Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 2

Mateya oyo okoki kozwa epai ya Yakobo, leki ya Yesu

Mateya oyo okoki kozwa epai ya Yakobo, leki ya Yesu

“Yakobo, moombo ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo.”​—YAK. 1:1.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

NA MOKUSE *

1. Libota oyo Yakobo akolaki ezalaki ndenge nini?

 YAKOBO, ndeko ya Yesu, akolaki na libota ya bato oyo bazalaki makasi na elimo. * Baboti na ye, Yozefe ná Maria, balingaki Yehova mingi mpenza mpe basalaki oyo bakoki mpo na kosalela Ye. Yakobo azalaki mpe na lipamboli mosusu: yaya na ye akómaki Masiya oyo alakamaki. Ezalaki mpenza lokumu mpo na Yakobo kozala na libota yango!

Na boumeli ya ntango oyo azalaki kokola elongo na Yesu, Yakobo ayekolaki koyeba yaya na ye malamu (Talá paragrafe 2)

2. Bantina nini Yakobo azalaki na yango ya komemya yaya na ye?

2 Yakobo azalaki na bantina mingi ya kopesa yaya na ye limemya. (Mat. 13:55) Na ndakisa, Yesu ayebaki Makomami malamu na boye ete ntango akómaki na mbula 12, akamwisaki bateyi oyo bazalaki na Yerusaleme. (Luka 2:46, 47) Ekoki kozala ete Yakobo asalaki mosala ya mabaya elongo na Yesu. Soki ezali bongo, boye yango esalisaki ye ayeba yaya na ye malamu. Mbala mingi ndeko Nathan Knorr azalaki koloba boye: “Okoyeba moto malamu soki ozali kosala elongo na ye.” * Ekoki kozala ete Yakobo amonaki mpe ndenge “Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.” (Luka 2:52) Na yango, tokoki kokanisa ete Yakobo azalaki moko kati na bato ya liboso oyo bakómaki bayekoli ya Yesu. Nzokande esalemaki bongo te.

3. Yakobo asalaki nini ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele?

3 Na boumeli ya mosala ya Yesu awa na mabele, Yakobo akómaki moyekoli na ye te. (Yoa. 7:3-5) Kutu, ekoki kozala ete Yakobo azalaki moko ya bandeko ya Yesu oyo bakanisaki ete Yesu “abɛli motó.” (Mrk. 3:21) Mpe eloko moko te emonisi ete Yakobo azalaki elongo na mama na ye Maria, ntango Yesu azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi.​—Yoa. 19:25-27.

4. Mateya nini tokotalela?

4 Na nsima, Yakobo andimelaki Yesu mpe akómaki nkulutu na lisangá ya bokristo mpe bandeko bazalaki kopesa ye limemya. Na lisolo oyo, tokolobela mateya mibale oyo tokoki koyekola epai ya Yakobo: (1) mpo na nini tosengeli kozala na komikitisa mpe ya (2) ndenge nini tokoki kokóma bateyi malamu.

ZALÁ NA KOMIKITISA LOKOLA YAKOBO

Yakobo amikitisaki ntango Yesu abimelaki ye, mpe kobanda wana akómaki moyekoli ya sembo ya Yesu (Talá paragrafe 5-7)

5. Yakobo asalaki nini ntango Yesu abimelaki ye nsima ya kosekwa?

5 Ntango nini Yakobo akómaki moyekoli ya sembo ya Yesu? Ntango Yesu asekwaki, “abimelaki Yakobo, mpe na nsima bantoma nyonso.” (1 Ko. 15:7) Bokutani wana ná Yesu esalisaki Yakobo akóma moko ya bayekoli na ye. Azalaki wana ntango bantoma bazalaki kozela elimo santu oyo elakamaki, na shambre moko ya likoló na Yerusaleme. (Mis. 1:13, 14) Na nsima, Yakobo azwaki libaku ya kosala na lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso. (Mis. 15:6, 13-22; Gal. 2:9) Mpe na ntango moko boye liboso ya mobu 62 ya ntango na biso, na litambwisi ya elimo santu, akomelaki bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo mokanda. Mokanda yango ezali na litomba mpo na biso lelo oyo, tózala na elikya ya kozwa bomoi ya seko na likoló to awa na mabele. (Yak. 1:1) Josèph, moto moko ya istware na siɛklɛ ya liboso, akomaki ete Yakobo abomamaki na kolanda mitindo ya nganga-nzambe monene ya Bayuda, Ananiasi mwana ya Anasi. Yakobo atikalaki sembo epai ya Nzambe tii ntango asilisaki bomoi na ye awa na mabele.

