Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nazalaki koluka bomoi ya malamu

Nazalaki koluka bomoi ya malamu

NAZALAKI na kati ya masuwa na ngai ya moke. Ntango nakómaki na katikati ya Mbu ya Mediterane, nayaki koyeba ete masuwa yango, oyo ekómaki ya kala, ezalaki na mwa lidusu mpe mai ezalaki kokɔta na mwa lidusu yango. Na nsima, mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki. Nakómaki kobanga mpe kobondela. Ezalaki mbala ya liboso nabondela nsima ya bambula mingi. Ndenge nini nakómaki kuna? Tiká nabɛtela bino lisolo ya bomoi na ngai.

Ntango nazalaki na mbula nsambo, tozalaki kofanda na Brésil

Nabotamá na 1948 na Pays-Bas. Na mbula oyo elandaki, libota na biso ekendaki kofanda na engumba São Paulo, na Brésil. Baboti na ngai bazalaki komipesa mpenza na makambo ya Nzambe, mpe na libota na biso tozalaki kotánga Biblia mbala na mbala nsima ya kolya bilei ya mpokwa. Na 1959 tokendaki kofanda na États-Unis, mpe tofandaki na engumba Massachusetts.

Tata azalaki kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso oyo ezalaki na bato 8. Asalaki misala ndenge na ndenge, na ndakisa kosala mibembo mpo na kokende kotɛka biloko, kotonga babalabala, mpe asalaki na kompanyi moko ya mpɛpɔ oyo ezalaki kosala mibembo na bisika ndenge na ndenge na mokili. Bato nyonso ya libota basepelaki ntango azwaki mosala na kompanyi yango mpo ezalaki kopesa biso likoki ya kosala mibembo na bisika mingi na mokili.

Ntango nazalaki na kelasi, mbala mingi nazalaki komituna boye: ‘Nakosala nini ntango nakokola?’ Baninga na ngai mosusu bakendaki na iniversite mpe bamosusu bakendaki na mosala ya soda, kasi naboyaki kokende mosala ya soda mpo nazalaki kolinga koswana te. Mpe mpo na koloba solo, nazalaki kolinga kobunda te. Nazwaki ekateli ya kokende na iniversite mpo nakɔta mosala ya soda te. Kasi nazalaki kolinga mingi nde kosalisa bato mpo nakanisaki ete ekosalisa ngai mpo nazala na bomoi ya malamu.

BOMOI NA INIVERSITE

Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki koluka bomoi ya malamu

Na iniversite, nasepelaki koyekola siansi babengi Anthropologie, oyo eyekolaka bomoi ya bato, mpo nazalaki kosepela koyeba ndenge bomoi ebandá. Batángisaki biso liteya ya evolisyo mpe balakisi bazalaki na mposa tóndima ete ezali solo. Kasi mpo na ngai mateya yango mosusu ezangaki motó ná makolo mpe bazalaki kosɛnga ngai nandima yango kaka bongo.

Na bakelasi oyo nakɔtaki, bazalaki koteya biso bizaleli ya malamu te. Kasi bazalaki koteya biso ndenge ya kolonga na iniversite ata soki ekosɛnga osala nini. Nazalaki kosepela kolekisa ntango elongo na baninga na bafɛti mpe kosalela drɔgɛ. Kasi esengo yango ezalaki ya ntango mokuse. Nazalaki komituna boye: ‘Oyo nde bomoi ya malamu?’

Kaka na ntango yango, nakendaki kofanda na engumba Boston mpe nakɔtaki na iniversite kuna. Mpo na kozwa mbongo ya kofuta kelasi, nazalaki kosala na ntango ya konje, mpe na mosala yango nakutanaki na Motatoli ya Yehova moko mpo na mbala ya liboso. Moninga yango ya mosala asololaki na ngai makambo etali “ntango nsambo” oyo ezali na mokanda ya Danyele mokapo 4 mpe ayebisaki ngai ete tozali kobika na mikolo ya nsuka. (Dan. 4:13-17) Na mbala moko nayaki komona ete soki nakobi kosolola na ye makambo ya Biblia, mpe soki nandimi makambo oyo nazalaki koyekola, yango ekosala ete nabongola bomoi na ngai. Yango wana nazalaki kosala nyonso mpo nakima ye.

