Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 49

Mokanda ya Balevi ezali koteya biso ndenge ya kosalela basusu makambo

Mokanda ya Balevi ezali koteya biso ndenge ya kosalela basusu makambo

“Osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.”​—LEV. 19:18.

LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko

NA MOKUSE *

1-2. Likambo nini tolobelaki na lisolo oyo eleki, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

NA LISOLO oyo eleki, tolobelaki batoli ya ntina oyo ezali na mokanda ya Balevi mokapo 19. Na ndakisa, ndenge vɛrsɛ 3 emonisaki yango, Yehova asɛngaki Bayisraele bápesaka baboti na bango lokumu. Tomonaki ndenge oyo toli yango ekoki kosalisa biso tókokisa bamposa ya baboti na biso ya mosuni, tólendisaka bango, mpe tósalisa bango bázala na boyokani malamu ná Yehova. Kaka na vɛrsɛ yango, Nzambe ayebisaki basaleli na ye ntina ya kotosaka Sabata. Toyekolaki ete ata soki lelo oyo totosaka Sabata te, tokoki kosalela toli yango soki tozali kosomba ntango mbala na mbala mpo na komipesa mingi na makambo ya elimo. Soki tosali bongo, tokomonisa ete tozali kosala makasi mpo tózala basantu, ndenge Balevi 19:2 mpe 1 Petro 1:15 esɛngi biso.

2 Na lisolo oyo, tokokoba kotalela Balevi mokapo 19. Mokapo yango ekoki koteya biso nini na likambo etali kopesa lokumu na baoyo nzoto ezali kosala malamu te, kozala sembo na makambo ya mombongo, mpe komonisela basusu bolingo? Tolingi kozala basantu ndenge Nzambe mpe azali mosantu. Tótala mateya oyo tokoki koyekola.

MONISELÁ BAOYO NZOTO EZALI KOSALA MALAMU TE BOBOTO

Makambo nini Balevi 19:14 ezali kolendisa biso tósalela moto oyo akufá miso to matoi? (Talá paragrafe 3-5) *

3-4. Na kotalela Balevi 19:14, ndenge nini Bayisraele basengelaki kosalela moto oyo akufá matoi mpe oyo akufá miso makambo?

3 Tángá Balevi 19:14. Yehova asɛngi basaleli na ye bámonisela baoyo nzoto ezali kosala malamu te boboto. Na ndakisa, Bayisraele basengelaki te kolakela mabe moto oyo akufá matoi. Kolakela mabe moto oyo akufá matoi elakisaki mpe kobangisa ye to koloba mabe mpo na ye. Yango ezalaki mpenza likambo ya mabe mpo na moto oyo akufá matoi! Lokola akokaki te koyoka makambo oyo bazalaki koloba mpo na ye, akokaki te komilongisa to komibatela.

4 Lisusu, vɛrsɛ 14 eyebisi biso ete basaleli ya Nzambe basengelaki te “kotya libaku liboso ya moto oyo akufá miso.” Buku moko elobi boye mpo na baoyo bazalaki bibɔsɔnɔ: “Na ntango ya kala, na Proche-Orient na Azia, bazalaki kobuba mpe konyokola baoyo nzoto ezalaki kosala malamu te.” Ntango mosusu moto moko ya motema mabe azalaki kotya eloko moko ya mabe liboso ya moto oyo akufá miso mpo na kosala ye mabe to mpo bato básɛka ye. Ezalaki mpenza likambo moko ya kozanga boboto! Mibeko yango esalisaki basaleli ya Nzambe bámona ete, basengelaki komonisa boboto epai ya baoyo nzoto ezalaki kosala malamu te.

