini?

7 Ntoma Paulo azalaki misionɛrɛ moko ya molende mpe afungolaki masangá ya sika na bingumba mingi. Kasi ntango bato mosusu balobelaki ye mabe mpe balobaki ete azalaki moteyi ya malamu te, Paulo alobelaki te motángo ya bato oyo asalisaki mpo bakóma bakristo. Akomaki nde boye: ‘Nasali misala makasi mingi koleka.’ (2 Ko. 11:23) Lokola Paulo, tosengeli kobosana te ete milende oyo tosalaka mpe ezaleli na biso ya koyika mpiko nde ezali na ntina mingi na miso ya Yehova.

8. Makambo nini tosengeli kobosana te mpo na mosala na biso ya kosakola?

8 Yehova asepelaka na mosala na biso. Yesu atindaki bayekoli 70 básakola nsango ya Bokonzi, mpe ntango basilisaki mosala na bango, “bazongaki na esengo.” Nini etindaki bango básepela? Balobaki boye: “Ata bademo bazali kotosa biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.” Kasi Yesu asembolaki makanisi na bango ntango ayebisaki bango ete: “Bósepela na likambo oyo te ete bilimo ezali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.” (Luka 10:17-20) Yesu ayebaki ete bakokutana kaka na makambo ya malamu te na mosala ya kosakola. Kutu, kati na baoyo bayokaki bayekoli yango, toyebi te soki bato boni bakómaki bandimi. Bayekoli ya Yesu basengelaki kosepela kaka te mpo bato bazalaki koyoka bango, kasi nde mpo Yehova azalaki kosepela na milende na bango.

9. Ndenge Bagalatia 6:7-9 emonisi yango, nini ekosalema soki totiki te mosala na biso ya kosakola?

9 Soki toyiki mpiko na mosala na biso, tokozwa bomoi ya seko. Ntango tosalaka oyo tokoki mpo na kolona mboto ya Bokonzi, “tolonaka mpe mpo na elimo” na ndenge totikaka ete elimo ya Nzambe esala na bomoi na biso. Soki ‘totiki te’ mpe “tolɛmbi te,” Yehova alaki ete akopesa biso bomoi ya seko ata soki tosalisi moto moko azwa batisimo to te.​—Tángá Bagalatia 6:7-9.

TOSENGELI KOMIZELA NA MAKAMBO NINI?

10. Mpo na nini bato mosusu bandimaka koyoka biso kasi basusu baboyaka?

10 Kondima to koboya nsango na biso etaleli libosoliboso ndenge motema ya moto ezali. Yesu amonisaki yango na ndakisa ya moloni oyo alonaki mboto na mabele ekeseni, kasi kaka mboto oyo ekweaki na mabele ya malamu nde ebotaki mbuma. (Luka 8:5-8) Yesu alobaki ete mabele ezali komonisa bato oyo mitema na bango ekoki kondima to koboya koyoka “liloba ya Nzambe.” (Luka 8:11-15) Ndenge moko na moloni, tokoki te kokolisa solo na mitema ya bato oyo tosakwelaka, mpo yango etaleli ndenge mitema na bango ezali. Mokumba na biso ezali ya kokoba kolona mboto ya malamu ya nsango ya Bokonzi. Ndenge kaka ntoma Paulo alobaki yango, “moto na moto akozwa mbano na ye na kolanda mosala na ye mpenza ya makasi” kasi te na kotalela mbuma ya mosala na ye.​—1 Ko. 3:8.

Noa asakolaki na mpiko nyonso na boumeli ya bambula ebele, kasi kaka bato ya libota na ye nde bakɔtaki na masuwa. Atako bongo, Noa atosaki Yehova mpe akokisaki mosala oyo Nzambe apesaki ye! (Talá paragrafe 11)