6. Nini ekesenisaki Yakobo ná bakonzi ya mangomba ya mikolo na ye?

6 Yakobo azalaki na komikitisa. Mpo na nini tolobi bongo? Talá bokeseni oyo ezali kati na ndenge oyo Yakobo akómaki kotalela Yesu mpe ndenge bakonzi mingi ya mangomba basalaki. Ntango Yakobo azwaki elembeteli ya polele ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, na komikitisa nyonso andimaki yango. Kasi banganga-nzambe bakonzi na Yerusaleme basalaki bongo te. Na ndakisa, bakokaki te kowangana ete Yesu asekwisaki Lazare. Na esika ya kondima ete Yesu azalaki momonisi ya Yehova, balukaki nde koboma Yesu ná Lazare. (Yoa. 11:53; 12:9-11) Na nsima, ntango Yesu ye moko mpe asekwaki, bayokanaki bábomba likambo yango mpo bato báyeba te. (Mat. 28:11-15) Lolendo oyo bakonzi yango ya mangomba bazalaki na yango etindaki bango báboya Masiya.

7. Mpo na nini tosengeli koboya lolendo?

7 Liteya: Boyá lolendo, mpe ndimá koteyama na Yehova. Kaka ndenge maladi ekoki kokómisa makasi misisa ya motema ya moto mpe kopekisa yango ebɛta malamu, lolendo mpe ekoki kokómisa motema na biso ya elilingi makasi mpe kopekisa biso tólanda litambwisi ya Yehova. Bafarisai bakómisaki mitema na bango makasi tii baboyaki kondima makambo oyo emonisaki polele ete Yesu azalaki na elimo ya Nzambe mpe ete azalaki Mwana ya Nzambe. (Yoa. 12:37-40) Lolendo na bango ezalaki ya mabe mpenza mpo epekisaki bango kozwa bomoi ya seko. (Mat. 23:13, 33) Yango wana, ezali na ntina mingi ete tókoba kotika Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye ebongola bomoto na biso, etambwisa makanisi mpe bikateli na biso! (Yak. 3:17) Lokola Yakobo azalaki moto ya komikitisa, atikaki ete Yehova ateya ye. Mpe ndenge tokomona yango, komikitisa na ye nde esalaki ete akóma moteyi malamu.

ZALÁ MOTEYI MALAMU LOKOLA YAKOBO

8. Nini ekosalisa biso tókóma bateyi malamu?

8 Yakobo atángaki bakelasi ya minene te. Na ntembe te, bakonzi ya mangomba ya mikolo na ye bazalaki kotalela ye kaka ndenge bazalaki kotalela ntoma Petro mpe ntoma Yoane, lokola “bato batángá kelasi mingi te.” (Mis. 4:13) Kasi Yakobo ayekolaki kozala moteyi malamu; tomonaka yango ntango totángaka mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Lokola Yakobo, ekoki kozala ete biso mpe totángá bakelasi mingi te. Atako bongo, na lisalisi ya elimo santu ya Yehova mpe na formasyo oyo tozwaka na ebongiseli na ye, biso mpe tokoki kokóma bateyi malamu. Tótalela ndakisa oyo Yakobo atiká lokola moteyi mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.

9. Lobelá ndenge oyo Yakobo azalaki koteya.

9 Yakobo asalelaki te maloba ya mpasi to bandakisa ya mindondo. Na yango, bayoki na ye bayebaki makambo oyo basengelaki kosala mpe ndenge ya kosala yango. Na ndakisa, na ndenge ya pɛtɛɛ, Yakobo ateyaki ete bakristo basengeli koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo, kozanga ete bábomba nkanda na motema. Akomaki boye: “Tolobaka ete bato oyo bayiki mpiko bazali bato ya esengo. Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bomoná ndenge Yehova asukisaki makambo na ye, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yak. 5:11) Simbá ete Yakobo asalelaki Makomami mpo na kopesa bandeko na ye liteya. Asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa bayoki na ye bámona ete Yehova apesaka ntango nyonso mbano na baoyo, lokola Yobo, bazali sembo epai na Ye. Mpo na kobimisa liteya yango, Yakobo asalelaki maloba ya pɛtɛɛ mpe ndimbola ya mindondo te. Na ndenge yango, abɛndaki likebi ya bayoki na ye epai na ye moko te, kasi epai ya Yehova.

10. Wapi lolenge moko oyo tokoki komekola Yakobo ntango tozali koteya?

10 Liteya: Mateya na yo ezala pɛtɛɛ, mpe euta na Liloba ya Nzambe. Ntango tozali koteya tosengeli te koluka kokamwisa bato mosusu na makambo oyo toyebi, kasi tosengeli nde komonisa bango boyebi mingi oyo Yehova azali na yango mpe ndenge oyo atyelaka bango likebi. (Rom. 11:33) Tokokokisa mokano yango soki makambo oyo tozali koloba ezali kouta na Makomami. Na ndakisa, na esika tóyebisa bayekoli na biso ya Biblia makambo oyo biso tokoki kosala na esika na bango, tosengeli nde kosalisa bango bákanisa na bandakisa ya Biblia mpo báyeba ndenge oyo Yehova akanisaka mpe ndenge oyo ayokaka. Yango ekosalisa bango báluka kosepelisa Yehova, kasi biso te.