5. Ndenge nini tokoki komonisela baoyo nzoto ezali kosala malamu te motema mawa?

5 Yesu amoniselaki baoyo nzoto ezalaki kosala malamu te motema mawa. Kanisá lisusu nsango oyo atindelaki Yoane Mobatisi ete: “Bato oyo bakufá miso bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka.” Nsima ya komona makamwisi oyo Yesu asalaki, bato nyonso “basanzolaki Nzambe.” (Luka 7:20-22; 18:43) Bakristo bamekolaka Yesu na ndenge bamoniselaka baoyo nzoto ezali kosala malamu te motema mawa. Na yango, tomoniselaka bato ya lolenge wana boboto mpe motema molai. Ya solo, Yehova apesá biso te nguya ya kosala makamwisi. Kasi tozali na lokumu ya koyebisa bato nyonso oyo bakufá miso, ezala na mosuni to na elimo, nsango malamu oyo etali paradiso epai bato nyonso bakozala na nzoto ya kokoka mpe bakozala na boyokani malamu elongo na Nzambe. (Luka 4:18) Nsango malamu yango etindi bato mingi bápesa Nzambe nkembo.

KOZALA SEMBO NA MAKAMBO YA MOMBONGO

6. Ndenge nini Balevi mokapo 19 ezali kosalisa biso tókanga malamu ntina ya Mibeko Zomi?

6 Bavɛrsɛ mosusu na Balevi mokapo 19 elobeli lisusu na mozindo makambo oyo ezali na Mibeko Zomi. Na ndakisa, mobeko ya mwambe elobi ete: “Osengeli koyiba te.” (Kob. 20:15) Moto mosusu akokaki kokanisa ete soki azwá naino te eloko ya moto mosusu, yango elimboli ete azali kotosa mobeko yango. Kasi akokaki koyiba na lolenge mosusu.

7. Ndenge nini mosali-mombongo akokaki kobuka mobeko ya mwambe na likambo etali koyiba?

7 Moto ya mombongo akoki kokanisa ete naino ayibá te mpo azwá naino te eloko ya moto mosusu. Kasi azalaka ntango nyonso sembo ntango azali kosala makambo ya mombongo ná bato mosusu? Ndenge emonisami na Balevi 19:35, 36, Yehova alobaki boye: “Bosengeli te kozanga bosembo ntango bozali komeka bolai to bonene, komeka kilo to komeka biloko ya maimai. Bokozala na bimekeli-kilo ya sikisiki, biloko ya kilo oyo emekami na sikisiki, efa ya sikisiki mpe hini ya sikisiki.” Mosali-mombongo oyo azalaki kosalela kilo ya sikisiki te mpo na kobuba bakiliya na ye, azalaki nde koyiba bango. Bavɛrsɛ mosusu na Balevi mokapo 19 mpe emonisi yango polele.

Na kotalela Balevi 19:11-13, mokristo akoki komituna mituna nini mpo na ndenge oyo azali kosala mombongo? (Talá paragrafe 8-10) *

8. Ndenge nini makambo mosusu oyo Balevi 19:11-13 elobeli esalisaki Bayuda básalela mitinda oyo ezali na mobeko ya mwambe, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso?

8 Tángá Balevi 19:11-13. Balevi 19:11 ebandi na maloba oyo: “Bosengeli koyiba te.” Vɛrsɛ 13 elobi ete kobuba moto na makambo ya mombongo ezali ndenge moko na koyiba, elobi boye: “Osengeli te kobuba moninga na yo.” Na yango, kobuba moto na makambo ya mombongo ezali ndenge moko na koyiba. Mobeko ya mwambe elobi ete koyiba ezali mabe. Kasi makambo mosusu oyo mokanda ya Balevi ebakisi, esalisaki Bayuda báyeba ndenge oyo bakokaki kosalela mitinda oyo ezali na mobeko yango. Ezali malamu tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka likambo etali kozanga bosembo mpe koyiba. Tokoki komituna boye: ‘Ntango natángaka Balevi 19:11-13, namonaka ete ezali na makambo mosusu oyo nasengeli kosembola na bomoi na ngai, mingimingi na likambo etali mombongo?’

