Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 50

Yoká mongongo ya mobateli ya mpate ya malamu

Yoká mongongo ya mobateli ya mpate ya malamu

“Ekoyoka mongongo na ngai.”​—YOA. 10:16.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE *

1. Ekoki kozala mpo na nini Yesu akokanisaki bayekoli na ye na bampate?

YESU akokanisaki bolingo makasi oyo azalaka na yango mpo na bayekoli na ye na bolingo makasi oyo mobateli ya mpate azalaka na yango mpo na bampate na ye. (Yoa. 10:14) Yango ebongi mpenza. Mpate eyebaka mobateli na yango mpe eyokaka mongongo na ye. Mosali-mibembo moko amonaki bosolo ya likambo yango. Alobi boye: “Mokolo moko ntango tozalaki kosala mobembo, tomonaki mwa etuluku moko ya bampate. Ntango tomekaki kobenga bampate yango mpo na kokanga yango fɔtɔ, ata moko eyaki te mpo eyebaki mongongo na biso te. Nzokande ntango kaka elenge mobali moko oyo azalaki kobatela yango abengaki yango, na mbala moko bampate yango elandaki ye.”

2-3. (a) Ndenge nini bayekoli ya Yesu bamonisaka ete bazali koyoka mongongo na ye? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe na lisolo oyo ekolanda?

2 Makambo oyo mosali-mibembo yango amonaki ekundweli biso maloba oyo Yesu alobaki mpo na bampate na ye, elingi koloba, bayekoli na ye. Alobaki boye: “Ekoyoka mongonga na ngai.” (Yoa. 10:16) Kasi Yesu azali na likoló; na yango, ndenge nini tokoki koyoka mongongo na ye? Lolenge eleki malamu ya komonisa ete toyokaka mongongo ya Nkolo na biso ezali ya kosalela mateya na ye na bomoi na biso.​—Mat. 7:24, 25.

3 Na lisolo oyo mpe na lisolo oyo ekolanda, tokolobela ndambo ya mateya ya Yesu. Ndenge tokomona yango, Yesu ateyaki biso makambo mosusu oyo tosengeli kosala mpe oyo tosengeli kosala te. Tokolobela naino makambo mibale oyo mobateli ya mpate ya malamu asɛngi biso tótika kosala.

“BÓTIKA KOZALA MOTEMA LIKOLÓLIKOLÓ”

4. Na kotalela Luka 12:29, nini ekoki kotinda biso tózala “motema likolólikoló”?

4 Tángá Luka 12:29. Yesu asɛngaki bayekoli na ye ‘bátika kozala motema likolólikoló’ mpo na biloko ya mosuni. Toyebi ete toli ya Yesu ezalaka ntango nyonso ya bwanya mpe oyo ebongi mpenza. Tolingaka kosalela yango, kasi na bantango mosusu tokoki komona ete ezali mpasi kosala bongo. Mpo na nini?

5. Makambo nini ekoki kotinda bato mosusu bákóma komitungisa mpo na biloko ya mosuni?

 5 Bato mosusu bakoki komitungisa mingi mpo na biloko na bango ya mosuni, na ndakisa, bilei, bilamba, mpe esika ya kolala. Ekoki kozala ete bafandaka na ekólo moko ya bobola mpenza. Yango ekoki kosala ete ezala mpasi mpo bázwa mbongo mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Ekoki mpe kozala ete moto oyo azalaki kosalisa libota na mosuni akufá; yango ekómi mpasi mpo libota yango ezwa mbongo ya kokokisa bamposa na yango. Lisusu, ekoki mpe kozala ete mpo na maladi mabe oyo ya Coronavirus, bato mingi babungisi misala na bango mpe bazali lisusu na mbongo te. (Mos. 9:11) Soki tokutani na mikakatano ya ndenge wana to mpe ya ndenge mosusu, ndenge nini tokoki kolanda toli ya Yesu ya kotika komitungisa?