11. Mikakatano nini bakristo mosusu bazalaki na yango na mikolo ya Yakobo, mpe toli nini apesaki bango? (Yakobo 5:13-15)

11 Yakobo azalaki kotalela makambo na ndenge oyo ebongi. Mokanda oyo akomaki emonisi ete Yakobo ayebaki malamu mikakatano oyo bandeko na ye bakristo bazalaki kokutana na yango, mpe amonisaki bango polele mpo esalisa bango bálonga mikakatano yango. Na ndakisa, bakristo mosusu bazalaki kosalela toli noki te. (Yak. 1:22) Basusu bazalaki kosepela na bazwi koleka babola. (Yak. 2:1-3) Basusu mpe bazalaki na mokakatano ya kopekisa lolemo na bango. (Yak. 3:8-10) Bakristo yango bazalaki mpenza na bolɛmbu, kasi Yakobo ayebaki ete bakokaki kobongwana. Apesaki bango toli na boboto kasi na ndenge ya polele, mpe alendisaki baoyo bazalaki na mikakatano na elimo báluka lisalisi epai ya bankulutu.​—Tángá Yakobo 5:13-15.

12. Ndenge nini tokoki kobatela makanisi ya malamu ntango tozali kosalisa bayekoli na biso ya Biblia?

12 Liteya: Taleláká makambo na ndenge ebongi, kasi zalá na makanisi ya malamu mpo na basusu. Bato mingi oyo toyekolaka na bango Biblia bakoki kozala na mokakatano ya kosalela toli na yango. (Yak. 4:1-4) Ekoki kosɛnga bango mwa ntango mpo bátika bizaleli mabe oyo epikamá makasi mpe bákóma na bizaleli ya bokristo. Mpo na komekola Yakobo, tosengeli kozala na mpiko ya koyebisa bayekoli na biso makambo oyo basengeli kobongisa. Tosengeli mpe kobatela makanisi ya malamu, na elikya ete Yehova akobenda bato ya komikitisa epai na ye mpe ete akopesa bango makasi mpo básala bambongwana na bomoi na bango.​—Yak. 4:10.

13. Ndenge emonisami na Yakobo 3:2, Yakobo ayebaki nini?

13 Yakobo azalaki komitalela na ndenge oyo ebongi. Yakobo azalaki komona te ete, ndenge azalaki leki ya Yesu mpe ndenge azalaki na mikumba minene na lisangá, azalaki na ntina mingi koleka bandeko mosusu nyonso. Abengaki bakristo mosusu ete “bandeko na ngai ya bolingo.” (Yak. 1:16, 19; 2:5) Alukaki te komimonisa lokola nde azalaki moto ya kokoka. Kasi, alobaki mpo na bango mpe mpo na ye moko ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”​—Tángá Yakobo 3:2.

14. Mpo na nini tosengeli kondima ete biso mpe tosalaka mabunga?

14 Liteya: Kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya masumu. Tosengeli te kokanisa ete toleki bato oyo toteyaka. Mpo na nini? Soki tozali komimonisa lokola ete tosalaka mabunga te, moyekoli na biso akoki kolɛmba nzoto mpo akokanisa ete akokoka te kotosa makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi. Kasi soki tondimi ete ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te ata mpo na biso kotosa mitinda ya Biblia mpe toyebisi ye ndenge oyo Yehova asalisaki biso tósala bambongwana, tokosalisa moyekoli na biso amona ete ye mpe akoki kosalela Yehova.

Yakobo asalelaki bandakisa ya pɛtɛɛ, ya polele, mpe ya malamu (Talá paragrafe 15-16) *

15. Bandakisa ya ndenge nini Yakobo asalelaki? (Yakobo 3:2-6, 10-12)

15 Yakobo asalelaki bandakisa oyo ezalaki mpenza kosimba mitema. Na ntembe te, elimo santu nde esalisaki ye, kasi ekoki mpe kozala ete ayekolaki ndenge ya koteya malamu ntango atalelaki bandakisa oyo yaya na ye, Yesu, asalelaki. Bandakisa oyo Yakobo asalelaki na mokanda oyo akomaki ezali mindondo te, mpe liteya na yango ezali polele.​—Tángá Yakobo 3:2-6, 10-12.