9. Ndenge nini Mobeko oyo ezali na Balevi 19:13 ekokaki kosalisa basali?

9 Ezali na makambo mosusu etali bosembo oyo mokristo oyo asalaka makambo ya mombongo asengeli kotalela. Balevi 19:13 oyo esukisi na maloba oyo: “Lifuti ya mosali oyo azwaka lifuti ekotikala te butu mobimba epai na yo tii na ntɔngɔ.” Na Yisraele ya kala, bato mingi bazalaki kosala mosala ya bilanga. Mpe na nsuka ya mokolo, bazalaki kofuta basali oyo bazwaki bango na mosala ya bilanga. Koboya kofuta mosali yango mbongo na ye ekokaki kosala ete azanga mbongo ya koleisa libota na ye mokolo yango. Yehova alobaki boye: “Azali na mpasi mpe molimo na ye ezali kotya motema na lifuti na ye.”​—Mib. 24:14, 15; Mat. 20:8.

10. Mateya nini tokoki kozwa na Balevi 19:13?

10 Lelo oyo, basali mingi bafutamaka mbala moko to mbala mibale na sanza, kasi mikolo nyonso te. Atako bongo, etinda oyo ezali na Balevi 19:13 ezali mpe na ntina lelo oyo. Bato mosusu oyo bazwaka bato na mosala bazalaka sembo te epai ya basali na bango na ndenge bafutaka bango mbongo moke koleka oyo basengeli na yango. Bayebaka ete basali yango bakoki kozala na eloko ya kosala te, mpe bakokoba kaka kosala ata soki bazali kofuta bango mbongo moke mpenza. Na maloba mosusu, ezali lokola ‘batikalaka na lifuti ya mosali oyo asengeli kofutama.’ Mokristo oyo asalaka makambo ya mombongo asengeli kosala makasi azala sembo epai ya basali na ye. Sikoyo tótala mateya mosusu oyo tokoki koyekola na Balevi mokapo 19.

LINGÁ MONINGA NA YO LOKOLA YO MOKO

11-12. Yesu alingaki mpenza kosalisa biso tóyeba likambo nini ntango atángaki maloba oyo ezali na Balevi 19:17, 18?

11 Nzambe apekisi biso kosala basusu mabe. Kasi alingi tósuka kaka wana te. Tótala likambo oyo alobi na Balevi 19:17, 18. (Tángá.) Talá mobeko ya polele oyo apesi biso: “Osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.” Kosala bongo ezali na ntina mingi mpo na mokristo oyo alingi kosepelisa Nzambe.

12 Yesu amonisaki ete mobeko oyo ezali na Balevi 19:18 ezali na ntina mingi. Mofarisai moko atunaki ye boye: “Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?” Yesu ayanolaki ye ete “mobeko oyo eleki monene na kati ya mibeko” ezali ya kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makanisi na biso nyonso. Na nsima, Yesu atángaki maloba oyo ezali na Balevi 19:18, oyo elobi: “Ya mibale oyo ekokani na yango yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Mat. 22:35-40) Ezali na balolenge mingi ya komonisela mozalani na biso bolingo. Balevi mokapo 19 ekoki koteya biso lolenge mosusu ya kosala yango.

13. Ndenge nini lisolo ya Yozefe esalisi biso tókanga malamu ntina ya mobeko oyo ekomamaki na nsima na Balevi 19:18?

13 Lolenge moko ya komonisa bolingo mpo na bazalani na biso, ezali ya kosalela toli oyo ezali na Balevi 19:18, oyo elobi: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda.” Mingi na biso toyebi bato oyo bakangelá baninga na bango ya misala nkanda, baninga na bango ya kelasi, to mpe bandeko na bango ya libota, ata mpe na boumeli ya bambula! Kobosana te ete bandeko ya Yozefe bakangelaki ye nkanda makasi, mpe nsukansuka yango etindaki bango básala ye mabe. (Eba. 37:2-8, 25-28) Kasi Yozefe akangelaki bango nkanda te! Ntango akómaki moto ya lokumu na Ezipito, azalaki na likoki ya kosala bandeko na ye mabe, kasi ayokelaki bango mawa. Yozefe abombelaki bango nkanda na motema te. Asalaki nde na boyokani na toli oyo ekomamaki na nsima na Balevi 19:18.​—Eba. 50:19-21.