Na iniversite, bateyaki ngai mateya oyo ebongisaki ngai mpo nakende kosalisa bato na Amérique du Sud. Nakanisaki ete kokende kosalisa bato ekosala ete nazala na bomoi ya malamu. Kasi na nsima, nayaki komona ete ata kosala bongo esalisaki ngai te mpo nazala na bomoi ya malamu. Lokola likambo yango elɛmbisaki ngai nzoto, nalongwaki na iniversite liboso kutu tosilisa mbula.

NAKOBI KOLUKA BOMOI YA MALAMU NA BIKÓLO MOSUSU YA MOSIKA

Na sanza ya 05/1970, nakendaki na engumba Amsterdam, na Pays-Bas, mpe nasalaki na kompanyi ya mpɛpɔ epai tata na ngai mpe asalaki. Mosala yango esalisaki ngai nasala mibembo mingi na mikili ya Afrika, ya Amerika, ya Mpoto ata mpe na Azia. Na nsima, nayaki komona ete bikólo nyonso oyo nazalaki kokende ezalaki na mikakatano ya minene, mpe ekólo moko te ezalaki kokoka kosilisa mikakatano yango. Lokola nazalaki kaka na mposa ya kosala likambo moko ya ntina na bomoi na ngai, yango wana nazwaki lisusu ekateli ya kozonga na États-Unis mpo na kotánga lisusu na iniversite ya Boston.

Kasi mwa moke nsima ya kozonga na iniversite yango, nayaki komona ete nazalaki kaka te kozwa biyano na mituna na ngai oyo etali bomoi. Lokola nazalaki koyeba te oyo nasengelaki kosala, yango wana nalukaki toli epai ya profɛsɛrɛ na ngai ya Anthropologie. Akamwisaki ngai ntango alobaki: “Mpo na nini ozali kokoba kotánga? Malamu kolongwa na iniversite kaka sikoyo.” Nasepelaki na toli yango. Yango wana nalongwaki na iniversite mpe natikalá kozonga lisusu te.

Lokola nazalaki kaka komona ete bomoi na ngai ezalaki na ntina te, yango wana nakɔtaki na etuluku moko ya bato oyo bazalaki koboya kosala makambo oyo bato mingi bamesanaki kosala, mpe oyo bazalaki komonana lokola balendisaka bato bázala na kimya mpe bolingo. Ngai ná baninga mosusu tosalaki mobembo kolongwa États-Unis tii na engumba Acapulco, na Mexique. Tofandaki elongo na bato oyo bazalaki kosala makambo na ndenge na bango, oyo ezalaki komonana lokola bazalaki ata na mikakatano te na bomoi mpe bazalaki ata kobanga eloko te. Kasi kofanda na bango esalisaki ngai namona ete bomoi na bango ezalaki na ntina te mpe esengo na bango ezalaki ya ntango mokuse. Kutu namonaki ete mingi na bango bazalaki sembo te.

NAKOBI KOLUKA BOMOI YA MALAMU LIKOLÓ YA MASUWA

Elongo na moninga na ngai moko, tozali koluka esanga moko kitoko epai tokofanda

Kaka na ntango yango, nakómaki kokanisa likambo moko oyo nazalaki na mposa ya kosala ntango nazalaki mwana. Nazalaki na mposa ya kozala kapitɛni ya masuwa. Namonaki ete mpo nakokisa mposa yango nasengelaki kozala na masuwa na ngai moko. Lokola moninga na ngai moko na nkombo Tom azalaki mpe na likanisi yango, tozwaki ekateli tósala mobembo elongo na masuwa na mokili mobimba. Nazalaki na mposa ya komona esanga moko kitoko epai moto akotambwisa bomoi na ngai te.