16. Mpo na nini tosengeli kosalela bandakisa ya malamu?

16 Liteya: Saleláká bandakisa ya malamu. Soki ozali kosalela bandakisa oyo ebongi, bato bakoyoka kaka te liteya oyo olingi ete bákanga ntina, kasi bakoki mpe komona yango mpenza na makanisi. Kosalela bandakisa oyo ebongi ezali lokola kokɔtisa bililingi na makanisi ya bato. Bililingi yango ekosalisa bato oyo bayoki yo bábosana te mateya ya ntina ya Biblia. Yesu ayebaki mpenza kosalela bandakisa ya malamu, mpe ndeko na ye Yakobo alandaki ndakisa na ye. Tótalela moko ya bandakisa oyo Yakobo asalelaki mpe tómona ntina oyo ndakisa yango ezali malamu mpenza.

17. Mpo na nini ndakisa oyo ezali na Yakobo 1:22-25 ezali malamu mpenza?

17 Tángá Yakobo 1:22-25. Ndakisa ya talatala oyo Yakobo asalelaki ezali malamu mpenza mpo na bantina mingi. Alingaki koteya likambo moko ya sikisiki, elingi koloba, mpo Liloba ya Nzambe esalisa biso mpenza, tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango; tosengeli mpe kosalela makambo oyo tozali kotánga. Yakobo aponaki ndakisa oyo bayoki na ye bakokaki koyeba mbala moko; ya moto oyo azali komitala na talatala. Likambo nini alingaki koteya? Soki moto amitali na talatala mpe amoni eloko oyo akoki kobongisa kasi asali eloko te, ekozala bozoba. Ndenge moko mpe, soki totángi Liloba ya Nzambe mpe tomoni likambo moko oyo tosengeli kobongola na bomoto na biso kasi tosali eloko te, ekozala bozoba.

18. Makambo nini misato tosengeli kosala ntango tozali kosalela ndakisa moko?

18 Ntango olingi kosalela ndakisa moko, okoki komekola Yakobo soki osali makambo oyo misato: (1) Omindimisa ete ndakisa yango ebongi mpo na likambo oyo ozali kolobela. (2) Salelá ndakisa oyo bayoki na yo bakoki koyeba mbala moko. (3) Monisá polele ndenge ya kosalela liteya oyo obimisi na ndakisa yango. Soki ozali na mokakatano ya kozwa bandakisa oyo ebongi, luká yango na Index des publications des Témoins de Jéhovah. Kende na motó ya likambo “Illustrations,” mpe okomona ebele ya bandakisa oyo okoki kosalela. Kasi kobosana te ete bandakisa ezali lokola mikro: ekobimisa malamu liteya oyo ozali kopesa. Na yango, salá ete ndakisa oyo okopesa ebimisa kaka likambo ya ntina oyo olingi koteya. Nzokande, ntina mpenza oyo tolingaka kokolisa makoki na biso ya koteya ezali te mpo na kobenda likebi epai na biso moko, kasi nde mpo na kosalisa bato ebele bákɔta na libota ya Yehova oyo ezali na esengo.

19. Ndenge nini tokomonisa ete tolingaka bandeko na biso bakristo?

19 Yakobo azalaki na yaya oyo azalaki moto ya kokoka, kasi biso tozwá libaku yango te. Kasi tozali na lokumu ya kosalela Yehova elongo na libota monene ya bandeko basi mpe bandeko mibali bakristo. Tokomonisa ete tolingaka bango soki tozali kolekisa ntango elongo na bango, tozali koyekola makambo epai na bango, mpe tozali kosala elongo na bango na mosala ya kosakola mpe ya koteya. Soki tosali makasi tólanda ndakisa ya Yakobo na ndenge na biso ya kotalela makambo, na bizaleli na biso, mpe na ndenge na biso ya koteya, tokopesa Yehova lokumu mpe tokosalisa bato ya mitema sembo bápusana penepene ya Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo.

LOYEMBO 114 ‘Tózala na motema molai’

^ par. 5 Yakobo akolaki ndako moko ná Yesu. Ayebaki malamu Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka, koleka bato mingi ya ntango wana. Na lisolo oyo, tokotalela makambo oyo tokoki koyekola na bomoi mpe mateya ya leki ya Yesu oyo akómaki moko ya bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso.

^ par. 1 Na lisolo oyo, tokobenga Yakobo ndeko ya Yesu, nzokande bazalaki mama moko kasi tata moko te. Mpe emonani ete ye nde akomaki mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye.

^ par. 2 Nathan Knorr azalaki ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Asilisaki bomoi na ye awa na mabele na 1977.

^ par. 61 ELILINGI: Yakobo asalelaki ndakisa ya mwa mɔtɔ moke, eloko oyo bato bakokaki koyeba mbala moko, mpo na komonisa likama ya kosalela lolemo na ndenge ya mabe.