14. Nini emonisi ete mitinda oyo ezali na Balevi 19:18 ezali kaka na ntina tii lelo oyo?

14 Bakristo oyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli komekola Yozefe oyo alimbisaki bandeko na ye na esika ya kozongisela bango mabe. Yango eyokani mpe na libondeli ya ndakisa, epai Yesu ateyaki biso tólimbisaka baoyo basaleli biso makambo ya mabe. (Mat. 6:9, 12) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bozongisela ye mabe te.” (Rom. 12:19) Alendisaki mpe bango na maloba oyo: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Kol. 3:13) Mitinda ya Yehova ebongwani te. Mitinda oyo ezali na Balevi 19:18 ezali kaka na ntina tii lelo oyo.

Kaka ndenge ezalaka malamu te kosimbasimba esika oyo tozoki, ezali mpe malamu te kokanisakanisa makambo ya mabe oyo basalelaki biso. Tosengeli kobosana yango (Talá paragrafe 15) *

15. Ndakisa nini esalisi biso tóyeba ntina oyo tosengeli kolimbisaka basusu mpe kobosana likambo yango?

15 Tótalela ndakisa moko. Mpasi oyo toyokaka soki basali biso likambo moko ya mabe ezali lokola mpota oyo moto azoki. Bampota mosusu ezalaka ya mike kasi misusu ezalaka ya minene. Na ndakisa, ntango tozali kokata ndunda, tokoki kozoka mwa moke na mosapi. Yango ekoki mpenza kosala mpasi, kasi mpasi yango ekoumela libela te. Nsima ya mokolo moko to mibale, mbala mosusu tokoki kutu kobosana esika oyo tozokaki. Ndenge moko mpe, makambo mosusu ya mabe oyo basalelaka biso ezalaka ya mike. Na ndakisa, moninga moko akoki koloba to kosala likambo moko oyo epesi biso mpasi, kasi tokoki kolimbisa ye na pɛtɛɛ nyonso. Nzokande, soki mpota yango ezali monene, ekoki kosɛnga ete monganga atonga yango to akanga yango mwa elamba. Kasi soki tokobi kosimbasimba mpota yango, biso moko tokomisala mabe koleka. Likambo ya mawa, bato mosusu basalaka likambo ya ndenge wana soki ndeko moko asali likambo oyo epesi bango mpenza mpasi na motema. Bakoki kokoba kokanisa ndenge oyo moto moko azokisaki bango mpe mpasi oyo bayokaki mpo na likambo yango. Kasi baoyo babombaka nkanda na motema, bamisalaka mabe. Kotosa toli oyo ezali na Balevi 19:18 ezali mpenza na ntina!

16. Ndenge Balevi 19:33, 34 emonisi yango, ndenge nini basengelaki kosalela baoyo bazalaki bapaya na Yisraele makambo, mpe yango eteyi biso nini?

16 Ntango Yehova asɛngaki Bayisraele bálinga bazalani na bango, asɛngaki te ete básala yango kaka epai ya bato oyo bazali loposo moko to ekólo moko na bango. Asɛngaki ete bálingaka mpe bapaya oyo bafandi na kati na bango. Yango nde maloba oyo ezali na Balevi 19:33, 34. (Tángá.) Basengelaki kosalela mopaya makambo “lokola mwana-mboka,” mpe Bayisraele basengelaki “kolinga ye” lokola bamilingaka bango moko. Na ndakisa, Bayisraele basengelaki kotika nzela ete baoyo bafandi bapaya mpe babola bálɔkɔtaka biloko oyo ezalaki kotikala na bilanga. (Lev. 19:9, 10) Bakristo basengeli mpe kotosa etinda oyo esɛngi kolinga baoyo bafandi bapaya. (Luka 10:30-37) Na ndenge nini? Lelo oyo, ezali na bato mingi oyo batiká bamboka na bango mpe ntango mosusu bafandaka penepene na esika oyo tozali. Ezali na ntina ete tósalelaka bango makambo na lokumu mpe na limemya.