Ngai ná Tom tosalaki mobembo tii na Arenys de Mar, pene na engumba Barcelone, na Espagne. Ntango tokómaki kuna, tosombaki masuwa na biso oyo ezalaki na nkombo Llygra mpe oyo ezalaki na bolai ya mɛtrɛ koleka 9. Tobandaki kobongisa lisusu mwa masuwa yango mpo tókoka kotambola kozanga likama na mbu. Lokola tozalaki te na mposa ya kokóma mbala moko na esika oyo tozalaki kokende, tolongolaki motɛrɛ na yango mpo tózala na esika monene ya kotya mai ya komɛla. Mpo na kosɛma na mabongo ya mike, tosombaki bankayi mibale ya mɛtrɛ 5. Nsukansuka, tobandaki mobembo na biso mpo na kokende na Seychelles, na Océan Indien. Mokano na biso ezalaki ya kotambola na wɛsti ya Afrika mpe kokende tii penepene ya Cape de bonne Espérance, na Afrique du Sud. Tosalelaki minzoto, mwa bakarte, babuku, mpe mwa baaparɛyi mosusu mpo tóbunga te. Ezalaki mpenza likambo ya kokamwa ndenge tozalaki koyeba esika oyo tozalaki kokende.

Mbala moko toyaki koyeba ete mwa masuwa na biso wana ya kala ekokaki te kosalisa biso mpo tósala mibembo na mbu. Lokola ezalaki na mwa lidusu, ezalaki kokɔtisa litrɛ 22 ya mai nsima ya ngonga mokomoko! Ndenge nalobaki yango na ebandeli, ntango mopɛpɛ makasi ebɛtaki, nabangaki mpe ezalaki mbala ya liboso nabondela nsima ya kolekisa bambula mingi. Mpe nalakaki Nzambe ete soki tobiki, nakosala makasi nayeba ye. Mopɛpɛ yango ekitaki mpe nabatelaki elaka oyo nasalaki.

Nabandaki kotánga Biblia wana tozalaki kosala mobembo likoló ya mbu. Nazalaki koyoka malamu mpenza kofanda na masuwa mosika mpenza likoló ya Mbu ya Mediterane, nazali komona bambisi ndenge na ndenge mpe kotala ndenge mapata esali lokola nde ekiti na mai. Mpe na butu, nazalaki kokamwa komona minzoto ndenge na ndenge mpe yango endimisaki ngai ete ezali na Nzambe moko oyo atyelaka bato likebi.

Nsima ya kolekisa mwa bapɔsɔ likoló ya mbu, tokómaki na libongo ya Alicante na Espagne epai tolukaki totɛka masuwa na biso mpo tósomba mosusu ya sika. Ezalaki mpasi tózwa moto oyo akondima kosomba masuwa yango, oyo ekómaki ya kala, ezangaki motɛrɛ, mpe ezalaki kokɔtisa mai! Kasi ezalaki ntango moko malamu mpenza mpo na kotánga Biblia na ngai.

Wana nazalaki kotánga Biblia mingi, nakómaki komona ete ezali buku moko oyo ekokaki kosalisa ngai nalonga na bomoi. Nasepelaki mpenza ndenge Biblia elobi polele ntina oyo tosengeli kozala na bomoi ya pɛto. Nakómaki komituna mpo na nini bato mingi, ata mpe ngai moko, tomibengaka bakristo, kasi toboyaka kotosa makambo oyo Biblia elobaka.

Nazwaki mpenza ekateli ya ntina mingi ya kopɛtola bomoi na ngai, yango wana natikaki kosalela drɔgɛ. Nakanisaki ete esengeli kozala na bato oyo batosaka makambo oyo Biblia elobaka mpe nazalaki na mposa ya kokutana na bango. Mpo na mbala ya mibale, nabondelaki Nzambe asalisa ngai nakutana na bato yango.

NAKÓMI KOLUKA LINGOMBA YA SOLO

Nakanisaki ete ezali malamu natalela lingomba mokomoko tii nakomona oyo ya solo. Mokolo moko ntango nazalaki kotambola na babalabala ya Alicante, namonaki bandako-nzambe mingi. Kasi lokola bandako-nzambe yango mingi ezalaki na bikeko, nayebaki ete ezali lingomba ya solo te.

