Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi mpenza masolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya mbula oyo? Soki ezali bongo, talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Yakobo 5:11 epesi biso elikya nini ntango elobi ete Yehova azali na “bolingo mingi ya motema” mpe “amonisaka motema mawa”?

Tóyebi ete motema mawa ya Yehova etindaka ye alimbisa mabunga na biso. Yakobo 5:11 eyebisi mpe biso ete bolingo na ye ya motema etindaka ye asalisa biso. Tosengeli kosala makasi tómekola ye.​—w21.01, lok. 21.

Mpo na nini Yehova atyá ebongiseli ya bokonzi?

Ezali mpo alingaka libota na ye. Ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá esalaka ete makambo etambola na kimya mpe na molɔngɔ na kati ya libota na ye. Mosangani nyonso ya libota oyo asalaka na boyokani na ebongiseli yango, ayebaka soki nani nde asengeli kozwa bikateli ya nsuka mpe soki nani nde asengeli kolandela mpo bikateli yango etosama.​—w21.02, lok. 3.

Mpo na nini bakristo basengeli kozala ekɛngɛ ntango bazali kosalela basite Internet ya kosolola na baninga, na ndakisa oyo ya kotindelana bamesaje?

Soki moto aponi kosalela basite yango, asengeli kozala ekɛngɛ ntango azali kopona baninga na ye. Ekozala mpasi kosala yango soki etuluku yango esangisi bato ebele. (1 Tim. 5:13) Ekoki mpe kozala na makama mosusu oyo ekoki kobima, ya kopanza basango ya lokuta mpe ya kolobela makambo ya mimbongo epai ya bandeko ya lisangá.​—w21.03, lok. 31.

Wapi mwa bantina oyo mpo na yango Nzambe atikaki nzela ete Yesu anyokwama mpe akufa?

Ya liboso, Yesu asengelaki kokakisama na nzete mpo na kolongola Bayuda na elakeli mabe. (Gal. 3:10, 13) Ntina ya mibale ezali ete Yehova azalaki kopesa Yesu formasyo mpo na mokumba ya Nganga-nzambe Monene. Ya misato, ndenge Yesu atikalaki sembo tii na liwa emonisaki ete bato bakoki kotikala sembo ata soki bakutani na komekama ya makasi. (Yobo 1:9-11)​—w21.04, nk. 16-17.

Okoki kosala nini soki na mosala ya kosakola ozali kokuta bato na bandako te?

Okoki kokutana na bato mingi soki osakoli na bangonga oyo bazalaka na bandako na bango. Okoki mpe komeka kosakola na bisika mosusu. Mpe okoki kosalela mayele ndenge na ndenge, na ndakisa, kokoma mikanda.​—w21.05, nk. 15-16.

Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki: “Na nzela ya mibeko, nakufaki na makambo ya mibeko”? (Gal. 2:19)

Mibeko emonisaki polele kozanga kokoka ya bato mpe ememaki ekólo Yisraele epai ya Kristo. (Gal. 3:19, 24) Yango etindaki ntoma Paulo andimela Kristo. Na ndenge yango, Paulo “akufaki na makambo ya mibeko,” elingi koloba, mibeko ezalaki lisusu na nguya te likoló na ye.​​—w21.06, lok. 31.

Ndakisa nini Yehova apesi biso na likambo etali koyika mpiko?

Yehova azali koyika mpiko na ndenge oyo basambwisá nkombo na ye, ndenge batɛmɛlá lolenge na ye ya koyangela mpe ndenge bana na ye mosusu batombokelaki ye. Lisusu, azali koyika mpiko ndenge Satana azali kokoba kokosela ye makambo, ndenge oyo basaleli na ye bazali konyokwama, ndenge oyo akabwaná na baninga na ye oyo bakufá, ndenge basali-mabe banyokolaka bato, mpe ndenge bato bazali kobebisa biloko oyo akelá.​—w21.07, nk. 9-12.

Ndakisa nini Yozefe atikelá biso na likambo etali komonisa motema molai?

Ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo ya bandeko na ye. Mpe yango esalaki ete bákosela ye makambo mpe bátya ye na bolɔkɔ na Ezipito na boumeli ya bambula mingi.​—w21.08, lok. 12.

Hagai 2:6-9, 20-22 esakolaki koningisama ya ndenge nini?

Bato mosusu bandimaka te nsango ya Bokonzi oyo tosakolaka, kasi bato mingi bazali koya na solo. Mosika te bikólo ekoningisama mpo na mbala ya nsuka ntango ekobebisama.​—w21.09, nk. 15-19.

Mpo na nini tosengeli kolɛmba te na mosala na biso ya kosakola?

Yehova amonaka milende oyo tosalaka mpe asepelaka na yango. Soki tolɛmbi te mpe totiki te, akopesa biso bomoi ya seko.​—w21.10, nk. 25-26.

Ndenge nini Balevi mokapo 19 esalisi biso tósalela toli oyo elobi: “Bókóma basantu na etamboli na bino mobimba”? (1 Pe. 1:15)

Ekoki kozala ete ntoma Petro atángaki maloba oyo ezali na Balevi 19:2. Mokapo 19 ezali na bandakisa mingi oyo ekoki kosalisa biso tósalela toli oyo ezali na 1 Petro 1:15 na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.​—w21.12, nk. 3-4.