LIKAMBO MOSUSU YA NTINA OYO BALEVI MOKAPO 19 ELOBELI TE

17-18. (a) Mokanda ya Balevi 19:2 mpe 1 Petro 1:15 elendisi biso tósala likambo nini? (b) Mosala nini ya ntina mingi ntoma Petro alendisi biso tósala?

17 Mokanda ya Balevi 19:2 mpe 1 Petro 1:15 esɛngi basaleli ya Nzambe bázala basantu. Bavɛrsɛ mingi oyo ezali na Balevi mokapo 19 ekoki kosalisa biso tómona oyo tokoki kosala mpo Nzambe andima biso. Touti kolobela kaka mwa bavɛrsɛ oyo emonisi makambo oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te. * Makomami ya Grɛki ya bokristo emonisi ete Yehova alingaka kaka tósalela mitinda yango na bomoi na biso. Kasi ntoma Petro abakisaki likambo mosusu.

18 Tokoki komipesa mingi na makambo ya elimo mpe kosalela basusu makambo ya malamu, kasi ntoma Petro asɛngaki bakristo básala likambo mosusu ya ntina mingi. Liboso alendisa biso tókóma basantu na etamboli na biso nyonso, alobaki boye: “Bóbongisa makanisi na bino mpo na mosala.” (1 Pe. 1:13, 15) Mosala yango nini? Ntoma Petro alobaki ete bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki ‘kosakola bizaleli malamu ya moto oyo abengaki bango.’ (1 Pe. 2:9) Kutu, bakristo nyonso lelo oyo bazali na lokumu ya kosala mosala yango ya ntina mingi oyo esalisaka bato mingi koleka mosala mosusu nyonso. Ezali lokumu monene mpo na basaleli ya Nzambe oyo basakolaka mpe bateyaka mbala na mbala na molende! (Mrk. 13:10) Ntango tosalaka oyo tokoki mpo na kosalela mitinda oyo ezali na Balevi mokapo 19, tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. Lisusu, tomonisaka ete tolingi ‘kokóma basantu’ na etamboli na biso nyonso.

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

^ par. 5 Bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te, kasi Mibeko yango elobeli makambo mingi oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te. Koyekola Mibeko yango ekosalisa biso tómoniselaka basusu bolingo mpe tósepelisa Nzambe. Lisolo oyo elobeli matomba oyo tokoki kozwa na mateya mosusu oyo ezali na mokanda ya Balevi mokapo 19.

^ par. 17 Na lisolo oyo mpe na lisolo oyo euti koleka, tolobeli te likambo ya koboya kopona bilongi, kokosela basusu makambo, kolya makila, ata mpe kosala misala ya bilimo mabe, kosakola makambo oyo ekoya, mpe makambo ya pite.​—Lev. 19:15, 16, 26-29, 31.​—Talá “Mituna ya batángi” na nimero oyo.

^ par. 52 ELILINGI: Motatoli ya Yehova moko azali kosalisa ndeko oyo akufá matoi mpo asolola na monganga.

^ par. 54 ELILINGI: Ndeko mobali moko oyo azali na kompanyi ya kotya balangi azali kofuta bato oyo basalaka epai na ye.

^ par. 56 ELILINGI: Ndeko mwasi moko akoki kobosana mpota ya moke oyo azokaki. Kasi akondima mpe kobosana mpota ya monene oyo azoki?