Na esika tómitungisa koleka ndelo mpo na biloko ya mosuni, tosengeli nde kotyela Yehova motema (Talá paragrafe 6-8) *

6. Lobelá makambo oyo ekómelaki ntoma Petro mokolo moko.

6 Mokolo moko, ntoma Petro ná bantoma mosusu bazalaki na masuwa na mbu ya Galile. Na ntango yango, mopɛpɛ moko makasi ezalaki kobɛta mpe bamonaki Yesu azali kotambola likoló ya mai. Petro alobaki: “Nkolo soki ezali yo, lobá na ngai naya epai na yo likoló ya mai.” Na nsima Yesu ayebisaki ye ‘aya,’ mpe Petro akitaki na masuwa mpe ‘atambolaki likoló ya mai akei epai ya Yesu.’ Nini esalemaki na nsima? “Ntango amonaki mopɛpɛ makasi, abangaki mpe, lokola abandaki kozinda, agangaki: ‘Nkolo, bikisá ngai!’” Na mbala moko, Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki ye mpe abikisaki ye. Ezali na ntina tóbosana te ete Petro azalaki na likoki ya kotambola likoló ya mai ntango atyaki likebi na ye nyonso epai ya Yesu. Kasi ntango Petro atyaki makanisi na ye na mopɛpɛ, akómaki na nsɔmɔ makasi mpe abandaki kozinda.​—Mat. 14:24-31.

7. Ndakisa ya ntoma Petro ekoki koteya biso nini?

7 Tokoki koyekola mateya mingi na ndakisa ya ntoma Petro. Ntango akitaki na masuwa mpe abandaki kotambola likoló ya mbu, akanisaki te ete akobanga mpe akobanda kozinda. Mposa na ye ezalaki ya kokoba kotambola likoló ya mai tii esika Nkolo na ye azalaki. Kasi na esika akoba kotya makanisi na ye apai ya Yesu, akómaki nde kobanga mopɛpɛ. Atako lelo oyo tokoki te kotambola likoló ya mai lokola Petro, biso mpe tokutanaka na mikakatano oyo emekaka kondima na biso. Soki totiki kotya likebi na biso nyonso epai ya Yehova mpe bilaka na ye, tokobanda kozinda na elimo. Na yango, ata soki tokutani na mikakatano nini na bomoi na biso, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso nyonso epai ya Yehova mpe na likoki na ye ya kosalisa biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

8. Nini ekoki kosalisa biso tómitungisa koleka ndelo te mpo na biloko ya mosuni oyo tosengeli na yango?

8 Na esika tokóma komitungisa mingi mpo na mikakatano na biso, tosengeli nde kotyela Yehova motema. Kobosana te ete Yehova Tata na biso ya bolingo alaki ete akokokisa bamposa na biso ya mosuni soki totye makambo ya elimo na esika ya liboso. (Mat. 6:32, 33) Akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Mib. 8:4, 15, 16; Nz. 37:25) Soki Yehova aleisaka bandɛkɛ mpe alatisaka bafolo, na ntembe te, tozali na ntina ya komitungisa te mpo na oyo tokolya to oyo tokolata! (Mat. 6:26-30; Flp. 4:6, 7) Ndenge kaka bolingo etindaka baboti bákokisa bamposa ya mosuni ya bana na bango, bolingo mpe etindaka Tata na biso ya likoló apesa biso oyo tosengeli na yango. Ya solo, tokoki mpenza kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na biso!

