Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bato oyo bayinami bazali bisika nyonso na mokili mobimba

Bato oyo bayinami bazali bisika nyonso na mokili mobimba

Bato bazali konyokwama mpo ezaleli ya koyina basusu epalangani na mokili mobimba.

Bato mingi bazali kosalela bansango, basite Internet ya kosolola na baninga, ezala mpe kotinda mikanda, mpo na kopanza makanisi ya koyina bato mosusu. Na ndakisa, bato mingi bazali kokanisela basusu mabe, koyina bango, kofinga bango, konyokola bango, to mpe kobebisa biloko na bango. Na mokili mobimba, bato bazali konyokwama mpo basusu bazali kotalela bango lokola nde bazali bato te mpe bakómi koyina bango mingi mpenza!

Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge ezaleli ya koyina basusu ekoki kosila. Yango ezali ndɔtɔ mpamba te. Ezali mpenza mbongwana ya solo, oyo ekoumela, mpe ebandi kosalema na mokili mobimba.