11. Mpo na nini tokoki koloba ete Noa alongaki na mosala na ye ya “mosakoli ya boyengebene”? (Talá elilingi ya ezipeli.)

11 Na ntango ya kala, bato bazalaki koboya koyoka nsango oyo basaleli ya Yehova mingi bazalaki kosakwela bango. Na ndakisa, ekoki kozala ete Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene” na boumeli ya bambula mingi. (2 Pe. 2:5) Na ntembe te, azalaki na elikya ete bato bakondima koyoka nsango oyo azalaki kosakola, kasi Yehova alobaki te ete ekosalema bongo. Kutu, ntango Nzambe azalaki kopesa Noa malako mpo na kotonga masuwa, ayebisaki ye boye: “Osengeli kokɔta na masuwa, yo ná bana na yo ná mwasi na yo mpe ná basi ya bana na yo elongo na yo.” (Eba. 6:18) Mpe ntango Yehova azalaki koyebisa ye bonene ya masuwa yango, mbala mosusu Noa amonaki ete bato nyonso te nde bakondima koyoka ye, mpo masuwa yango ekokoka kokɔtisa bango nyonso te. (Eba. 6:15) Kasi ndenge toyebi yango, ata moto moko te ya mokili mabe ya ntango wana andimaki koyoka Noa. (Eba. 7:7) Yehova akanisaki nde ete Noa alongaki te na mosala na ye ya kosakola? Soki moke te! Na miso ya Nzambe, Noa alongaki na mosala na ye ya kosakola mpo asalaki makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki ye asala.​—Eba. 6:22.

12. Nini esalisaki mosakoli Yirimia abatela esengo na ye na mosala ya kosakola atako bato bazalaki kotɛmɛla ye mpe koboya koyoka ye?

12 Mosakoli Yirimia mpe asakolaki na boumeli ya bambula mingi atako bato boboyaki koyoka ye mpe batɛmɛlaki ye. Alɛmbaki mpenza nzoto mpo na ‘kosambwa mpe kotyola’ oyo ezalaki kouta epai ya batɛmɛli na ye mpe akanisaki ata kosundola mokumba na ye. (Yir. 20:8, 9) Kasi Yirimia atikaki te! Nini esalisaki ye alonga makanisi mabe oyo azalaki na yango mpe abatela esengo na mosala na ye? Atyaki makanisi na ye nyonso na makambo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, nsango ya Nzambe oyo Yirimia azalaki komemela bato esengelaki kopesa bango “bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.” (Yir. 29:11) Ya mibale, Yirimia azalaki komema nkombo ya Nzambe. (Yir. 15:16) Biso mpe tosakwelaka bato nsango ya elikya na mokili oyo mabe, mpe tomemi nkombo ya Nzambe, Yehova. Soki totye makanisi na biso nyonso na makambo wana mibale, tokobatela esengo na biso ata soki bato bandimi koyoka biso to te.

13. Ndakisa oyo Yesu apesaki oyo ezali na Marko 4:26-29 eteyi biso nini?

13 Esɛngaka ntango mingi mpo moto akola na elimo. Yesu ateyaki likambo yango na ndakisa oyo apesaki ya moloni oyo alalaki. (Tángá Marko 4:26-29.) Mboto oyo moloni yango alonaki ekolaki malembemalembe, mpe moloni akokaki kosala eloko moko te mpo na kokolisa yango nokinoki. Ekoki kosɛnga ete yo mpe ozela ntango mingi mpo moyekoli na yo ya Biblia abanda kosalela makambo oyo azali koyekola. Kaka ndenge moloni-bilanga akoki te kosala ete milona na ye ekóla mbangu ndenge alingi, biso mpe tokoki te kosala ete bayekoli na biso ya Biblia bákóla na elimo nokinoki ndenge tozali kolinga. Na yango, kolɛmba nzoto te soki bokoli ya bayekoli na yo ezwi ntango mingi koleka ndenge ozalaki kokanisa. Ndenge moko na mosala ya bilanga, kokómisa bato bayekoli mpe esɛngaka komonisa motema molai.​—Yak. 5:7, 8.

14. Ndakisa nini emonisi ete ekoki kosɛnga ntango mingi eleka mpo bato bábanda koyoka biso?

14 Na bisika mosusu, esɛngaka bambula mingi eleka mpo moto ata moko azwa batisimo. Tótala ndakisa ya Gladys ná Ruby Allen, bandeko basi mibale ya libota moko. Na 1959, batindaki bango babongisi-nzela ya sanza na sanza na engumba moko na etúká ya Quebec na Canada. * Lokola bato mingi ya engumba yango bazalaki kosambela na lingomba ya Katoliki mpe bazalaki kobanga ndenge oyo bato bakotalela bango soki basololi na Batatoli ya Yehova, yango wana bazalaki koboya koyoka nsango ya Bokonzi. Gladys alobi boye: “Tosalaki mbula mibale mobimba mpe tozalaki kosakola ngonga mwambe mokolo na mokolo ndako na ndako, kasi ata moto moko te ayambaki biso! Bato bazalaki kaka koya kotala na madusu ya [baporte] ya ndako na bango mpe kokanga.” Kendekende, makanisi ya bato ebongwanaki, mpe bakómaki kondima koyoka biso. Lelo oyo, ezali na masangá misato na engumba yango.​—Yis. 60:22.