Mokolo moko ya lomingo nsima ya midi, nazalaki likoló ya ngomba moko mpe nazalaki kotala libongo. Nazalaki kotánga Yakobo 2:1-5, oyo elobi ete tosengeli te kosalela basusu makambo koleka kaka mpo bazali bazwi. Ntango nazalaki kozonga na masuwa na biso, nalekaki esika moko oyo emonanaki lokola esika basalaka losambo. Likoló ya porte ya ndako yango bakomaki: Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova.

Nakanisaki boye: ‘Nasengeli komeka bato oyo. Nakotala naino ndenge bakoyamba ngai.’ Na yango, nakɔtaki na Ndako ya Bokonzi yango makolo-ngulu, nazalaki na mandefu ebele, mpe nalataki pantalo ya jeans. Moto oyo azalaki koyamba bato akendaki kotya ngai pene ya mwasi moko ya mobange. Na boboto nyonso, mwasi yango asalisaki ngai namona na Biblia bavɛrsɛ oyo molobi azalaki kotánga. Nsima ya likita yango, nakamwaki mpenza ndenge bato nyonso bayaki koyamba ngai. Mobali moko abengaki ngai na ndako na ye mpo tósolola, kasi lokola nasilisaki naino kotánga Biblia te, nalobaki na ye: “Nakoyebisa yo soki nazwi ntango.” Kobanda mokolo wana, nakómaki koyangana na makita nyonso.

Bapɔsɔ mingi na nsima, nakendaki na ndako ya mobali yango mpe ayanolaki na mituna na ngai nyonso. Pɔsɔ moko na nsima, apesaki ngai saki moko oyo etondaki na bilamba ya kitoko. Ayebisaki ngai ete batyaki nkolo bilamba yango na bolɔkɔ mpo atosaka mibeko ya Biblia oyo esɛngi biso tolinganaka mpe tóboya koyekola bitumba. (Yis. 2:4; Yoa. 13:34, 35) Sikoyo namindimisaki ete nazwaki eloko oyo nazalaki koluka, elingi koloba, bato oyo basalelaka makambo oyo Biblia elobaka mpe bazalaka na bomoi ya pɛto! Mokano na ngai ezalaki lisusu te ya kokende kofanda na esanga moko ya kitoko, kasi nde ya koyekola Biblia na mozindo. Yango wana, nazongaki na Pays-Bas.

NABANDI KOLUKA MOSALA

Nasalaki mobembo ya mikolo minei mpo na kokóma na engumba Groningen, na Pays-Bas. Kuna nazalaki na mposa ya kozwa mosala mpo na kokokisa bamposa na ngai. Ntango natondisaki papye mpo na koluka mosala na esika moko oyo basalaka mosala ya mabaya, moko ya mituna oyo ezalaki na papye yango etunaki soki nazali moto ya lingomba nini. Nakomaki: “Motatoli ya Yehova.” Ntango mokonzi ya esika yango atángaki yango, namonaki ete azalaki lisusu kosepela te. Alobaki: “Nakobenga yo.” Kasi atikalaki kobenga ngai te.

Na esika mosusu oyo bazalaki mpe kosala kaka mosala yango ya mabaya, natunaki nkolo-esika yango soki akolinga napesa mabɔkɔ. Asɛngaki ngai nalakisa ye diplome ya kelasi oyo natángá mpe mikanda mosusu oyo emonisi misala oyo nasalá. Nayebisaki ye ete nazalaki kosala mosala ya kobongisa mabaya ya masuwa. Nakamwaki ndenge alobaki: “Okoki kobanda kaka lelo nsima ya midi. Kasi nakosɛnga yo kaka likambo moko: nalingi te otya mobulu na esika oyo mpo nazali Motatoli ya Yehova mpe natosaka makambo oyo Biblia eteyaka.” Natalaki ye na kokamwa mpe na nsima nayebisaki ye: “Ngai mpe nazali Motatoli ya Yehova!” Kasi lokola nazalaki na nsuki ebele mpe na mandefu, alobaki: “Soki ezali bongo, nakoyekola Biblia na yo!” Na esengo nyonso, nandimaki. Sikoyo namonaki polele ntina oyo Patrɔ ya liboso atikalaki kobenga ngai te. Yehova azalaki kopesa ngai oyo motema na ngai ezalaki kosɛnga. (Nz. 37:4) Nasalaki epai ya ndeko yango na boumeli ya mbula moko. Na boumeli ya ntango yango, ayekolaki na ngai Biblia, mpe na nsima nazwaki batisimo na sanza ya 01/1974.