9. Ndakisa ya ndeko mobali moko ná mwasi na ye ekoki koteya yo nini?

9 Tótalela ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yehova akokisaka bamposa na biso ya mosuni. Mokolo moko, ndeko mobali moko ná mwasi na ye, oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, batambolaki koleka ngonga moko na motuka na bango ya kimbambala mpo na kokende kozwa mwa bandeko basi oyo bazalaki kofanda na kaa ya bato oyo bakimá mboka mpe koya na bango na makita. Ndeko mobali yango alobi boye: “Nsima ya makita, tobengisaki bandeko basi yango báya na ndako mpo tólya mwa eloko. Kasi na nsima, toyaki koyeba ete tozalaki na eloko ya kopesa bango te.” Ndeko yango ná mwasi na ye basalaki nini? Ndeko yango alobi boye: “Ntango tokómaki na ndako, tokutaki bakitunga mibale ya minene oyo etondaki na biloko liboso ya porte na biso. Toyebaki te soki nani nde atyaki yango wana. Yehova akokisaki bamposa na biso.” Mokolo mosusu, motuka na bango ekufaki. Yango nde ezalaki kosalisa bango na mosala ya kosakola. Lisusu, bazalaki na mbongo te mpo na kobongisa yango. Bamemaki yango na esika oyo babongisaka mituka mpo na koyeba soki ekosɛnga mbongo boni. Na nsima, mobali moko ayaki mpe atunaki boye: “Oyo motuka ya nani?” Ndeko mobali yango alobaki ete ezalaki ya ye mpe ete azalaki na mposa bábongisa yango. Mobali yango alobaki: “Malamu. Mwasi na ngai azali na mposa ya motuka ya boye mpe kaka ya langi oyo. Napesa yo mbongo boni mpo na yango?” Mobali yango apesaki ndeko na biso mbongo oyo esengeli mpo na kosomba motuka mosusu. Na nsuka, ndeko na biso alobaki boye: “Nazali kozanga maloba mpo na komonisa esengo oyo tozalaki na yango na nsuka ya mokolo wana. Toyebaki ete ezalaki mpenza lobɔkɔ ya Yehova.”

10. Ndenge nini Nzembo 37:5 ezali kolendisa biso tótika komitungisa mpo na biloko ya mosuni?

10 Soki tozali koyoka mongongo ya mobateli ya mpate ya malamu mpe totiki komitungisa koleka ndelo mpo na biloko ya mosuni, tóyeba ete Yehova akokokisa bamposa na biso. (Tángá Nzembo 37:5; 1 Pe. 5:7) Tótalela makambo oyo tolobelaki na  paragrafe 5. Touti komona ete Yehova akoki kosalela tata ya libota to mpe mokonzi ya mosala moko boye mpo na kosalisa biso tókokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo. Soki tata ya libota azali lisusu na likoki ya kosala yango te, to mpe soki tobungisi mosala na biso, Yehova akosalela mayele mosusu mpo na kokokisa bamposa na biso. Tosengeli kozala na kondima ete akosala yango. Tótalela likambo mosusu oyo mobateli ya mpate ya malamu asɛngi biso tótika kosala.

“BÓTIKA KOSAMBISA”

Tokoki kotika kosambisa basusu soki tozali kotya makanisi na biso na bizaleli na bango ya malamu (Talá paragrafe 11, 14-16) *

11. Na kotalela Matai 7:1, 2, Yesu alobaki ete tótika kosala nini, mpe mpo na nini kosala bongo ekoki kozala mokakatano?

11 Tángá Matai 7:1, 2Yesu ayebaki ete mbala mingi bayoki na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, bakokaki kotya makanisi na bango na mabunga ya basusu. Yango wana alobaki: “Bótika kosambisa.” Tokoki kosala nyonso mpo tótika kosambisa basusu, kasi na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi mpo biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Tosengeli kosala nini soki tomoni ete na bantango mosusu tokómi kosambisa basusu? Tosengeli koyoka mongongo ya Yesu mpe kosala makasi mpo tótika kosambisa basusu.

12-13. Ndenge nini kokanisa na mozindo na ndenge oyo Yehova atalelaki Mokonzi Davidi esalisi biso tótika kosambisaka basusu?