15. 1 Bakorinti 3:6, 7 ezali koteya biso nini na likambo etali kokómisa bato bayekoli?

15 Kokómisa moto moyekoli ezali mosala ya moto moko te. Ndeko nyonso na lisangá akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa moto azwa batisimo. (Tángá 1 Bakorinti 3:6, 7.) Na ndakisa, mosakoli moko akoki kotikela moto trakte to zulunalo. Kasi amoni ete programɛ na ye ekopesa ye nzela te mpo azongela moto yango, na yango asɛngi mosakoli mosusu azongela ye. Mosakoli yango abandi koyekola na moto yango Biblia. Na ngala na ye mpe, mosakoli yango akómi kobengisa bandeko mosusu na boyekoli yango, mpe mokomoko azali kolendisa moyekoli na lolenge moko to mosusu. Ndeko nyonso oyo azali kokutana na moyekoli yango azali kosalisa ye mpo solo oyo ezali na motema na ye ekola. Na ndenge yango, kaka ndenge Yesu alobaki, bandeko nyonso oyo basalaki mosala makasi mpo na kosalisa moyekoli yango, bakosepela soki azwi batisimo.​—Yoa. 4:35-38.

16. Mpo na nini okoki koyoka esengo na mosala ya kosakola ata soki obɛlaka to ozali lisusu na makasi mingi te?

16 Mbala mosusu ozali kokoka lisusu te kosakola mingi ndenge ozalaki kosala liboso mpo ozali kobɛla to ozali lisusu na makasi mingi te. Atako bongo, okoki kaka kozala na esengo mpo na oyo ozali kosala. Tótala ndakisa ya Mokonzi Davidi, ntango ye ná mibali oyo bazalaki elongo na ye babikisaki mabota na bango mpe biloko na bango na mabɔkɔ ya Baamaleke. Mibali 200 balɛmbaki mpenza mpe bazalaki na makasi ya kobunda te, yango wana batikalaki mpo na kobatela bisaka. Davidi ná mibali oyo bazalaki elongo na ye balongaki etumba mpe babɔtɔlaki biloko ebele ya banguna na bango. Na nsima, Davidi apesaki mitindo ete baoyo bakendaki etumba ná baoyo bakendaki te, basengeli kokabola biloko ndenge moko. (1 Sa. 30:21-25) Ezali mpe bongo mpo na mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli. Ndeko nyonso oyo asalaka oyo akoki na mosala ya kosakola akoki koyoka esengo mbala nyonso oyo moyekoli moko ya sika azwi batisimo.

17. Tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo na likambo nini?

17 Topesaka Yehova matɔndi ndenge atalelaka mosala oyo tosalelaka ye na ndenge ya malamu. Ayebi ete tokoki te kotinda bato na makasi báyoka nsango na biso to mpe bábanda kosambela ye. Atako bongo, amonaka mosala makasi oyo tosalaka mpe ndenge oyo tolingaka ye mingi, mpe akopambola biso. Ateyaka biso mpe ndenge ya kozwa esengo na nyonso oyo tokoki kosala na mosala ya kosakola. (Yoa. 14:12) Tondimisami ete Nzambe akosepela na biso soki tolɛmbi te!

LOYEMBO 67 “Sakolá Liloba”

^ par. 5 Tosepelaka soki bato bandimi koyoka nsango malamu, kasi toyokaka mawa soki baboyi koyoka yango. Okosala nini soki moyekoli na yo ya Biblia azali kokola te na elimo? Ata soki oyekolá naino Biblia na moto te tii azwa batisimo, yango elimboli nde ete olongi te na mosala ya kokómisa bato bayekoli? Na lisolo oyo, tokomona mpo na nini mosala na biso ya kosakola ekoki kobota mbuma mpe ndenge oyo tokoki kobatela esengo na biso ezala bato bandimi koyoka biso to te.

^ par. 3 Talá Buku ya mobu 2005 ya Batatoli ya Yehova, na Français, nkasa 205-211.

^ par. 14 Talá lisolo ya bomoi ya ndeko Gladys Allen, “Nakolinga kobongola ata eloko moko te!,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/2002.