NSUKANSUKA NAZWI BOMOI YA MALAMU OYO NAZALAKI KOLUKA!

Sanza moko na nsima, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe mosala yango epesaki ngai esengo mingi na bomoi. Na sanza oyo elandaki, nakendaki na Amsterdam mpo na kopesa mabɔkɔ na etuluku moko ya sika oyo efungwamaki ya monɔkɔ ya Espagnol. Ezalaki mpenza esengo koyekola na bato Biblia na monɔkɔ ya Espagnol mpe ya Portugais! Na sanza ya 05/1975, nazwaki libaku ya kokóma mobongisi-nzela monene.

Mokolo moko, ndeko mwasi Ineke oyo azalaki mpe mobongisi-nzela monene ayaki na likita na biso ya monɔkɔ ya Espagnol mpo na kolakisa biso moyekoli na ye ya Biblia oyo autaki na ekólo Bolivie. Ngai ná Ineke tozalaki na mposa ya koyebana malamu, yango wana tozalaki kokomelana mikanda. Eumelaki te, tomonaki ete tozalaki na mikano moko. Tobalanaki na 1976 mpe tokobaki kozala babongisi-nzela tii na 1982 ntango babengisaki biso mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 73 ya Eteyelo ya Gileade. Tokamwaki mpenza mpe tosepelaki mingi ntango batindaki biso na Afrika ya ɛsti, na engumba Mombasa na Kenya, epai tosalaki na boumeli ya mbula mitano! Na 1987, batindaki biso na Tanzanie, epai bautaki kolongola bipekiseli nyonso oyo batyelaki Batatoli ya Yehova. Tofandaki kuna na boumeli ya mbula 26 liboso bázongisa biso lisusu na Kenya.

Kosalisa bato ya Afrika ya ɛsti báyekola mateya ya solo oyo ezali na Biblia, esalisi ngai ná mwasi na ngai tózala na bomoi ya esengo mpenza

Kosalisa bato ya komikitisa báyekola mateya ya Biblia esalá ete bomoi na biso ezala na ntina mingi. Na ndakisa, moto ya liboso oyo nayekolaki na ye Biblia na Mombasa ezalaki mobali moko oyo nakutanaki na ye ntango nazalaki kosakola. Nsima ya kopesa ye bazulunalo mibale, alobaki: “Soki nasilisi kotánga oyo, nasengeli kosala lisusu nini?” Na pɔsɔ oyo elandaki, tobandaki koyekola na ye Biblia na buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, oyo eutaki kobima na monɔkɔ ya Swahili. Mbula moko na nsima, azwaki batisimo mpe akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kobanda wana, ye ná mwasi na ye basalisi bato pene na 100 bámipesa na Nzambe mpe bázwa batisimo.

Ngai ná Ineke tomoni ndenge oyo Yehova asalisaka basaleli na ye bázala na bomoi oyo ezali na ntina

Ntango nayebaki ntina ya bomoi mpo na mbala ya liboso, namiyokaki lokola moto ya mombongo oyo azwaki liyaka ya motuya mpe alingaki kobungisa yango te. (Mat. 13:45, 46) Nazalaki na mposa ya kolekisa bomoi na ngai mpo na kosalisa bato mosusu báyeba ntina ya bomoi. Elongo na mwasi na ngai, tomoni ndenge oyo Yehova asalisaka bato na ye bázala na bomoi ya malamu.