12 Kokanisa na mozindo na ndakisa ya Yehova ekoki kosalisa biso. Atyaka makanisi na ye na makambo ya malamu oyo bato basalaka. Kanisá oyo asalaki ntango Mokonzi Davidi asalaki mabunga minene. Na ndakisa, Davidi asalaki ekobo ná Bate-sheba, mpe abomisaki kutu mobali na ye. (2 Sa. 11:2-4, 14, 15, 24) Likambo yango ememelaki kaka ye moko mpasi te, kasi mpe libota na ye ata mpe basi na ye mosusu. (2 Sa. 12:10, 11) Mokolo mosusu, Davidi azangaki kotyela Yehova motema mobimba na ndenge apesaki mitindo ete bátánga basoda ya Yisraele. Ekoki kozala ete lolendo mpe ndenge oyo azalaki kotya motema na ebele ya basoda oyo azalaki na bango nde etindaki ye asala bongo. Yango ebimisaki makambo nini? Maladi mabe ebomaki Bayisraele soki 70 000!​—2 Sa. 24:1-4, 10-15.

13 Soki ozalaka na Yisraele na ntango wana, ndenge nini olingaki kotalela Davidi? Olingaki kokanisa ete Yehova asengeli kolimbisa ye te? Yehova asalaki bongo te. Atyaki makanisi na ye na bosembo oyo Davidi amonisaki na bomoi na ye mpe na makambo oyo emonisaki ete abongolaki mpenza motema. Yango esalaki ete Yehova alimbisa ye mpo na masumu minene oyo asalaki. Yehova ayebaki ete Davidi azalaki kolinga ye mingi mpe azalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Osepelaka te ndenge oyo Nzambe na biso atyaka likebi na makambo ya malamu oyo tosalaka?​—1 Bak. 9:4; 1 Nt. 29:10, 17.

14. Makambo nini esalisaka bakristo bátika kosambisa basusu?

14 Lokola Yehova asɛngaka biso te ete tósala makambo lokola bato ya kokoka, biso mpe tosengeli te kosɛnga bato mosusu básalaka makambo na ndenge ya kokoka. Mbala mingi ezalaka mpasi te tómona mabunga ya basusu mpe tósambisa bango. Nzokande moto ya elimo azalaka na boyokani malamu ná basusu ata soki ayebi mabunga na bango. Tózwa ndakisa oyo: Soki diama epɛtolami naino te emonanaka kitoko te, kasi moto ya mayele ayebaka ete soki bapɛtoli yango, ekokóma kitoko mpenza. Lokola Yehova mpe Yesu, tosengeli kotalaka kaka te mabunga ya bato mosusu, kasi tosengeli nde kotyaka likebi na bizaleli na bango ya malamu.

15. Ndenge nini kotalela makambo ya bomoi ya bato ekoki kosalisa biso mpo tósambisaka bango te?

15 Longola kotya makanisi na bizaleli malamu ya basusu, nini ekoki kosalisa biso mpo tósambisaka bango te? Meká kokanisa ndenge bomoi na bango ezali. Tózwa ndakisa oyo. Mokolo moko na tempelo, Yesu amonaki mwasi mobola moko oyo mobali akufá azali kotya mbongo mibale ya motuya moke mpenza na kɛsi ya makabo. Yesu amitunaki te: “Mpo na nini mwasi yango atye mbongo moke boye?” Na esika atya makanisi na ye na motángo ya mbongo oyo mwasi yango atyaki, Yesu atalelaki nde makanisi oyo etindaki mwasi yango apesa likabo wana mpe makambo ya bomoi na ye. Yango wana, akumisaki ye ndenge asalaki nyonso oyo akokaki.​—Luka 21:1-4.

16. Ndakisa ya ndeko mwasi Veronica ekoki koteya yo nini?

16 Ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Veronica emonisi mpo na nini ezali na ntina tótalelaka makambo ya bomoi ya basusu. Na lisangá na bango ezalaki na ndeko mwasi moko oyo azalaki kobɔkɔla mwana na ye ya mobali ye moko. Veronica alobi boye: “Namonaki ete bazalaki komipesa mingi te na makambo ya lisangá. Mpo na yango, nazalaki kotalela bango na ndenge ya mabe. Kasi mokolo moko, nabimaki na mosala ya kosakola ná ndeko mwasi yango. Ayebisaki ngai mikakatano oyo azalaki kokutana na yango mpo mwana na ye wana azalaki kobɛla maladi ya motó. Azalaki kosala oyo akoki mpo na kokokisa bamposa na ye mpe ya mwana yango na mosuni mpe na elimo. Na bantango mosusu, mpo na maladi ya mwana yango, ezalaki kosɛnga ete ndeko mwasi yango akɔta makita ya lisangá mosusu.” Na yango, ndeko Veronica alobi boye: “Nayebaki te ete azalaki na mokakatano monene boye. Sikoyo nakómá kolinga ndeko mwasi yango mpe kopesa ye limemya mingi mpo na nyonso oyo asalaka na mosala ya Yehova.”

17. Yakobo 2:8 esɛngi biso tósala nini, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

17 Tosengeli kosala nini soki tomoni ete tosambisaki ndeko moko? Tosengeli kobosana te ete tosengeli kolinga bandeko na biso. (Tángá Yakobo 2:8.) Lisusu, tosengeli kobondela mpenza Yehova, kosɛnga ye asalisa biso tótika kosambisaka basusu. Tokoki kosala na boyokani na mabondeli na biso soki tozwi bibongiseli mpo na kolekisa ntango elongo na ndeko oyo tozalaki kosambisa. Yango ekoki kosalisa biso mpo tóyeba ye malamu. Tokoki kosɛnga ye tóbima elongo na mosala ya kosakola to mpe tólya mwa eloko. Wana tozali koyeba ndeko na biso malamu, tokosala makasi tómekola Yehova mpe Yesu soki tozali kotya likebi na bizaleli na ye ya malamu. Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali koyoka toli ya mobateli ya mpate ya malamu oyo asɛngi biso tótika kosambisa basusu.

18. Ndenge nini tokoki komonisa ete toyokaka mongongo ya mobateli ya mpate ya malamu?

18 Kaka ndenge bampate eyokaka mongongo ya mobateli na yango, bayekoli ya Yesu mpe bayokaka mongongo na ye. Soki tosali makasi tótika komitungisa mpo na biloko ya mosuni oyo tosengeli na yango mpe tótika kosambisa basusu, Yehova ná Yesu bakopambola milende na biso. Ezala tozali na kati ya “etonga moke” to “bampate mosusu,” tókoba koyoka mongongo ya mobateli ya mpate ya malamu mpe kotosa ye. (Luka 12:32; Yoa. 10:11, 14, 16) Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo mibale oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye básalaka.

LOYEMBO 101 Tósala na bomoko

^ par. 5 Ntango Yesu alobaki ete bampate na ye ekoyoka mongongo na ye, alingaki koloba ete bayekoli na ye bakoyoka mateya na ye mpe bakosalela yango na bomoi na bango. Na lisolo oyo, tokolobela mateya mibale ya Yesu: Kotika komitungisa mpo na biloko ya mokili mpe koboya kosambisaka basusu. Tokomona ndenge oyo tokoki kosalela toli na ye.

^ par. 51 ELILINGI: Ndeko mobali moko abungisi mosala na ye, azali lisusu te na mbongo oyo esengeli mpo akokisa bamposa ya libota na ye, mpe azali kolukela libota na ye esika ya kofanda. Soki akebi te, akoki kotya makanisi na ye nyonso na makambo yango mpe kozongisa losambo ya Yehova na nsima.

^ par. 53 ELILINGI: Ndeko mobali moko ayei makita na retare. Kasi azali komonisa bizaleli malamu na ndenge azali kopesa litatoli ya libaku malamu, azali kosalisa ndeko moko oyo akómi mobange, mpe azali kopesa mabɔkɔ mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi.